Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/6 nk. 29-30
  • Bótika te kosala oyo ezali malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bótika te kosala oyo ezali malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi mpo na kosala oyo ezali malamu
  • Misala malamu ememaka ‘lisanzoli mpe lokumu’
  • Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Landá “kosala oyo ezali malamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Yehova asalisaka biso ntango tozali kokutana na komekama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/6 nk. 29-30

Bótika te kosala oyo ezali malamu

NTOMA Petelo apesaki toli oyo: “Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo.” (1 Petelo 2:12) Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “malamu” elimboli eloko moko oyo ezali “kitoko, ebongi, ya lokumu, ya malamu mingi.” Na mikolo na biso, ezali mpasi mpenza komona bato oyo bazali na bizaleli oyo ebongi to ya lokumu. Nzokande, basaleli ya Yehova lelo oyo bazali mpenza kosalela toli wana ya Petelo. Kutu, na mokili mobimba bayebi bango ete bazali na etamboli ya malamu.

Likambo yango ezali na ntina mingimingi soki totali mikakatano mpe mitungisi oyo tozali kokutana na yango na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali na yango. (2 Timote 3:1) Baklisto bakutanaka na mikakatano mpe na botɛmɛli mokolo na mokolo. Lisusu, atako mikakatano mosusu eumelaka te, mosusu esilaka te, mosusu kutu ekómaka nde makasi mpenza. Kasi, ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka soki tolɛmbi te.” (Bagalatia 6:9) Kasi, ndenge nini moto akoki kosala mpe kokoba kosala oyo ezali malamu ntango azali kokutana na mikakatano ya nsɔmɔnsɔmɔ mpe botɛmɛli ya makasi?

Lisalisi mpo na kosala oyo ezali malamu

Makambo oyo “ebongi, ya lokumu mpe ya malamu mingi” emonisaka mpenza bomoto to ndenge motema ya moto ezali. Na yango, kobatela etamboli malamu na kati ya mikakatano mpe ya mitungisi ezali likambo oyo eyaka kaka mbala moko boye te, kasi ezali ezaleli oyo moto akómaka na yango soki azali kosalela mitinda ya Biblia mokolo na mokolo na makambo nyonso ya bomoi. Wapi mwa makambo oyo ekoki kosalisa moto akóma na ezaleli yango? Tótalela batoli oyo elandi.

Tózala na makanisi ya Klisto. Esɛngaka kozala na komikitisa mpo na kokanga motema na makambo oyo ezangi sembo. Moto oyo amizwaka na lokumu mingi akoki te kondima bányokola ye. Nzokande, Yesu “amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa.” (Bafilipi 2:5, 8) Soki tolandi ndakisa na ye, ‘tókosila makasi to tokolɛmba te’ na mosala na biso mosantu. (Baebele 12:2, 3) Tokomonisa botosi lokola oyo ya Yesu soki tozali kondima litambwisi ya bandeko oyo bazali kokamba lisangá na biso. (Baebele 13:17) Yekolá kotalelaka basusu ete “baleki” yo mpe kotyaka matomba na bango liboso na oyo ya yo.​—Bafilipi 2:3, 4.

Kobosana te ete Yehova alingaka yo. Tosengeli kondima ete Yehova “azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Amibanzabanzaka mpenza mpo na biso mpe alingi ete tózwa bomoi ya seko. (1 Timote 2:4; 1 Petelo 5:7) Koyeba ete eloko moko te ekoki kosilisa bolingo ya Nzambe mpo na biso, ekosalisa biso tótika te kosala oyo ezali malamu na ntango ya mikakatano.​—Baloma 8:38, 39.

Tyelá Yehova motema mobimba. Kotyela Yehova motema ezali na ntina, mingimingi ntango minyoko ezali kosila te to ekómi kotya bomoi na biso na likama. Tosengeli kozala na elikya mpenza ete Yehova akotika biso tómekama te ‘koleka oyo tokoki kokangela motema,’ kasi akobanda ntango nyonso ‘kobongisela biso nzela ya kobimela.’ (1 Bakolinti 10:13) Soki totyeli Yehova motema, tokozala na mpiko ata liboso ya liwa.​—2 Bakolinti 1:8, 9.

Tingamá na mabondeli. Kobondela na motema mobimba ezali na ntina mingi. (Baloma 12:12) Libondeli oyo euti mpenza na motema ezali lolenge moko ya kopusana penepene na Yehova. (Yakobo 4:8) Tosilá komona mbala na mbala ete “ezala eloko nini biso tokosɛnga . . . , akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Soki Yehova atiki biso tónyokwama mpo tómonisa bosembo na biso, tosengeli kobondela ye asalisa biso toyika mpiko. (Luka 22:41-43) Libondeli esalisaka biso tóyeba ete tozali biso moko te, mpe ete lokola Yehova azali na biso, tokolonga ntango nyonso.​—Baloma 8:31, 37.

Misala malamu ememaka ‘lisanzoli mpe lokumu’

Mbala na mbala, baklisto nyonso bazali “koyokisama mawa na komekama ndenge na ndenge.” Kasi, tosengeli ‘kotika te kosala oyo ezali malamu.’ Soki ozali kotungisama, okolendisama soki oyebi ete nsukansuka bosembo na yo ekokóma “ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu.” (1 Petro 1:6, 7) Salelaká makambo nyonso oyo Yehova abongisi mpo na kolendisa kondima na biso. Soki ozali mpenza na mposa ya lisalisi, kende epai ya babateli ya mpate, oyo bazali bateyi mpe bapesi-toli na kati ya lisangá ya boklisto. (Misala 20:28) Yanganaká na makita nyonso ya lisangá, mpo yango ‘epusaka na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.’ (Baebele 10:24) Soki ozali na momeseno ya kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo, okolala te na elimo mpe okozala ntango nyonso makasi; kobimaka mingi na mosala ya kosakola mpe ekosalisa yo ozala ntango nyonso makasi na elimo.​—Nzembo 1:1-3; Matai 24:14.

Ntango ozali komona bolingo ya Yehova mpe ndenge azali kosalisa yo, ‘molende na yo mpo na misala malamu’ ekobakisama. (Tito 2:14) Kobosana te ete “moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Matai 24:13) Ɛɛ, zwá mpenza ekateli ya ‘kotika te kosala oyo ezali malamu’!

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

Tosengeli kozala na elikya mpenza ete Yehova akotika biso tómekama te ‘koleka oyo tokoki kokangela motema,’ kasi akobanda ntango nyonso ‘kobongisela biso nzela ya kobimela’

[Bililingi na lokasa 30]

Komipesa mingi na misala ya Teokrasi ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto