Makanisi ndenge na ndenge mpo na mosala
“Ezali esengo mingi koyeba ete tokozala ntango nyonso na mosala ya kosala.”—Katherine Mansfield, mokomi (1888-1923).
YO MPE okanisaka lokola mokomi yango? Ndenge nini otalelaka mosala? Mbala mosusu omonaka ete mosala ezali etumbu to kilo oyo osengeli komema mikolo nyonso mpe kopema kaka na nsuka ya pɔsɔ? To olingaka mosala na yo mingi; kutu, oyokaka ata mposa ya kopema te?
Bato mingi balekisaka ntango na bango mingi na mosala. Mosala na biso ekoki kosala ete tókende kofanda esika boye to boye to mpe bomoi na biso ezala lolenge boye to boye. Mosala ezali likambo oyo elekaka ntina na bomoi ya bato mingi banda ntango bakoli tii ntango bakozwa pansiɔ. Bato mosusu basepelaka mingi na mosala na bango. Bato mosusu basepelaka na mosala moko mpo na mbongo oyo yango efutaka to lokumu oyo epesaka; bamosusu mpe bamonaka ete mosala ezali kaka ndenge ya kolekisa ntango, bamosusu mpe bamonaka ete mosala ezwaka ntango na bango nyonso.
Bato mosusu basalaka mpo na kozwa eloko ya kobikela, ezali mpe na baoyo bamonaka ete mosala nde eloko eleki ntina na bomoi; bato mosusu bakufaka na esika ya mosala to mpe mpo na mosala. Na ndakisa, lapolo moko oyo ONU euti kobimisa emonisi ete mosala ebimiselaka bato makama mpe ebomaka bato mingi koleka baoyo nyonso oyo bakufaka na “bitumba, na komɛla bangi mpe na boombo ya masanga.” Mpo na lapolo yango, zulunalo moko ya Londres (The Guardian) elobaki boye: “Mbula na mbula, bato koleka milio mibale bakufaka na makama to maladi oyo bazwaka na mosala . . . Mipɛpɛ oyo ezali na mputulu to bagazɛ ya mabe, makɛlɛlɛ mpe biloko mosusu ya mabe mpo na nzoto [ezali] kopesa bato kanser, maladi ya motema mpe maladi ya paralize.” Kosalisa bana mike mosala mpe kosalisa bato mosala na makasi ezali makambo mabe oyo ezali kosalema na moi ya lelo.
Longola yango, Steven Berglas, moto moko ya mayele na pisikoloji, alobelaki likambo mosusu oyo ezali komonana. Alobaki ete emonanaka ntango moto oyo asalaka mingi akómi na mpɛtɛ ya monene, akómaka “kobanga ntango nyonso, komitungisa, mawamawa to mpe anyokwamaka na makanisi mpo amonaka ete mosala ekómi lokola motambo to bolɔkɔ oyo akoki kokima yango te mpe ezali kopesa ye esengo te.”
Moto ya makasi na mosala to moombo ya mosala?
Na mokili oyo ebele ya bato bazali kosala bangonga ebele, ezali na ntina tóyeba kokesenisa moto oyo azalaka makasi na mosala ná moombo ya mosala. Moombo ya mosala amonaka ete mosala ezali esika ya kimya na mokili oyo etondi na makama; nzokande, moto ya makasi na mosala amonaka yango lokola mokumba ya ntina mingi mpe ntango mosusu likambo oyo epesaka esengo. Moombo ya mosala atikaka ete mosala epekisa ye makambo mosusu nyonso ya bomoi; moto ya makasi na mosala ayebaka ntango nini asengeli kokanga masini, kokanisa makambo mosusu, to mpe kozangisa te ntango oyo, na ndakisa, asengeli kosepela anivɛrsɛrɛ ya libala na ye. Moombo ya mosala asepelaka kolekisa ngonga na mosala mpe ntango azali kosala, ayokaka mposa atika te; kasi ezali bongo te mpo na moto ya makasi na mosala.
Lelo oyo, bato bazali lisusu te koyeba kokesenisa lolenge mibale wana ya bato mpamba te bazali komona ete koboma nzoto na mosala ezali likambo ya malamu. Biloko lokola batelefone ya mabɔkɔ ekoki kosala ete moto ayeba lisusu te kokabola ntango ya mosala ná ntango ya kopema. Lokola misala mosusu ezali kopona esika to ngonga te, bato mosusu bapemaka lisusu te mpe na bongo, bazali komibendela mpasi na nzoto.
Ndenge nini bato mosusu bazali kotalela momeseno mabe wana? Bato oyo bayekolaka mimeseno ya bato bamoni ete bato oyo bazalaka na mosala mingi mpe bamitungisaka mingi mpo na mosala bakómi komema makambo ya Nzambe na mosala mpe bazali kokabola lisusu te losambo ná mosala. Zulunalo moko (San Francisco Examiner) elobaki ete “bato mingi bakómi kosangisa makambo ya Nzambe ná mosala na bango.”
Lapolo moko elobi ete na Silicon Valley, etúká moko oyo ezali na ebele ya bakompanyi oyo esalaka baordinatɛrɛ ná batelefone na États-Unis, “na ntango oyo mituka ezali kokita na baparkingi ya bakompanyi, likambo oyo emonisi ete bato bazali kaka kolongolama na mosala, baparkingi ya bisika ya losambo ezali se kotonda mɛkɛ na mpokwa, na ngonga ya koyekola Biblia.” Ata soki likambo yango elimboli nini, na mokili mobimba, bato mingi bamoni ete Biblia ezali kosalisa bango bázala na ndenge ya malamu ya kotalela mosala, mpe yango ezali kosalisa bango bázala na bomoi ya malamu.
Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tótalelaka mosala na ndenge ebongi? Ezali nde na mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango na mosala? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.