Lisekwa—Elikya moko kitoko
MANGOMBA mingi eteyaka ete lisekwa ekosalema. Coran, buku mosantu ya Bamizilma, ezali na mokapo mobimba oyo elobeli lisekwa. Eteni moko ya Sourate 75 elobi boye: “Nazali kolapa ndai na nkombo ya mokolo ya lisekwa . . . Moto akanisi nde ete Tozali na likoki ya kosangisa mikuwa na ye te? . . . Azali kotuna boye: ‘Lisekwa ekozala mokolo nini?’ Azali nde te, (ye), na nguya ya kozongisa moto oyo akufi na bomoi?”—Sourate 75:1-6, 40.
Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Lingomba ya Zoroastre eteyaka ete mokolo moko mabe ekosuka, bato nyonso bakosekwa, lisambisi ya nsuka ekozala mpe bayengebene bakofanda lisusu na mokili moko ya pɛto.”
Buku mosusu (Encyclopaedia Judaica) elobi ete lisekwa ezali “liteya oyo elobaka ete bakufi bakozonga na nzoto ya mosuni mpe bakozala lisusu na bomoi awa na mabelé.” Kaka buku yango elobi lisusu ete liteya oyo Lingomba ya Bayuda eteyaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te, eyokani te na elikya ya lisekwa. Buku yango elobi boye: “Liteya ya lisekwa ná oyo ya molimo oyo ekufaka te ezali na boyokani ata moke te.”
Lingomba ya Hindu eteyaka ete moto abotamaka mbala ebele, to azongaka na bomoi mbala na mbala na nzoto mosusu. Soki ezali mpenza bongo, moto asengeli kozala na molimo oyo etikalaka na bomoi soki akufi. Bhagavad Gita, buku mosantu ya Hindu elobaka ete: “Eloko oyo etondi na nzoto mobimba ekoki kokufa te. Moto moko te azali na likoki ya kobebisa molimo oyo ekufaka te.”
Lingomba ya Bouddha ekeseni na Lingomba ya Hindu na ndenge endimaka te ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. Kasi, bandimi mingi ya Lingomba ya Bouddha na Extrême-Orient bakómi kondima ete moto azali na molimo oyo ekufaka te mpe ekɔtaka na nzoto mosusu soki moto akufi.a
Makanisi ndenge na ndenge na ntina na liteya ya lisekwa
Na mangomba ya boklisto, ntango basalaka losambo mpo na bawei, mbala mingi basangisaka mateya yango mibale: Molimo ekufaka te mpe lisekwa. Na ndakisa, bapastɛrɛ ya Lingomba ya Anglican bazongelaka mbala mingi maloba oyo: “Lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na mawa monene na ye, amoni malamu kozwa molimo ya ndeko na biso oyo atiki biso, tozali kotya nzoto na ye na mabelé; kozongisa mabelé na mabelé, mputulu na mputulu; na elikya mpenza ete akosekwa mpo na kozwa bomoi ya seko, na nzela ya nkolo na biso Yesu Klisto.”—Buku ya mabondeli mpo na bato nyonso (na Lifalanse).
Maloba wana ekoki kotinda bato mosusu bámituna soki Biblia eteyaka ete bakufi bakosekwa to ete molimo ekufaka te. Kasi, yoká ndenge Oscar Cullmann, profɛsɛrɛ moko ya Lingomba ya protesta na France alobaki. Akomaki boye na buku na ye oyo elobi, Molimo ekufaka te to nde bakufi bakosekwa? (na Lifalanse): “Ezali ata na boyokani moke te kati na elikya oyo baklisto bazalaka na yango ete bakufi bakosekwa mpe liteya ya Bagrɛki oyo elobi ete molimo ekufaka te. . . . Atako na nsima mangomba ya boklisto eyokanisaki bindemeli wana mibale mpe lelo oyo bandimi mingi ya mangomba bazali koyeba kokesenisa mpenza mateya yango mibale te, namoni te ntina oyo nakoki kobomba likambo oyo ngai ná ebele ya bato mosusu ya mayele tomonaka ete ezali solo. . . . Elikya ya lisekwa nde esimbi Kondimana ya Sika mobimba. . . . Nzambe akozwa kaka bato oyo bakufaki mpenza mpe akozongisa bango na bomoi.”
Tokoki kokamwa te ete bato mingi bayebi te bokeseni oyo ezali na kati ya liwa ná lisekwa. Mpo na koyeba solo na ntina na likambo yango, tosengeli kotala na Biblia, buku oyo ezali na makanisi ya Yehova Nzambe, Mokeli ya moto. Biblia ezali na masolo mingi ya bato oyo basekwaki. Tiká tótalela masolo minei kati na yango mpe tómona oyo yango emonisi na ntina na lisekwa.
“Basi bazwaki bakufi na bango na nzela ya lisekwa”
Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Bayuda oyo bakómaki baklisto, alobaki ete basi ya kondima “bazwaki bakufi na bango na nzela ya lisekwa.” (Baebele 11:35) Moko ya basi yango azalaki kofanda na Zalefata, engumba moko ya Bafenisia pene na Sidona, na bokula ya Méditerranée. Ezali mwasi akufelá mobali oyo ayambaki Eliya, mosakoli ya Nzambe, mpe apesaki ye biloko ya kolya ata na ntango oyo nzala makasi ekɔtaki na mboka. Likambo ya mawa, mwana ya mwasi yango abɛlaki mpe akufaki. Eliya amemaki mwana yango mbala moko na eteni ya ndako ya likoló esika azalaki kolala mpe abondelaki Yehova azongisa ye na bomoi. Likamwisi esalemaki mpe mwana yango “abikaki.” Eliya azongisaki ye epai ya mama na ye mpe alobaki ete: “Talá, mwana na yo abiki.” Mama yango asalaki nini? Na esengo nyonso, alobaki boye: “Nayebi [sikoyo] ete yo ozali moto ya Nzambe mpe ete liloba ya [Yehova oyo ezali kobima, NW] na monɔkɔ na yo ezali solo.”—1 Mikonzi 17:22-24.
Na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 na sudi ya Zalefata, ezalaki na mobali moko ná mwasi na ye oyo basalisaki Elisa, moto oyo akómaki mosakoli na esika ya Eliya. Mwasi azalaki moto monene na mboka na ye Suneme. Ye ná mobali na ye bandimaki kopesa Elisa esika ya kolala na eteni ya ndako ya likoló. Mawa oyo bazalaki na yango mpo babotaki te ebongwanaki esengo ntango mwasi abotaki mwana mobali. Ntango mwana yango akómaki mwa mokóló, akómaki kokende kotika tata na ye ná babuki mbuma na elanga. Mokolo moko, likambo ya mawa esalemaki. Mwana alelaki motó mpasi. Mosali moko amemaki ye nokinoki na ndako. Mama na ye amemaki ye na makolo na ye, kasi nsukansuka mwana akufaki. Mama na ye amonaki malamu abenga Elisa mpo asalisa ye. Azwaki mosali moko akende kotika ye na nɔrdi-wɛsti, na Ngomba Kalamele, epai Elisa azalaki kofanda.
Elisa atindaki mosali na ye Gehazi liboso mpe, ntango Gehazi akómaki kuna, amonaki ete mwana yango akufaki solo. Elisa ná mwasi yango balandaki na nsima, kasi nini esalemaki ntango bakómaki na Suneme? Biblia elobi na 2 Mikonzi 4:32-37 boye: “Ekɔtaki Elisa kati na ndako, mwana asili kokufa mpe alalaki likoló ya mbeto na ye. Boye akɔtaki mpe akangaki ekuke liboso na bango mibale mpe abɔndelaki [Yehova]. Abutaki mpe alalaki likoló ya mwana, atyaki monɔkɔ na ye likoló ya monɔkɔ na ye, miso na ye likoló ya miso na ye, mabɔkɔ na ye likoló ya mabɔkɔ na ye; amitandaki likoló ya mwana mpe nzoto ya mwana ezwaki mɔtɔ. Na nsima azongaki mpe atambolatambolaki na ndako epai na epai; abutaki lisusu mpe amitandaki likoló na ye; mwana [akosolaki] mbala nsambo mpe mwana azipolaki miso na ye. Abyangaki Gehazi mpe alobaki ete, Byanga mwasi oyo ya Suneme. Abyangaki ye mpe wana eyaki ye epai na ye, alobaki na ye ete, Kamatá mwana na yo. Ayaki mpe akweaki na makolo na ye; akamataki mwana na ye mpe abimaki.”
Lokola mwasi akufelá mobali ya Zalefata, mwasi wana ya Suneme mpe ayebaki ete mwana na ye asekwaki na nguya ya Nzambe. Basi yango nyonso mibale basepelaki makasi ntango Nzambe azongisaki bana na bango na bomoi.
Bato oyo basekwaki na ntango ya Yesu
Mbula soki 900 na nsima, moto mosusu asekwaki mwa moke na nɔrdi ya Suneme, pene na mboka Naine. Yesu ná bayekoli na ye bautaki na Kapalanaume mpe bakómaki pene na Naine, mpe bakutanaki na bato oyo bazalaki kokende kokunda ebembe, mpe Yesu amonaki mwasi akufelá mobali oyo mwana na ye kaka moko ya mobali akufaki. Yesu alobaki na ye atika kolela. Monganga Luka ayebisi likambo oyo esalemaki na nsima: “Na yango [Yesu] apusanaki mpe asimbaki mbeto ya ebembe, mpe bato oyo bazalaki komema batɛlɛmaki, mpe alobaki ete: ‘Elenge mobali, nalobi na yo, Tɛlɛmá!’ Mpe mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye epai ya mama na ye.” (Luka 7:14, 15) Bato oyo bamonaki likamwisi yango bapesaki Nzambe nkembo. Nsango ya likambo yango epalanganaki na ngámbo ya sudi, na Yudea mobimba mpe na mokili ya zingazinga. Bayekoli ya Yoane Mobatisi bayokaki nsango ya likamwisi yango mpe bakendaki kobɛtɛla ye lisolo. Yoane atindaki bango bákende kokutana na Yesu mpe bátuna ye soki ye nde Masiya oyo bazalaki kozela. Yesu alobaki na bango boye: “Bókende, bóyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki ete: bato bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.”—Luka 7:22.
Kati na makamwisi nyonso ya kosekwisa bato oyo Yesu asalaki, oyo ekendá mpenza nsango ezali oyo ya moninga na ye ya motema Lazalo. Mwa mikolo elekaki banda ntango Lazalo akufaki tii ntango Yesu akómaki na mboka na bango. Ntango Yesu akómaki na Betania, Lazalo asilaki kosala mikolo minei na nse ya mabelé. Ntango Yesu asɛngaki ete bálongola libanga oyo ezalaki likoló ya lilita, Malata alobaki ete: “Nkolo, sikoyo asengeli kolumba nsolo, mpo esali mikolo minei.” (Yoane 11:38, 39) Kasi, atako Lazalo apolaki, yango epekisaki te ete asekwisama. Yesu agangaki na mongongo makasi mpe “moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ ekangamá na bilamba ya kozinga, mpe elongi na ye ekangamaki na eteni moko ya elamba.” Makambo oyo banguna ya Yesu basalaki na nsima ezali komonisa ete moto oyo asekwaki ezalaki mpenza Lazalo.—Yoane 11:43, 44; 12:1, 9-11.
Tosimbi makambo nini na masolo minei wana ya lisekwa? Mbala nyonso minei, kaka moto oyo akufaki nde asekwaki. Bato nyonso, ezala mpe bandeko na bango, bayebaki bango. Moko te kati na bango alobaki ete amonaki makambo na boumeli ya mwa ntango yo akufaki. Moko te alobaki ete asalaki mobembo na mokili mosusu. Bango nyonso bazongaki na bomoi na nzoto kolɔngɔnɔ. Mpo na bango, ezalaki lokola nde balalaki mwa moke mpe balamuki, ndenge kaka Yesu alobaki. (Yoane 11:11) Atako bongo, bato yango nyonso bakufaki lisusu.
Elikya kitoko ya kokutana lisusu na bandeko na biso oyo bakufá
Mwa moke nsima ya liwa ya Owen oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, tata na ye akendeki kotala moninga moko ya kartye. Kuna, amonaki likoló ya mesa lokasa moko ya libyangi mpo na lisukulu ya bato nyonso oyo Batatoli ya Yehova babongisaki. Motó ya likambo na yango—“Bakufi bazali wapi?”—ebendaki likebi na ye. Yango ezalaki mpenza motuna oyo azalaki komituna. Akendaki kolanda lisukulu yango mpe mateya ya Biblia oyo ayokaki ebɔndisaki ye mpenza. Ayebaki ete bakufi banyokwamaka te. Ayebaki mpe ete Owen ná bato mosusu oyo bakufá bazali kozela na kati ya malita tii ntango bakolamuka na mokolo ya lisekwa, kasi bazali te konyokwama na lifelo ya mɔtɔ to Nzambe azwi bango mpo bákóma baanzelu na likoló te.—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4.
Likama moko esalemá na libota na yo? Ozali komituna lokola tata ya Owen soki bandeko na yo oyo bakufá bazali wapi mpe soki okomonana na bango mokolo mosusu? Soki ezali bongo, tosɛngi yo otalela makambo mosusu oyo Biblia elobi na ntina ya lisekwa. Ntango mosusu omitunaka: ‘Lisekwa ekosalema ntango nini? Banani mpenza bakosekwa?’ Tosɛngi yo otánga masolo oyo elandi mpo na kozwa biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na buku L’Humanité à la recherche de Dieu, nkasa 150-154, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Yehova asalelaki Elisa mpo na kosekwisa mwana mobali ya mwasi ya Suneme
[Elilingi na lokasa 5]
Eliya abondelaki Yehova mpo asekwisa mwana mobali moko
[Elilingi na lokasa 6]
Yesu asekwisaki mwana mobali ya mwasi akufelá mobali ya Naine
[Elilingi na lokasa 7]
Lisekwa ekosala ete bato bákutana lisusu na bandeko na bango oyo bakufá