Lisolo ya bomoi
Tosalelaki mbongwana oyo ekɔtaki na bomoi na biso mpo na kosakola na bamboka mosika
YA RICARDO MALICSI
Ntango nabungisaki mosala na ngai mpo naboyaki kokɔta na makambo ya politiki, ngai ná libota na ngai tosɛngaki Yehova asalisa biso tóbongisa avenire na biso. Toyebisaki Yehova mposa na biso ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Mwa moke na nsima, tobandaki bomoi ya kotambolatambola oyo ememaki biso na bikólo mwambe na kati ya bakɔntina mibale. Mibembo yango esalisaki biso tómema nsango malamu na bamboka mosika.
NABOTAMAKI na ekólo Philippines na 1933, na libota oyo ezalaki na lingomba moko ya Protesta (Église indépendante des Philippines). Libota na biso mobimba, bato 14, tozalaki na lingomba wana. Ntango nazalaki na mbula soki 12, nabondelaki Nzambe alakisa ngai lingomba ya solo. Molakisi na ngai moko akɔtisaki ngai na malongi mpe nakómaki Mokatolike ya molende. Nazalaki kozangisa te tubela ya mokolo ya pɔsɔ mpe misa ya mokolo ya lomingo. Nzokande, nakómaki na ntembe mpe esengo na ngai ebandaki kokita. Mituna na ntina ya bakufi, lifelo ya mɔtɔ mpe bosato ezalaki kotungisa ngai mingi. Biyano oyo bakambi ya lingomba bazalaki kopesa ezalaki na ntina te mpe ezalaki kokokisa bamposa na ngai ya elimo te.
Nazwi biyano ya malamu
Ntango nazalaki kotánga, nakómaki na baninga oyo batindaki ngai nabanda kobunda, kobɛta masano ya mbongo, komela makaya mpe kosala makambo mosusu ya mabe. Na mpokwa moko, nakutanaki na mama ya moninga na ngai moko ya kelasi. Azalaki Motatoli ya Yehova. Natunaki ye mituna oyo nazalaki kotuna balakisi na ngai ya makambo ya Nzambe. Ayanolaki na mituna na ngai nyonso na lisalisi ya Biblia mpe nandimaki mpenza ete oyo azalaki koloba ezalaki solo.
Nasombaki Biblia mpe nabandaki koyekola yango elongo na Batatoli. Nabandaki mbala moko koyangana na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova. Toli ya bwanya ya Biblia oyo elobi ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu,” etindaki ngai natika baninga ya mabe. (1 Bakolinti 15:33) Yango nde esalisaki ngai nakoba na boyekoli na ngai ya Biblia mpe na nsuka namipesa epai ya Yehova. Nsima ya batisimo na ngai na 1951, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na mwa ntango. Na Desɛmbɛ 1953, nabalaki Aurea Mendoza Cruz, oyo akómaki molongani na ngai mpe moninga na ngai ya mikolo nyonso na mosala ya kosakola.
Nzambe ayoki mabondeli na biso
Tozalaki mpenza na mposa ya kosala lokola babongisi-nzela. Nzokande, mposa na biso ya kosalela Yehova mingi ekokisamaki mbala moko te. Atako bongo, totikaki te kosɛnga Yehova afungolela biso mabaku na mosala na ye. Kasi, tozalaki na bomoi ya mpasi mpenza. Kasi, tobosanaki te mikano na biso ya elimo, mpe ntango nakokisaki mbula 25, baponaki ngai mosaleli ya lisangá elingi koloba mokɛngɛli-mokambi na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova.
Lokola boyebi na ngai ya Biblia ezalaki kokola mpe nakómaki koyeba malamu mitinda ya Yehova, namonaki ete mosala oyo nazalaki kosala ezalaki koyokana te na ekateli na ngai ya koboya kokɔta na makambo ya politiki. (Yisaya 2:2-4) Nazwaki ekateli ya kotika mosala yango. Likambo yango ezalaki mpenza komekama mpo na kondima na biso. Nakokaki kosala nini mpo na kokokisa bamposa ya libota na ngai? Tobondelaki lisusu Yehova. (Nzembo 65:2) Toyebisaki ye makambo oyo ezalaki kotungisa biso mpe oyo ezali kobangisa biso, kasi tomonisaki ye mpe mposa na biso ya kosalela ye na esika nyonso oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene. (Bafilipi 4:6, 7) Toyebaki ata moke te ete ebele ya mabaku ezalaki kozela biso!
Tobandi mobembo na biso
Na Aprili 1965, nandimaki kokende kosala na libándá ya mpɛpɔ ya engumba Vientiane oyo ezali na ekólo Laos mpe namemaki libota na ngai kuna. Mosala na ngai ezalaki kotalela makama nyonso ya mpɛpɔ. Batatoli bazalaki 24 na engumba Vientiane mpe tozalaki kosakola elongo na bamisionɛrɛ mpe bandeko ya mboka yango. Na nsima, batindaki ngai na libándá ya mpɛpɔ ya Udon Thani, na Thaïlande. Mosakoli ata moko te azalaki na engumba Udo Thani. Tozalaki kosala makita nyonso ya pɔsɔ kaka biso moko. Tozalaki kosakola ndako na ndako, kozongela bato mpe tozalaki koyekola Biblia na bango.
Tobosanaki te toli oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ete basengeli “kokoba kobota mbuma mingi.” (Yoane 15:8) Na yango, tozwaki ekateli ya kolanda ndakisa na bango mpe tokobaki kosakola nsango malamu. Toumelaki te kozwa matomba. Elenge mwasi moko ya Thai andimaki solo mpe akómaki ndeko na biso ya elimo. Bato mibale ya Amerika ya nɔrdi bandimaki solo mpe na nsima bakómaki bankulutu. Tokobaki kosakola nsango malamu na nɔrdi ya Thaïlande na boumeli ya bambula koleka zomi. Tozali na esengo mpenza ya koyeba ete lisangá moko ezali lelo oyo na Udon Thani! Mboto mosusu ya solo oyo tolonaki ezali naino kobota mbuma.
Kasi, likambo ya mawa, tosengelaki kolongwa wana mpe kokende epai mosusu, tosɛngaki “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma” asalisa biso tókoba na mosala ya kosakola. (Matai 9:38) Batindaki biso na Téhéran, mboka-mokonzi ya Iran. Ezalaki ntango mokonzi Shah azalaki koyangela.
Kosakola na bateritware ya mpasi
Ntango kaka tokómaki na Téhéran, tokutanaki na bandeko na biso ya elimo. Tozalaki koyangana na mwa etuluku moke oyo esangisaki batatoli ya bikólo 13. Tosengelaki kosala mbongwana na bomoi na biso mpo na kosakola nsango malamu na ekólo Iran. Atako tokutanaki na botɛmɛli te, tosengelaki kokeba.
Programɛ ya mosala ya bato oyo basepelaki ezalaki ntango mosusu kosala ete tóyekola na bango Biblia ata na midi ya butu to na ntɔngɔ makasi. Tozalaki na esengo ya komona mosala wana makasi eboti mbuma! Mabota mingi ya Philippines mpe ya corée bandimaki solo mpe bamipesaki epai ya Yehova.
Na nsima, batindaki ngai na Dacca, Bangladesh. Tokómaki kuna na Desɛmbɛ 1977. Bangladesh ezalaki mpe ekólo mosusu epai mosala na biso ya kosakola ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, toyebaki ete tosengelaki kokóba kosakola. Na lisalisi ya elimo ya Yehova, tokutanaki na mabota oyo bazalaki komibenga baklisto. Basusu kati na bango bazalaki na mposa ya mai ya solo oyo ekitisaka motema oyo ezali kati na Makomami Mosantu. (Yisaya 55:1) Yango esalaki ete tóbanda koyekola Biblia na bato mingi.
Tobosanaki te ete mokano ya Nzambe ezali “bato ya ndenge nyonso bábika.” (1 Timote 2:4) Likambo ya esengo, moto ata moko te alukaki kobebisa mosala na biso. Mpo na koboya bákanisela biso mabe, tozalaki kosala nyonso mpo tósolola na bango na boboto. Na ndakisa ya ntoma Paulo, tolukaki ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’ (1 Bakolinti 9:22) Ntango bazalaki kotuna biso ntina oyo toyei kotala bango, tozalaki kolimbolela bango na ndenge moko ya boboto mpe tomonaki ete mingi kati na bango bazalaki na boboto.
Tokutaki ndeko mwasi moko na Dacca mpe tolendisaki ye akóma koyangana na makita elongo na biso mpe kobima na biso na mosala ya kosakola. Mwasi na ngai ayekolaki Biblia na libota moko mpe abengaki bango na makita. Na motema boboto ya Yehova, libota mobimba bandimaki solo. Nsima, bana na bango ya basi mibale bakómaki kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Bengali mpe bandeko na bango mingi bakómaki mpe basaleli ya yehova. Ebele ya bato mosusu oyo bazalaki koyekola Biblia bandimaki solo. Lelo oyo, mingi kati na bango bazali bankulutu to babongisi-nzela.
Lokola Dacca ezali na bato ebele, tobengaki bandeko na biso mosusu básalisa biso na mosala ya kosakola. Mingi bandimaki mpe bayaki na Bangladesh. Tozali na esengo mingi mpe tozali kotɔnda Yehova mpenza mpo na libaku oyo tozwaki ya kosakola nsango malamu na ekólo wana! Ntango tokómaki na Bangladesh, tokutaki kaka ndeko moko, kasi lelo oyo masangá ekómi mibale.
Na Yuli 1982, tokangaki bisaka mpe tolongwaki na Bangladesh. Tolelaki ntango tokabwanaki na bandeko. Mwa moke na nsima, nazwaki mosala na libándá ya mpɛpɔ ya Entebbe, na Ouganda; epai tofandaki mbula minei na sanza sambo. Eloko nini tosengelaki kosala mpo tókumisa nkombo monene ya Yehova na mokili oyo?
Tozali kosalela Yehova na Afrika ya ɛsti
Ntango kaka tokómaki na libándá ya mpɛpɔ ya Entebbe, sofɛlɛ moko azwaki ngai ná mwasi na ngai mpe amemaki biso epai tosengelaki kofanda. Ntango kaka tobimaki na libándá ya mpɛpɔ, nabandaki kosakwela sofɛlɛ yango nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Atunaki ngai: “Ozali Motatoli ya Yehova?” Ntango nandimaki, sofɛlɛ alobaki: “Ndeko na bino moko asalaka na libándá ya mpɛpɔ na esika oyo bapesaka bakumbi mpɛpɔ malako.” Nasɛngaki ye mbala moko amema ngai kuna. Tokutanaki na ndeko yango mpe azalaki na esengo mpenza ya komona biso. Totunaki ye programɛ ya makita mpe toyokanaki mpo na mosala ya kosakola.
Na ntango wana, basakoli ya Bokonzi bazalaki kaka 228 na Ouganda. Ngai ná mwasi na ngai tolekisaki mbula na biso ya liboso na kolona mboto ya solo elongo na bandeko mibale ya Entebbe. Lokola bato ya mboka yango balingaka kotánga mingi, tokabolaki babuku mingi oyo elimbolaka Biblia ná bankama ya bazulunalo. Tosɛngaki bandeko ya Kampala, mboka mokonzi, báyaka na bawikende kosalisa biso na kosakola na teritware ya Entebbe. Na lisukulu ya liboso oyo nasalaki, tozalaki kaka bayangani mitano.
Mbula misato na nsima, tosepelaki mingi ntango tomonaki bato oyo toyekolaki na bango bazali kondima solo mpe kokola nokinoki na elimo. (3 Yoane 4) Na Liyangani moko ya zongazonga, bato motoba kati na baoyo tozalaki koyekola na bango Biblia bazwaki batisimo. Mingi kati na bango balobaki ete ndakisa na biso elendisaki bango básala mosala ya mobongisi-nzela, mpo bamonaki biso tozali kosala mosala yango atako tozalaki kosala misala oyo ezalaki kozwa biso mokolo mobimba.
Tomonaki ete kosakola na esika na biso ya mosala ekokaki mpe kobota mbuma. Mokolo moko, nakutanaki na mokonzi moko oyo atalelaka makambo etali koboma mɔtɔ na libándá ya mpɛpɔ mpe nasololaki na ye na ntina ya elikya oyo Biblia ezali kopesa mpo na bomoi na paladiso awa na mabele. Nalakisaki ye na kati ya Biblia na ye moko ete bato ya botosi bakofanda na kimya mpe na bomoko, bobola, kozanga esika ya kolala, bitumba, maladi to liwa ekozala lisusu te. (Nzembo 46:9; Yisaya 33:24; 65:21, 22; Emoniseli 21:3, 4) Lokola atángaki makambo yango na Biblia na ye moko, akómaki lisusu na mposa ya koyeba makambo mosusu. Tobandaki mbala moko koyekola na ye Biblia. Abandaki koyangana na makita nyonso. Mwa moke na nsima, amipesaki epai ya Yehova mpe azwaki batisimo. Na nsima, akómaki mpe mobongisi-nzela.
Ntango tozalaki na Ouganda, bitumba esalemaki mbala mibale, kasi yango epekisaki biso te kokoba na misala na biso ya elimo. Batindaki mabota ya bato oyo bazalaki kosala na bibongiseli lokola ONU, UNESCO, UNICEF, mpe bongo na bongo na Nairobi, mboka-mokonzi ya Kenya mpo na sanza motoba. Biso baoyo totikalaki na Ouganda, totikaki te koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola, atako tosengelaki kozala ekenge.
Na Aprili 1988, mosala na ngai na mboka wana esilaki mpe tokendeki epai mosusu. Totikaki lisangá ya Entebbe na esengo mingi na motema mpo na bokoli oyo emonanaki na lisangá yango. Na Yuli 1997, tozwaki libaku ya kokende lisusu na Entebbe. Na ntango wana, bato mosusu oyo toyekolaki na bango Biblia bakómaki bankulutu. Tozalaki na esengo mingi ya komona bato 106 na lisukulu ya bato nyonso!
Tokei na teritware oyo basakoli bakómá naino te
Mabaku ya sika ya mosala ekokaki nde kofungwamela biso? ƐƐ. Na nsima, batindaki ngai na libándá ya mpɛpɔ ya Mogadiscio na Somalie. Tozwaki ekateli ya kosalela malamu libaku ya kosala na teritware wana oyo basakoli bakómá naino te.
Tozalaki kosakola mingimingi epai ya bato oyo basalaka na ambassade, bato ya mosala oyo bautá na Philippines mpe bapaya mosusu. Tozalaki kokutana na bango mbala mingi na zando. Tozalaki mpe kokende kotala bango na bandako na bango. Kosalela mayele, bokɛngi mpe kotyela Yehova motema mobimba esalisaki biso tóteya bato solo mpe yango ebotaki mbuma epai ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Nsima ya mbula mibale, liboso etumba ebanda, totikaki Mogadiscio.
Kompanyi na biso etindaki ngai na engumba Yangon, na ekólo Myanmar. Mabaku kitoko efungwamelaki biso lisusu mpo tósalisa bato ya mitema sembo báyekola mikano ya Nzambe. Na nsima, batindaki biso na Dar es-Salaam, na ekólo Tanzanie. Kosakola nsango malamu ndako na ndako na Dar es-salaam ezalaki mpasi te mpamba te mwa etuluku ya bato oyo bazalaki koloba Lingelesi bazalaki kuna.
Na bamboka nyonso epai tosalaki, tokutanaki na mikakatano mpenza te na mosala na biso ya kosakola, atako mbala mingi mosala ya Batatoli ya Yehova ezalaki kopekisama. Lokola mosala na ngai ezalaki kosala ete nayebana mingi na bakonzi ya mboka to na bibongiseli lokola ONU, UNESCO, UNICEF, bazalaki kotungisa biso te na misala na biso ya boklisto.
Mosala na ngai ya mosuni esalaki ete ngai ná mwasi na ngai tokóma kotambolatambola mbula ntuku misato. Nzokande, mosala yango ezalaki kosalisa biso tókokisa malamu mosala na biso ya libosoliboso, mosala ya kosakola. Mokano na biso ya liboso ezalaki ntango nyonso ya kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe. Totɔndi Yehova ndenge asalisi biso tósalela malamu mbongwana oyo ekɔtaki na bomoi na biso mpe tósepela na libaku malamu ya kopalanganisa nsango malamu na bamboka mosika.
Tozongi epai makambo nyonso ebandaki
Ntango nakómaki na mbula 58, nasɛngaki epaso liboso nakokisa mbula ya kozwa yango mpe nazongaki na Philippines. Ntango tozongaki, tobondelaki Yehova mpo atambwisa biso. Tobandaki koyangana na lisangá moko ya engumba Trece Martires oyo ezali na etúká ya Cavite. Ntango tokómaki, basakoli ya Bokonzi ya Nzambe bazalaki kaka 19. Tobongisaki programɛ ya kosakola mokolo na mokolo mpe tobandaki koyekola Biblia na bato ebele. Lisangá ebandaki kokola. Na ntango moko boye, mwasi na ngai azalaki koyekola Biblia na bato 19, mpe ngai na bato 14.
Eumelaki te, Ndako ya Bokonzi ekómaki moke mingi. Tobondelaki Yehova mpo na yango. Ndeko moko ná mwasi na ye bakabelaki lisangá mwa eteni ya mabelé mpe biro ya Batatoli ya Yehova endimaki kodefisa biso mbongo mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya sika. Ndako ya Bokonzi wana ya sika esalaki ete bato mingi bákóma kondima nsango malamu mpe motángo ya bayangani ezalaki kobakisama pɔsɔ na pɔsɔ. Sikoyo, totambolaka ngonga moko mpo na kokende kosalisa lisangá mosusu oyo ezali na basakoli 17.
Ngai ná Mwasi na ngai tosepelaka na libaku malamu oyo tozwaki ya kosala na bikólo ebele. Soki totali bambula oyo tolekisi na kotambolatambola, tozali na esengo mpenza ete tosalelaki yango na ndenge ya malamu mpenza: kosalisa bato mosusu báyekola makambo etali Yehova!
[Karte na lokasa 24, 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
TANZANIE
OUGANDA
SOMALIE
IRAN
BANGLADESH
MYANMAR
LAOS
THAÏLANDE
PHILIPPINES
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai ná mwasi na ngai, Aurea