“Bókoba kotala soki bozali ndenge nini”
“Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.”—2 BAKOLINTI 13:5.
1, 2. (a) Kokakatana mpo na mateya oyo tondimaka ekoki kosala biso nini? (b) Likambo nini ebimaki na lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso oyo ekokaki kotinda baklisto mosusu báyeba te nzela nini basengeli kolanda?
MOBALI moko oyo azali kosala mobembo na nzela ya zamba, akómi na esika moko oyo nzela ekabwani. Lokola ayebi te alanda nzela oyo wapi, atuni baleki-nzela; kasi, bamosusu balobi na ye akende na lobɔkɔ ya mwasi, bamosusu, na lobɔkɔ ya mobali. Mobali yango asili mayele mpe mwaye akoba mobembo ezali te. Biso mpe tokoki kokóma lokola mobali yango, soki tozali kokakatana mpo na mateya oyo tondimaka. Kokakatana ndenge wana ekoki kopekisa biso tózwa bikateli mpe na bongo tóyeba te nzela oyo tosengeli kolanda.
2 Likambo moko ebimaki na lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso ekokaki komema baklisto mosusu ya lisangá yango na kokakatana ndenge wana. “Bantoma minene” bazalaki kondima bokonzi ya ntoma Paulo te; bazalaki koloba boye: “Mikanda na ye ezali na kilo mpe na bokasi, kasi kozala na ye moko moto ezali na bolɛmbu mpe elobeli na ye ezali ya mpambampamba.” (2 Bakolinti 10:7-12; 11:5, 6) Makanisi ya ndenge wana ekokaki kotinda baklisto mosusu ya lisangá ya Kolinti báyeba te nzela nini basengeli kolanda.
3, 4. Mpo na nini toli oyo Paulo apesaki Bakolinti ezali na ntina mpo na biso?
3 Paulo afungolaki lisangá ya Kolinti ntango akómaki na engumba yango na mobu 50 ya ntango na biso (T.B.). Afandaki na Kolinti “mbula moko ná sanza motoba, koteyáká na kati na bango liloba ya Nzambe.” Yango wana, “mingi na kati ya Bakolinti oyo bayokaki babandaki kondima mpe kobatisama.” (Misala 18:5-11) Paulo azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo ya bandeko na ye ya Kolinti. Lisusu, Bakolinti bakomelaki Paulo mokanda mpo na kosɛnga ye toli na mwa makambo. (1 Bakolinti 7:1) Paulo apesaki bango toli ya malamu mpenza.
4 Paulo akomaki boye: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakolinti 13:5) Kolanda toli wana elingaki kosalisa bandeko ya Kolinti bákakatana te mpo na nzela oyo basengelaki kolanda. Toli yango ekoki mpe kosalisa biso lelo oyo. Na bongo, ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo? Ndenge nini tokoki komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima? Mpe kotala soki tozali ndenge nini ezali kosɛnga nini?
“Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima”
5, 6. Eloko nini ekosalisa biso tómimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima, mpe mpo na nini yango ebongi mpenza?
5 Mbala mingi, na momekano, ezalaka na moto oyo bazali komeka mpe likambo oyo asengeli kolonga kosala to esika oyo asengeli kokóma. Na maloba ya Paulo, eloko oyo esengeli komekama ezali te kondima, elingi koloba, mateya nyonso oyo toyekoli. Mokomoko na biso nde asengeli komimeka. Mpo na kosala yango malamu, tozali na emekeli ya malamu mpenza. Nzembo moko ya Davidi elobi boye: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli ya [Yehova] ezali alima, ekosepelisa motema. Malako ya [Yehova] ezali pɛto, ekomonisa miso polele.” (Nzembo 19:7, 8) Biblia ezali na mibeko ya sembo ya Yehova, litatoli na ye ya solo, bilakeli na ye oyo ezali alima mpe malako na ye ya pɛto. Makambo ya mokanda yango nde ebongi mpenza mpo tómimeka na yango.
6 Mpo na nsango wana oyo epemami na Nzambe, ntoma Paulo alobi boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:12) Ya solo, liloba ya Nzambe ekoki komeka mitema na biso, elingi koloba makambo oyo ezali mpenza na kati na biso. Ndenge nini maloba oyo “epeli makasi” mpe ezali “na nguya” ekoki kozala na bomoi mpo na biso? Mokomi ya nzembo amonisi polele oyo yango elimboli. Ayembaki boye: “Esengo ezali na moto . . . [oyo] asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2, NW ) “Mobeko ya Yehova” ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe. Tosengeli kosepelaka kotánga Liloba ya Yehova. Ya solo, tosengeli kozwaka ntango ya kotánga yango na mongongo ya nse, elingi koloba komanyola yango. Ntango tozali kotánga to komanyola, tosengeli komimeka, to komitalela na boyokani na makambo oyo ekomami kuna.
7. Wapi lolenge ya libosoliboso oyo tokoki komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima?
7 Yango wana, lolenge ya libosoliboso ya komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima ezali kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe mpe kotala ndenge oyo etamboli na biso eyokani na makambo oyo tozali koyekola. Tokoki mpenza kosepela ete tozali na mikanda mingi oyo ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya Liloba ya Nzambe.
8. Ndenge nini mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ekoki kosalisa biso tómimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima?
8 Yehova azali kopesa biso mateya mpe malako na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo azali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia. (Matai 24:45) Na ndakisa, tókanisa etanda oyo ezali na motó ya likambo “Mituna mpo na komanyola” oyo ezali na nsuka ya mikapo mingi ya buku Pusaná penepene na Yehova.a Mituna yango ekoki mpenza kosalisa moto mpo afanda mpe akanisa na mozindo! Masolo mingi oyo ebimaka na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! esalisaka biso mpe tómimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima. Ndeko mwasi moko alobaki mpo na masolo oyo ezali kolimbola mokanda ya Masese, oyo ezali kobima mikolo oyo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ete: “Nasepelaka mingi na masolo yango. Esalisaka ngai nayeba soki maloba, ezaleli, mpe elimo na ngai eyokani mpenza na mitinda ya sembo ya Yehova.”
9, 10. Makambo nini Yehova abongisi oyo ezali kosalisa biso tókoba komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima?
9 Tozwaka mpe ebele ya batoli mpe bilendiseli na makita mpe na mayangani. Nyonso wana ezali makambo oyo Nzambe abongisi mpo na baoyo Yisaya asakolaki na ntina na bango ete: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwana likoló ya nkeka; mpe mabota nyonso bakokende wana. Bikólo mingi bakokende mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba ya [Yehova], . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.” (Yisaya 2:2, 3) Na ntembe te, ezali mpenza lipamboli kozala na malako ya ndenge wana oyo ezali kosalisa biso tóyeba banzela ya Yehova.
10 Tobosani mpe te batoli ya bandeko oyo bazali na makoki ya elimo, na ndakisa bankulutu. Biblia elobi na bango boye: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ete ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto, wana yo moko mpe ozali komitala, noki te yo moko mpe omekama.” (Bagalatia 6:1) Tokoki mpenza kozala na botɔndi mpo na bibongiseli nyonso wana oyo ezali mpo na kosembolama na biso!
11. Komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima esɛngaka nini?
11 Mikanda ya moombo ya sembo, makita ya lisangá, bankulutu—nyonso wana ezali bibongiseli malamu mingi ya Yehova. Kasi, mpo na komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima, tosengeli komitalela. Yango wana, ntango tozali kotánga mikanda ya moombo ya sembo to toyoki toli euti na Biblia, tosengeli komituna mituna oyo: ‘Likambo yango ezali nde kolobela ngai? Nasalaka yango? Nalandaka mateya nyonso ya boklisto?’ Ndenge na biso ya kotalela mateya oyo tozali kozwa na nzela ya bibongiseli yango ekoki kosala ete elimo na biso ezala makasi to te. Biblia elobi boye: “Moto ya mosuni ayambaka te makambo ya elimo ya Nzambe, mpo yango ezali bozoba epai na ye. . . . Nzokande, moto ya elimo atalelaka mpenza makambo nyonso.” (1 Bakolinti 2:14, 15) Tosengeli mpenza kozalaka na botɔndi mpe na makanisi ya moto ya elimo mpo na makambo oyo totángaka na babuku, na bazulunalo mpe na mikanda mosusu ya moombo ya sembo mpe mpo na makambo oyo toyokaka na makita mpe epai ya bankulutu.
“Bókoba kotala soki bozali ndenge nini”
12. Kotala soki tozali ndenge nini esɛngaka nini?
12 Koluka koyeba soki tozali ndenge nini esɛngaka komitalela. Tokoki kozala na kati ya solo; kasi, tozali mpenza makasi na elimo? Kotala soki tozali ndenge nini esɛngi komonisa ete tokɔmeli na elimo mpe tozali mpenza na botɔndi mpo na bibongiseli ya elimo.
13. Na kotalela Baebele 5:14, nini emonisaka ete tokɔmeli na elimo?
13 Makambo nini tosengeli koluka epai na biso moko mpo na komona soki tozali baklisto oyo bakɔmeli na elimo? Ntoma Paulo akomaki boye: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmeli, ya bato oyo makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Tokomonisa ete tokɔmeli na elimo soki tozali koteya makoki na biso ya kososola. Se ndenge moto ya masano asengeli komesenisa nzoto na ye na kosalisa yango ngalasisi mbala na mbala liboso akóma makasi na lisano na ye, biso mpe tosengeli kosalelaka makoki na biso ya kososola na kolanda mitinda ya Biblia.
14, 15. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe?
14 Kasi, liboso tóteya makoki na biso ya kososola, tosengeli naino kozwa boyebi. Mpo na yango, ezali na ntina mingi tómipesa na koyekola Biblia. Soki tozali mbala na mbala koyekola biso moko, mingimingi makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe, makoki na biso ya kososola ekokola. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaka masolo oyo ezali kolobela makambo ya ndenge na ndenge ya ntina mingi. Tosalaka nini soki tomoni lisolo moko oyo ezali kolobela makambo oyo ezali mpasi? Tokimaka yango mpo ezali na “makambo mosusu ya makasi mpo na kokanga ntina”? (2 Petelo 3:16) Tosalaka makasi mpenza mpo tókanga ntina na yango.—Baefese 3:18.
15 Ezali boni soki tozali na mokakatano mpo na koyekola biso moko? Ezali na ntina mingi tósala makasi tólona mposa ya kosala yango.b (1 Petelo 2:2) Mpo na kokɔmela na elimo, tosengeli koyekola kolya bilei ya makasi, elingi koloba makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe. Soki te, makoki na biso ya kososola ekokola te. Kasi, mpo na komonisa ete tokɔmeli na elimo, tosengeli kosuka kaka te na kokóma na makoki ya kososola. Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo tosengeli kosalelaka boyebi oyo tozali kozwa na boyekoli na biso ya Biblia.
16, 17. Moyekoli Yakobo apesi toli nini mpo na oyo etali kokóma “batosi ya liloba”?
16 Ndenge oyo tozali komonisa botɔndi na biso mpo na mateya ya solo, elingi koloba na misala na biso ya kondima, emonisaka mpe soki tozali ndenge nini. Moyekoli Yakobo asaleli ndakisa moko ya malamu mpenza mpo na komonisa ndenge oyo tosengeli komitalela; akomi boye: “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te, komikosáká bino moko na makanisi ya lokuta. Mpo soki moto azali moyoki ya liloba, mpe azali motosi te, moto yango azali lokola moto oyo azali kotala elongi na ye na talatala. Mpo amitali, mpe akei mpe na mbala moko abosani ndenge azali. Kasi moto oyo azali kotalatala na kati ya mobeko ya kokoka oyo ezali ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala, akozala na esengo na kosaláká yango.”—Yakobo 1:22-25.
17 Na maloba yango, Yakobo alingi koloba boye: ‘Talá malamumalamu na talatala oyo ezali Liloba ya Nzambe, mpe omimeka yo moko. Kobá kosala yango, mpe luká komitalela na boyokani na makambo ozali koyekola na liloba ya Nzambe. Na nsima, kobosana te makambo oyo omoni. Bongisá bisika oyo esengeli.’ Na bantango mosusu, kolanda toli yango ekoki kozala pɛtɛɛ te.
18. Mpo na nini kolanda toli ya Yakobo ezalaka pɛtɛɛ te?
18 Tózwa ndakisa ya lisɛngami ya kosakola Bokonzi. Paulo akomaki boye: “Ezali na motema nde moto amonisaka kondima mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli mpo na lobiko.” (Baloma 10:10) Mpo monɔkɔ na biso esala eyambweli mpo na lobiko, esɛngaka tóbongisa makambo mwa mingi. Kobima na mosala ya kosakola ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te mpo na mingi kati na biso. Kozala molende na mosala yango mpe kotya yango na esika ya liboso na bomoi na biso esɛngaka tóbongola makambo mingi mpe tómipimela makambo mosusu. (Matai 6:33) Kasi, soki tokómi kosala mosala yango oyo Nzambe apesi biso, toyokaka esengo mpo mosala yango esanzolaka Yehova. Na yango, tokoki komituna: Tozali basakoli ya Bokonzi oyo bazali na molende?
19. Misala na biso ya kondima esengeli komonana na makambo nini?
19 Misala na biso ya kondima esengeli komonana na makambo nini? Paulo alobi boye: “Makambo oyo boyekolaki mpe bondimaki mpe boyokaki mpe bomonaki epai na ngai, bósalaka yango; mpe Nzambe ya kimya akozala elongo na bino.” (Bafilipi 4:9) Tokomona ndenge tozali soki tozali kosalela makambo oyo toyekoli, oyo tondimi, toyoki, mpe tomoni; na maloba mosusu, makambo nyonso oyo esɛngami na bato oyo bamipesi na Nzambe mpe bazali bayekoli ya Klisto. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobi boye: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”—Yisaya 30:21.
20. Bandeko ya ndenge nini bazalaka lipamboli monene mpo na lisangá?
20 Mibali mpe basi oyo bamipesaka na koyekola Liloba ya Nzambe, oyo bazali basakoli ya molende ya nsango malamu, oyo babatelaka ntango nyonso bosembo na bango, mpe oyo batyaka ntango nyonso Bokonzi na esika ya liboso, bazalaka mpenza lipamboli mpo na lisangá. Basalisaka mingi mpo masangá na bango ezala makasi. Basalisaka mpenza, mingimingi lokola ebele ya bato ya sika oyo bazali koya na lisangá bazali na mposa bálendisama na elimo. Soki tozali kolanda toli ya Paulo ya ‘kokoba komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima mpe kokoba kotala soki tozali ndenge nini,’ biso mpe tokosalisa mpenza bandeko mosusu.
Tósepela kosala mokano ya Nzambe
21, 22. Ndenge nini tokoki kosepela kosala mokano ya Nzambe?
21 Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala ayembaki boye: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo; ee Nzambe na ngai; mibeko na yo ezali kati na motema na ngai.” (Nzembo 40:8) Davidi azalaki kosepela kosala mokano ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te mobeko ya Yehova ezalaki na motema na ye. Davidi azalaki kokakatana te mpo na nzela oyo asengeli kolanda.
22 Soki mobeko ya Nzambe ezali na mitema na biso, tokokakatana te mpo na nzela oyo tosengeli kolanda. Tokosepela kosala mokano ya Nzambe. Yango wana, ‘tósala makasi mpenza’ wana tozali kosalela Yehova na motema na biso mobimba.—Luka 13:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mpo na kozwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo oyeba koyekola, talá buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 27-32, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima?
• Kotala soki tozali ndenge nini esɛngi makambo nini?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali baklisto oyo bakɔmeli?
• Ndenge nini misala na biso ya kondima esalisaka biso tóyeba soki tozali ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 23]
Oyebi lolenge ya libosoliboso ya komimeka mpo na komona soki ozali na kati ya kondima?
[Elilingi na lokasa 24]
Tomonisaka ete tozali baklisto oyo bakɔmeli soki tozali koteya makoki na biso ya kososola
[Bililingi na lokasa 25]
Toyebaka soki tozali ndenge nini soki tokómi ‘bayoki oyo babosanaka te, kasi batosi ya liloba’