Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/12 nk. 17-22
  • Ondimaka lisalisi ya Yehova?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ondimaka lisalisi ya Yehova?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi ya baanzelu
  • Lisalisi ya Mokonzi ya baanzelu
  • Lisungi ya elimo santu
  • Lisalisi ya Liloba ya Nzambe
  • Lisalisi na nzela ya bandeko ya elimo
  • Yehova azali Mosungi na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge oyo baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/12 nk. 17-22

Ondimaka lisalisi ya Yehova?

“Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”​—BAEBELE 13:6.

1, 2. Mpo na nini ezali na ntina tóndima lisalisi mpe litambwisi ya Yehova na bomoi na biso?

KANISÁ ete ozali kotambola na nzela moko ya bangomba. Kasi, ozali yo moko te mpamba te moto moko asepeli kokende na yo mpo alakisaka yo nzela; kutu, ayebi nzela yango koleka moto mosusu nyonso. Moto yango amesaná kotambola na bangomba mpe azali na makasi koleka yo, kasi na esika atambola mbangu, azali kotambola pembeni na yo. Moto yango amoni ete ntango mosusu ozali kobɛta mabaku. Lokola alingi te likama ekómela yo, apesi yo lobɔkɔ mpo na koleka esika moko ya mabe. Okoboya kosimba lobɔkɔ na ye? Te! Mpamba te ezali mpo na bolamu na yo.

2 Biso baklisto tozali kotambola na nzela moko oyo etondi na makama. Tozangi nde moto oyo akoki kosalisa biso na kotambola na nzela yango oyo ekangamakangamá? (Matai 7:14) Te, Biblia emonisi ete Yehova Nzambe, Molakisi-nzela oyo aleki balakisi nyonso, azali kopesa bato ya kotambola elongo na ye. (Genese 5:24; 6:9) Yehova asalisaka basaleli na ye ntango bazali kotambola na ye? Ye moko alobi boye: “Ngai [Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Bangá te: ngai nakosunga yo.” (Yisaya 41:13) Yehova azali lokola molakisi-nzela oyo tolobeli na ebandeli, na boboto mpenza, azali kopesa lobɔkɔ epai ya bato oyo balingi kotambola elongo na ye mpe azali komimonisa moninga na bango. Tokanisi mpenza ete moto moko te kati na biso akoboya lisalisi na ye!

3. Mituna nini tokotalela na boyekoli oyo?

3 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki ndenge minei oyo Yehova azalaki kosalisa basaleli na ye na ntango ya kala. Azali nde kosalisa mpe basaleli na ye ndenge wana na moi ya lelo? Ndenge nini tokoki komindimisa ete tozali mpenza kondima lisalisi na ye? Tótalela naino mituna yango. Na ndenge yango, tokondimisama mpenza ete Yehova azali Mosungi na biso.​—Baebele 13:6.

Lisalisi ya baanzelu

4. Mpo na nini basaleli ya Nzambe lelo oyo bakoki kolikya ete baanzelu bakosalisa bango?

4 Baanzelu bazali nde kosalisa basaleli ya Yehova ya ntango na biso? Ɛɛ. Ezali solo ete lelo oyo basambeli ya solo bamonaka baanzelu yango na miso te ntango bazali kobikisa bango na makama. Kutu, ata na ntango ya kala, ezalaki kosalema mingi te ete baanzelu bámonana na miso ya bato. Mbala mingi baanzelu bazalaki kosalisa bato, kasi bato bazalaki komona bango te; lelo oyo mpe ezali kosalema se bongo. Atako bongo, basaleli ya Nzambe oyo basosolaki ete baanzelu bakokaki kosalisa bango, balendisamaki mingi. (2 Mikonzi 6:14-17) Biso mpe tokoki mpenza koyoka ndenge yango.

5. Ndenge nini Biblia ezali komonisa ete baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola oyo ezali kosalema lelo oyo?

5 Baanzelu ya Yehova batyaka likebi mingi na mosala moko ya ntina mingi oyo tozali kosala. Mosala nini? Tokozwa eyano na Emoniseli 14:6: “Namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” “Nsango malamu ya seko” yango ezali nde ‘nsango malamu ya bokonzi’ oyo Yesu alobaki ete “ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso” liboso ebongiseli ya makambo ya mokili oyo esuka. (Matai 24:14) Ya solo, baanzelu te nde bakendaka kosakolaka epai ya bato. Yesu apesaki mokumba monene wana epai ya bato. (Matai 28:19, 20) Tolendisamaka mpenza na koyeba ete baanzelu, bikelamo ya elimo oyo bazali na bwanya mpe na nguya mingi, basalisaka biso ntango tozali kosala mosala wana!

6, 7. (a) Nini ezali komonisa ete baanzelu basalisaka biso na mosala ya kosakola? (b) Tosengeli kosala nini mpo baanzelu ya Yehova básalisa biso?

6 Makambo mingi ezali komonisa ete baanzelu bapesaka biso mabɔkɔ na mosala yango. Na ndakisa, mbala mingi toyokaka Batatoli ya Yehova oyo balobaka ete na mosala ya kosakola bakutanaki na moto oyo autaki kobondela Nzambe asalisa ye ayeba solo. Makambo ya ndenge wana esalemaka mingi; yango wana tokoki koloba te ete esalemaka kaka yango moko. Lisalisi yango ya baanzelu ezali kosala ete ebele ya bato báyekola kosala makambo oyo ‘anzelu oyo azali kopumbwa na katikati ya likoló’ alobaki ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo.”​—Emoniseli 14:7.

7 Ozalaka na mposa ya lisalisi ya baanzelu ya Yehova? Boye, salá nyonso omipesa na mosala ya kosakola. (1 Bakolinti 15:58) Ntango tozali komipesa na esengo na mosala yango oyo Yehova apesi biso, tokoki kolikya ete baanzelu na ye bakosalisa biso.

Lisalisi ya Mokonzi ya baanzelu

8. Yesu azali na lokumu nini kuna na likoló, mpe mpo na nini yango ezali kolendisa biso?

8 Yehova asalisaka biso mpe na nzela ya anzelu ya ndenge mosusu. Emoniseli 10:1 elobeli ‘anzelu ya makasi’ mingi oyo “elongi na ye ezalaki lokola moi.” Emonani mpenza ete anzelu yango oyo Yoane amonaki na emonaneli na nguya mpe nkembo kuna na likoló ezali Yesu Klisto. (Emoniseli 1:13, 16) Yesu azali mpenza anzelu? Tokoki koloba bongo, mpamba te azali mokonzi ya baanzelu. (1 Batesaloniki 4:16) Yesu azali na nguya koleka baanzelu nyonso ya Yehova. Yehova atye ye mokonzi ya baanzelu nyonso. Mokonzi yango ya baanzelu asalisaka biso mpenza. Na ndenge nini?

9, 10. (a) Na ndenge nini Yesu azalaka “mosungi” na biso ntango tosali lisumu? (b) Ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa biso na ndenge nini?

9 Ntoma Yoane oyo akómaki mobange, akomaki boye: “Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene.” (1 Yoane 2:1) Mpo na nini Yoane alobaki ete Yesu azali “mosungi” na biso, mingimingi ntango ‘tosali lisumu’? Mpamba mokolo na mokolo tosalaka masumu, mpe lisumu ememaka na liwa. (Mosakoli 7:20; Baloma 6:23) Nzokande, Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na masumu na biso. Lisusu, azali pembeni ya Tata na biso ya motema mawa mpe abondelaka mpo na biso. Mokomoko na biso azali na mposa ya lisalisi wana. Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimi yango? Tosengeli kobongola motema mpe kosɛnga bolimbisi na lisalisi ya mbeka ya Yesu. Tosengeli mpe kozongela te masumu oyo totiki.

10 Yesu akufaki mpo na biso, kasi atikaki mpe ndakisa oyo eleki malamu mpo na biso. (1 Petelo 2:21) Ndakisa na ye elakisaka biso nzela, ekoki kosalisa biso tóbongisa etamboli na biso mpo tóboya kosala masumu ya minene mpe tósepelisa Yehova Nzambe. Tozali mpenza na esengo ya kozala na lisungi ya ndenge wana! Yesu alakaki bayekoli na ye ete Nzambe akotindela bango mosungi mosusu.

Lisungi ya elimo santu

11, 12. Elimo ya Yehova ezali nini, ezali na makasi ya ndenge nini, mpe mpo na nini tozali na mposa na yango lelo oyo?

11 Yesu alakaki boye: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela, elimo ya solo, oyo mokili ekoki kozwa te.” (Yoane 14:16, 17) “Elimo ya solo” wana, to elimo santu, ezali moto te, ezali nde nguya ya Yehova oyo esalaka mosala. Ezali na makasi oyo ezali na nsuka te. Yango nde nguya oyo Yehova asalelaki mpo na kokela molɔ́ngɔ́ mobimba, mpo na kosala makamwisi, mpe mpo na kopesa bimonaneli ya mokano na ye. Lokola lelo oyo Yehova azali kosalela elimo yango mpo na kosala makambo wana te, yango elingi nde koloba ete tozali na mposa na yango te?

12 Te! Na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo, tozali mpenza na mposa ya elimo ya Yehova. (2 Timote 3:1) Elimo yango elendisaka biso mpo tóyikela minyoko mpiko. Esalisaka biso tólona bizaleli malamu oyo esalaka ete tózala na boyokani malamu na Yehova mpe na bandeko na biso ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, tosengeli kosala nini mpo Yehova apesa biso lisalisi monene wana?

13, 14. (a) Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova asepelaka kopesa basaleli na ye elimo santu? (b) Likambo nini ekoki komonisa ete tozali mpenza te kondima likabo ya elimo santu?

13 Ya liboso, tosengeli kosɛngaka Nzambe apesa biso elimo santu. Yesu alobaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:13) Ya solo, Yehova azali Tata ya malamu koleka batata nyonso. Soki tosɛngi ye elimo santu na kondima mpenza, akoki te kopimela biso likabo yango. Yango wana, motuna yango oyo: Tosɛngaka elimo yango? Ebongi mpenza tósɛngaka yango mokolo na mokolo na kati ya mabondeli na biso.

14 Ya mibale, tokomonisa ete tondimaka likabo yango soki tozali kosala makambo oyo yango ezali kotinda biso. Tópesa ndakisa: Kanisá ete moklisto moko azali na bolɛmbu ya kotala mikanda to bafilme ya bato bazali bolumbu. Abondeli Nzambe apesa ye elimo santu mpo esalisa ye alonga momeseno mabe wana. Asɛngi bankulutu básalisa ye, mpe bapesi toli ete azwa ekateli makasi mpo azongela lisusu likambo yango te, aboya ata kotya makolo na ye na bisika oyo akoki komona mikanda to bafilme yango. (Matai 5:29) Tokoloba nini soki ndeko wana alandi toli ya bankulutu te mpe azali kaka kotala mikanda to bafilme wana? Tokoki nde koloba ete azali kosala makambo eyokani na libondeli oyo azali kosala mpo na kozwa lisalisi ya elimo santu? To azali nde komilukela likama ya koyokisa elimo ya Nzambe mawa mpe kobungisa elimo yango? (Baefese 4:30) Ya solo mpenza, biso nyonso tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo Yehova atika te kopesa biso lisalisi monene wana.

Lisalisi ya Liloba ya Nzambe

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali te kotalela Biblia lokola mikanda mosusu nyonso?

15 Banda kalakala Biblia esalisaka basaleli ya sembo ya Yehova. Yango wana, na esika ya kotalela Biblia lokola mikanda mosusu nyonso, tosengeli kobosanaka te ete ezali lisalisi monene mpenza. Esɛngaka ete moto asala molende mpo na kondima lisalisi yango. Tosengeli kozwa momeseno ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo.

16, 17. (a) Ndenge nini Nzembo 1:​2, 3 emonisi matomba ya kotánga Liloba ya Nzambe? (b) Ndenge nini Nzembo 1:3 ezali komonisa ete tosengeli kosala makasi mpo na kozwa litomba na Liloba ya Nzambe?

16 Nzembo 1:2, 3 elobi na ntina na moto oyo abangaka Nzambe ete: “Mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene ya bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” Okangi ntina ya maloba yango? Soki totángi maloba yango likolólikoló, tokoki kokanisa ete ezali kolobela kaka esika moko ya kitoko: nzete moko ya nkasa mingi oyo ezali kokola penepene ya bitima ya mai. Kolala mwa mpɔngi ya moi na nse ya nzete ya ndenge wana ezalaka malamu mpenza! Kasi, nzembo yango ezali mpenza kolobela kolala mpɔngi te. Ezali kolobela likambo mosusu mpenza, ezali kosɛnga kosala mosala makasi. Na ndenge nini?

17 Tomoni ete nzete oyo balobeli ezali te kaka nzete ya nkasa mingi oyo ebimi yango moko pembeni ya ebale. Ezali nzete oyo ebotaka mbuma, oyo ‘baloni’ yango kolona na esika oyo baponi malamu​—“penepene ya bitima ya mai.” Ndenge nini nzete moko ekoki kokola penepene ya bitima ya mai? Moto oyo azali na elanga ya banzete ya mbuma azalaki mbala mosusu kotimola batalase mpo misisa ya banzete ezwaka mai mingi. Tososoli sikoyo ntina ya maloba yango! Soki na elimo tozali kokola lokola nzete ya ndenge wana, ezali mpo mosala monene esalemi mpo na kosalisa biso. Tozali na kati ya ebongiseli oyo ezali komemela biso mai ya pɛto, elingi koloba mateya ya solo; kasi, biso moko tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Tosengeli komɛlaka mai yango, elingi koloba tosengeli komanyolaka mpe koyekola na mozindo mpo tókɔtisa solo ya Liloba ya Nzambe na makanisi na biso mpe efanda na mitema na biso. Na ndenge yango, biso mpe tokobota mbuma ya malamu.

18. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa biyano ya Biblia na makambo oyo ezali kotungisa biso?

18 Biblia ekozala na litomba moko te mpo na biso soki tozali na yango, kasi totángaka yango te. Yango ezali te buku moko oyo ezali na maji; tosengeli te kokanisa ete soki tokangi miso mpe tofungoli yango ata na lokasa nini, tokozwa eyano na likambo oyo ezali kotungisa biso na esika wana. Soki tolingi koyeba likambo oyo ebongi tósala, tosengeli koluka “boyebi ya Nzambe,” lokola nde tozali kotimola mpo na kozwa eloko ya motuya oyo ebombami na nse ya mabelé. (Masese 2:1-5) Mbala mingi esɛngaka koyekola na mozindo mpo na kozwa toli ya Biblia oyo ekosalisa biso na bamposa na biso. Tozali na ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo esalisaka biso na boyekoli ya Biblia. Ntango tozali koluka bwanya ya Liloba ya Nzambe na mikanda yango, yango ekomonisa ete tozali mpenza kosalela lisalisi oyo Yehova apesi biso.

Lisalisi na nzela ya bandeko ya elimo

19. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali lisalisi oyo Yehova apesaka biso na nzela ya bandeko na biso ya elimo? (b) Ndenge nini lisolo moko oyo otángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! esalisaki yo?

19 Banda na ntango ya kala, basaleli ya Yehova bazalaka na momeseno ya kosalisana. Yehova atiki kosalela nzela yango te. Na ntembe te mokomoko na biso ayebi lisusu ndenge ndeko moko moklisto asalisaki ye na ntango oyo azalaki mpenza na mposa ya lisungi. Na ndakisa, oyebi lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! oyo ebɔndisaki yo to esalisaki yo ntango ozalaki na mokakatano moko to ntango kondima na yo emekamaki? Yehova asalisaki yo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo azali na mokumba ya kopesa ‘bilei na ntango oyo ebongi.’​—Matai 24:45-47.

20. Ndenge nini bankulutu bamonisaka ete bazali “makabo oyo ezali bato”?

20 Kasi, mbala mingi bandeko ya elimo basalisaka biso na ndenge oyo tozali komona mbala moko. Nkulutu moko akoki kosala lisukulu moko oyo esimbi motema na biso, to mpe akoki koya kotala biso na ntango oyo tozali na mokakatano moko mpe abɔndisi biso, to mpe apesi biso toli oyo esalisi biso tómona bolɛmbu moko mpe tólonga yango. Mpo na lisalisi oyo nkulutu moko apesaki ye, ndeko mwasi moko akomaki boye: “Na mosala ya kosakola, nkulutu yango alendisaki ngai nalobaka soki nazali na likanisi. Liboso ya mokolo oyo tobimaki, na butu nabondelaki Yehova asalisa ngai nakutana na moto moko oyo nakoki kosolola na ye. Nkulutu wana alobaki na ngai na boboto mpenza. Asalisaki ngai namona ndenge Yehova azalaki kosalisa ngai banda bambula. Nazali kotɔnda Yehova oyo atindaki nkulutu yango mpo na kosalisa ngai.” Na makambo nyonso wana, bankulutu bazali komonisa ete bazali “makabo oyo ezali bato,” oyo Yehova apesi na nzela ya Yesu Klisto mpo na kosalisa biso tóyika mpiko na nzela ya bomoi.​—Baefese 4:8.

21, 22. (a) Matomba nini emonanaka ntango bandeko bazali kosalela toli oyo ezali na Bafilipi 2:4? (b) Mpo na nini esengeli tómonisaka boboto ata na makambo mikemike?

21 Longola bankulutu, moklisto mokomoko ya sembo asengeli kosalela toli ya Biblia oyo ezali kosɛnga biso ‘tótyaka likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na biso moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’ (Bafilipi 2:4) Ntango bandeko na kati ya lisangá bazali kolanda toli wana, basalaka makambo mingi ya boboto. Na ndakisa, libota moko ekutanaki na makambo mingi ya mpasi na mbala moko. Tata abimaki na mwana na ye ya mwasi mpo na kosomba biloko na magazini. Ntango bazalaki kozonga, bazwaki likama ya motuka. Mwana akufaki; mpe tata azwaki mpasi makasi. Ntango abimaki na lopitalo, azalaki lisusu kokoka kosala ata eloko moko te ye moko. Lokola mwasi na ye azalaki kotungisama mingi na makanisi, azalaki na makasi te ya kosalisa mobali na ye. Yango wana, ndeko moko ná mwasi na ye bazwaki bango na ndako na bango mpe basalisaki bango na boumeli ya bapɔsɔ mingi.

22 Kasi, boboto ya bandeko emonanaka te kaka na ntango likama ya ndenge wana esalemi to ntango bandimi mpasi mpo na kosalisa biso. Bandeko basalisaka biso ntango mosusu na makambo ya mikemike. Kasi, ata soki basaleli biso boboto na likambo ya moke, tosepelaka na yango! Oyebi lisusu mokolo moko oyo ndeko moko alobaki na yo maloba ya boboto to asalisaki yo ntango ozalaki na bosɛnga? Mbala mingi, Yehova asalisaka biso na ndenge wana.​—Masese 17:17; 18:24.

23. Ndenge nini Yehova atalelaka milende oyo tosalaka mpo na kosalisana?

23 Okosepela Yehova asalela yo mpo na kosalisa basusu? Okoki kozwa libaku malamu yango. Kutu, Yehova asepelaka komona yo osala molende mpo na kosalisa basusu. Liloba na ye elobi boye: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” (Masese 19:17) Komipesa mpo na kosalela bandeko epesaka esengo mingi. (Misala 20:35) Baoyo balingaka kozala esika moko te na bandeko bazangaka esengo oyo moto ayokaka ntango azali kosalisa basusu mpe bolamu oyo moto ayokaka ntango basalisi ye. (Masese 18:1) Yango wana, tózangisaka makita te mpo na kozwa libaku ya kolendisana.​—Baebele 10:24, 25.

24. Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete tozangi eloko moko atako Yehova azali kosala makamwisi minene te na mikolo na biso?

24 Ezali mpenza esengo kokanisa balolenge oyo Yehova asalisaka biso! Atako na ntango na biso Yehova azali te kosala makamwisi minene mpo na kokokisa mikano na ye, tosengeli kokanisa te ete tozangi eloko moko. Likambo ya ntina mingi ezali ete Yehova azali kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kotikala sembo. Mpe soki toyiki mpiko na kondima, tokozala wana ntango Yehova akosala misala oyo ekozala minene mpe na nkembo koleka misala nyonso oyo asalá banda mokili ebandá! Tiká tózwa ekateli ya kondima mpe kosalela lisalisi oyo Yehova azali kopesa biso na bolingo mpo na komonisa ete tozali kondima maloba ya mokapo ya mobu 2005, oyo elobi ete: “Lisalisi na ngai ekouta na Yehova.”​—Nzembo 121:2.

Okoloba boni?

Ndenge nini Yehova asalisaka biso lelo oyo​—

• na nzela ya baanzelu?

• na nzela ya elimo santu?

• na nzela ya Liloba na ye?

• na nzela ya bandeko na biso ya elimo?

[Elilingi na lokasa 18]

Tolendisamaka mpenza na koyeba ete baanzelu basalisaka biso na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 21]

Yehova akoki kosalela ndeko moko ya elimo mpo na kobɔndisa biso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto