Bazali koluka “liyaka ya motuya monene” lelo oyo
“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli”—MATAI 24:14.
1, 2. (a) Ndenge nini Bayuda ya ntango ya Yesu bazalaki kotalela Bokonzi ya Nzambe? (b) Yesu asalaki nini mpo na kolimbwela bango malamu Bokonzi, mpe yango ebotaki mbuma nini?
NTANGO Yesu azalaki awa na mabelé, lisolo ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki kobenda likebi ya Bayuda mingi. (Matai 3:1, 2; 4:23-25; Yoane 1:49) Kasi na ebandeli, mingi na bango bazalaki mpenza koyeba te soki bokonzi yango ekoyangela mikili nini mpe ekozala na nguya nini; bazalaki mpe koyeba te ete ekozala guvɛrnema ya likoló. (Yoane 3:1-5) Ata bato mosusu oyo bakómaki bayekoli ya Yesu basosolaki malamu te soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe nini basengeli kosala mpo na kozwa libaku malamu ya koyangela elongo na Klisto.—Matai 20:20-22; Luka 19:11; Misala 1:6.
2 Mokemoke, Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo mingi; moko na yango ezali ndakisa ya liyaka ya motuya monene oyo tolobelaki na lisolo eleki, amonisaki bango ete esengeli kosala molende mpo na koluka Bokonzi ya likoló. (Matai 6:33; 13:45, 46; Luka 13:23, 24) Na ntembe te mateya yango esimbaki mpenza mitema na bango mpamba te mwa moke na nsima, bakómaki basakoli ya molende mpe ya mpiko ya nsango malamu ya Bokonzi tii na bisika eleki mosika na mabelé. Mokanda ya Misala ezali komonisa likambo yango malamu.—Misala 1:8; Bakolose 1:23.
3. Yesu alobaki nini mpo na Bokonzi ntango azalaki kokanisa ntango na biso?
3 Ezali boni lelo oyo? Makambo malamu oyo ekozala na paladiso awa na mabelé oyo Bokonzi ekoyangela ezali kosakolama epai ya bamilio ya bato. Na esakweli ya ntina mingi oyo elobeli “bosukisi ya ebongiseli ya makambo,” Yesu alobaki polele ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3, 14; Malako 13:10) Alobaki mpe ete mosala monene wana ekosalema atako banguna bakobimisa mikakatano minene, botɛmɛli, ata mpe minyoko. Atako bongo, apesaki elaka oyo: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Matai 24:9-13) Nyonso wana ezali kosɛnga komipimela mpe komipesa lokola komelesa-motamboli oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. Na moi ya lelo, ezali nde na bato oyo bazali na kondima mpe na molende ya ndenge wana mpo na koluka Bokonzi?
Esengo ya komona solo
4. Solo ya Bokonzi ezali kosala likambo nini epai ya ebele ya bato lelo oyo?
4 Komelesa oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye asepelaki mingi ntango amonaki “liyaka ya motuya monene.” Esengo wana etindaki ye asala nyonso mpo na kosomba liyaka yango. (Baebele 12:1) Lelo oyo, solo ya Nzambe mpe ya Bokonzi ezali kobenda ebele ya bato mpe kotinda bango básala mosala. Yango ezongisi makanisi na biso na maloba oyo Ndeko Alexander Macmillan akomaki mpo na komonisa ndenge azalaki koluka koyeba Nzambe mpe mokano na Ye mpo na bato na buku La foi en marche. Akomaki boye: “Makambo oyo nayekoli, ebele ya bato bazali koyekola yango mbula na mbula. Bato yango bazali lokola ngai ná yo, mpamba te bazali bato ya bikólo nyonso, mindɛlɛ mpe baindo, bazwi mpe babola, mikóló mpe bilenge. Solo ezali kopona bilongi te. Ezali kobenda bato ya lolenge nyonso.”
5. Lapolo ya mosala mpo na mobu 2004 ezali komonisa mosala malamu nini oyo esalemaki?
5 Mbula na mbula ezali komonana ete maloba yango ezali solo mpamba te, bankóto na bankóto ya bato ya mitema sembo bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe bazali komipesa na Yehova mpo na kosala mokano na ye. Likambo yango emonani mpe na mbula ya mosala 2004, oyo ebandaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2003 tii na sanza ya Augusto 2004. Na boumeli ya sanza 12 wana, bato 262 416 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Likambo yango esalemaki na mikili 235 epai Batatoli ya Yehova bazali koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na bato 6 085 387 ya lolenge nyonso, ya bikólo nyonso, ya minɔkɔ nyonso, mpo na kosalisa bango báyekola solo ya Liloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi.—Emoniseli 7:9.
6. Nini ezali kosala ete motángo ya basakoli ekoba kobakisama mbula na mbula?
6 Nini epesi nzela na mosala nyonso wana? Ntembe ezali te ete Yehova azali kobenda epai na ye bato oyo bazali na ezaleli ebongi. (Yoane 6:65; Misala 13:48) Kasi, tosengeli kobosana te elimo ya komipimela mpe milende ya baoyo bazali komipesa mpo na koluka Bokonzi. Ntango Ndeko Macmillan akómaki na mbula 79, akomaki boye: “Banda nayoká mpo na mbala ya liboso bilaka ya Nzambe mpo na bato, baoyo bazali baombo ya maladi mpe ya liwa, elikya na ngai na nsango ya Biblia ekiti te. Banda na ntango wana, nazwaki ekateli ya koyeba malamu mateya ya Biblia mpo nakoka kosalisa bato mosusu oyo, lokola ngai, bazali koluka boyebi ya Yehova, Nzambe Mozwi-Na-Nguya-Nyonso, mpe mikano malamu oyo azali na yango mpo na bato.”
7. Ndakisa nini ezali komonisa esengo mpe mposa makasi ya bato oyo bazali koyeba solo ya Biblia?
7 Mposa wana ya kosala ezali mpe epai ya basaleli ya Yehova na moi ya lelo. Tókamata ndakisa ya Daniela, oyo azalaki kofanda na Vienne, na ekólo Autriche. Ndeko mwasi yango alobaki boye: “Nzambe azalaki moninga na ngai ya liboso banda bomwana na ngai. Nazalaki ntango nyonso koluka koyeba nkombo na ye mpo nazalaki komona ete ‘Nzambe’ ezali nkombo te. Kasi, nayebaki yango kaka ntango nakómaki na mbula 17, ntango Batatoli ya Yehova bayaki kotala ngai. Balimbwelaki ngai makambo nyonso oyo natunaki bango na ntina na Nzambe. Nsukansuka, nayebaki solo, mpe ezalaki likambo monene mpo na ngai! Nazalaki na esengo mingi, yango wana nabandaki kosakola epai ya bato nyonso.” Kasi, baninga na ye ya kelasi bakómaki kosɛka ye mpo na makambo oyo azalaki kosepela na yango. Daniela abakisi boye: “Kasi ngai nazalaki komona lokola nde esakweli ya Biblia ezali kokokisama na miso na ngai, mpamba te nayekolaki ete Yesu alobaki ete bato bakoyina bayekoli na ye mpe bakonyokola bango mpo na nkombo na ye. Nazalaki na esengo mingi mpe nazalaki kokamwa.” Nsima ya mwa ntango, Daniela amipesaki na Yehova, azwaki batisimo, mpe amityelaki mokano ya kokóma misionɛrɛ. Ntango abalaki, ye ná mobali na ye Helmut bakómaki kosakola epai ya bato ya Afrika, ya Chine, ya Philippines, mpe ya Inde oyo bafandaka na Vienne. Lelo oyo, Daniela ná Helmut bazali bamisionɛrɛ na ekólo moko na sudi-wɛsti ya Afrika.
Bazali kozonga nsima te
8. Wapi lolenge moko oyo bato mingi bazali komonisa bolingo na bango epai ya Nzambe mpe bosembo na bango na Bokonzi na ye?
8 Mosala ya misionɛrɛ ezali moko ya balolenge oyo basaleli ya Yehova bazali lelo oyo komonisa bolingo na bango epai ya Nzambe mpe bosembo na bango na Bokonzi na ye. Lokola komelesa-motamboli na ndakisa ya Yesu, baoyo bazali kosala mosala yango bazali kondima kokende na mboka mosika mpo na Bokonzi. Bamisionɛrɛ bazali kokende mboka mosika mpo na koluka nsango malamu ya Bokonzi te; bango nde bazali komema yango epai ya bato oyo bafandi na bisika eleki mosika na mabelé, bazali kokende koteya bato mpe kosalisa bango mpo bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. (Matai 28:19, 20) Na mikili mingi, bazali kokutana na mikakatano makasi. Kasi, molende na bango ezali kozwa mbano mingi.
9, 10. Makambo nini ya esengo bamisionɛrɛ bazali kokutana na yango na bamboka lokola République centrafricaine?
9 Tózwa ndakisa ya République centrafricaine. Na mbula eleki, bato 16 184 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto; motángo yango eleki mbala soki nsambo motángo ya basakoli ya Bokonzi na ekólo yango. Lokola na bamboka mingi ya ekólo yango kura ezali te, mingimingi bato basalaka misala libándá, na nse ya nzete. Bamisionɛrɛ mpe na mosala na bango balandaka kaka lokolo ya bato nyonso, elingi koloba bayekolaka na bato libándá, na nse ya nzete. Nse ya nzete ezalaka polele mpe na mwa mopɛpɛ; kasi ezalaka mpe na litomba mosusu. Bato ya mboka yango basepelaka na Biblia mingi mpe balobelaka makambo ya Nzambe mingi ndenge bato ya bamboka mosusu balobelaka lisano ya bale to miziki. Mbala mingi, soki moleki-nzela amoni ete bato oyo bafandi na nse ya nzete bazali koyekola Biblia, okomona mbala moko ye mpe ayei kofanda mpe abandi kolanda.
10 Yango wana, ntango misionɛrɛ moko azalaki koyekola na moto moko libándá, elenge moko oyo afandaka na ngámbo mosusu ya balabala akatisaki mpe alobaki ete naino bakei kotala ye te mpe akosepela ete misionɛrɛ yango akende koyekola na ye Biblia. Misionɛrɛ yango akokisaki mposa ya elenge yango na esengo mpe sikoyo azali kokola nokinoki na elimo. Na ekólo wana, mbala mingi soki bapolisi bamoni Batatoli na nzela, batɛlɛmisaka bango; kasi ezalaka te mpo na kokanga bango to kofutisa bango amande; ezalaka nde mpo na kotuna soki bazali na nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! to mpo na kopesa bango mersi mpo na lisolo moko oyo basepelaki na yango mingi.
11. Atako bamisionɛrɛ oyo baumeli na mosala bakutanaka na mikakatano, ndenge nini batalelaka mosala na bango?
11 Bandeko mingi oyo bakómá bamisionɛrɛ eleki mbula 40 to 50 bazali kaka kosalela Yehova na bosembo na mosala yango. Bazali mpenza kopesa biso nyonso ndakisa ya kondima mpe ya kolendendela! Ndeko moko ná mwasi na ye bakokisi mbula 42 na mosala ya misionɛrɛ mpe basalaki na bikólo misato. Mobali alobi boye: “Tokutanaki na mikakatano. Na ndakisa, malaria etungisaki biso na boumeli ya mbula 35. Kasi, ata mokolo moko te tokanisá ete tozwaki ekateli ya mabe ndenge toponaki mosala ya misionɛrɛ.” Mwasi abakisi boye: “Tokutanaka ntango nyonso na ebele ya makambo oyo tosengeli kopesa Yehova mersi mpo na yango. Mosala ya misionɛrɛ ezali esengo, mpe ezali mpasi te kobanda koyekola Biblia na bato. Ntango tomonaka bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bazali koya na makita mpe koyebana na bato mosusu oyo bazali mpe koyekola, ezalaka ntango nyonso lokola bandeko ya libota moko bakutani.”
Bazali ‘kotalela biloko nyonso ete ezali biloko ebungá’
12. Ndenge nini bato bamonisaka ete Bokonzi ezali mpenza eloko ya motuya na miso na bango?
12 Ntango komelesa-motamboli amonaki liyaka ya motuya monene, ‘akendaki mpe nokinoki atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpe asombaki yango.’ (Matai 13:46) Kondima kotika biloko oyo mbala mosusu bazalaki kotalela na motuya mingi nde elimo oyo bato bapesaka motuya na Bokonzi bamonisaka. Ntoma Paulo, oyo azalaki na kati ya bato oyo bakosangana na nkembo ya Klisto na Bokonzi na ye, alobaki boye: “Nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso ete ezali biloko ebungá mpo na motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nandimi kobunga ya biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola liboke ya bosɔtɔ, mpo nazwa Klisto.”—Bafilipi 3:8.
13. Ndenge nini mobali moko na République tchèque amonisaki bolingo na ye mpo na Bokonzi ya Nzambe?
13 Lelo oyo mpe ndenge moko, ebele ya bato bazali kondima kobongola bomoi na bango mpo na kozwa mapamboli ya Bokonzi. Na ndakisa, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2003, mobali moko ya mbula 60 oyo azali mokambi ya eteyelo na République tchèque azwaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Nsima ya kotánga yango, alukaki Batatoli ya Yehova ya mboka na bango mpo báyekola na ye Biblia. Akolaki malamu na elimo mpe akómaki koyangana na makita. Nzokande, liboso azalaki na mokano ya kopesa nkombo na voti mpo akóma guvɛrnɛrɛ mpe depite. Asalaki nini? Aponaki nzela mosusu: asepelaki kokóma mosakoli ya Bokonzi. Alobaki boye: “Nakabolaki mikanda ebele epai ya bana-kelasi ya eteyelo na ngai.” Amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo na liyangani ya etúká na sanza ya Yuli 2004.
14. (a) Nsango malamu ya Bokonzi etindi bamilio ya bato na kosala nini? (b) Mituna nini ya ntina mingi mokomoko na biso asengeli komituna?
14 Na mokili mobimba, bamilio ya bato mosusu bayambi mpe nsango malamu ya Bokonzi ndenge yango. Babimi na mokili mabe oyo, batiki bomoto ya kala, batiki baninga na bango ya kala, babosani mikano ya mokili. (Yoane 15:19; Baefese 4:22-24; Yakobo 4:4; 1 Yoane 2:15-17) Mpo na nini basali bongo? Mpamba te bazali komona ete mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe eleki eloko nyonso oyo bakoki kozwa na mokili oyo. Yo mpe okanisaka bongo na ntina na nsango malamu ya Bokonzi? Nsango yango epesaka yo mposa ya kobongola bomoi, makanisi, mpe mikano na yo mpo na kolanda oyo Yehova azali kosɛnga? Soki osali yango, okozwa ebele ya mapamboli lelo oyo mpe na mikolo ekoya.
Mosala ya kobuka mbuma ekómi na nsuka
15. Biblia esakolaki ete basaleli ya Nzambe bakosala nini na mikolo ya nsuka?
15 Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo.” Na kati ya bato oyo bamipesi, ezali na ‘bilenge lokola mamwɛ ya ntɔngɔntɔngɔ’ mpe ‘basi mingi mpenza baoyo bapalanganisi nsango.’ (Nzembo 68:11; 110:3) Molende mpe elimo ya komipesa ya basaleli ya Yehova, mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, na mikolo oyo ya nsuka, eboti mbuma nini?
16. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge basaleli ya Nzambe bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato báyeba nsango ya Bokonzi.
16 Na ekólo Inde, mobongisi-nzela moko azalaki kokanisa ndenge oyo bakoki kosalisa bato bakufá matoi, oyo bazali koleka milio mibale na ekólo wana, mpo báyoka nsango ya Bokonzi. (Yisaya 35:5) Akɔtaki kelasi na Bangalore mpo na koyekola bajɛstɛ mpo na kosolola na bababa. Na kelasi wana, azwaki libaku ya kosakola elikya ya Bokonzi epai ya bababa mingi; kutu, basalaki etuluku moko mpo na koyekola Biblia. Nsima ya mwa bapɔsɔ, bato soki 12 bakómaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Na nsima, mobongisi-nzela yango akendaki na fɛti moko ya libala mpe kuna, akutanaki na baba moko oyo afandaka na engumba Calcutta; elenge mobali wana atunaki ye mituna mingi mpe azalaki mpenza na mposa ya koyeba Yehova. Kasi, azalaki na mokakatano moko. Elenge yango asengelaki kozonga na Calcutta, na ntaka ya kilomɛtrɛ 1600 mpo na kokende kokɔta na iniversite; kasi, kuna Motatoli moko te ayebaki kosolola na bajɛstɛ. Nsukansuka, alongaki kondimisa tata na ye apesa ye nzela akende kotánga na Bangalore mpo akoba koyekola Biblia. Akolaki malamu na elimo, mpe nsima ya mbula moko, amipesaki na Yehova. Na nsima, ye mpe ayekolaki Biblia na bababa mosusu oyo moko na bango azalaki moninga na ye ya bomwana. Filiale ya ekólo Inde ezali kozwa bibongiseli mpo babongisi-nzela báyekola bajɛstɛ mpo na kosolola na bababa mpo básalisa bango báyeba mateya ya Biblia.
17. Lobelá makambo ya kolendisa oyo omoni na lapolo ya mosala ya kosakola mpo na mobu 2004 oyo ezali na nkasa 19 tii 22.
17 Na lokasa 19 tii 22, okomona lapolo ya mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba basalaki na mobu 2004. Talá yango malamu, mpe luká makambo oyo ezali komonisa ete lelo oyo, basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali komipesa na koluka “liyaka ya motuya monene.”
Bókoba “koluka liboso Bokonzi”
18. Likambo nini Yesu alobaki te na ndakisa ya komelesa-motamboli mpe mpo na nini?
18 Soki tozongi lisusu na ndakisa ya komelesa-motamboli, tokomona ete Yesu alobaki te ndenge oyo komelesa yango asengelaki kobikela nsima ya kotɛka nyonso oyo azalaki na yango. Moto mosusu akoki kotuna boye: ‘Lokola komelesa yango atikalaki na eloko te, ndenge nini akokaki kozwa biloko ya kolya, bilamba, mpe ndako? Liyaka wana ya motuya elingaki kozala na mosala nini mpo na ye?’ Mituna yango ekoki kotunama soki tozali kotala makambo na ndenge na biso bato. Kasi, toyebi ete Yesu alendisaki bayekoli na ye ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:31-33) Likanisi ya ntina na ndakisa yango ezali ete moto asengeli kosalela Nzambe na motema mobimba mpe asengeli kozala na molende mpo na koluka Bokonzi. Tokoki kozwa liteya moko na likambo yango?
19. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu oyo elobelaki liyaka ya motuya monene?
19 Ezala toyoki nsango malamu kala te to tolukaka Bokonzi mpe toyebisaka bato mapamboli oyo ekomema banda bambula mingi, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso na Bokonzi yango. Tozali na ntango ya mpasi, kasi tozali na bantina malamu ya kondima ete eloko oyo tozali koluka ezali solo mpe ezali na motuya koleka biloko mosusu nyonso, lokola liyaka oyo komelesa amonaki. Makambo oyo ezali koleka na mokili mpe bisakweli ya Biblia oyo ekokisami ezali kondimisa biso ete tozali na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo.” (Matai 24:3) Lokola komelesa-motamboli, tózala na molende mpo na koluka Bokonzi ya Nzambe mpe tósepela na libaku malamu ya kosakola nsango malamu.—Nzembo 9:1, 2.
Ozali koyeba lisusu?
• Nini ezali kosala ete motángo ya basambeli ya solo ebakisamaka mbula na mbula?
• Bamisionɛrɛ bazali komonisa elimo nini?
• Bato mosusu batiki makambo nini mpo na nsango malamu ya Bokonzi?
• Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na ndakisa ya liyaka ya motuya monene oyo Yesu alobaki?
[Etanda na lokasa 19-22]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2004
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 14]
“Solo . . . ezali kobenda bato ya lolenge nyonso.”—Alexander Macmillan
[Elilingi na lokasa 15]
Daniela ná Helmut bazalaki kosakola epai ya bapaya na Vienne
[Bililingi na lokasa 16]
Lokola komelesa-motamboli, bamisionɛrɛ bazali kozwa mapamboli mingi lelo oyo
[Elilingi na lokasa 17]
‘Bato na yo bakomipesa na bolingo nyonso’