Salelá bwanya ya Nzambe mpo na kobatela bana na yo
MOKOLO na mokolo nzoto na biso ebundaka na bamikrobɛ. Likambo ya esengo, mingi kati na biso tobotamá na likoki ya komibatela na bamikrobɛ, mpe likoki yango nde esalaka ete tobɛlaka mpambampamba te.
Ndenge moko mpe, baklisto basengeli kobunda na makanisi mpe bizaleli oyo ekoki kobebisa elimo na bango. (2 Bakolinti 11:3) Mpo na kolonga makambo oyo ezali mokolo na mokolo koluka kobebisa makanisi mpe mitema na biso, tosengeli kozala na bibundeli ya elimo.
Bibundeli yango ezali na ntina mingimingi mpo na bana na biso, mpamba te babotamaka te na bibundeli yango oyo esalisaka bato bálonga elimo ya mokili. (Baefese 2:2) Ntango bana bazali kokola, esengeli baboti básalisa bango bázwa bibundeli yango. Ndenge nini bakozwa bibundeli yango? Biblia elobi boye: “Yehova ye moko apesaka bwanya; . . . akobatela nzela ya bato na ye ya sembo.” (Masese 2:6, 8, NW) Bwanya ya Nzambe ekoki kobatela bilenge bálanda te baninga ya mabe, báluka te kozala lokola baninga, to bámipesa te na masano ya mabe. Ndenge nini baboti bakoki kolanda toli ya Yehova mpo na kokɔtisa bwanya na ye epai ya bana?
Bósalisa bana na bino bápona baninga ya malamu
Toyebi malamu ete bilenge balingaka kozala na baninga na bango bilenge, kasi bilenge na bilenge bakoki kopesana bwanya ya Nzambe te. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Ebebe ezwami na motema ya mwana.” (Masese 22:15) Na bongo, ndenge nini baboti mosusu basalisaki bana na bango básalela bwanya ya Nzambe na likambo ya kopona baninga?
Tata moko na nkombo Dona alobi boye: “Bana na biso bazalaki kolekisa ntango mingi na baninga ya mbula na bango, kasi mingimingi bazalaki kosakana na ndako na biso mpe biso moko tozalaki wana. Bilenge bazalaki kozanga te na ndako na biso mpo tozalaki koyamba bango mabɔkɔ polele, tozalaki kopesa bango bilei mpe kosala ete bámiyoka lokola epai na bango moko. Tozalaki koyoka mabe te mpo na makɛlɛlɛ oyo bazalaki kosala ntango bazalaki kosakana mpo tolingaki bana na biso basakana na ndenge moko ya malamu mpe básepela.”
Brian ná Marie bazali na bana misato oyo bazali na bizaleli malamu, kasi balobaka ete kobɔkɔla bango ezalaki ntango mosusu pɛtɛɛ te. Balobi boye: “Na lisangá na biso, bilenge oyo bakokaki kozala baninga ya mwana na biso ya mwasi Jane bazalaki mingi te. Kasi, azalaki na moninga moko na nkombo Susan, elenge moko oyo alingá bato mpe kosɛka. Kasi, baboti na ye bazalaki kotika ye asala makambo mosusu oyo biso tozalaki kopekisa Jane. Susan azalaki kozonga na ndako na butu makasi, azalaki kolata bilamba ya mikuse, koyoka miziki mpe kotala bafilme ya mabe. Na boumeli ya ntango molai, Jane azalaki koyeba te ntina oyo tozalaki kopekisa ye makambo mosusu. Azalaki komona ete baboti ya Susan nde bazalaki malamu, kasi biso tozalaki makambo makasi. Kaka ntango Susan akómaki na mikakatano na elimo nde Jane ayaki koyeba ete makambo oyo tozalaki kopekisa ye ezalaki mpo na kobatela ye. Tozali na esengo mpo tobongolaki te makambo oyo toyebaki ete ezali na litomba mpo na mwana na biso.”
Lokola Jane, bilenge mingi bamoni ete kolanda toli ya baboti na bango na likambo ya kopona baninga nde nzela ya bwanya. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Litoi oyo ekoyoka mpamela ya bomoi ekotikala penepene na bato ya mayele.” (Masese 15:31) Bwanya ya Nzambe etindaka bilenge báluka baninga ya malamu.
Bósalisa bango báboya kolanda bizaleli mabe ya baninga na bango
Longola kozala na baninga mabe, likambo mosusu ezali ya koluka kozala lokola bango. Bana na biso bazali na etumba ya mokolo na mokolo mpo báluka te kozala lokola baninga na bango. Lokola bilenge balingaka ete baninga na bango bándima bango, mposa ya kozala lokola baninga na bango ekoki kotinda bilenge básala makambo oyo bato ya mokili basepelaka na yango.—Masese 29:25.
Biblia ezali koyebisabiso ete “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango.” (1 Yoane 2:17) Yango wana, baboti basengeli te kotika bana na bango bálandaka makanisi ya mokili. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango mpo bákanisaka lokola baklisto?
Richard alobi boye: “Mwana na biso ya mwasi azalaki ntango nyonso koluka kolata lokola bilenge mosusu. Tozwaki ntango ya kokanisa na ye mpo na komonisa ye mabe ná malamu ya elamba nyonso oyo alingi tósombela ye. Ata mpo na bamodɛlɛ oyo tozalaki komona mabe te, tozalaki kolanda toli oyo toyokaki mwa bambula liboso, ‘Moto ya mayele awelaka te kolanda modɛlɛ moko oyo ebimi sika, azalaka mpe moto ya nsuka te ya kotika yango.’”
Mama mosusu na nkombo Pauline asalisaki bana na ye na lolenge mosusu mpo báluka te kozala lokola baninga. Alobi boye: “Nazalaki koluka koyeba makambo oyo bana na ngai basepelaka na yango mpe nazalaki na momeseno ya kosolola na bango na shambre na bango. Masolo wana oyo ezalaki kozwa ntango molai esalisaki ngai nabongisa makanisi na bango mpe nasalisa bango bákóma kotalela makambo na ndenge mosusu.”
Mposa ya kozala lokola baninga esilaka te, yango wana baboti bakozala ntango nyonso na etumba mpo na koluka ‘kokweisa makanisi ya mokili’ mpe kosalisa bana na bango bákómisa makanisi na bango ‘bakangami mpo na kopusa yango etosa Klisto.’ (2 Bakolinti 10:5) Kasi, soki bango nyonso, bana ná baboti, ‘batingami na mabondeli,’ bakozwa makasi ya kokokisa mokumba monene wana.—Baloma 12:12; Nzembo 65:2.
Bósalisa bango bámona motambo ya masano
Mokakatano ya misato oyo baboti bakoki kokutana na yango ntango bazali kobɔkɔla bana etaleli masano. Bana mike balingaka kosakana. Ata bana oyo bakoli balingaka mpe kosakana. (2 Timote 2:22) Kasi, soki ekokisami na ndenge ya malamu te, mposa yango ekoki kobebisa bana na elimo. Mbala mingi, likama ya masano eyaka na ndenge mibale.
Ya liboso, masano mingi emonisaka elimo mabe ya mokili. (Baefese 4:17-19) Kasi bato balingaka komonisa yango lokola likambo moko ya malamu koleka. Yango ezali likama monene mpo na bilenge, oyo mbala mosusu bamonaka mitambo yango te.
Ya mibale, ntango oyo bato balekisaka na masano ekoki mpe kobimisa mikakatano. Mpo na bato mosusu, ‘kosepela’ ekómá likambo eleki ntina na bomoi na bango, mpe elyaka bango ntango mpe makasi mingi. Lisese moko ya Biblia elobi ete “ezali malamu te kolya mafuta ya nzoi mingi.” (Masese 25:27) Ndenge moko mpe, komipesa mingi na masano ekitisaka mposa ya kolya bilei ya elimo mpe ekómisaka moto gɔigɔi. (Masese 21:17; 24:30-34) Soki bilenge bamipesi mingi na bisengo ya mokili oyo, yango ekopekisa bango “básimba makasi bomoi ya solosolo,” elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika. (1 Timote 6:12, 19) Ndenge nini baboti mosusu basalisaki bana na bango na likambo yango?
Mari Carmen, mama ya bana misato, alobaki boye: “Tozalaki na mposa ete bana na biso básalaka masano ya malamu mpe básepelaka. Yango wana, mbala na mbala libota mobimba tozalaki kobima, bana bazalaki mpe kolekisa ntango ná baninga na lisangá. Kasi, tozalaki te kolekisa ntango na biso nyonso na masano. Tozalaki kotalela masano lokola mwa eloko ya pɛpɛlɛ oyo moto alyaka na nsima ya bilei ya kilo; eloko yango ezalaka elengi mpenza, kasi yango te nde moto alyaka mpo atonda. Bana na biso bayekolaki kosala misala na ndako, na kelasi, mpe na lisangá.”
Don ná Ruth bazalaki mpe kobongisa ntango mpo na masano. Balobi boye: “Tozalaki na momeseno ya kobomba mokolo ya pɔsɔ mpo na kosala makambo libota mobimba. Na ntɔngɔ, tozalaki kobima na mosala ya kosakola, na nsima ya midi, tozalaki kokende kobɛta mai, mpe na mpokwa, tozalaki kolya bilei kitoko esika moko.”
Maloba ya baboti wana ezali komonisa ntina ya kozala na bokatikati na likambo etali kotika bana básakana mpe kopesa masano esika na yango na bomoi ya moklisto.—Mosakoli 3:4; Bafilipi 4:5.
Bósalisa bango bátyelaka Yehova motema
Mpo bana bázwa bibundeli ya elimo, ezalaka likambo ya lelo na lobi te. Mpo na kopesa bana bwanya ya Nzambe oyo ekosalisa bango bátyelaka Tata na bango ya likoló motema, ekosɛnga kaka baboti ‘bákoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.’ (Baefese 6:4) Kokoba kopesa bana “makebisi” elimboli kosalisa bango bákóma kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango. Ndenge nini baboti bakoki kosala yango?
Koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na libota ezali na ntina mingi mpo na kolonga. Koyekola ‘efungolaka miso ya bana mpo bámona makambo ya kokamwa oyo ezali na Mibeko ya Nzambe.’ (Nzembo 119:18) Diego azwaki na lisɛki te boyekoli ya libota mpe, na ndenge yango, asalisaki bana na ye bápusana penepene na Yehova. Alobi boye: “Nazalaki kobongisa boyekoli yango malamumalamu. Lokola nazalaki koluka makanisi na mikanda oyo elimbolaka Biblia, yango esalisaki ngai mpo ntango nazali kolobela masolo ya bato oyo Biblia elobeli, bana bámona lokola nde makambo yango ezali mpenza kosalema. Nazalaki kolendisa bana bálanda ndakisa ya bato ya sembo. Yango esalisaki bana na ngai babosanaka te makambo oyo esepelisaka Yehova.”
Bana bayekolaka ata mpe na bantango mosusu. Moize alendisaki baboti báteyaka bana makambo ya Yehova ‘ntango bafandi na ndako, ntango bazali kotambola na nzela, ntango bazali kolala mpe ntango batɛlɛmi.’ (Deteronome 6:7) Tata moko alobaki boye: “Esɛngaka ntango mingi mpo mwana na ngai afungola motema mpe abimisa makanisi na ye. Ntango tokei kotambola to tozali kosala mosala elongo nde afungolaka motema mpe abimisaka makanisi na ye kozanga kokatana. Na ntango yango, tosololaka masolo kitoko oyo elendisaka biso nyonso.”
Mabondeli oyo baboti basalaka esimbaka mpe mitema ya bana. Ntango bana bazali koyoka baboti na bango bazali kobondela Nzambe na komikitisa nyonso mpo na kosɛnga ye lisalisi mpe bolimbisi ya masumu, yango esalisaka bango bákoka ‘kondima ete Nzambe azali.’ (Baebele 11:6) Baboti mingi oyo balongaki kobɔkɔla bana na bango bamonisaka ntina ya kobondela na kati ya libota mpe ya kokotisa na kati ya mabondeli yango makambo oyo bana bakutanaka na yango na kelasi mpe makambo mosusu oyo etungisaka bango. Tata moko alobaki ete mwasi na ye abondelaka ntango nyonso na bana na bango liboso bákende na kelasi.—Nzembo 62:8; 112:7.
“Tótika te kosala oyo ezali malamu”
Baboti nyonso basalaka mabunga mpe ntango mosusu bayokaka mpasi na motema mpo batalelaki makambo mosusu na ndenge ebongi te. Nzokande, Biblia ezali kolendisa biso tólɛmba te, “tótika te kosala oyo ezali malamu.”—Bagalatia 6:9.
Baboti bakoki ntango mosusu komona ete bakómi na nsuka, mingimingi ntango oyo bayebaka te ntina nini bana basali likambo boye to boye. Ekoki kozala mpasi te koloba ete bana ya lelo bazali ndenge mosusu mpe bazali matoi mangbongi. Nzokande, soki totali malamu, bana ya lelo bazali na bolɛmbu ndenge moko na bana ya ntango ya kala, bazali mpe kokutana na mikakatano ndenge moko na oyo bana ya kala bazalaki kokutana na yango, atako lelo makambo oyo ekoki kotinda bango básala mabe eleki mingi. Yango wana, tata moko, nsima ya kopamela mwana na ye, alɛmbisaki maloba na ye mpe alobaki na mwana boye: “Motema na yo ezali na mposa ya kosala makambo oyo motema na ngai ezalaki na mposa ya kosala ntango nazalaki na mbula oyo ozali na yango.” Mbala mosusu baboti bakoki koyeba makambo mingi te na oyo etali ordinatɛrɛ, kasi bayebi malamu bamposa oyo nzoto ya kozanga kokoka ezalaka na yango.—Matai 26:41; 2 Bakolinti 2:11.
Ekoki kozala na bana mosusu oyo basepelaka mpenza te na toli ya baboti na bango mpe baboyaka disipilini. Nzokande, ata na ntango wana, esengeli baboti báyeba kolendendela. Bana mingi, atako na ebandeli bazalaka motó makasi mpe na bantango mosusu batombokelaka baboti na bango, nsukansuka bayokelaka bango. (Masese 22:6; 23:22-25) Matthew, elenge moko oyo azali lelo kosala na filiale moko ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Ntango nazalaki kokola, nazalaki komona ete baboti na ngai bazalaki makambo makasi. Nazalaki komituna boye: soki baboti ya baninga na ngai bazali kotika bango básala makambo mosusu, mpo na nini oyo ya ngai bazali kopekisa ngai? Lokola baboti na ngai bayebaki ete nalingaka mingi kosakana na bwato, bazalaki ntango mosusu kopesa ngai etumbu ete nakende kosakana na yango te mpe yango ezalaki kopesa ngai nkanda. Kasi, soki nafandi mpe nakanisi, namonaka ete disipilini oyo baboti na ngai bapesaki ngai ezalaki malamu mpe ezalaki na ntina mingi. Natɔndaka bango mpenza na ndenge bapesaki ngai litambwisi ya malamu mpe na ntango oyo esengelaki.”
Ya solo, atako bana na biso bakoki kokutana na baninga ya mabe oyo bakoki kolɛmbisa bango na elimo, bazali na likoki ya kokola malamu mpe kokóma baklisto ya malamu mpenza. Ndenge Biblia elobi yango, bwanya ya Nzambe ekoki kopesa bango bibundeli ya elimo. “Boye [bwanya] ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na elimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe.”—Masese 2:10-12.
Komema mwana na libumu sanza libwa ezali pɛtɛɛ te. Kobɔkɔla ye na boumeli ya mbula soki 20 oyo ekolanda ekoki komema bampasi mpe bisengo. Kasi, lokola baboti baklisto balingaka bana na bango, basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kobatela bango na bwanya ya Nzambe. Bamiyokaka mpo na bana na bango ndenge ntoma Yoane oyo akómaki mobange azalaki komiyoka mpo bana na ye ya elimo: “Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”—3 Yoane 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 24]
“Bilenge bazalaki kozanga te na ndako na biso mpo tozalaki koyamba bango mabɔkɔ polele”
[Elilingi na lokasa 25]
Luká koyeba makambo oyo bana na yo basepelaka na yango
[Bililingi na lokasa 26]
“Nazalaki kobongisa boyekoli yango malamumalamu”