Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/1 nk. 18-23
  • Toyekolaki kotya motema mobimba epai ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toyekolaki kotya motema mobimba epai ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kapitɛnɛ ya masuwa mpe mosakoli
  • Banazi bakómi kolukaluka biso
  • Basoda ya Gestapo bakómi koluka biso makasi
  • Balɛmbaki kosakola te ata na kati ya kaa
  • Nazali kobɔkɔla bana mibale ngai moko
  • Na kaa ya Sachsenhausen
  • Tokutani lisusu
  • “Natye motema epai ya Yehova”
  • Eloko moko te eleki solo na malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Mpo na kondima oyo ekolɛmba te”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yehova azalaki na ngai elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nakozongisela Yehova nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/1 nk. 18-23

Lisolo ya bomoi

Toyekolaki kotya motema mobimba epai ya Yehova

YA NATALIE HOLTORF

Mokolo moko, na sanza ya Yuni 1945, mobali moko oyo azalaki komonana lokola azali kobɛla ayaki na ndako na biso mpe atɛlɛmaki na porte. Ruth, mwana na ngai ya mibale, abangaki mpe agangaki boye: “Mama, mopaya moko azali na porte!” Nzokande mopaya yango ezalaki nde tata na ye, mobali na ngai, Ferdinand. Mbula mibale liboso, kaka mikolo misato nsima ya kobotama ya Ruth, bakangaki ye mpe na nsima batindaki ye na kaa ya bakangami ya Banazi. Kasi mokolo wana Ruth amonaki tata na ye mpe libota na biso esanganaki lisusu. Ngai ná Ferdinand tozalaki na masolo mingi ya kosolola!

FERDINAND abotamaki na 1909 na engumba Kiel, na Allemagne, mpe ngai nabotamaki na 1907 na engumba Dresde, kaka na Allemagne. Nazalaki na mbula 12 ntango baboti na ngai bakutanaki mpo na mbala ya liboso na Bayekoli ya Biblia, nkombo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova. Ntango nakómaki na mbula 19, nalongwaki na Lingomba ya Évangélique mpe namipesaki epai ya Yehova.

Na ntango wana, Ferdinand azwaki diplome na eteyelo ya ba marins mpe akómaki moto ya masuwa. Ntango azalaki kosala mibembo na masuwa, azalaki komituna soki Mozalisi azali. Ntango Ferdinand azongaki, akendeki kotala yaya na ye ya mobali oyo azalaki Moyekoli ya Biblia. Masolo oyo basololaki mokolo wana endimisaki ye ete Biblia ezali na biyano na mituna na ye nyonso. Alongwaki na Lingomba ya Protesta mpe atikaki mosala ya masuwa. Mokolo ya liboso oyo abimaki na mosala ya kosakola, akómaki na mposa makasi ya kosala mosala yango bomoi na ye mobimba. Na butu ya mokolo yango, amipesaki na Yehova. Azwaki batisimo na sanza ya Augusto 1931.

Kapitɛnɛ ya masuwa mpe mosakoli

Na sanza ya Novɛmbɛ 1931, Ferdinand azwaki engbunduka mpo na kokende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na Pays-Bas. Ntango Ferdinand ayebisaki ndeko oyo azalaki kotambwisa mosala na ekólo yango ete azalaki Kapitɛnɛ, ndeko yango alobaki: “Ozali mpenza moto oyo tozalaki koluka!” Bandeko bafutelaki masuwa moko mpo babongisi-nzela bákende na yango kosakola nsango malamu na bamboka oyo ezali pembenipembeni ya mai na nɔrdi ya ekólo. Bazalaki bato mitano, kasi ata moko te ayebaki kotambwisa masuwa. Na yango, Ferdinand akómaki kapitɛnɛ ya masuwa yango.

Nsima ya sanza motoba, basɛngaki Ferdinand akende kosala lokola mobongisi-nzela na engumba Tilburg, na sudi ya Pays-Bas. Kaka na eleko wana, ngai mpe nakendeki kosala lokola mobongisi-nzela na Tilburg mpe nakutanaki na Ferdinand. Kasi basɛngaki biso mbala moko tókende na Groningen, na nɔrdi ya ekólo yango. Kuna, tobalanaki mokolo ya Ɔkɔtɔbɛ 1932, mpe tofandaki na ndako moko elongo na ebele ya babongisi-nzela mpe tokobaki mosala na biso!

Na 1935, nabotaki Esther, mwana na biso ya liboso. Atako tozalaki na mbongo mingi te, tozalaki na mokano ya kokoba mosala ya mobongisi-nzela. Tokendaki kofanda na mboka moko, na mwa ndako moko ya moke. Soki ngai natikali na mwana na ndako, mobali na ngai azalaki kobima mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Mokolo oyo ekolanda, ye akotikala, ngai nabimi mpe bongo na bongo. Tozalaki kosala bongo tii ntango Esther akómaki mwa moto mpo tóbanda komema ye na mosala ya kosakola.

Mwa moke na nsima, makambo ya politiki ekómaki kobeba na Mpoto. Toyokaki ete bakómaki konyokola Batatoli na Allemagne mpe toyebaki ete mosika te bakobanda mpe konyokola biso. Tozalaki komituna soki tokokoka monyoko ya makasi. Na 1938, bakonzi ya Pays-Bas babimisaki mobeko oyo epekisaki bapaya kokabola mikanda ya makambo ya Nzambe. Mpo na kosalisa biso tókoba kosakola, Batatoli ya Pays-Bas bapesaki biso bankombo ya bato oyo bazalaki kosepela na nsango na biso mpe yango esalisaki biso tóyekola Biblia na bamosusu kati na bango.

Na ntango yango, Batatoli ya Yehova bazalaki kobongisa liyangani moko ya etúká. Atako tozalaki na mbongo te mpo na kofuta tike ya engunduka, mpo na kokende na liyangani, tolingaki te kozangisa yango. Yango wana, tosalaki mobembo ya mikolo misato na velo, tofandisaki Esther na mwa kiti ya bana oyo tokangisaki na esimbeli ya velo. Tozalaki kolala epai ya Batatoli oyo bandako na bango ezalaki pembeni ya nzela. Tozalaki mpenza na esengo mpo tozwaki libaku ya kozala na liyangani ya liboso ya ekólo mobimba! Mateya oyo toyokaki esalisaki biso tóyika mpiko liboso ya minyoko oyo ekómelaki biso mwa moke na nsima. Likambo eleki ntina ezali ete balendisaki biso tótyelaka Nzambe motema. Maloba ya Nzembo 31:6 (NW) ekómaki nzembo na minɔkɔ na biso: “Kasi ngai, natye motema epai ya Yehova.”

Banazi bakómi kolukaluka biso

Na sanza ya Mai 1940, Banazi bakɔtaki na Pays-Bas. Mwa moke na nsima, basoda ya Gestapo bayaki na ndako na biso na ntango tozalaki kobongisa mikanda mpo kotinda na masangá. Bamemaki Ferdinand na biro na bango. Ngai ná Esther tozalaki kokende mbala na mbala kotala ye, mpe mbala mosusu bazalaki kotunatuna ye mituna mpe kobɛta ye na miso na biso. Na sanza ya Desɛmbɛ batikaki ye, kasi ezalaki kaka mpo na ntango mokuse. Mokolo moko na mpokwa ntango tozalaki kozonga ndako, tomonaki motuka ya basoda ya Gestapo liboso ya ndako na biso. Ferdinand akimaki, kasi ngai ná Esther tokendeki tii na ndako. Basoda bazalaki kozela biso. Bazalaki koluka Ferdinand. Kaka na butu yango, ntango basoda ya Gestapo bakendeki, bapolisi bayaki mpe bazwaki ngai mpo na bakende kotuna ngai mituna. Mokolo oyo elandaki, ngai ná Esther tokendeki kobombama na ndako ya Ndeko Norder ná mwasi na ye oyo bautaki kozwa batisimo; bapesaki biso esika ya kolala mpe babombaki biso.

Na nsuka ya sanza ya Yanuali 1941, bakangaki ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela mpe bazalaki kofanda na masuwa. Mokolo oyo elandaki, mokɛngɛli moko ya zongazonga ná mobali na ngai bakendaki na masuwa yango mpo na kozwa biloko mosusu ya bandeko wana, kasi bato oyo bazalaki kosalisa basoda ya Gestapo bakɔtelaki bango na masuwa. Ferdinand asalaki makasi mpe alongaki kokima na velo na ye. Kasi, bakangaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe bamemaki ye na bolɔkɔ.

Bandeko ya biro ya filiale basɛngaki Ferdinand asala na esika ya mokɛngɛli ya zongazonga. Yango elingi koloba ete akokaki kofanda na biso na ndako kaka mikolo soki misato na sanza. Likambo yango ezalaki mokakatano mosusu mpo na biso, kasi nakobaki mosala na ngai ya mobongisi-nzela. Lokola basoda ya Gestapo babakisaki lisusu milende mpo na koluka Batatoli, tosɛngelaki kotikala kaka esika moko te. Na 1942, tofandaki na bisika misato. Nsukansuka, tokendaki kofanda na engumba Rotterdam, mosika mpenza na mboka oyo Ferdinand azalaki kosala mosala na ye na kobombama. Na ntango wana nakómaki lisusu na zemi. Ndeko Kamp ná mwasi na ye, oyo Banazi bautaki kotinda bana na bango mibale na kaa ya bakangami, bayambaki biso na ndako na bango.

Basoda ya Gestapo bakómi koluka biso makasi

Nabotaki Ruth, mwana na biso ya mibale, na sanza ya Yuli 1943. Ferdinand afandaki na biso mikolo misato nsima ya kobotama ya Ruth, mpe na nsima akendaki mpe tomonanaki na ye lisusu kaka nsima ya bambula. Pɔsɔ soki misato na nsima, bakangaki Ferdinand na Amsterdam. Bamemaki ye na biro ya Gestapo mpe, kuna batalaki mikanda na ye ya Leta. Basoda ya Gestapo batunaki ye mituna ebele mpo ayebisa bango makambo nyonso oyo etali mosala na biso ya kosakola. Nzokande, Ferdinand ayebisaki bango kaka ete azali Motatoli ya Yehova mpe akɔtaka na makambo ya politiki te. Bakonzi ya Gestapo basilikaki makasi mpo bayebaki ete atako Ferdinand azali moto ya Allemagne, akɔtaki mosala ya soda te, mpe balobaki na ye ete bakoboma ye mpo azali kotɛka mboka.

Ferdinand asalaki sanza mitano na bolɔkɔ mpe mbala na mbala bazalaki koloba na ye ete bakoboma ye na masasi. Atako bongo, atikalaki sembo epai ya Yehova. Nini esalisaki ye atikala makasi na elimo? Biblia, Liloba ya Nzambe. Lokola Ferdinand azalaki Motatoli, baboyaki azala na Biblia. Nzokande, bato mosusu ya bolɔkɔ bakokaki kosɛnga Biblia. Na yango abondelaki moninga na ye moko ya bolɔkɔ asɛnga bandeko na ye bátindela ye Biblia mpe moto yango andimaki. Ata nsima ya bambula mingi, mbala nyonso oyo Ferdinand azalaki kobɛta lisolo yango, elongi na ye ezalaki kongɛnga na esengo mpe azalaki koloba: “Biblia wana ebɔndisaki ngai mingi!”

Na ebandeli ya sanza ya Yanuali 1944, bamemaki Ferdinand na kaa ya bakangami na Vught, na Pays-Bas. Nzokande, kozanga koyeba, basalaki ye likambo ya malamu mpenza mpo kuna akutanaki na Batatoli mosusu 46. Ntango nayokaki ete batindi ye na kaa mosusu, nasepelaki mingi mpo yango eyebisaki ngai ete azali na bomoi!

Balɛmbaki kosakola te ata na kati ya kaa

Bomoi ezali mpenza mpasi na kaa yango. Bazalaki kolya malamu te, bazalaki na bilamba ya malili te, mpe malili ezalaki makasi. Ferdinand abɛlaki angine makasi. Nsima ya kotɛlɛma ntango molai na molɔngɔ na malili makasi, mpo na kobenga bankombo, akendeki na lopitalo. Bato ya maladi oyo bazali na mɔtɔ makasi (40°C to koleka) bakokaki kopema. Kasi baboyaki Ferdinand apema mpo fiɛvrɛ na ye ezalaki kaka 39°C! Bayebisaki ye azonga na mosala. Kasi, baninga na ye ya bolɔkɔ oyo bazalaki na motema mawa, bazalaki mbala na mbala kobomba ye mwa moke na esika ya molunge. Ayokaki lisusu mwa malamu ntango eleko ya malili elekaki. Lisusu, soki batindeli bandeko mosusu biloko ya kolya, bazalaki kokabola yango na baninga mpe Ferdinand azwaki lisusu mwa makasi.

Liboso mobali na ngai akɔta bolɔkɔ, mosala ya kosakola ezalaki na esika ya liboso na bomoi na ye, mpe ata na kati ya kaa, akobaki kosakola. Bakonzi ya kaa bazalaki mbala mingi kotyola ye mpo na elembo na ye ya violɛ, elembo oyo bazalaki kolatisa Batatoli. Kasi, Ferdinand azalaki kosalela mabaku yango mpo na kosakwela bango nsango malamu. Liboso, bandeko bazalaki na likoki ya kosakola kaka na bandako ya bolɔkɔ oyo ezalaki mingimingi na Batatoli. Bandeko bazalaki komituna, ‘Ndenge nini tokoki kosakola mpe epai ya bato mosusu ya bolɔkɔ?’ Bakonzi ya kaa bango moko basalisaki bango kozanga ete báyeba yango. Na ndenge nini?

Bandeko bazalaki na Babiblia 12 mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia oyo bazalaki kobomba malamu. Mokolo mosusu, bakɛngɛli bamonaki mikanda mosusu, kasi bayebaki te soki ezalaki ya nani. Yango wana bakonzi ya kaa bazwaki mokano ya kokabola Batatoli. Bapanzaki bango na bandako ya bolɔkɔ oyo ezalaki na Batatoli te. Lisusu, na ntango ya kolya, Motatoli asengelaki kofanda pembeni ya moto oyo azali Motatoli te. Likambo yango esalisaki bandeko. Bazwaki likoki ya kosala likambo oyo bazalaki koluka: kosakola epai ya bato mingi.

Nazali kobɔkɔla bana mibale ngai moko

Na ntango yango, ngai ná bana na ngai mibale tozalaki kofanda na Rotterdam. Na eleko ya mpiɔ ya 1943-1944, makambo ezalaki mpasi koleka. Basoda ya Allemagne batyaki mindoki mpo kokweisaka baaviɔ ya banguna nsima ya ndako na biso. Waal Harbor, esika baaviɔ ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na allemagne ezalaki kobwaka babombi, ezalaki liboso ya ndako na biso. Ezalaki esika ya malamu te mpo na kobombana. Lisusu, biloko ya kolya ezalaki mingi mpenza te. Ezali mpenza na ntango wana nde toyekolaki kotyela Yehova motema mobimba.​—Masese 3:5, 6.

Esther, oyo azalaki na mbula mwambe na ntango wana, azalaki kokende kokɔta na molɔngɔ na esika oyo bazalaki kokabola biloko mpo na kozwela biso bilei. Kasi, mbala mingi, soki kaka ekómi ngala na ye, biloko ezalaki kosila. Mokolo moko ntango akendaki kolukela biso biloko ya kolya, baaviɔ ebandaki kobwaka babombi epai bazalaki. Ntango nayokaki lokito ya babombi, nabangaki, kasi kobanga na ngai ebongwanaki esengo ntango namonaki ye azongi mpe azwi likama te, kutu na mwa bambuma ya betterave. Mbala moko natunaki ye: “Osalaki ndenge nini?” Alobaki na ngai na kimya nyonso ete: “Ntango babombi ebandaki kokwea, nasalaki kaka ndenge Papa ayebisaká ngai: ‘Lalá na nse, kotɛlɛma te, mpe bandá kobondela.’ Yango nde ebikisi ngai!”

Lokola elobeli na ngai ezalaki kofunda ete nazali moto ya Allemagne, ebongaki kaka Esther akendaka kosomba mwa biloko oyo ezalaki naino komonana. Kasi, yango ebendaki likebi ya basoda ya Allemagne, mpe babandaki kotuna Esther mituna. Kasi abimisaki sɛkɛlɛ ata mokolo moko te. Na ndako, nazalaki koteya Esther Biblia, mpe lokola akokaki kokɔta kelasi te, nazalaki kolakisa ye kotánga, kokoma mpe makambo mosusu.

Esther azalaki mpe kosalisa ngai na mosala ya kosakola. Liboso nabima mpo na kokende koyekola Biblia na moto, Esther azalaki kokende liboso na ngai mpo na kotala soki bazalaki kokɛngɛla biso te. Azalaki kotala soki moto oyo nakokende kotala atye elembo oyo toyokanaki na ye mpo na koyebisa ngai ete makambo ezali malamu. Na ndakisa, moto oyo nazalaki kokende kotala asengelaki kotya bafololo na fenetre na ndenge moko boye mpo na koyebisa ngai ete nakoki kokɔta. Ntango tozali koyekola, Esther azalaki kotikala libándá mpo na kotala soki likambo moko ya mabe ezali te; na ntango yango, azalaki kobalukabaluka na balabala mpe kotindika leki na ye Ruth na pusupusu.

Na kaa ya Sachsenhausen

Nini ekomelaki Ferdinand? Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1944, bamemaki ye ná bakangami mosusu tii na gare moko epai engbunduka moko ezalaki kozela mpe kuna, bazalaki kotya bango na wagɔ moko bato 80. Wagɔ mokomoko ezalaki na katini moko mpo na kosumba mpe katini moko ya mai ya komɛla. Mobembo yango eumelaki mikolo misato, mpe esika ya kofanda ezalaki te! Mopɛpɛ ezalaki kokɔta mpenza te na wagɔ yango. Bawagɔ yango ezalaki ya kokangama mobimba mpe ezalaki kaka na mwa madusu. Molunge, nzala, mposa ya mai, mpe nsolo mabe, enyokolaki bango na ndenge ya koloba te.

Engbunduka etɛlɛmaki na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen. Babɔtɔlaki bato ya bolɔkɔ biloko nyonso oyo bazalaki na yango, longola kaka Biblia 12 oyo Batatoli bamemaki!

Batindaki Ferdinand ná bandeko mosusu mwambe na kaa ya Rathenow mpo na kosala na izini ya mindoki. Atako bazalaki kobangisa bango ete bakoboma bango, bandeko baboyaki kosala mosala wana. Mpo na kolendisana, ntɔngɔ nyonso bazalaki kotánga vɛrsɛ mokoya Biblia, lokola Nzembo 18:2, oyo bakokaki komanyola mokolo mobimba. Yango esalisaki bango bámanyolaka makambo ya elimo.

Nsukansuka, tokómaki koyoka lokito ya mindoki ya basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na Allemagne mpe basoda ya Russie. Basoda ya Russie nde bakómaki liboso na kaa oyo Ferdinand ná baninga na ye bazalaki. Bapesaki bango biloko ya kolya mpe bayebisaki bango bálongwa na kaa. Na nsuka ya sanza ya Aprili 1945, basoda ya Russie batikaki bango bázonga na bamboka na bango.

Tokutani lisusu

Mokolo ya 15 Yuni, Ferdinand akómaki na Pays-Bas. Bandeko ya engumba Groningen bayambaki ye na esengo mpenza. Mwa moke na nsima, bayebisaki ye ete tozali na bomoi, tozali kaka na Pays-Bas, mpe toyokaki nsango ete ayei. Mwa mikolo moke oyo tozelaki ye emonanaki lokola mbula mobimba. Nsukansuka, mokolo moko Ruth agangaki: “Mama, mopaya moko azali na porte!” Ezalaki nde tata na bango, mobali na ngai!

Tozalaki na mikakatano mingi oyo tosengelaki kobunda na yango liboso makambo nyonso ezonga malamu. Tozalaki na esika ya kofanda te mpe mokakatano mosusu ezalaki ya kozwa lisusu mikanda mpo na kofanda na Pays-Bas. Na boumeli ya bambula mingi, bakonzi ya Pays-Bas bazalaki kolinga ata komona biso na miso te mpo tozalaki bato ya Allemagne. Kasi, nsukansuka, tozwaki mikanda mpe tozongelaki bomoi oyo tozalaki koluka: kosalela Yehova libota mobimba.

“Natye motema epai ya Yehova”

Bambula mingi na nsima, mbala nyonso oyo ngai ná Ferdinand tozalaki kokutana na baninga oyo, lokola biso, balekaki na bantango wana ya mpasi, tozalaki kokanisa ndenge Yehova atambwisaki biso na mikolo mabe wana. (Nzembo 7:1) Tozalaki na esengo ete na boumeli ya ebele ya bambula, Yehova apesaki biso likoki ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. Mbala mingi tozalaki mpe kolobela esengo na biso na ndenge tosalelaki Yehova na bolenge na biso.​—Mosakoli 12:1.

Nsima ya bambula oyo Banazi banyokolaki biso, ngai ná Ferdinand tosalelaki Yehova elongo mbula koleka 50, liboso asukisa bomoi na ye awa na mabelé, mokolo ya 20 Desɛmbɛ 1995. Etikali moke nakokisa mbula 98. Mokolo na mokolo, natɔndaka Yehova na ndenge bana na biso basungaki biso na boumeli ya bambula wana ya mpasi mpe na ndenge nazali naino na likoki ya kosala ata mwa moke mpo na lokumu ya nkombo na ye. Nazali na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova asaleli ngai, mpe mposa na ngai ezali ete nazongelaka mbala na mbala maloba oyo: “Ngai, natye motema epai ya Yehova.”​—Nzembo 31:6, NW.

[Elilingi na lokasa 19]

Ngai ná Ferdinand, na Ɔkɔtɔbɛ 1932

[Elilingi na lokasa 19]

Masuwa “Almina” ná bandeko oyo basalelaki yango mpo na kosakola

[Elilingi na lokasa 22]

Ngai, Ferdinand, ná bana na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto