Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/11 nk. 4-7
  • Olingaka kozala na bomoi libela na libela?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingaka kozala na bomoi libela na libela?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya seko ekolɛmbisa?
  • Tomonaka ete bomoi ezali na motuya mingi kaka mpo ezali mokuse?
  • Ezali boni mpo na bandeko mpe baninga na yo?
  • Bomoi ya seko: likambo moko ya esengo mpenza
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tokoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nzela se moko oyo ezali komema na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/11 nk. 4-7

Olingaka kozala na bomoi libela na libela?

MWASI moko ya mobange na Japon alobaki boye: “Nazali kobanga liwa te. Kasi ezali kosala ngai mpasi ndenge nakotika bafololo oyo.” Moklisto ya mwasi oyo akendaki kotala ye akangaki ntina oyo alobaki bongo; mwasi yango azalaki na elanga moko kitoko ya bafololo. Bato mingi oyo balobaka ete babangaka liwa te basepelaka mingi na biloko kitoko oyo Nzambe akelá mpe ekoki mpenza kozala ete bazalaka na mposa ya kotikala na bomoi libela na libela.

Kozala na bomoi libela na libela? Bato mingi bakoki koboya kondima likanisi ya ndenge wana. Bato mosusu kutu bakoki koloba ete bazali na mposa te ya kozala na bomoi libela na libela. Mpo na nini?

Bomoi ya seko ekolɛmbisa?

Bato mosusu bakanisaka ete kozala na bomoi libela na libela ekolɛmbisa. Bato yango bapesaka ndakisa ya bomoi ya makambo kaka ndenge moko oyo ebele ya bato oyo bazwá epaso bazalaka na yango; bazalaka lisusu na makambo mosusu te ya kosala, kaka kofanda mpamba mpe kotala televizyo. Soki okanisaka bongo, talelá ndenge Robert Jastrow, moto moko ya astronomi, alobaki ntango batunaki ye soki bomoi ya seko ekozala malamu to mabe. Ye azongisaki ete: “Ekozala malamu mpo na bato oyo balukaka koyeba makambo ya sika mpe oyo mposa na bango ya koyekola esilaka te. Soki bayebi ete bakobanda ntango nyonso koyekola makambo ya sika, bakolɛmba bomoi te. Kasi mpo na baoyo bakanisaka ete bayekolá makambo nyonso oyo moto asengeli koyeba mpe baoyo bamonaka ntina ya koyekola makambo mosusu te, bomoi ya seko ekozala mabe mpenza mpo na bango. Bakoyeba te ndenge ya kosalela ntango na bango.”

Ndenge oyo otalelaka makambo nde ekosala ete olɛmba bomoi ya seko to olɛmba yango te. Soki ‘olukaka koyeba makambo mpe ozalaka na mposa ya koyekola oyo esilaka te,’ kanisá makambo oyo okosala na oyo etali misala ya ntɔki, miziki, kotonga bandako, kosala bilanga, to misala nyonso oyo okosepela na yango. Bomoi ya seko na mabelé ekopesa yo mabaku ya kokolisa makoki na yo na makambo ndenge na ndenge oyo bato bayekolaka mpe basalaka.

Kofanda na bato oyo okolinga bango mpe oyo bakolinga yo mpo na libela ekosala ete bomoi ya seko esepelisa mpenza. Nzambe akelá biso na motema oyo elingaka mpe tosepelaka mingi mpenza soki bazali kolinga biso. Soki bato bazali kolingana mpenza, yango ememaka bolamu ya solosolo oyo ekoki koumela. Kozala na bomoi libela na libela ekopesa libaku oyo ezangi nsuka ya kokolisa bolingo kaka te mpo na bazalani kasi mingimingi mpo na Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete: “Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani epai na ye.” (1 Bakolinti 8:3) Oyo nde libaku malamu mpenza​—Koyebana na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Lisusu, koyekola makambo oyo etali Mozalisi na biso ya bolingo ezali na nsuka te. Na bongo, ndenge nini bomoi ya seko ekoki kolɛmbisa to kozanga ntina?

Tomonaka ete bomoi ezali na motuya mingi kaka mpo ezali mokuse?

Bato mosusu bakanisaka ete bomoi ezali na motuya mingi mpo ezali mokuse. Bato yango bakokanisaka bomoi ná wolo, eloko oyo ezali mingi te. Bato yango bamonisaka ete soki tokokaki kozwa wolo bisika nyonso, mbɛlɛ motuya na yango ekitá. Nzokande, wolo ezala mingi to te, ezalaka kaka kitoko. Ezali mpe bongo mpo na bomoi.

Kozala na bomoi ya seko ezali lokola kozala na esika oyo mopɛpɛ ezali mingi. Mopɛpɛ ezalaka eloko oyo eleki motuya mpo na bato oyo bazali na kati ya masuwa oyo etambolaka na nse ya mai (sous-marin), ntango ezwi mwa kwokɔsɔ. Kasi, okanisi ete soki babiki na likama wana, bakomilelalela ete bakómi na esika oyo mopɛpɛ ezali ebele? Te!

Lokola bato ya masuwa ya nse ya mai oyo babikisami na likama, biso mpe tokoki kobikisama na likama ya liwa mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko. Ntoma Paulo akomaki ete: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato, Nzambe akolongola ezaleli ya kozanga kokoka ná liwa mpe akopesa bato ya botosi likabo ya bomoi ya seko. Tosengeli kozala mpenza na botɔndi mpo na ebongiseli yango ya bolingo!

Ezali boni mpo na bandeko mpe baninga na yo?

Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Ezali boni mpo na bandeko mpe baninga na ngai? Mpo na ngai, bomoi ya seko na mabelé ezali na ntina te soki bango bazali te.’ Ntango mosusu oyekolá Biblia mpe oyebi ete likoki ezali ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 3:16; 17:3) Na ntembe te, okolinga ete libota na yo, bandeko na yo mosusu, mpe baninga na yo ya motema bázala wana, mpo bango mpe bámona bisengo oyo ozali kolikya kozwa na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki.​—2 Petelo 3:13.

Kasi ekozala boni soki baninga mpe bandeko na yo bazali kosepela te kozala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé? Yango elɛmbisa yo te. Kobá koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mwasi, ndenge nini oyebi ete okobikisa mobali na yo te? To, mobali, ndenge nini oyebi ete okobikisa mwasi na yo te?” (1 Bakolinti 7:16) Bato bakoki kobongwana. Na ndakisa, mobali moko oyo azalaki kotɛmɛla losambo ya boklisto abongwanaki mpe na nsima akómaki nkulutu na lisangá. Mobali yango alobi boye: “Nazali mpenza na botɔndi mingi na ndenge mwasi ná bana na ngai bakangamaki na bosembo nyonso na mitinda ya Biblia ntango nyonso oyo nazalaki kotɛmɛla bango.”

Nzambe amibanzabanzaka mingi mpo na bomoi na yo mpe bomoi ya bandeko mpe baninga na yo. Ya solo, “Yehova . . . alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Yehova Nzambe alingi ete yo ná bandeko mpe baninga na yo bózala na bomoi libela na libela. Azali na bolingo mingi koleka oyo ya bato ya kozanga kokoka. (Yisaya 49:15) Yango wana, mpo na nini te kokóma moninga ya Nzambe? Na nsima, okokoka kosalisa baoyo olingaka bákóma mpe baninga ya Nzambe. Ata soki sikoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya libela na libela te, makanisi na bango ekoki kobongwana soki bazali komona yo ozali kosala makambo na boyokani na boyebi ya sikisiki ya Biblia.

Kasi ezali boni mpo na bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá? Mpo na bamilio ya bato oyo bakufá, Biblia epesi elikya malamu ya lisekwa​—kolamuka na liwa mpe kozala na bomoi na Paladiso awa na mabelé. Yesu Klisto alakaki ete: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama . . . bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Ata baoyo bayebaki Nzambe te liboso bákufa bakozonga na bomoi, mpamba te Biblia elobi boye: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Ekozala mpenza esengo koyamba bato ya ndenge wana ntango bakozonga na bomoi!

Bomoi ya seko: likambo moko ya esengo mpenza

Soki lelo oyo okoki kozala na esengo atako mokili oyo etondi na mobulu, na ntembe te okosepela na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Kasi, ntango Motatoli ya Yehova moko alobelaki bolamu oyo bomoi ya seko ekomema, mwasi moko alobaki boye: “Nalingi bomoi ya libela na libela te. Bomoi oyo ya mbula 70 to 80 ekoki mpo na ngai.” Nkulutu moko oyo azalaki wana atunaki ye boye: “Osilá kokanisa ndenge bana na yo bakoyoka soki okufi?” Mai ya miso ekitaki ye mbala moko ntango akanisaki mpasi oyo bana na ye bakoyoka soki mama na bango akufi. Alobi boye: “Ezalaki mbala ya liboso namona ete nazalaki kokanisa kaka mpo na bolamu na ngai moko mpe namonaki ete elikya ya bomoi ya seko ezali kaka mpo na bolamu ya moto ye moko te kasi esɛngaka kozala na bomoi mpo na bamosusu.”

Bato mosusu bakanisaka ete, ezala bazali na bomoi to bakufi, yango ekotungisa moto te. Nzokande, likambo yango etungisaka Moto oyo apesaki biso bomoi, oyo alobi ete: “Lokola ezali ngai na bomoi, . . . nazwi esengo na liwa na moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwa na nzela na ye mpe abika.” (Ezekiele 33:11) Lokola Nzambe amibanzabanzaka ndenge wana mpo na bomoi ya moto mabe, na ntembe te, amibanzabanzaka mingi mpenza mpo na baoyo balingaka ye.

Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, atyaki motema na ye mobimba na libateli ya bolingo ya Yehova. Alobaki boye: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Tokanisi mpenza ete Davidi ayebaki ete baboti na ye bazalaki kolinga ye. Kasi ata soki baboti na ye​—bandeko na ye ya libosoliboso​—bakokaki kotika ye, ye ayebaki ete Nzambe akosundola ye te. Lokola Yehova alingaka biso mingi mpe amibanzabanzaka mpo na biso, apesi biso likabo ya bomoi ya seko mpe likoki ya kozala baninga na ye mpo na libela. (Yakobo 2:23) Omoni te ete tosengeli kondima na botɔndi nyonso makabo yango?

[Elilingi na lokasa 7]

Kolinga Nzambe mpe bazalani ekosala ete bomoi ya libela na libela ezala na ntina mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto