Tótala kasɛti video La Société du Monde Nouveau en action: lisolo ya bambula eleká
Ntango ozali kotala filmɛ oyo ya 1954 na video, luká biyano ya kopesa na mituna oyo: (1) Libosoliboso, eloko nini etindaki bábimisa filmɛ wana, mpe makambo nini filmɛ yango esalaki? (2) Mikanda nini Batatoli ya Yehova babimisaka? Babimisaka yango mpo na banani, mpe mpo na nini? (3) Bokeseni nini ezali na ndenge Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima mikolo oyo mpe ndenge ezalaki kobima na 1954? (4) Ndenge nini batekiniki ya sika esalisi mpo na konyata mikanda na biso na boumeli ya bambula oyo euti koleka? (5) Nini ekamwisi yo na liyangani ya mikili mingi oyo esalamaki na Yankee Stadium na 1953? (6) Trailer City ezalaki nini, mpe makambo nini ya ntina mingi osimbaki mpo na yango? (7) Nini emonisi ete mosala na biso ezali ya ekólo moko kaka te, ya bato ya mboka moko te, mpe ya bato ya mokili moko mpamba te? (8) Makambo nini esalisi yo omona elimo ya bolingo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kotambola na yango? (Nz. 133:1) (9) Na makanisi na yo, nani omoni ete akosepela kotala lisolo wana ya makambo oyo société ya mokili ya sika esalaki na bambula ya 1950?