Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/2 nk. 8-13
  • ‘Bamoni liyaka moko ya motuya monene’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bamoni liyaka moko ya motuya monene’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motuya monene ya mayaka
  • Bato oyo bamonaki motuya monene ya Bokonzi
  • Bamipesaki na mosala
  • Bato mosusu mpe bakómi koluka
  • Bazali koluka “liyaka ya motuya monene” lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Yoká mpe kangá ntina’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Tyá motema na yo na biloko ya motuya ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Bokonzi na yo eya”
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/2 nk. 8-13

‘Bamoni liyaka moko ya motuya monene’

“Bokonzi ya likoló ezali mokano oyo epai na yango bato mingi bazali kowela kokende, mpe baoyo bazali kowela kokende bazali kozwa yango.”​—MATAI 11:12.

1, 2. (a) Yesu alobelaki ezaleli nini oyo bato mingi te bazali na yango na ndakisa moko mpo na kolobela Bokonzi? (b) Yesu alobaki nini na ndakisa ya liyaka ya motuya monene?

EZALI na eloko moko oyo ezali na valɛrɛ mingi na miso na yo, oyo okoki kotika biloko nyonso to kopesa nyonso oyo ozali na yango mpo na kozwa yango? Atako bato mingi balobaka ete bamipesi na likambo moko, na ndakisa koluka bozwi, lokumu, to bokonzi, esalemaka mingi te ete moto amona eloko moko oyo akondima kotika biloko mosusu nyonso mpo na kozwa yango. Yesu Klisto alobelaki ezaleli malamu wana oyo bato mingi te bazali na yango na ndakisa moko oyo apesaki mpo na Bokonzi ya Nzambe.

2 Ezali ndakisa, to lisese oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye na esika oyo azalaki kaka ye ná bango; babengaka yango ndakisa ya liyaka ya motuya monene. Yesu alobaki boye: “Bokonzi ya likoló ezali lokola komelesa-motamboli oyo azali koluka mayaka ya kitoko. Ntango amoni liyaka moko ya motuya monene, akei mpe nokinoki atɛki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpe asombi yango.” (Matai 13:36, 45, 46) Yesu alingaki koteya bayekoli na ye likambo nini na ndakisa yango? Maloba ya Yesu ekoki kolimbola nini mpo na biso lelo oyo?

Motuya monene ya mayaka

3. Mpo na nini mayaka ya kitoko ezalaki na motuya mingi na ntango ya kala?

3 Banda kalakala, bato basepelaka kolata mayaka. Buku moko elobi ete Pline l’Ancien, moto moko ya mayele na Loma, alobaki ete mayaka “elekaki biloko mosusu nyonso ya ntalo.” Mayaka ekeseni na wolo, palata, mpe mabanga mosusu ya motuya mpamba te bazwaka yango na nzoto ya bikelamu ya bomoi. Eyebani malamu ete soki mwa biloko mikemike, na ndakisa mwa mabanga, ekɔti na nzoto ya mitindo mosusu ya mbɛmbɛ, mbɛmbɛ wana ebimisaka mai moko oyo ezingaka mwa mabanga wana mpe na nsima, ekómaka mayaka ya kitoko. Na ntango ya kala, mayaka oyo elekaki kitoko ezalaki kouta na Mbu Motane, na golfe Persique, na Mbu ya Indien, bisika oyo ezali mosika na Yisalaele. Na ntembe te ezali mpo na yango nde Yesu alobelaki “komelesa-motamboli oyo azali koluka mayaka ya kitoko.” Mpo na kozwa mayaka ya ntalo, esengelaki mpenza kosala molende.

4. Likanisi nini ya ntina tokoki kosimba na ndakisa ya komelesa-motamboli?

4 Atako banda kala mayaka ezalaka biloko ya ntalo, tokanisi te ete Yesu alobelaki yango na ndakisa na ye mpo na ntalo na yango. Na ndakisa yango, Yesu alobaki mpenzampenza te ete Bokonzi ya Nzambe ezali lokola liyaka ya motuya monene; kasi alobelaki “komelesa-motamboli oyo azali koluka mayaka ya kitoko” mpe likambo oyo asalaki ntango amonaki liyaka moko. Komelesa-motamboli oyo azalaki koluka mayaka azalaki te lokola motɛki nyonso na zando; ye azalaki oyo tokoki kobenga moto oyo ayebi mombongo ya mayaka, ayebaki kopona mayaka ya malamu mingi. Soki atali liyaka na miso to asimbi yango na mabɔkɔ, akoki koloba ete ezali ya solosolo; bakoki mpe kokosa ye te to kotɛkela ye mayaka ya mpambampamba to ya monyato.

5, 6. (a) Ezaleli nini ya komelesa oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye ezali mpenza kobenda likebi? (b) Ndakisa ya eloko ya motuya oyo ebombami ezali komonisa nini mpo na komelesa-motamboli?

5 Tosengeli mpe kosimba likambo mosusu mpo na komelesa yango. Komelesa nyonso akanisaka naino ntalo oyo akoki kotɛka liyaka mpo na koyeba na ntalo nini akondima kosomba yango mpo azwa benefisi. Amitunaka mpe soki bato balukaka mayaka ya ndenge wana mpo atɛka yango noki. Na maloba mosusu, akanisaka naino soki akozwa nokinoki benefisi, kasi alukaka te ete azala na liyaka na ndako. Nzokande, komelesa oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye asalaki ndenge wana te. Ye azalaki na mposa ya kozwa mbongo te. Kutu, andimaki kotɛka “biloko nyonso oyo azalaki na yango,” mbala mosusu biloko na ye nyonso ya ndako, mpo na kosomba eloko yango oyo azalaki koluka.

6 Mpo na bakomelesa mingi, likambo moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye asalaki ezali likambo ya mayele te. Moto oyo ayebi mombongo akoki kolinga te asala likambo ya ndenge wana oyo ekoki kokweisa ye. Kasi, komelesa oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye azalaki komona makambo ndenge mosusu. Azalaki na mposa ya kozwa mbongo te, kasi azalaki na mposa ya koyoka esengo ya kozala na eloko moko ya motuya mingi. Ndakisa mosusu oyo Yesu apesaki ezali komonisa likambo yango polele. Alobaki boye: “Bokonzi ya likoló ezali lokola eloko ya motuya oyo ebombami na elanga, oyo moto moko akutaki mpe abombaki; mpe mpo na esengo wana akei mpe atɛki biloko oyo azali na yango mpe asombi elanga yango.” (Matai 13:44) Esengo oyo moto wana ayokaki ntango amonaki eloko ya motuya mpe mposa ya kozwa yango nde etindaki ye atɛka biloko nyonso oyo azalaki na yango. Bato ya ndenge wana bazali na moi ya lelo? Ezali na eloko moko ya motuya oyo moto akoki kondima kotɛka biloko na ye nyonso mpo azwa yango?

Bato oyo bamonaki motuya monene ya Bokonzi

7. Ndenge nini Yesu amonisaki ete Bokonzi ezalaki na motuya mingi na miso na ye?

7 Yesu azalaki kolobela “bokonzi ya likoló” ntango apesaki ndakisa wana. Ye moko ayebaki motuya monene ya Bokonzi yango. Baevanzile ezali komonisa yango polele. Na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), nsima ya kozwa batisimo, Yesu “abandaki kosakola mpe koloba ete: ‘Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.’” Mbula misato mobimba na ndambo ateyaki ebele ya bato na ntina na Bokonzi. Atambolaki ekólo na bango mobimba, “atambolaki engumba na engumba mpe mboka na mboka, koteyáká mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.”​—Matai 4:17; Luka 8:1.

8. Yesu asalaki nini mpo na komonisa makambo oyo Bokonzi ekosala?

8 Yesu abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, akitisa mbonge, asekwisaki ata bato oyo bakufaki; na nzela ya ebele ya makamwisi wana oyo asalaki na ekólo mobimba, amonisaki mpe makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. (Matai 14:14-21; Malako 4:37-39; Luka 7:11-17) Na nsuka, amonisaki ete azali sembo epai ya Nzambe mpe na Bokonzi na ndenge apesaki bomoi na ye, akufaki liwa ya martiru na nzete ya mpasi. Se ndenge komelesa-motamboli andimaki kotɛka biloko na ye nyonso mpo na kosomba “liyaka ya motuya monene,” bomoi na ye mobimba Yesu amipesaki mpo na Bokonzi mpe akufaki mpo na yango.​—Yoane 18:37.

9. Ezaleli nini ya malamu mingi bayekoli ya liboso bamonisaki?

9 Bomoi na ye mobimba, Yesu atyaki makanisi na ye nyonso na Bokonzi; kasi ayanganisaki mpe etuluku moke ya bayekoli. Bato yango mpe bamonaki ete Bokonzi ezali na motuya monene. Moko ya bayekoli yango ezalaki Andele, oyo azalaki liboso moyekoli ya Yoane Mobatisi. Ntango ayokaki Yoane atatoli ete Yesu azali “Mwana-Mpate ya Nzambe,” Andele ná moyekoli mosusu ya Yoane, na ntembe te moko ya bana ya Zebedai oyo mpe nkombo na ye ezalaki Yoane, basepelaki kolanda Yesu mpe bakómaki bandimi. Kasi, esukaki wana te. Andele akendaki nokinoki koluka ndeko na ye Simona mpe alobaki na ye boye: “Tomoni Masiya.” Eumelaki te, Simona (oyo bakómaki kobenga Kefa, to Petelo) ná Filipo mpe moninga na ye Natanaele bandimaki ete Yesu azali Masiya. Kutu, Natanaele alobaki na Yesu ete: “Ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya Yisalaele.”​—Yoane 1:35-49.

Bamipesaki na mosala

10. Bayekoli ya Yesu basalaki nini ntango abengaki bango mwa basanza nsima ya bokutani na bango ya liboso?

10 Tokoki koloba ete esengo oyo Andele, Petelo, Yoane mpe bayekoli mosusu bayokaki ntango bamonaki Masiya ekokani na esengo oyo komelesa-motamboli ayokaki ntango amonaki liyaka ya motuya monene. Basalaki nini? Baevanzile eyebisi te makambo oyo basalaki nsima ya bokutani na bango ya liboso na Yesu. Ekoki mpenza kozala ete mingi na bango bazongelaki misala na bango. Kasi, nsima ya sanza motoba to mbula moko, Yesu akutanaki lisusu na Andele, Petelo, Yoane, mpe Yakobo ndeko ya Yoane pembeni ya Mbu ya Galilai, esika bazalaki koboma mbisi.a Ntango amonaki bango, Yesu alobaki na bango ete: “Bólanda ngai mpe nakokómisa bino baluki-bato.” Basalaki nini? Evanzile ya Matai elobi mpo na Petelo ná Andele ete: “Na mbala moko kosundoláká minyama, balandaki ye.” Mpo na Yakobo ná Yoane, lisolo elobi boye: “Na mbala moko kotikáká masuwa mpe tata na bango, balandaki ye.” Evanzile ya Luka ebakisi ete “basundolaki biloko nyonso mpe balandaki ye.”​—Matai 4:18-22; Luka 5:1-11.

11. Eloko nini na ntembe te etindaki bayekoli bákakatana te kolanda Yesu ntango abengaki bango?

11 Tokoki nde koloba ete loyenge ya mwa ngonga nde etindaki bayekoli bálanda Yesu mbala moko? Te! Atako bazongelaki mosala na bango nsima ya kokutana na Yesu mbala ya liboso, ntembe ezali te ete makambo oyo bamonaki mpe oyo bayokaki na ntango wana esimbaki mitema mpe makanisi na bango. Basanza nyonso oyo elekaki, mbala mosusu pene na mbula mobimba, epesaki bango ntango mingi mpo na kokanisa na makambo wana. Ntango ekokaki sikoyo mpo bázwa ekateli. Balingaki nde kondima kosala lokola komelesa-motamboli oyo Yesu alobaki ete asepelaki ntango amonaki liyaka ya motuya monene mpe ‘akendaki mpe nokinoki’ asalaki oyo esengeli mpo asomba liyaka yango? Ɛɛ. Makambo oyo bamonaki mpe oyo bayokaki esimbaki mitema na bango. Bamonaki ete ntango ekokaki mpo bámipesa na mosala. Yango wana, lisolo elobi ete bakakatanaki te kotika biloko nyonso mpe bakómaki bayekoli ya Yesu.

12, 13. (a) Bato mingi oyo bayokaki Yesu basalaki nini? (b) Yesu alobaki nini mpo na bayekoli na ye ya sembo, mpe maloba na ye ezali komonisa nini?

12 Bato yango ya sembo bakeseni mpenza na bato mosusu oyo Baevanzile elobelaki na nsima! Bato mosusu oyo Yesu abikisaki na maladi to aleisaki bazongelaki misala na bango. (Luka 17:17, 18; Yoane 6:26) Bamosusu kutu, ntango Yesu abengaki bango bákóma bayekoli na ye, basɛngaki ye atikela bango ntango básala naino makambo mosusu. (Luka 9:59-62) Nzokande, mpo na bato ya sembo, Yesu alobaki na nsima ete: “Banda na mikolo ya Yoane Mobatisi tii sikoyo bokonzi ya likoló ezali mokano oyo epai na yango bato mingi bazali kowela kokende, mpe baoyo bazali kowela kokende bazali kozwa yango.”​—Matai 11:12.

13 Maloba “kowela kokende” ezali komonisa nini? Mpo na verbe ya Grɛki oyo ebimisi maloba yango, buku moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi boye: “Liloba yango ezali kopesa likanisi ya koboma nzoto.” Lisusu, Heinrich Meyer, moto ya mayele na maloba ya Biblia, alimbolaki vɛrsɛ yango boye: “Maloba yango ezali komonisa mposa makasi mpe etumba mpo na koluka bokonzi ya Masiya oyo ekómi pene . . . Mposa ya Bokonzi ezali makasi mpe ezali kosɛnga molende (ezali lisusu te kozela na motema molai).” Lokola komelesa-motamboli, bato moke wana bayebaki nokinoki eloko oyo ezalaki mpenza na motuya, mpe bandimaki kotika nyonso mpo na kozwa Bokonzi.​—Matai 19:27, 28; Bafilipi 3:8.

Bato mosusu mpe bakómi koluka

14. Ndenge nini Yesu abongisaki bantoma na ye mpo na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe yango ebotaki mbuma nini?

14 Ntango Yesu azalaki kokoba mosala na ye, apesaki bato mosusu formasyo mpe asalisaki bango báluka Bokonzi. Aponaki liboso bato 12 na kati ya bayekoli na ye mpe abengaki bango bantoma, to bato oyo atindi. Yesu apesaki bango malako ya sikisiki mpo na mosala ya kosakola mpe ayebisaki bango libela mikakatano mpe bampasi oyo bakokutana na yango. (Matai 10:1-42; Luka 6:12-16) Na boumeli ya mbula soki mibale, bazalaki na Yesu na bisika nyonso oyo azalaki kokende; bazalaki mpenza pembeni na ye. Bazalaki koyoka makambo oyo azalaki koloba, bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala, mpe bamonaki ndakisa na ye. (Matai 13:16, 17) Na ntembe te, nyonso wana esimbaki mpenza mitema na bango; yango wana, lokola komelesa-motamboli, bazalaki na molende mpe batyaki motema mobimba na koluka Bokonzi.

15. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete basengelaki kosepela mpenza mpo na likambo nini?

15 Longola bantoma 12, Yesu “aponaki bamosusu ntuku nsambo mpe atindaki bango mibale mibale liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokóma.” Ayebisaki mpe bango mikakatano ná bampasi oyo bakokutana na yango mpe alobaki na bango báyebisa bato ete: “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.” (Luka 10:1-12) Ntango bayekoli 70 bazongaki, batondaki na esengo mpe bayebisaki Yesu boye: “Nkolo, ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.” Kasi, Yesu alobaki na bango likambo moko oyo mbala mosusu ekamwisaki bango; alobaki ete mpo na molende na bango mpo na Bokonzi, esengo monene koleka ezalaki liboso na bango. Alobaki na bango boye: “Bósepela mpo na oyo te, ete bilimo bizali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.”​—Luka 10:17, 20.

16, 17. (a) Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo nini na butu ya nsuka oyo azalaki na bango? (b) Maloba ya Yesu epesaki bantoma esengo mpe elikya ya ndenge nini?

16 Bongo, na butu ya nsuka oyo azalaki na bantoma na ye, mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mpe ayebisaki bango básalaka ndenge wana mpo na kokanisa ye. Na mpokwa wana, Yesu alobaki na bantoma 11 oyo batikalaki boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko, mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na kati ya bokonzi na ngai, mpe bófanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele.”​—Luka 22:19, 20, 28-30.

17 Tokanisi mpenza ete bantoma bazalaki na esengo mingi ntango bayokaki Yesu alobi na bango maloba wana! Alakaki bango ete bakozwa lokumu mpe libaku malamu koleka nyonso oyo moto akoki kozwa. (Matai 7:13, 14; 1 Petelo 2:9) Lokola komelesa-motamboli, batikaki makambo mingi mpe balandaki Yesu mpo na koluka Bokonzi. Andimisaki bango ete basalaki mosala ya mpunda te ndenge bamipimelaki makambo mingi.

18. Longola bantoma 11, banani lisusu bakozwa bolamu oyo Bokonzi ekomema?

18 Ezali kaka te bantoma oyo bazalaki na Yesu na butu wana nde bakozwa bolamu oyo Bokonzi ekomema. Yehova azalaki na mokano ya kosala kondimana mpo na Bokonzi ná bato 144 000 mpo báyangela elongo na Yesu Klisto na Bokonzi ya nkembo na likoló. Longola yango, na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, . . . batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, . . . kolobáká ete: ‘Lobiko na biso ezali ya Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi mpe ya Mwana-Mpate.” Bango nde bakofanda na mabelé oyo Bokonzi wana ekoyangela.b​—Emoniseli 7:9, 10; 14:1, 4.

19, 20. (a) Libaku malamu nini epesami epai ya bato ya bikólo nyonso? (b) Motuna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

19 Liboso Yesu amata na likoló, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda. Mpe, talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:19, 20) Na bongo, bato ya bikólo nyonso basengelaki kokóma bayekoli ya Yesu Klisto. Ndenge komelesa-motamboli asalaki ntango amonaki liyaka ya motuya, bato yango bakotya makanisi na bango na koluka Bokonzi, ezala bakokende na likoló to bakozala awa na mabelé.

20 Maloba ya Yesu emonisaki ete mosala ya kokómisa bato bayekoli esengelaki kokoba tii na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo.” Na yango, tokoki komituna boye: ezali na bato oyo bazali lokola komelesa-motamboli, oyo bazali kondima kotika biloko na bango mpo na koluka Bokonzi ya Nzambe? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki kozala ete ntango Yoane, mwana ya Zebedai, akutanaki na Yesu mpo na mbala ya liboso, alandaki ye mpo na mwa ntango mpe amonaki makambo oyo asalaki, yango esalisaki ye akoma makambo yango polele na Evanzile na ye. (Yoane, mokapo 2-5) Kasi, azongelaki mosala na ye ya koboma mbisi ná tata mpe ndeko na ye na mwa ntango liboso Yesu abenga ye.

b Mpo na koyeba likambo yango malamu, talá mokapo 10 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kolimbola?

• Wapi likanisi ya ntina tokoki kosimba na ndakisa ya komelesa-motamboli?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ete Bokonzi ezalaki na motuya monene na miso na ye?

• Nini etindaki Andele, Petelo, Yoane, mpe bamosusu bálanda Yesu ntango kaka abengaki bango?

• Libaku malamu nini epesami epai ya bato ya bikólo nyonso?

[Elilingi na lokasa 10]

‘Basundolaki biloko nyonso mpe balandaki Yesu’

[Elilingi na lokasa 12]

Liboso Yesu amata na likoló, apesaki bayekoli na ye mokumba ya kokómisa bato bayekoli

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto