Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/12 nk. 26-29
  • Mboka epai losambo ya solo ná bopakano endongwanaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mboka epai losambo ya solo ná bopakano endongwanaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esika oyo bato mingi bazalaki kolula
  • Losambo ya solo endongwani na bopakano
  • Tempelo ya Alatemisi ekómi kotɛngatɛnga
  • “Mama ya Nzambe” azwi esika ya Alatemisi
  • Na kati ya makambo oyo eleká
  • Bitiká ya Efese lelo oyo
  • Losambo ya nzambe-mama lozali kino lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “Kopalangana mpe kolonga”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mokanda ya Biblia nimero 49—Baefese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/12 nk. 26-29

Mboka epai losambo ya solo ná bopakano endongwanaki

NA BOUMELI ya mbula koleka nkama, bato ya arkeoloji bazalaki kolukaluka biloko ya kala na esika oyo Efese ya kala ezalaká, na wɛsti ya Turquie. Bandako mingi etongamaki lisusu, mpe bato ya siansi bayekolaki mpe balimbolaki biloko mingi oyo bamonaki. Yango esali ete na Turquie mobimba, Efese ezala kati na bisika oyo baturiste mingi bakendaka kotala.

Eloko nini bayebi na ntina na Efese? Ndenge nini engumba kitoko wana ya kala ekoki komonisama lelo oyo? Soki totali bitiká ya Efese mpe musée ya Efese na engumba Vienne, na ekólo Autriche, tokomona ndenge losambo ya solo endongwanaki na bopakano na Efese. Tótalela naino lisolo ya Efese ya kala.

Esika oyo bato mingi bazalaki kolula

Na boumeli ya ekeke ya 11 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), yikiyiki ezalaki mingi na mikili ya Mpoto mpe bato mingi bazalaki kosala mibembo na Azia. Ezali na ntango yango nde Bagrɛki ya etúká ya Ionie bakómaki kofanda na bokula ya Wɛsti ya Asie Mineure. Bato yango ya liboso oyo bafandaki kuna bakutanaki na bato oyo bazalaki kosambela nzambe-mama, oyo bakómaki kobenga na nsima Alatemisi ya Efese.

Na katikati ya ekeke ya nsambo L.T.B., Ba-Cimmériens oyo bazalaki kotambolatambola bautaki na Mer Noire, na nɔrdi, mpe bayaki kobɔtɔla biloko ya bato mpe kobebisa Asie Mineure. Na nsima, na mobu soki 550 L.T.B., Crésus, moto ya Ludia akómaki mokonzi, azalaki na nguya mpe ayebanaki mingi mpo na ebele ya bozwi na ye. Ntango bokonzi ya Perse ezalaki kozwa bamboka mpo na koyangela yango, Mokonzi Sirise akómaki mpe koyangela bingumba ya Ionie oyo moko na yango ezalaki Efese.

Na mobu 334 L.T.B., Alesandala, mokonzi ya Masedonia abandaki kobundisa ekólo Perse, mpe na ndenge yango akómaki mokonzi ya Efese. Na nsima ya liwa ya mbalakaka ya Alesandala na mobu 323 L.T.B., bakonzi ya basoda ya Alesandala bawelaki bokonzi mpe Efese ezalaki moko ya bamboka oyo bazalaki kowela. Na mobu 133 L.T.B., Attale III, mokonzi ya Pelegame oyo abotaki te, apesaki Efese epai ya Baloma, na ndenge yango Efese ekómaki moko ya bamboka ya Azia, etúká moko ya Loma.

Losambo ya solo endongwani na bopakano

Na ekeke ya liboso, ntango ntoma Paulo akómaki na Efese na nsuka ya mobembo na ye ya mibale ya misionɛrɛ, engumba yango ezalaki na bafandi soki 300 000. (Misala 18:19-21) Ntango Paulo asalaki mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, azongaki lisusu na Efese mpe na mbala wana, na mpiko nyonso, asakolaki Bokonzi ya Nzambe na kati ya sinagoga. Kasi, nsima ya sanza misato botɛmɛli ya Bayuda ekómaki makasi, mpe Paulo amonaki malamu asalaka masukulu na ye mokolo na mokolo na ndako ya kotángisa ya eteyelo ya Tilanusi. (Misala 19:1, 8, 9) Asakolaki kuna mbula mibale, azalaki mpe kosala misala minene ya nguya lokola kobikisa bato ya maladi mpe kobimisa bilimo mabe. (Misala 19:10-17) Yango wana bato mingi bakómaki bandimi! Liloba ya Yehova elongaki mpenza, kutu, bato mingi oyo bazalaki kala bato ya maji bandimaki kotumba babuku na bango ya ntalo mingi.​—Misala 19:19, 20.

Lokola ntoma Paulo asalaki malamu mosala na ye ya kosakola, bato mingi batikaki losambo ya nzambe-mwasi Alatemisi; kasi yango ematisaki mpe nkanda ya bato oyo bazalaki kolendisa losambo yango ya bopakano. Bato oyo bazalaki kosala bandako mike ya losambo ya Alatemisi bazalaki kozwa mbongo mingi. Lokola Demeteli amonaki ete mombongo na bango ekokwea, apusaki batuli mosusu ya palata bábimisa mobulu.​—Misala 19:23-32.

Kowelana wana ekómaki makasi tii ebele ya bato babandaki koganga makasi na boumeli ya ngonga mibale ete: “Alatemisi ya Baefese azali Monene!” (Misala 19:34) Ntango mobulu ekitaki, Paulo alendisaki lisusu baninga na ye baklisto mpe na nsima akendaki. (Misala 20:1) Kasi, atako Paulo alongwaki na Masedonia losambo ya Alatemisi ekweaki kaka.

Tempelo ya Alatemisi ekómi kotɛngatɛnga

Losambo ya Alatemisi ezalaki makasi na Efese. Liboso Crésus akóma mokonzi, bato ya mboka yango bazalaki kosambela mingi nde nzambe-mama Cybele. Kasi, Crésus abimisaki lisapo ete Cybele azalaki ndeko ya banzambe ya Bagrɛki; mposa na ye ezalaki ya kobimisa nzambe moko oyo akondimama na Bagrɛki mpe na bato oyo bazalaki Bagrɛki te. Na lisungi na ye, na katikati ya ekeke ya motoba L.T.B., babandaki mosala ya kotonga tempelo ya Alatemisi, mokitani ya Cybele.

Bagrɛki babimisaki mayele na bango nyonso mpo na kotonga tempelo yango. Ezalaki mbala ya liboso oyo basalelaki mabanga minene ya marbre ya motindo wana mpo na kotonga ndako ya monene ndenge wana. Tempelo yango ebebisamaki na mɔtɔ na mobu 356 L.T.B. Tempelo mosusu oyo batongaki, oyo ekokanaki na oyo ya liboso epesaki bato mingi misala mpe ezalaki kobenda bandimi ya bamboka mosusu. Etando etombwaná epai batongaki tempelo yango ezalaki na monene ya mɛtrɛ soki 73 mpe na molai ya mɛtrɛ soki 127; tempelo yango moko ezalaki na monene ya mɛtrɛ soki 50 mpe molai ya mɛtrɛ soki 105. Bazalaki kotalela yango lokola moko na biloko nsambo ya kokamwa na mokili. Kasi, moto nyonso te nde azalaki kosepela na yango. Héraclite, filozofe moko ya Efese, akokanisaki molili oyo ezalaki zingazinga ya etumbelo ya tempelo yango na molili ya misala mabe, mpe amonaki ete makambo mabe oyo ezalaki kosalema na tempelo yango elekaki kutu oyo ya banyama. Nzokande, mpo na bato mingi, ndako ya Alatemisi na Efese ezalaki komonana lokola nde ekokwea ata mokolo moko te. Kasi, emonani ete bamikosaki mpenza. Buku moko Ephesos​—Der neue Führer (Efese​—Motambwisi ya sika) elobi boye: “Na ekeke ya mibale ya T.B., losambo ya Alatemisi mpe ya banzambe mosusu ya Bagrɛki ekweaki na mbalakaka.”

Na ekeke ya misato ya ntango na biso (T.B.), mabelé eninganaki makasi na Efese. Lisusu, Ba-Goth oyo bazalaki kofanda pembeni ya Mer Noire, bapunzaki bozwi ya tempelo ya Alatemisi mpe batumbaki tempelo yango na mɔtɔ. Buku yango ebakisi boye: “Lokola balongaki Alatemisi mpe akokaki te kobatela ndako na ye moko, ndenge nini bato bakokaki lisusu kotyela ye motema ete akobatela engumba yango?”​—Nzembo 135:15-18.

Nsukansuka, na nsuka ya ekeke ya minei T.B., Ampɛrɛrɛ Théodose I, akómisaki “boklisto” lingomba ya Leta. Mosika te, bato bakómaki kozwa mabanga mpe biloko mosusu oyo batongaki na tempelo kitoko ya Alatemisi mpo na kotonga na yango bandako mosusu. Losambo ya Alatemisi ezindaki mpenza kozinda. Moto moko oyo atángaki maloba ya ntɔki oyo mokomi moko akomaki mpo na kokumisa tempelo yango ete ezalaki moko ya biloko ya kokamwa na mokili ya kala alobaki boye: “Lelo oyo esika yango etikalá mpamba mpe ebebá makasi.”

“Mama ya Nzambe” azwi esika ya Alatemisi

Paulo akebisaki bankulutu ya lisangá ya Efese ete nsima ya kokende na ye “bambwa mabe ya zamba” bakobima mpe mibali bakobima kati na bango mpe bakoloba “makambo oyo etɛngamá.” (Misala 20:17, 29, 30) Ezali yango mpenza nde esalemaki. Makambo nyonso emonisi ete losambo ya lokuta ekɔtaki makasi na Efese na nzela ya boklisto ya lipɛngwi.

Na mobu 431 T.B., Efese ezalaki esika oyo likita ya mbala ya misato mpo na bosangisi mangomba esalemaki, epai likambo etali bomoto ya Klisto elobelamaki. Buku Ephesos​—Der neue Führer elobi boye: “bato ya Alexandrie balongaki mpenza kondimisa likanisi na bango ete Klisto ye wana kaka nzambe.” Likambo yango esukaki kaka wana te. “Ekateli oyo bazwaki na Efese esalaki ete Malia akóma kobengama mama ya Nzambe na esika ya kobengama mama ya Klisto, mpe bato bakómaki kosambela Malia mpe yango epesaki nzela na bokabwani ya liboso mpe ya monene na kati ya lingomba. . . . Ntembe yango ezali tii lelo oyo.”

Yango wana, losambo ya Malia “Mama ya Nzambe” ezwaki esika ya losambo ya Cybele mpe ya Alatemisi. Ndenge buku yango elobaki, “Losambo ya Malia na Efese . . . ezali tii lelo, mpe emonani mpenza ete eutá nde na losambo ya Alatemisi.”

Na kati ya makambo oyo eleká

Nsima ya kokwea ya losambo ya Alatemisi, engumba ya Efese mpe ekweaki. Makambo lokola koningana ya mabelé, malaria, mpe ndenge libongo na yango ekómaki kotonda mokemoke na zɛlɔ, nyonso wana esalaki ete bomoi ekóma mpasi koleka na engumba yango.

Na ekeke ya nsambo T.B., Lingomba ya Bamizilma ebandaki kopalangana. Lingomba yango esukaki kaka te na kosangisa bikólo nyonso ya Ba-Arabe na losambo moko. Ba-Arabe oyo bazalaki kotambola na bamasuwa bapunzaki Efese na boumeli ya ekeke ya nsambo mpe ya mwambe T.B. Efese ekufaki mpenza ntango libongo na yango etondaki nyonso na zɛlɔ mpe engumba yango ebebaki kobeba. Na esika oyo engumba monene wana ya kala ezalaká, etikalá kaka mwa mboka moke oyo bazalaki kobenga Aya Soluk (lelo oyo Selçuk).

Bitiká ya Efese lelo oyo

Mpo na komona lokumu oyo Efese ezalaki na yango kala, esengeli kotambola na esika mboka yango ezalaká. Soki okɔteli na porte ya likoló, okomona mbala moko balabala ya Curete oyo ekiti tii na bibliotɛkɛ ya Celse. Na lobɔkɔ ya mobali ya balabala yango, okomona Odeum​—ndako ya teyatre oyo batongaki na ekeke ya mibale (T.B.) Yango ezali na bisika ya kofanda 1 500, emonani ete bazalaki kosalela yango mpo na makita mpe mpo na masano. Ngámbo na ngámbo ya balabala Curete ezalaki na bandako lokola agora, epai bazalaki kolobela makambo ya ekólo, tempelo ya Adrien, maziba ya mai mpo na bato nyonso, mpe bandako oyo etongamá likoló ya mwa bangomba, oyo ezalaki bandako ya bato minene ya Efese.

Okosepela mpenza na Bibliotɛkɛ kitoko ya Celse oyo etongamaki na ekeke ya mibale T.B. Ebele ya barulo na yango ebombamá malamu na ndako moko monene oyo ezalaki esika ya kotánga. Bikeko minei oyo ezali na efelo ya liboso ezali komonisa bizaleli oyo mosali ya Leta ya Loma lokola Celse, asengelaki kozala na yango, na ndakisa: Sophia (bwanya), Arete (bizaleli malamu), Ennoia (komipesa), mpe Episteme (boyebi to bososoli). Bikeko oyo ezalaká wana na ebandeli ezali na musée ya Efese, na engumba Vienne. Pembeni na lopango ya bibliotɛkɛ, ezali na porte moko ya monene oyo ekomema yo na Tetragonos agora, zando ya Efese. Ezali na esika wana ya monene nde bato bazalaki kokende kosala mimbongo na bango.

Na nsima, okobima na Nzela ya Marbre, oyo ekomema yo tii na ndako monene ya masano. Bayeisaki esika yango ya masano monene na ntango ya amperɛrɛ ya Loma mpe ekómaki na bisika ya kofanda 25 000. Efelo na yango ya liboso ebongisamaki kitoko na biloko ndenge na ndenge lokola makonzí, mayemi, mpe bikeko. Okoki komona na makanisi mobulu oyo Demeteli motuli ya palata abimisaki na kati ya ebele ya bato oyo bayanganaki kuna.

Balabala oyo ebandi na esika monene ya masano mpe ekei tii na libongo ya engumba yango ezali kitoko mpenza. Ezali na molai ya mɛtrɛ 500 mpe na monene ya mɛtrɛ 11, ezali na makonzí ngámbo na ngámbo. Libándá ya masano mpe libongo ya masano etongamaki mpe na balabala yango, mpe bisika nyonso mibale wana ebongisamaki mpo na koyekola masano. Porte monene ya libongo oyo ezalaki na nsuka ya balabala yango ezalaki nzela mpo na kobima na engumba yango, mpe mwa mobembo na biso na moko ya bitiká ya kala oyo ebendaka bato mingi esuki wana. Na musée ya Efese, na Vienne, okomona maquette ya mabaya ya engumba yango ya kala mpe bamonima mosusu ndenge na ndenge oyo ezalaká na engumba yango.

Soki moto akɔti na musée yango mpe amoni ekeko ya Alatemisi ya Efese, akoki komona ete baklisto ya liboso oyo bazalaki na Efese bazalaki mpenza na mpiko. Bafandaki na engumba oyo etondaki na misala ya bilimo mabe mpe na kati ya bato oyo miso na bango ezipamaki na bindimeli ya lingomba ya lokuta. Bato ya losambo ya Alatemisi batɛmɛlaki nsango ya Bokonzi makasi. (Misala 19:19; Baefese 6:12; Emoniseli 2:1-3) Atako bongo, losambo ya solo ezwaki misisa na esika wana oyo bato mingi bazalaki kolinga yango te. Losambo yango ya Nzambe ya solo ekolonga mpe ntango mangomba ya lokuta ya mikolo na biso ekokóma na nsuka na yango, ndenge losambo ya kala ya Alatemisi esukaki.​—Emoniseli 18:4-8.

[Karte/Elilingi na lokasa 26]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

MASEDONIA

Mer Noire

ASIE MINEURE

Efese

Mbu ya Meditelane

EZIPITO

[Elilingi na lokasa 27]

Bitiká ya tempelo ya Alatemisi

[Bililingi na lokasa 28, 29]

1. Bibliotɛkɛ ya Celse

2. Fɔtɔ ya Arete

3. Nzela ya Marbre, oyo ekei tii na ndako monene ya masano

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto