Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/12 nk. 4-7
  • Ndenge nini tosengeli kokanisa Yesu Klisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini tosengeli kokanisa Yesu Klisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokolo ya kosepela mpe kosala mombongo
  • Mwana abotameli biso
  • Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/12 nk. 4-7

Ndenge nini tosengeli kokanisa Yesu Klisto?

Yesu Klisto “azali moko ya bato oyo batiká mpenza nsango na mokili.”​—Buku “The World Book Encyclopedia.”

BAKANISAKA bato minene mingimingi na makambo oyo basalá. Kasi, mpo na nini bato mingi bakanisaka nde mbotama ya Yesu na esika ya kokanisa makambo oyo asalá? Na mangomba ya boklisto, bato mingi bayebi mpenza makambo oyo esalemaki ntango Yesu abotamaki. Kasi, bato boni bayebi mateya ya ntina mingi oyo ezali na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba mpe basalaka makasi mpo na kosalela yango?

Toboyi te, mbotama ya Yesu ezalaki likambo moke te, kasi bayekoli na ye ya liboso bazalaki kopesa motuya mingi nde na makambo oyo asalaki mpe na mateya na ye. Na ntembe te, mokano ya Nzambe ezalaki te ete mbotama ya Klisto ezala na ntina mingi koleka makambo oyo asalaki ntango akómaki mokóló. Nzokande, fɛti ya Noele, ná masapo na yango, elongoli mpenza likebi ya bato na makambo oyo Klisto asalaki na bomoi na ye.

Motuna mosusu ya ntina mingi ezali kotunama na kotalela makambo oyo bato basalaka na fɛti ya Noele lelo oyo. Soki lelo oyo Yesu azongi awa na mabelé, ndenge nini akotalela mimbongo nyonso oyo bato basalaka na Noele? Eleki lelo mbula nkóto mibale, Yesu akendaki na tempelo ya Yelusaleme. Ayokaki mabe mpenza ntango amonaki ndenge bato bazalaki kosanze mbongo mpe kotɛka biloko na tempelo mokolo ya fɛti moko ya losambo. Alobaki na bango boye: “Bólongola biloko oyo awa! Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!” (Yoane 2:13-16) Yango emonisi mpenza ete Yesu azalaki kosepela te ete bato básalela losambo mpo na kosala mombongo.

Bakatolike mingi ya sembo na Espagne bazali komonisa ete bazali kosepela te na ndenge bato bazali kosalela fɛti ya Noele mpo na kosala mombongo. Kasi, soki totali epai mimeseno mingi ya Noele eutá, tokomona ntina oyo bato batalelaka yango lokola libaku ya kosala mombongo. Mopanzi-nsango Juan Arias alobaki boye: “Baklisto oyo bazali koloba ete ‘mimeseno ya bapakano’ ekɔti mingi na fɛti ya Noele, mpe ete bato bakómisi yango ntango ya kolya, komɛla mpe kosepela bazali kobosana ete ata ntango Noele ebandaki . . . ezalaki na mimeseno mingi oyo ezalaki komonana na bafɛti oyo bapakano bazalaki kosala na Loma mpo na kokumisa moi.”​—Zulunalo El País ya 24 Desɛmbɛ 2001.

Na bambula oyo euti koleka, bapanzi-nsango mpe babuku mingi na Espagne elobelaki mimeseno ya bapakano oyo ezali komonana na bafɛti ya Noele mpe ndenge fɛti yango ekómi nde ntango ya kosala mimbongo. Mpo na dati ya fɛti yango, buku Enciclopedia de la Religión Católica elobi polele ete: “Tokanisi ete soki Lingomba ya Katolike eponaki ete fɛti ya Noele esalemaka na dati wana, ezali kaka mpo na momeseno na yango ya kobongola bafɛti ya bapakano ekóma bafɛti ya baklisto. . . . Toyebi ete na bambula wana na Loma, mokolo ya 25 Desɛmbɛ ezalaki mokolo oyo bapakano bazalaki kosepela kobotama ya ‘moi, elombe oyo bakoki kolonga te,’ natalis invicti na Latin.”

Ndenge moko mpe, buku Enciclopedia Hispánica elobi boye: “Soki fɛti ya Noele ezalaka na mokolo ya 25 Desɛmbɛ, ezali te mpo Yesu abotamaki mokolo yango, kasi baklisto bazwaki kaka mokolo ya fɛti ya solstice d’hiver oyo bazalaki kosala na Loma mpe bakómisi yango mokolo ya fɛti ya Noele.” Ndenge nini Baloma bazalaki kosala fɛti ya kobima ya moi na eleko ya mpiɔ? Bazalaki kosala biyenga, kolya, komɛla mpe kopesana bakado. Lokola bakonzi ya mangomba bazalaki kokakatana mpo na kolongola fɛti yango oyo bato mingi bazalaki kosepela na yango, bakómisaki yango “fɛti ya boklisto” mpe bakómaki kobenga yango mbotama ya Yesu na esika ya mbotama ya moi.

Na ebandeli, elingi koloba na ekeke ya minei mpe ya mitano, ezalaki pɛtɛɛ te mpo bato bátika losambo ya moi mpe mimeseno na yango. “Mosantu” moko ya Katolike, Augustin (354-430 T.B.) alobaki na baninga na ye bandimi ete basengeli te kosala fɛti ya 25 Desɛmbɛ mpo na lokumu ya moi ndenge bapakano bazalaki kosala. Ezali komonana ete tii lelo oyo bato bazali kolanda mimeseno ya losambo ya moi oyo ezalaki kosalema na Loma.

Mokolo ya kosepela mpe kosala mombongo

Makambo mingi esalisaki mpo na kokómisa fɛti ya Noele mokolo moko monene ya kosepela mpe ya kosala mombongo na mokili mobimba. Lisusu, mimeseno ya bafɛti mosusu ya eleko ya mpiɔ, mingimingi oyo ezalaki kosalema na nɔrdi ya Mpoto, ekɔtaki mokemoke na fɛti yango oyo ebandaki na Loma.a Na ekeke ya 20, bakomelesa ná bato oyo basalaka piblisite bakómaki kosalela mimeseno to bafɛti nyonso oyo bakoki kozwela mbongo mingi.

Yango ebimisi makambo nini? Na esika bato bámona ntina monene ya mbotama ya Klisto, bakómi nde kopesa motuya mingi na fɛti ya mbotama yango. Mbala mingi kutu ata nkombo ya Klisto eyokanaka te na fɛti ya Noele. Zulunalo El País ya Espagne elobi boye: “[Noele] ezali fɛti ya mokili, fɛti ya libota, mpe moto na moto asepelaka yango na ndenge na ye.”

Maloba wana emonisi momeseno oyo ekómi komonana mingi na Espagne mpe na ebele ya bikólo mosusu. Noele ezali se kokóma fɛti moko monene, kasi boyebi ya Klisto ezali nde kokita. Soki totali malamu, mimeseno ya Noele ezongi mpenza ndenge ezalaki kala na Loma, elingi koloba loyenge, kolya, komɛla mpe kosepela, mpe kopesana bakado.

Mwana abotameli biso

Soki fɛti ya Noele ezali ata na boyokani moko te na Klisto, ndenge nini kasi baklisto ya solo basengeli kokanisaka mbotama mpe bomoi ya Klisto? Mbula soki 700 liboso Yesu abotama, Yisaya asakolaki na ntina na ye ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye.” (Yisaya 9:6) Mpo na nini Yisaya amonisaki ete mbotama ya Yesu mpe makambo oyo akosala ekozala na ntina mingi? Alobaki bongo mpamba te Yesu asengelaki kokóma mokonzi moko ya nguya. Basengelaki kobenga ye “Nkolo ya kimya,” mpe kimya oyo asengelaki kotya to bokonzi na ye esengelaki kozala na nsuka te. Lisusu, “kosambisa-sembo mpe . . . boyengebene” ekozala na bokonzi ya Yesu.​—Yisaya 9:7.

Ntango anzelu Gabiliele ayebisaki Malia ete akobota Yesu, azongelaki makambo oyo Yisaya asakolaki. Alobaki boye: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:32, 33) Emonani polele ete ntina monene ya kobotama ya Yesu ezali nde na makambo oyo Klisto asengelaki kosala lokola Mokonzi oyo Nzambe aponi. Bokonzi ya Klisto ekomemela bato nyonso bolamu, ezala yo ná baninga mpe bandeko na yo. Yango wana, baanzelu balobaki ete kobotama na ye ekomema “boboto awa na se, na bato oyo [Nzambe] alingaka.”​—Luka 2:14, Bible na lingala ya lelo oyo.

Nani alingaka te kozala na mokili moko ya kimya mpe ya boyengebene? Nzokande, mpo na kosepela na kimya oyo boyangeli ya Klisto ekomema, tosengeli kosepelisa Nzambe mpe kozala na boyokani malamu na ye. Yesu amonisaki ete likambo ya liboso oyo moto asengeli kosala mpo na kozala na boyokani malamu na Nzambe ezali koyekola koyeba Nzambe mpe Klisto. Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Ntango toyebi Yesu malamumalamu, tokoluka mpe koyeba ndenge oyo ye alingi biso tókanisaka ye. Tosengeli nde kolya, komɛla mpe kopesana bakado na mokolo moko boye ndenge bapakano ya kala bazalaki kosala fɛti na bango? Emonani mpenza ete tosengeli kosala ndenge wana te. Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo oyo alingaki ete básalaka. “Moto oyo azali na bakomandema na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai akolingama na Tata na ngai, mpe ngai nakolinga ye.”​—Yoane 14:21.

Batatoli ya Yehova bayekoli Biblia na mozindo mpenza, mpe yango esalisi bango báyeba malamumalamu bakomandema ya Nzambe mpe ya Yesu. Bakosepela kosalisa yo mpe oyeba malamu bakomandema yango ya ntina mingi mpo yo mpe okanisaka Yesu na ndenge oyo esengeli mpenza.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa, nzete ya Noele mpe ekeko ya Père Noël.

[Etanda/Bililingi na lokasa 6]

Biblia epekisi nde kosala fɛti mpe kopesana bakado?

Kopesana bakado

Biblia epekisi te kopesana makabo, kutu Yehova ye moko abengami Mopesi ya ‘makabo nyonso ya malamu mpe mabonza nyonso oyo ekoki mpenza.’ (Yakobo 1:17) Yesu amonisaki ete baboti ya malamu bapesaka bana na bango makabo. (Luka 11:11-13) Baninga ya Yobo mpe bandeko na ye bapesaki ye makabo ntango maladi na ye esilaki. (Yobo 42:11) Kasi, bato nyonso wana baponaki te mokolo ya fɛti moko boye mpo na kopesa makabo. Motema na bango nde etindaki bango bápesa makabo yango.​—2 Bakolinti 9:7.

Kokutana na bandeko

Kokutana esalisaka bandeko bázala na bomoko, mingimingi soki bafandaka lisusu esika moko te. Yesu ná bayekoli na ye bakendaki na fɛti moko ya libala na Kana, oyo na ntembe te esangisaki bandeko mpe baninga mingi. (Yoane 2:1-10) Mpe na ndakisa ya mwana ya kilikili oyo Yesu apesaki, tata asangisaki bandeko mpo na kosepela mpo mwana na ye azongaki; na fɛti yango babɛtaki miziki mpe babinaki.​—Luka 15:21-25.

Kolya bilei kitoko

Na bisika mingi na Biblia, balobeli ndenge basaleli ya Nzambe balyaki bilei kitoko na bandeko mpe baninga na bango to ná basaleli mosusu ya Nzambe. Ntango baanzelu misato bakendaki epai ya Abalayama, asalelaki bango elambo; abomaki ngɔmbɛ, atyaki miliki, manteka, mpe bagato. (Genese 18:6-8) Salomo alobaki ete ‘kolya, komɛla, mpe kosepela’ ezali likabo ya Nzambe.​—Mosakoli 3:13; 8:15.

Emonani polele ete Nzambe alingaka ete tósepela na bilei kitoko elongo na baninga mpe bandeko na biso, mpe apekisi te tópesanaka bakado. Tozali na mabaku mingi ya kosala yango na kati ya mbula.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto