Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Nini etindaki bápona mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpo na kosepela kobotama ya Yesu?
Liloba ya Nzambe epesi dati ya kobotama ya Yesu te. Buku moko (Enciclopedia Hispánica) elobi boye: “Soki fɛti ya Noele ezalaka mokolo ya 25 Desɛmbɛ, ezali te mpo Yesu abotamaki mokolo yango, kasi baklisto bazwaki kaka mokolo ya fɛti ya solstice d’hiver.” Baloma bazalaki kosala fɛti ya kobima ya moi na eleko ya mpiɔ; bazalaki kosala biyenga, kolya, komɛla mpe kopesana bakado.—15/12, nkasa 4-5.
• Misala 7:59 emonisi ete Setefano asalaki libondeli epai ya Yesu?
Te. Biblia emonisi ete tosengeli kobondela kaka Yehova Nzambe. Lokola Setefano amonaki Yesu na kati ya emonaneli, ntango mosusu, yango etindaki ye asɛnga ye ete “Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai.” Setefano ayebaki ete Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosekwisa bakufi. (Yoane 5:27-29) Yango wana asɛngaki Yesu ete abatela elimo na ye to bomoi na ye tii na ntango ya lisekwa.—1/1, lokasa 31.
• Ndenge nini toyebi ete bomoi ya moto etángamá te?
Nzambe apesá moto bonsomi ya kopona, yango elongoli likanisi ete bomoi ya moto etángamá. Tokoki koloba te ete Yehova azali bolingo mpe azali sembo soki asilá kokana makambo nyonso ya bomoi na biso, bongo na nsima apesaka biso etumbu mpo na makambo ya mabe oyo tosalaka. (Deteronome 32:4; 1 Yoane 4:8)—15/1, nkasa 4-5.
• Mpo na nini ezali lolendo koloba ete makamwisi ekoki kosalema te?
Bato mosusu ya siansi, lokola bamoni ete bayebi makambo nyonso te na biloko oyo Nzambe akelá, batyaka lisusu ntembe te ete likambo moko boye ekoki kosalema, kasi basukaka kaka na koloba ete ezali mpasi mpo likambo yango esalema.—15/2, nkasa 5-6.
• Mpo na nini Mosambisi Samasona ayebisaki baboti na ye ete alingi bábalela ye mwana mwasi moko ya Bafilistia? (Basambisi 14:2)
Mibeko ya Nzambe epekisaki kobala moto oyo asambelaka banzambe ya lokuta. (Exode 34:11-16) Kasi, mwana mwasi wana Mofilistia ‘abongaki’ na miso ya Samasona. Samasona “azalaki koluka libaku ya kobundisa Bafilistia,” mpe mwasi yango abongaki mpo na mokano wana. Nzambe asungaki Samasona na nzela ya elimo santu na Ye. (Basambisi 13:25; 14:3, 4, 6)—15/3, lokasa 26.
• Soki moklisto apesi mosali moko ya Leta likabo mpo na mosala malamu oyo asali, yango ezali nde kanyaka?
Ezali mabe kopesa mosali ya Leta kanyaka, elingi koloba, kopesa ye mbongo to eloko mosusu mpo alongisa biso na likambo moko to asalela biso bolamu moko boye. Kasi, ezali mabe te kopesa likabo epai ya mosali moko ya Leta, ntango azali kosala mosala na ye to mpo asalela biso mosala ya malamu to mpo na koboya ete asalela biso makambo oyo ebongi te.—1/4, lokasa 29.