Ntango matata ebimi kati na mwasi ná mobali
MOBALI to mwasi moko te alingaka ete matata ezala na libala, kasi tomonaka ete na mabala mingi matata ezangaka te. Na ndakisa, mwasi to mobali akoki koloba likambo moko oyo epesi molongani na ye nkanda. Bamatisi mingongo, basiliki makasi mpe babandi koswana. Na nsima, moko te akolobisa lisusu moninga. Nsukansuka, nkanda ekokita mpe bakosɛngana bolimbisi. Kimya ezongi.
Mbala mingi tomonaka na televizyo bateyatre mpe masɛki oyo ezali kolobela matata oyo ebimaka na mabala, kasi likambo yango ezali lisɛki ya mpamba te. Kutu, lisese moko ya Biblia elobi ete: “Kozanga kokanisa liboso ya koloba ezokisaka mpenza lokola mopanga.” (Masese 12:18, Today’s English Version) Ya solo, maloba mabe ekoki kotika moto na mpota na motema ntango molai nsima ya koswana. Koswana ekoki ata kobimisa bitumba.—Exode 21:18.
Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mwa mpasi mpo mikakatano ezanga na libala. (Genese 3:16; 1 Bakolinti 7:28) Atako bongo, tokoki koloba te ete koswana ntango nyonso ezali malamu. Bato ya mayele bamonisi ete soki mwasi ná mobali bazali na momeseno ya koswana, bakoki kosuka na kokabwana. Yango wana, ezali na ntina ete yo ná molongani na yo bóyekola kosilisaka mikakatano na bino na ndenge ya malamu.
Bóluka koyeba likambo oyo ebimisaka matata
Soki boswanaka ntango nyonso, bóluka koyeba soki ezali na likambo moko oyo etindaka bino bóswana. Na ndakisa, yo ná molongani na yo bosalaka nini ntango boyokani te na likambo moko? Botombolaka mbala moko mongongo mpe bobandaka kofingana mpe kopesana foti? Soki ezali bongo, bokoki kosala nini?
Ya liboso, luká na bosembo mpenza koyeba mabe na yo. Osilikaka mpambampamba? Olingaka koswana mingi? Molongani na yo ayebi yo lokola moto oyo alingaka koswana mingi? Motuna oyo ya nsuka ezali na ntina mingi mpamba te yo ná molongani na yo bokoki kozala na makanisi ndenge moko te na likambo etali koswana.
Na ndakisa, ekoki kozala ete molongani na yo alingaka koloba mingi te, kasi yo olobaka makambo nyonso polelepolele. Okoki koloba boye: “Ntango nazalaki kokola, ndenge wana nde biso nyonso tozalaki kosolola na libota na biso. Yango ezali koswana te!” Ntango mosusu yo ozali mpenza komona ete yango ezali koswana te. Ekoki kozala ete oyo yo ozali kobenga koloba polelepolele, molongani na yo azali komona yango mpenza nde koswana. Soki oyebi ete yo ná molongani na yo bozali na momeseno ya koloba ndenge moko te, yango ekoki kosalisa bino bókima matata na ndako na bino.
Tóyeba ete koswana esɛngaka kaka koganga te. Paulo akomelaki baklisto ete: “Tiká . . . koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino.” (Baefese 4:31) “Koganga” elimboli komatisa mongongo, nzokande “kofinga” emonisi maloba mabe oyo moto azali kobimisa. Ndimbola wana emonisi ete ata soki togangi te, soki maloba na biso epesi moninga nkanda to eyokisi ye nsɔni, yango mpe ezali koswana.
Na kotalela makanisi oyo touti komonisa, talelá lisusu ndenge okoki kosilisa matata na molongani na yo. Olingaka koswana mingi? Ndenge tomoni yango, mpo na koyeba mpenza soki olingaka koswana to te, esengeli koyeba likanisi ya molongani na yo. Na esika ya koloba ete molongani na yo azali kolekisa ndelo, luká nde komitalela ndenge ye atalelaka yo, mpe salá mpenza mbongwana oyo ebongi. Paulo akomaki boye: “Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”—1 Bakolinti 10:24.
“Bókeba na ndenge bozali koyoka”
Lolenge mosusu ya kosilisa matata ezwami na maloba ya Yesu oyo: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:18) Ya solo, Yesu azalaki te kolobela ndenge mwasi ná mobali basengeli kosololaka. Kasi, toli yango ezali mpe malamu mpo na babalani. Oyokaka molongani na yo? Oyokaka mpenza ye? To okataka ye mbala moko maloba mpe obandaka kopesa makanisi, atako oyebi mpenza likambo oyo alingi koloba te? Biblia elobi boye: “Moto oyo apesaka eyano liboso ya koyoka likambo azali zoba, pe amiyokisaka soni.” (Masese 18:13, Bible na lingala ya lelo oyo) Ntango matata ebimi, yo ná molongani na yo bosengeli kolobela likambo yango mpe mokomoko na bino asengeli koyoka moninga malamu ntango azali koloba.
Na esika ya komona makanisi ya molongani na yo mpamba, luká nde ‘komitya na esika na ye.’ (1 Petelo 3:8) Na Grɛki ya ebandeli, liloba yango elimboli mpenzampenza koyoka mpasi oyo moto mosusu azali koyoka. Soki molongani na yo azali kotungisama na likambo moko, yo mpe osengeli kotungisama elongo na ye. Salá nyonso otalela likambo yango ndenge ye azali kotalela yango.
Na ntembe te Yisaka, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, asalaki mpenza bongo. Biblia eyebisi biso ete mwasi na ye, Lebeka, azalaki komitungisa mingi mpo na mwana na ye Yakobo. Alobaki na Yisaka ete: “Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soki Yakobo akobala mwasi Mohiti lokola baoyo, mwasi ya mokili oyo, nde bomoi na ngai ekozala [lisusu na ntina te, NW]?”—Genese 27:46.
Emonani ete lokola Lebeka azalaki komitungisa mingi, alekisaki ndelo na maloba na ye. Ezali mpenza solo ete alɛmbaki bomoi na ye? Akokaki mpenza kondima akufa soki mwana na ye abalaki mwasi Mohiti? Mpenza te. Atako bongo, Yisaka amonaki makanisi ya Lebeka mpamba te. Amonaki ete makanisi ya Lebeka ezalaki na nzela, mpe akokisaki mposa na ye. (Genese 28:1) Yo mpe osengeli kosala bongo mbala ya nsima oyo molongani na yo akotungisama na likambo moko. Na esika otalela likambo yango lokola ezangi ntina, yoká molongani na yo, memya likanisi na ye, mpe monisá ye motema mawa.
Ntina ya koyoka mpe ya kososola
Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Bososoli ya moto ya mayele [ekokitisa] nkanda na ye.” (Masese 19:11) Ntango bozali koswana makasi, ezalaka mpasi te mpo oyanola mabe na maloba nyonso ya mabe oyo molongani na yo azali kobimisa. Mbala mingi, yango epelisaka lisusu mɔtɔ. Yango wana, ntango molongani na yo azali koloba, salá makasi oyokaka te kaka maloba oyo azali kobimisa kasi mpe makanisi oyo ebombami na maloba yango. Bososoli ya ndenge wana ekosalisa yo obosana nkanda to mitungisi na yo mpe oluka koyeba epai wapi likambo ebandaki.
Na ndakisa, soki mwasi na yo alobi ete: “Yo olekisaka ntango elongo na ngai ata moke te!” Okoki mbala mosusu kosilika mpe kobanda kosala makambo mosusu na nko mpo na komonisa ete osepeli te na likambo oyo alobi. Okoki mbala mosusu koyanola boye: “Nalekisaki na yo mokolo mobimba na sanza eleki!” Kasi, soki otye mpenza likebi na maloba ya mwasi na yo, okomona ete eloko oyo azali kosɛnga ezali te ete okóma kolekisa ngonga mingi elongo na ye. Nzokande, ekoki kozala amoni ete okipaka to olingaka ye lisusu te, yango wana azali kosɛnga yo omonisa ete osepelaka na ye.
Kanisá ete ozali mwasi, outi kosomba eloko moko, kasi mobali na yo asepeli te mpe atuni yo boye: “Mpo na nini obebisi mbongo mingi boye?” Okoki mbala moko kobanda komilongisa mpe kolobela mbongo oyo bozali na yango na ndako to koluka komonisa ye ete eloko oyo ye asombaki eleki oyo yo osombi na ntalo. Nzokande, bososoli ekosalisa yo omona ete mobali na yo azali kolobela mpenza mbongo te. Ekoki nde kozala ete asepeli te mpo otunaki ye te liboso ozwa ekateli ya kosomba eloko ya monene bongo.
Ya solo, ezala bazali kolobela ntango oyo molongani na bango alekisaka elongo na bango to ekateli oyo azwaki mpo na kosomba eloko moko, babalani nyonso balobaka ndenge moko te. Liteya oyo tokoki kozwa ezali ete ntango boyokani te na likambo moko, bososoli ekosalisa yo okitisa nkanda mpe ekopesa yo likoki ya komona mpenza likambo oyo ezali. Na esika osilika mbala moko, landá toli oyo Yakobo apesaki ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.”—Yakobo 1:19.
Ntango bozali kosolola, kobosana te ete lolenge oyo ozali koloba na molongani na yo ezali na ntina mingi. Biblia elobi ete “lolemo ya bato ya mayele ezali na bomoi.” (Masese 12:18) Ntango yo ná molongani na yo bozwani matata, maloba na yo ezokisaka to ebikisaka? Maloba na yo epelisaka mɔtɔ to nde elukaka boyokani ezonga? Ndenge tomoni yango, maloba ya nkanda to mangala mabe epelisaka nde mɔtɔ.—Masese 29:22.
Soki boyokani na likambo moko te mpe bokómi koswana, bósala makasi bólobela kaka likambo oyo ezali kokabola bino. Na esika obanda kolobela mabe ya moninga, luká nde mosisa ya likambo oyo bozali na yango. Na esika bóluka koyeba nani alongi, bóluka nde koyeba nini ebongi kosala. Osengeli kokeba ete maloba na yo epelisa mɔtɔ te. Biblia elobi ete: “Liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Masese 15:1) Ya solo, makambo oyo ozali koloba mpe lolenge oyo ozali kolobela yango, ekoki komonisa molongani na yo soki ozali na mposa bóyokana to te.
Luká kosilisa matata na esika ya koluka kolonga
Ntango matata ebimi, mokano na biso esengeli kozala te ya kolonga kasi nde ya kosilisa yango. Nini osengeli kosala? Likambo eleki malamu oyo osengeli kosala ezali koluka toli ya Biblia mpe kosalela yango; mpe yango ezali mingimingi mokumba ya mobali. Soki matata ebimi, na esika bóbanda kobimisa makanisi ebeleebele, mpo na nini te koluka likanisi ya Yehova? Bondelá Yehova, mpe luká kimya ya Nzambe oyo ekobatela motema na yo mpe makoki na yo ya kokanisa. (Baefese 6:18; Baefese 4:6, 7) Salá makasi omibanzabanza te kaka na makambo na yo moko kasi mpe na oyo ya molongani na yo.—Bafilipi 2:4.
Mbala mingi, matata ekómaka lisusu makasi soki moto atiki mpasi oyo ayoki na motema mpe nkanda eyangela makanisi mpe misala na ye. Nzokande, kolanda toli ya Liloba ya Nzambe ememaka kimya, boyokani mpe mapamboli ya Yehova. (2 Bakolinti 13:11) Na yango, tiká ete “bwanya oyo euti na likoló” etambwisaka yo, monisaká bizaleli ya malamu, mpe okobuka mbuma oyo ebongi na “baoyo batyaka kimya.”—Yakobo 3:17, 18.
Ya solo, biso nyonso tosengeli koyekola kosilisaka matata na kimya, ata soki yango esɛngi biso tómipimela makambo mosusu. (1 Bakolinti 6:7) Salelá toli oyo Paulo apesi biso ete tólongola ‘nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na [biso]. . . . Tólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe tólata bomoto ya sika.’—Bakolose 3:8-10.
Ya solo, ntango mosusu ekokómela yo oloba makambo mpe na nsima okóma komitungisa mpo na yango. (Yakobo 3:8) Soki yango ekómeli yo, sɛngá molongani na yo bolimbisi. Kobá kosala milende. Nsukansuka, yo ná molongani na yo bokoki komona mbongwana monene na lolenge na bino ya kosilisa matata.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Makambo misato oyo tosengeli kosala mpo na kosilisa matata
• Yokaká molongani na yo.—Masese 10:19
• Memyaká likanisi na ye.—Bafilipi 2:4
• Yanolaká ye na bolingo.—1 Bakolinti 13:4-7
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Oyo okoki kosala sikoyo
Tuná molongani na yo mituna oyo elandi, mpe yoká biyano oyo azali kopesa kozanga ete okata ye. Na nsima, ye mpe akoki kotuna yo kaka mituna yango.
• Nalingaka koswana mingi?
• Nayokaka yo mpenza ntango ozali koloba, to nakataka yo maloba liboso kutu osilisa?
• Nazalaka na maloba ya boboto te to ya nkanda?
• Ndenge nini biso nyonso tokoki kosala mpo na kobongisa lolenge na biso ya koloba; mingimingi ntango toyokani te na likambo moko?
[Elilingi na lokasa 21]
Oyokaka?
[Elilingi na lokasa 22]
“Namonaka ete okipaka ngai te mpe olingaka ngai te”
[Elilingi na lokasa 22]
“Olekisaka ntango elongo na ngai ata moke te!”
[Elilingi na lokasa 22]
“Nalekisaki na yo mokolo mobimba na sanza eleki”