Bobikisami, na misala kaka te, kasi na nzela ya boboto monene
“Bobikisami na nzela ya kondima . . . Euti na misala te, mpo moto moko te azwa ntina ya komikumisa.”—BAEFESE 2:8, 9.
1. Na kotalela makambo oyo bato basalaka, ndenge nini baklisto bakeseni na bato mosusu, mpe mpo na nini?
LELO oyo bato bakómaka lolendo mpo na makambo oyo basali, mpe mbala mingi bamikumisaka mpo na yango. Baklisto bazali lokola bango te. Baboyaka komikumisa mpo na makambo oyo basali, ezala ata oyo bazali kosala mpo na losambo ya solo. Atako basepelaka mpo na mosala oyo basaleli ya Yehova na mokili mobimba basali, babendaka likebi te na oyo mokomoko na bango asalaki. Bayebaka ete na mosala ya Yehova, kozala na makanisi ya malamu ezali na ntina mingi koleka makambo oyo moto azali kosala. Moto nyonso oyo akozwa likabo ya bomoi ya seko, akozwa yango te mpo na misala oyo azali kosala, kasi mpo na kondima na ye mpe mpo na boboto monene ya Nzambe.—Luka 17:10; Yoane 3:16.
2, 3. Paulo azalaki komikumisa na likambo nini, mpe mpo na nini?
2 Ntoma Paulo ayebaki likambo yango malamu. Nsima ya kobondela Yehova mbala misato mobimba mpo alongola ye “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” Yehova ayanolaki ye ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” Na komikitisa nyonso, Paulo andimaki ekateli wana ya Yehova mpe alobaki boye: “Na yango, na esengo ya koleka mpenza nakomikumisa nde na oyo etali bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Klisto ezala lokola hema likoló na ngai.” Tosengeli mpenza komekola ezaleli wana ya komikitisa oyo Paulo amonisaki.—2 Bakolinti 12:7-9.
3 Atako Paulo asalaki mingi na mosala ya boklisto, ayebaki malamu ete azalaki kosala makambo yango na makoki na ye moko te. Na komikitisa nyonso alobaki ete: “Epai na ngai, moto ya moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso, boboto monene wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo mosusu nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Klisto oyo bozindo na yango ekoki komekama te.” (Baefese 3:8) Maloba ya Paulo emonisi ete azalaki soki moke te na elimo ya komikumisa to komimona sembo koleka bato nyonso. “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene epai ya bato ya komikitisa.” (Yakobo 4:6; 1 Petelo 5:5) Lokola Paulo, biso mpe tomonaka ete tozali bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na biso?
“Bótalelaka bamosusu ete baleki bino”
4. Mpo na nini tokoki ntango mosusu kozala na mokakatano ya komona ete basusu baleki biso?
4 Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “[Bósalaka] eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bótalelaka bamosusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Ezali pɛtɛɛ te mpo na kosala ndenge wana, mingimingi soki tozali na mikumba. Ekoki kozala ete tozali na mokakatano yango mpo tozali kolanda, na lolenge moko to mosusu, elimo ya kowelana oyo ezali se kokola na mokili lelo oyo. Mbala mosusu, bazalaki koyebisa biso ntango tozalaki bana ete tólɛmbisaka nzoto to tótikalaka nsima te, ezala ntango tozali na bandeko na biso na ndako to ntango tozali na baninga na biso na eteyelo. Ntango mosusu bazalaki kolendisa yo mbala na mbala ete ozalaka ntango nyonso vɛdɛti na kati ya eteyelo, ezala na masano to na mayele ya kelasi. Toboyi te, komipesa mpenza na likambo moko ya malamu ezali mabe te. Nzokande, soki moklisto amipesi na likambo moko, asalaka yango te mpo na kobenda likebi ya bato epai na ye moko, kasi asalaka yango nde mpo na kozwa mpenza litomba na likambo oyo azali kosala; mbala mosusu ata mpo na koluka bolamu ya basusu. Nzokande, koluka ntango nyonso lokumu ya kozala moto ya liboso ekoki kozala likama. Na ndenge nini?
5. Soki moto asali eloko moko te mpo na kolonga elimo ya kowelana, yango ekoki kosukela ye ndenge nini?
5 Soki moto asali eloko te mpo na kolonga elimo ya kowelana to ya komitya liboso, akoki kozanga limemya mpe kokóma lolendo. Akoki kobanda kolula makoki mpe mikumba ya basusu. Masese 28:22 elobi ete: “Ye oyo akoleka mbangu ete azala mozwi azali na liso mabe; ayebi te ete bobola ekoyela ye.” Na lolendo nyonso, akoki ata kobanda koluka mikumba oyo ekoki naino te mpo na ye. Mpo na komilongisa, akoki kobanda koimaima mpe kotyola basusu; ezaleli oyo baklisto basengeli koboya mpenza. (Yakobo 3:14-16) Moto ya ndenge wana, akoki mpenza kokolisa elimo ya kolukaka kaka matomba na ye moko.
6. Likebisi nini Biblia epesi mpo na elimo ya kowelana?
6 Na yango, Biblia elendisi baklisto ete: “Tiká tókóma te na ezaleli ya komitya liboso, kobimisáká kowelana na kati na biso, koyokelanáká likunya.” (Bagalatia 5:26) Mpo na moklisto moko oyo akómaki na ezaleli yango, ntoma Yoane alobaki boye: “Nakomelaki lisangá mwa likambo moko, kasi Diotelefe, oyo alingaka kozwa esika ya liboso na kati na bango, azali koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai na biso. Yango wana, soki nayei, nakokanisa lisusu misala na ye oyo azali kokoba kosala, kolobaloba maloba ya mabe mpo na biso.” Ezali mpenza mawa soki moklisto akwei na motambo ya ndenge wana!—3 Yoane 9, 10.
7. Na kotalela elimo ya kowelana oyo etondi lelo na bisika ya mosala, likambo nini moklisto asengeli kokeba na yango?
7 Ya solo, tokoki kokanisa te ete moklisto akoki kokima lolenge nyonso ya kowelana. Na ndakisa, mosala na ye ya mosuni ekoki kosɛnga ye aluka kozala na bakiliya mingi koleka baninga oyo atɛkaka na bango biloko ndenge moko to asalaka na bango mosala ya ndenge moko. Kasi, ata na ntango wana, moklisto asengeli kosala mosala na ye na limemya mpo na basusu, na bolingo, mpe asengeli kopesaka bango valɛrɛ. Akopɛngola makambo oyo mibeko epekisi to oyo ebongi te mpo na moklisto mpe akolinga te ayebana lokola moto oyo alingá kowelana. Asengeli te kokanisa ete koluka kozala moto ya liboso na makambo nyonso nde likambo eleki ntina na bomoi. Soki moklisto asengeli kozala na elimo wana te na mosala na ye ya mosuni, emonani ete asengeli komonisa yango ata moke te na makambo ya losambo!
“Na komikokanisáká na moto mosusu te”
8, 9. (a) Mpo na nini bankulutu basengeli te kowelanaka? (b) Mpo na nini toli ya 1 Petelo 4:10 ezali malamu mpo na basaleli ya Nzambe nyonso?
8 Elimo oyo baklisto basengeli kozala na yango na makambo ya losambo emonisami na maloba ya Biblia oyo: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.” (Bagalatia 6:4) Lokola bankulutu na kati ya lisangá bayebi ete basengeli kowelanaka te, bayokanaka malamu mpe basalaka na bomoko lokola binama ya nzoto. Basepelaka na oyo mokomoko na bango asalaka mpo na bolamu ya lisangá mobimba. Na yango, baboyaka elimo ya kowelana oyo ebimisaka mobulu mpe bapesaka ndakisa malamu ya bomoko na lisangá mobimba.
9 Bankulutu mosusu bakoki kosala makambo malamu koleka baninga na bango mosusu, to mpe bakoki kozala na bososoli mingi mpo baumeli mingi na bomoi, baumeli na mosala ya nkulutu, to babotamá na makoki mingi. Yango wana, bango nyonso bazalaka na mikumba ndenge moko te na kati ya ebongiseli ya Yehova. Na esika ya koluka kokokana na basusu, babosanaka te toli oyo: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana bino na bino lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge.” (1 Petelo 4:10) Kasi soki totali malamu, toli yango ezali malamu mpo na basaleli ya Yehova nyonso, mpo bango nyonso bazali na boyebi ya sikisiki mpe bango nyonso bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu.
10. Yehova akondima mosala na biso mosantu kaka soki tosali nini?
10 Mosala na biso mosantu ekosepelisa Yehova kaka soki tozali kosala yango na bolingo mpe na komipesa, kasi te na likanisi ya komitombola liboso ya bamosusu. Na yango, ntango tozali kosala mpo na kotombola losambo ya solo, tosengeli kozala na bokatikati. Atako moto moko te akoki koyeba malamumalamu makanisi ya moninga na ye, Yehova “atalaka mitema ya bato.” (Masese 24:12, Bible na lingala ya lelo oyo; 1 Samwele 16:7) Na yango, tosengeli komitunaka mbala na mbala: ‘Nini etindaka ngai nasalela Yehova?’—Nzembo 24:3, 4; Matai 5:8.
Lolenge malamu ya kotalela misala na biso ya kondima
11. Mituna nini ebongi tómitunaka mpo na mosala na biso ya boklisto?
11 Soki makanisi oyo tosalelaka na yango Yehova ezali na ntina mingi mpo andima biso, ndenge nini mpenza tosengeli kotalelaka misala na biso ya kondima? Soki tozali kosala mosala na biso na makanisi ya malamu, ezali na ntina lisusu tópesaka lapolo ya mosala oyo tosalaka to ya bangonga oyo tolekisaka na mosala yango? Ebongi mpenza tómituna mituna wana, mpo eloko eleki ntina na mosala na biso ya boklisto ezali te bangonga mingi to balapolo ya malamu.
12, 13. (a) Wapi mwa bantina oyo topesaka lapolo ya mosala na biso ya kosakola? (b) Wapi bantina oyo tosepelaka soki totali lapolo ya mosala ya kosakola na mokili mobimba?
12 Talá ndenge buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova elobi: “Bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto bazalaki kopesa motuya mingi na balapolo oyo ezalaki komonisa ndenge mosala ya kosakola ezalaki kokende liboso. (Malako 6:30) Mokanda ya Misala emonisi ete ntango elimo santu ekitelaki bayekoli na mokolo ya pantekote, bazalaki bato soki 120. Eumelaki te, bayekoli bakómaki 3 000 mpe na nsima 5 000. . . . (Misala 1:15; 2:5-11, 41, 47; 4:4; 6:7) Bansango malamu wana ya bokoli elendisaki mpenza bayekoli!” Talá ntina oyo Batatoli ya Yehova lelo oyo basalaka nyonso mpo na kopesa balapolo ya sikisiki ya mosala oyo bazali kosala na mokili mobimba, ndenge mpenza Yesu alobaki: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Balapolo yango emonisaka ndenge mpenza mosala ezali kosalema na mokili mobimba. Emonisaka epai nini mposa ezali, mikanda nini mpe motángo nini na yango esengeli mpo na kotambwisa mosala ya kosakola.
13 Na yango, balapolo oyo topesaka esalisaka biso tókokisa malamumalamu mokumba na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Longola yango, ntango toyokaka balapolo ya mosala oyo bandeko na biso bazali kosala na bisika mosusu na mokili, yango elendisaka biso mpenza! Bansango ya bokoli oyo ezali kosalema na mokili mobimba esepelisaka biso mingi, etindaka biso tósala mingi mpe esalisaka biso tómona ete Yehova azali kopambola. Ezali mpenza esengo koyeba ete lapolo ya mokomoko na biso mpe ekɔtaka na kati ya lapolo yango ya mokili mobimba! Soki totali lapolo ya mokili mobimba, tokomona ete oyo ya mokomoko na biso ezali moke mpenza, kasi atako bongo, Yehova azali komona yango. (Malako 12:42, 43) Kobosana te ete soki opesi lapolo na yo te, oyo ya mokili mobimba ekozala ndambo.
14. Longola kosakola mpe koteya, wapi makambo mosusu oyo tosalaka na losambo na biso epai ya Yehova?
14 Kutu, makambo mingi oyo Motatoli mokomoko asalaka mpo na kokokisa mokumba na ye ya mosaleli ya Yehova oyo amipesi ekomamaka na lapolo te. Na ndakisa, boyekoli ya moto ye moko, koyangana na makita mpe kopesa biyano, misala mosusu ya lisangá, lisungi oyo topesaka bandeko na biso bandimi, mbongo oyo topesaka mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba, mpe bongo na bongo, ekɔtaka na lapolo te. Na yango, atako lapolo na biso ya mosala ya kosakola esalisaka biso tókoba komonisa molende na mosala ya kosakola mpe tólɛmbisa mabɔkɔ te, tosengeli kotalela yango na ndenge ebongi. Tosengeli kokanisa te ete lapolo na biso ya mosala ya kosakola nde ekosala ete tózwa bomoi ya seko to te.
“Molende mpo na misala ya malamu”
15. Mpo na nini misala ezali na ntina, ata soki tokoki kobika kaka mpo na yango te?
15 Emonani polele ete misala ezali na ntina, ata soki tokoki kobika kaka mpo na yango te. Talá ntina oyo baklisto babengami ‘ekólo ya bato na ye moko, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu’ mpe ntina oyo balendisami ete ‘bátyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.’ (Tito 2:14; Baebele 10:24) Yakobo, mokomi mosusu ya Biblia, abɛtaki mpe nsɛtɛ na likambo yango na maloba oyo: “Se ndenge nzoto oyo ezangi elimo ekufi, ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala ekufi.”—Yakobo 2:26.
16. Eloko nini ezali na ntina mingi koleka ata misala, kasi tosengeli kokeba na likambo nini?
16 Kasi, atako misala malamu ezali na ntina mingi, makanisi oyo etindaka biso tósala misala yango ezali na ntina mingi koleka. Yango wana, ezali na ntina tótalelaka makanisi na biso mbala na mbala. Kasi, lokola moto moko te akoki koyeba mpenza makanisi ya basusu, tosengeli kokeba ete tókaniselaka bato mabe te. Biblia etuni biso boye: “Yo nde nani mpo osambisa mosali na kati ya ndako ya moto mosusu?” Mpe epesi eyano ya polele ete: “Epai ya nkolo na ye moko nde atɛlɛmaka to akweaka.” (Baloma 14:4) Yehova, Nkolo ya bato nyonso, mpe Klisto Yesu, Zuzi oyo Ye atyá, bakosambisa biso na kotalela kaka misala na biso te, kasi bakotalela mpe makanisi na biso, mikumba na biso, bolingo na biso, mpe ndenge tomipesi epai ya Nzambe. Kaka Yehova ná Klisto Yesu nde bakoki koyeba na bosikisiki soki tosalaki to te likambo oyo basɛngi baklisto, oyo ezali na maloba ya ntoma Paulo oyo: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”—2 Timote 2:15; 2 Petelo 1:10; 3:14.
17 Ntango tozali kosala milende, mpo na nini tosengeli kobosana te likanisi ya Yakobo 3:17?
17 Yehova asɛngaka biso makambo makasimakasi te. Ndenge Yakobo 3:17 emonisi yango, “bwanya oyo euti na likoló ezali” mpe “makambo makasimakasi te.” Tokomonisa ete tozali na bwanya mpe tobongi mpenza soki tozali kolanda ndakisa ya Yehova na likambo yango! Na yango, tosengeli te komityelaka mikano oyo eleki makoki na biso; tosengeli mpe kotyelaka bandeko na biso mikano ya ndenge yango te.
18. Tokoki kozala na elikya nini ntango tozali kotalela na bokatikati misala na biso mpe boboto monene ya Yehova?
18 Soki tozali kotalela misala na biso ya kondima mpe boboto monene ya Yehova na bokatikati, tokobungisa te esengo na biso, ezaleli oyo ekesenisaka basaleli ya solo ya Yehova na bato mosusu. (Yisaya 65:13, 14) Tokoki kosepela na ndenge Yehova azali kopambola basaleli na ye nyonso, kozanga ete tótalela milende oyo biso moko tozali kosala. Na nzela ya ‘mabondeli mpe na malɔmbɔ elongo na matɔndi,’ tókokoba kobondela Nzambe asalisa biso na milende oyo tozali kosala. Na ntembe te, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na [biso] mpe makoki na [biso] ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:4-7) Ya solo, tokoki mpenza kobɔndisama mpe kolendisama soki toyebi ete tokobika kaka mpo na misala te, kasi mpo na boboto monene ya Yehova.
Okoki kolimbola ntina oyo baklisto
• baboyaka komikumisa mpo na makambo oyo basali?
• baboyaka elimo ya kowelana?
• bapesaka lapolo ya mosala na bango ya kosakola?
• baboyaka kokanisela baklisto mosusu mabe?
[Elilingi na lokasa 15]
“Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo”
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Bankulutu basepelaka na oyo mokomoko na bango asalaka mpo na bolamu ya lisangá mobimba
[Bililingi na lokasa 18, 19]
Soki opesi lapolo na yo te, oyo ya mokili mobimba ekozala ndambo