Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/3 nk. 8-9
  • “Batikalaki sembo na ntango ya minyoko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Batikalaki sembo na ntango ya minyoko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Mokumba moko ya mpasi ekokisami na lisalisi ya elimo santu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Tótala kasɛti video La Société du Monde Nouveau en action: lisolo ya bambula eleká
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Bato ya kimya balongisi lokumu na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Batatoli ya Yehova na Ekólo Russie
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/3 nk. 8-9

“Batikalaki sembo na ntango ya minyoko”

NA Aprili 1951, guvɛrnema ya Union soviétique ekitelaki etuluku moko ya baklisto, Batatoli ya Yehova, na wɛsti ya Union soviétique, atako basalaki eloko te. Batyaki bana, basi ya zemi mpe mibange, mabota soki 3000 na kati ya bawagɔ mpe bamemaki bango na Sibérie na mobembo moko ya mikolo 20. Bamemaki bango na mboka mopaya na kati ya mpasi.

Na Aprili 2001, mbula 50 nsima ya likambo yango, babimisaki kasɛti-video moko na Moscou oyo elobelaki ndenge banyokolaki Batatoli ya Yehova mbula 50 na Union soviétique. Na kasɛti yango, bato ya istware mpe baoyo bamonaki makambo yango na miso, balobeli ndenge Batatoli babikaki mpe ndenge bakómaki ebele atako minyoko ezalaki makasi.

Bato mingi na Russie mpe na bisika mosusu batali kasɛti Fidèles dans les épreuves—Les Témoins de Jéhovah en Union soviétique mpe bato ya ndenge nyonso ná bato ya istware basepeli mingi na kasɛti yango. Tólanda makambo oyo bato mibale ya mayele na Russie, oyo bafandaka na esika oyo bamemaki mabota mingi ya Batatoli balobaki:

“Nasepelaki na kasɛti yango mingi. Nasepelaka na bato ya lingomba na bino banda kala, kasi nsima ya kotala kasɛti oyo, nakómi kolinga bino lisusu mingi. Bosalá kasɛti yango malamu mpenza! Nasepelaki mingimingi na ndenge bolakisaki moto na moto azali kobɛta lisolo na ye. Atako nazali moto ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe nazali na mposa ya kotika lingomba na ngai te, nasepelaka na Batatoli. Nakosepela tózwa kasɛti yango moko mpo na iniversite na biso. Ngai ná baninga na ngai baprofɛsɛrɛ tomoni malamu tólakisa bayekoli na biso kasɛti yango mpe tókɔtisa yango na programɛ ya mateya na biso.”​—Professor Sergei Nikolayevich Rubtsov, dean of the faculty of history of Irkutsk State University, Russia.

“Nasepelaki mingi ntango kasɛti yango ebimaki. Ntango moto azali kosala filme oyo ezali kolobela ndenge banyokolaki bato, ezalaka mpasi kobimisa likambo yango ndenge esalemaki mpenza. Kasi, bino bolongi mpenza. Nasɛngi bino bóyela ngai bakasɛti na bino mosusu.”​—Professor Sergei Ilyich Kuznetsov, dean of the faculty of history of Irkutsk State University, Russia.

Batatoli ya Yehova ya Sibérie basepelaki mpe mingi na kasɛti yango. Tólanda oyo bamosusu kati na bango balobi:

“Ntango makambo oyo balobeli na kasɛti yango ezalaki kosalema, bato mingi ya Russie bayebaki Batatoli ya Yehova malamu te. Nsima ya kotala kasɛti yango, bamoni sikoyo ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba te ndenge bazalaki kokanisa. Bato mosusu oyo bauti kokóma Batatoli ya Yehova balobi boye: ‘Tozalaki koyeba te ete tozalaki kofanda mpe kosala elongo na bandeko na biso oyo banyokwamaki makasi!’ Nsima ya kotala kasɛti yango, Motatoli moko asepelaki akóma mobongisi-nzela.”​—Anna Vovchuk, oyo bamemaki na Sibérie.

“Ntango filme yango ekómaki na esika moko oyo balakisaki polisi moko azali kobɛta na porte ya Motatoli moko, nalengaki makasi. Namonaki lisusu mokolo oyo polisi moko abɛtaki na porte na biso mpe mama alobaki: ‘Ntango mosusu ndako ezali kozika.’ Kasi, filme yango esalisaki ngai namona ete Batatoli mingi banyokwamaki koleka ngai. Makambo nyonso oyo tomonaki na kasɛti yango epesaki biso makasi mpe esengo ya kokoba kosalela Yehova.”​—Stepan Vovchuk, oyo bamemaki na Sibérie.

“Nazali mwana ya libota moko ya Batatoli oyo bamemaki na Sibérie. Nazalaki kokanisa ete nayebi makambo mingi oyo esalemaki na ntango wana. Kasi nsima ya kotala filme yango, namonaki ete nayebaki ata eloko moko te. Ntango nazalaki koyoka bandeko bazali koloba ndenge banyokwamaki, mai ya miso etangaki ngai. Sikoyo namoni ete makambo yango ezali kaka masolo mpamba te, kasi esalemaki mpenza. Filme yango eyeisi makasi boninga na ngai na Nzambe mpe esalisi ngai namibongisa mpo na koyika mpiko soki nakutani na mikakatano.”​—Ndeko Vladimir Kovash, ya engumba Irkoutsk.

“Mpo na ngai, filme yango ezalaki na nguya mingi koleka lisolo oyo bakomi kokoma. Ntango natalaki kasɛti yango mpe nayokaki bandeko mibali bazali koyanola na mituna oyo bazalaki kotuna bango, nayokaki lokola nde ngai mpe nanyokwamaki na bango. Ndakisa ya ndeko oyo atindelaki mwana na ye ya mwasi kalati (carte postale) ntango azalaki na bolɔkɔ elendisaki ngai naluka kosimba mitema ya bana na ngai na solo ya Biblia. Natɔndi bino! Kasɛti yango esalisi Batatoli ya Russie bámona ete bango mpe bazali na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na mokili mobimba.”​—Ndeko Tatyana Kalina, ya engumba Irkoutsk.

“Maloba oyo: ‘Komona na miso ata mbala moko eleki koyoka mbala nkama,’ eyokani mpenza na kasɛti oyo. Makambo oyo ezali na kasɛti yango ezali mpenza na bomoi, ezali ya solo mpe etaleli biso mpenza! Nsima ya kotala yango, nakanisaki mingi. Filme yango esalisaki ngai namitya na esika ya Batatoli oyo bamemaki na Sibérie. Sikoyo ntango nazali kokokanisa bomoi na ngai ná oyo ya bango, yango ezali kosalisa ngai nakóma kotalela mikakatano ndenge mosusu.”​—Ndeko Lidia Beda, ya engumba Irkoutsk.

Kasɛti Fidèles dans les épreuves esili kobimisama na minɔkɔ 25 mpe bato ya mokili mobimba bazali kosepela na yango.a Basilá kolakisa kasɛti yango na mobimba na yango na batelevizyo ya Saint-Pétersbourg, Omsk mpe na bingumba mosusu ya ekólo Russie mpe na bingumba Vynnytsya, Kerch, Melitopol mpe na etúká ya Lviv, na ekólo Ukraine. Bibongiseli oyo etalelaka bafilme na mokili mobimba eponaki mpe yango na kati ya bafilme ya kitoko.

Nguya ya filme yango ezali kouta na bandakisa ya ebele ya bato lokola biso oyo bamonisaki mpiko mpenza mpe bokasi ya elimo na boumeli ya ebele ya bambula ya minyoko. Batatoli ya Yehova ya Union Soviétique batikalaki mpenza sembo na ntango ya minyoko. Soki osepeli kotala kasɛti yango, Batatoli ya Yehova bakosepela komemela yo yango. Sololá na Motatoli ya Yehova moko na esika ofandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kasɛti yango ebimisami na minɔkɔ oyo: Allemand, Anglais, Bulgare, Cantonais, Coréen, Danois, Espagnol, Finlandais, Français, Grec, Hongrois, Indonésien, Italien, Japonais, Lithuanien, Mandarin, Néerlandais, Norvégien, Polonais, Roumain, Russe, Slovaque, Slovène, Suédois mpe Tchèque.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Stalin: Fɔtɔ ya basoda ya États-Unis

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Stalin: Fɔtɔ ya basoda ya États-Unis

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

FIDÈLES DANS LES ÉPREUVES

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

LES TÉMOINS DE JÉHOVAH EN UNION SOVIÉTIQUE

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto