Tókende nokinoki tii na kokɔmela—“Mokolo monene ya Yehova ekómi pene”
“Tiká tókende nokinoki tii na kokɔmela.”—EBE. 6:1.
1, 2. Libaku nini ya “kokima na bangomba” baklisto ya ekeke ya liboso na Yelusaleme mpe na Yudea bazwaki?
NTANGO Yesu azalaki awa na mabelé, bayekoli na ye batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” Mpo na koyanola bango, Yesu apesaki esakweli moko oyo ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na ekeke ya liboso. Yesu alobelaki elembo moko oyo esengelaki komonisa ete nsuka ekómi pene. ‘Baoyo bazalaki na Yudea basengelaki kobanda kokima na bangomba’ ntango kaka bamoni elembo yango. (Mat. 24:1-3, 15-22) Bayekoli ya Yesu bakokaki komona elembo yango mpe kosala ndenge alobaki?
2 Na mobu 61 T.B., mbula soki ntuku misato na nsima, ntoma Paulo akomelaki baklisto Baebele oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme mpe na bamboka ya zingazinga, nsango moko oyo esengelaki mpenza kosembola makanisi na bango. Na ntango yango, ezala Paulo to baninga na ye baklisto, bayebaki te ete mbula mitano na nsima elembo moko ekobima oyo ekomonisa ete ‘bolɔzi monene’ ebandi. (Mat. 24:21) Na mobu 66 T.B., Cestius Gallus akambaki basoda ya Loma mpo na kobundisa Yelusaleme. Kasi na nsima, ye ná basoda na ye balongwaki na mbalakaka mpe yango epesaki baklisto libaku ya kokima.
3. Toli nini Paulo apesaki baklisto Baebele, mpe mpo na nini?
3 Baklisto yango basengelaki kozala na bososoli mpo na komona kokokisama ya makambo oyo Yesu asakolaki mpe kokima. Nzokande, bamosusu bakómaki “matoi mangbongi.” Bazalaki lokola bana mike oyo bazali na mposa ya “mabɛlɛ.” (Tángá Baebele 5:11-13.) Ata baklisto mosusu oyo basilaki koumela na kati ya solo bakómaki komonisa ete babandi ‘kopɛngwa na Nzambe ya bomoi.’ (Ebe. 3:12) Bamosusu bakómaki na ‘momeseno’ ya kozangisa makita na ntango oyo ‘mokolo yango ya mabe ekómaki pene.’ (Ebe. 10:24, 25) Paulo apesaki bango toli moko oyo ebongaki mpenza; alobaki boye: “Sikoyo lokola totiki mateya ya ebandeli oyo etali Klisto, tiká tókende nokinoki tii na kokɔmela.”—Ebe. 6:1.
4. Mpo na nini ezali na ntina tólala mpɔngi te na elimo, mpe nini ekosalisa biso?
4 Lelo oyo, tozali na ntango oyo esakweli yango ya Yesu ezali kokokisama mpo na mbala ya nsuka. “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi,” mokolo oyo ebongiseli mobimba ya Satana ekosuka. (Sef. 1:14) Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, tosengeli kolala mpɔngi te na elimo. (1 Pet. 5:8) Tozali mpenza kosala yango? Kokɔmela na elimo ekosalisa biso tóbosana te ete nsuka ekómi pene.
Kokɔmela na elimo elimboli nini?
5, 6. (a) Kokɔmela na elimo elimboli nini? (b) Kokɔmela na elimo esɛngaka kosala milende na makambo nini mibale?
5 Paulo asukaki kaka te na kolendisa baklisto ya ekeke ya liboso bákɔmela na elimo, kasi ayebisaki bango mpe soki kokɔmela na elimo elimboli nini. (Tángá Baebele 5:14.) “Bato oyo bakɔmeli” bamɛlaka kaka “mabɛlɛ” te. Balyaka mpe “bilei ya makasi.” Na yango, bayebi ná “makambo mikemike” ná “makambo mozindo” ya mateya ya solo. (1 Kol. 2:10) Longola yango, lokola bazali kosalela makambo oyo bayebi, makoki na bango ya kososola eteyami mpe ezali kosalisa bango báyeba kokesenisa ná mabe ná malamu. Ntango balingi kozwa ekateli moko, makoki yango esalisaka bango bátalela mitinda ya Biblia oyo eyokani na likambo yango mpe básalela yango.
6 Paulo akomaki boye: “Ezali na ntina ete biso tótya likebi koleka mpenza na makambo oyo toyokaki, mpo tópɛngwa na nzela soki moke te.” (Ebe. 2:1) Tokoki kopɛngwa kozanga ete tóyeba. Mpo yango ekómela biso te, tosengeli ‘kotya likebi koleka mpenza’ ntango tozali koyekola Biblia. Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nasukaka kaka na kotalela makambo mikemike ya elimo? Nayekolaka kaka likolólikoló kozanga ete natya mpenza motema na mateya ya solo? Ndenge nini nakoki mpenza kokola na elimo?’ Kokɔmela na elimo, esɛngaka milende na makambo soki mibale. Tosengeli koyeba malamu Liloba ya Nzambe. Mpe tosengeli koyekola kotosa.
Tóyeba malamu Liloba ya Nzambe
7. Matomba nini tokoki kozwa soki toyebi malamu Liloba ya Nzambe?
7 Paulo akomaki boye: “Moto nyonso oyo amɛlaka mabɛlɛ ayebi te liloba ya boyengebene, mpo azali mwana moke.” (Ebe. 5:13) Mpo na kokɔmela na elimo, tosengeli koyeba malamu Liloba ya Nzambe, nsango oyo apesá biso. Lokola nsango yango ezali na kati ya Biblia, Liloba na ye, tosengeli komipesaka mpenza na koyekola Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Komitondisa na makanisi ya Nzambe ndenge wana ekosalisa biso tóteya makoki na biso ya kososola. Tózwa ndakisa ya Ndeko Orchid.a Alobi boye: “Toli oyo ebongolá mpenza bomoi na ngai ezali ya kotángaka Biblia mikolo nyonso. Ezwaki ngai pene na mbula mibale mpo na kosilisa kotánga Biblia mobimba, kasi nayokaki lokola nabandi sika koyekola makambo ya Mozalisi. Nayekolaki banzela na ye, makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka, namonaki bonene ya nguya na ye mpe bozindo ya bwanya na ye. Kotánga Biblia mokolo na mokolo esungaki ngai na ntango ya mpasi koleka oyo nakutanaki na yango na bomoi.”
8. Liloba ya Nzambe ekoki kozala na nguya nini na bomoi na biso?
8 Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekopesa nsango na yango nzela ya komonisa ‘nguya’ na yango na bomoi na biso. (Tángá Baebele 4:12.) Yango ekoki kobongisa bomoto na biso mpe kosala ete Yehova asepela na biso mingi. Mpo na nini te kobongisa programɛ na yo mpo ozwaka ntango mingi lisusu ya kotánga Biblia mpe komanyola makambo oyo ozali kotánga?
9, 10. Komesana na Liloba ya Nzambe esɛngaka nini? Pesá ndakisa.
9 Koyeba Biblia malamu esuki kaka te na koyeba makambo oyo elobi. Tokoki koloba te ete bato oyo Paulo abengaki bana mike bayebaki Liloba ya Nzambe ata moke te. Nzokande, bato yango bazalaki nde kosalela te makambo oyo bazalaki koyekola mpo na komona matomba na yango. Bazalaki kotika te nsango ya Biblia etambwisa bango mpo na kozwa bikateli ya malamu na bomoi na bango.
10 Komesana na Liloba ya Nzambe elimboli koyeba yango mpe kosalela boyebi yango na bomoi na biso. Ndakisa ya ndeko mwasi Kyle emonisi ndenge tokoki kosala yango. Azwanaki matata na moninga na ye moko ya mosala. Asalaki nini mpo na kosilisa yango? Alobi boye: “Nakanisaki vɛrsɛ ya Baloma 12:18, oyo elobi ete: ‘Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.’ Yango wana, nasɛngaki moninga yango tósolola nsima ya mosala.” Basololaki malamu, mpe moninga yango akamwaki ndenge Kyle azwaki likanisi ete básolola. Kyle alobi boye: “Namonaki ete kosalela toli ya Biblia ezalaka ntango nyonso malamu.”
Tóyekola kotosa
11. Nini emonisi ete ezalaka pɛtɛɛ te kotosa ntango tokutani na mikakatano?
11 Kosalela makambo oyo toyekoli na Biblia ezalaka pɛtɛɛ te, mingimingi ntango tokutani na mikakatano. Na ndakisa, mwa moke nsima ya kolongolama na boombo na Ezipito, Bayisalaele “babandaki koswanisa Moize” mpe “komeka Yehova.” Mpo na nini? Mpo bazangaki mai ya komɛla. (Ex. 17:1-4, NW) Basalaki kondimana na Yehova mpe bandimaki kotosa “yango nyonso elobi [Yehova],” kasi ata sanza mibale ekokaki te, babukaki mobeko na ye mpe bakómaki kosambela bikeko. (Ex. 24:3, 12-18; 32:1, 2, 7-9) Basalaki bongo mpo bakómaki kobanga ndenge Moize aumelaki ntango akendaki kozwa mibeko na Ngomba Holebe? Ekoki nde kozala ete bakanisaki ete Baamaleki bakoya kobundisa bango lisusu mpe ete lokola Moize azalaki te, bakozala na makasi ya kolonga bango te ndenge balongaki bango liboso? (Ex. 17:8-16) Ekoki kozala bongo, kasi ezala basalaki yango mpo na ntina nini, Bayisalaele “baboyaki kotosa ye.” (Mis. 7:39-41) Paulo alendisaki baklisto ‘básala nyonso oyo ekoki’ mpo ‘bákwea te na kati ya ndakisa yango ya kozanga botosi’ ndenge Bayisalaele basalaki ntango babangaki kokɔta na Mokili ya Ndaka.—Ebe. 4:3, 11.
12. Ndenge nini Yesu ayekolaki botosi, mpe yango ebimisaki matomba nini?
12 Kokɔmela na elimo, esɛngaka mpe kosala milende mpo na kotosa Yehova. Ndenge ndakisa ya Yesu emonisi yango, mbala mingi toyekolaka botosi na makambo ya mpasi oyo tokutanaka na yango. (Tángá Baebele 5:8, 9.) Liboso aya na mabelé, Yesu azalaki kotosa Tata na ye. Nzokande, kosala mokano ya Tata na ye, awa na mabelé esɛngaki andima konyokwama. Lokola atosaki ata na mpasi ya makasi koleka, Yesu ‘akómisamaki moto ya kokoka’ oyo abongi na mokumba ya sika oyo Nzambe abongisaki mpo na ye, ya kozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene.
13. Nini emonisaka ete toyekoli botosi?
13 Ezali boni mpo na biso? Tozalaka na ekateli ya kotosa Yehova ata ntango tokutani na mikakatano ya makasi? (Tángá 1 Petelo 1:6, 7.) Biblia emonisi polele batoli ya Nzambe na makambo lokola kozala na bizaleli ya malamu, kozala sembo, koyeba kosalela lolemo, mpe kotánga Biblia, koyangana na makita mpe kosakola nsango malamu. (Yos. 1:8; Mat. 28:19, 20; Ef. 4:25, 28, 29; 5:3-5; Ebe. 10:24, 25) Totosaka Yehova na makambo wana ata ntango tokutani na mikakatano? Botosi na biso ekomonisa ete tokɔmeli na elimo.
Kokɔmela na elimo ezali na litomba nini?
14. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete kokɔmɛla na elimo ezali libateli.
14 Kozala na makoki ya kososola oyo eteyami mpo na kokesenisa ná malamu ná mabe na kati ya mokili oyo ‘ebungisá bizaleli nyonso ya malamu’ ebatelaka mpenza moklisto. (Ef. 4:19) Na ndakisa, ndeko moko na nkombo James, oyo atángaka Biblia mingi mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, azwaki mosala na esika moko oyo azalaki kosala kaka na basi. James alobi boye: “Mingi na bango bazalaki na bomoi ya mabe, kasi moko azalaki komonana lokola azali na etamboli ya malamu, mpe azalaki kosepela na mateya ya Biblia. Kasi mokolo moko, ntango tozalaki kaka biso mibale, asɛngaki ngai nasangisa na ye nzoto. Nakanisaki azali kosala lisɛki, kasi ezalaki pɛtɛɛ te mpo napekisa ye. Na ntango yango, nakanisaki lisolo ya ndeko moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo akutanaki mpe na likambo yango na mosala. Lisolo yango esalelaki ndakisa ya Yozefe ná mwasi ya Potifala.b Natindikaki mwasi yango, mpe mbala moko akimaki.” (Gen. 39:7-12) James asepelaki ndenge likambo moko esalemaki te mpe ndenge abebisaki lisosoli na ye te.—1 Tim. 1:5.
15. Ndenge nini kokɔmela na elimo elendisaka motema na biso?
15 Kokɔmɛla na elimo ezali na litomba mpo elendisaka motema na biso mpe esalisaka biso ‘tómemama te na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya.’ (Tángá Baebele 13:9.) Ntango tozali kosala makasi mpo na kokola na elimo, tokobanda kokanisa ntango nyonso “makambo oyo eleki ntina.” (Filp. 1:9, 10) Na ndenge yango, tokozala na botɔndi makasi mpo na Nzambe mpe mpo na bibongiseli nyonso oyo azwi mpo na bolamu na biso. (Lom. 3:24) Moklisto oyo ‘akómi mokóló na oyo etali makoki ya kososola’ akómaka na botɔndi ya ndenge wana mpe na boyokani makasi na Yehova.—1 Kol. 14:20.
16. Nini esalisaki ndeko mwasi moko ‘akómisa motema na ye ngwi’?
16 Ndeko mwasi Louise alobi ete nsima ya batisimo na ye, azalaki komipesa na mosala ya Nzambe kaka mpo na kosepelisa basusu. Alobi boye: “Nazalaki kosala likambo moko ya mabe te, kasi nazalaki mpenza na mposa te ya komipesa na mosala ya Yehova. Namonaki ete mpo nayoka mpenza ete nazali kopesa Yehova nyonso oyo nakoki, nasengeli kobongola makambo mosusu. Mbongwana ya libosoliboso oyo nasengelaki kosala ezalaki ya kotya motema na ngai mobimba na losambo na ye.” Milende yango esalisaki Louise ‘akómisa motema na ye ngwi,’ mpe yango esungaki ye mingi ntango abɛlaki makasi. (Yak. 5:8) Louise alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi yango esalisaki ngai napusana penepene na Yehova.”
‘Tókóma kotosa uta na motema’
17. Mpo na nini botosi ezalaki na ntina mingi mpo na baklisto na ekeke ya liboso?
17 Toli oyo Paulo apesaki ete “tókende nokinoki tii na kokɔmela” ebikisaki mpenza bomoi ya baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme mpe na Yudea. Baoyo batosaki toli yango bazalaki na bososoli oyo esengelaki mpo na komona elembo oyo Yesu apesaki bango, mpo “bábanda kokima na bangomba.” Ntango bamonaki “eloko ya bosɔtɔ oyo eyeisaka libebi . . . etɛlɛmi na esika mosantu,” elingi koloba basoda ya Loma bazingi Yelusaleme mpe bazali kokɔta na engumba yango, bayebaki ete ntango ekoki mpo na kokima. (Mat. 24:15, 16) Baklisto batosaki etinda ya Yesu mpe babimaki na engumba Yelusaleme liboso ebebisama, mpe ndenge Eusèbe, mokonzi moko ya Lingomba amonisi yango, bakendaki kofanda na engumba moko oyo ebengami Pella, na mokili ya ngombangomba ya Gileadi. Na ndenge yango babikaki na likama ya nsɔmɔ koleka oyo ekómelaki Yelusaleme.
18, 19. (a) Mpo na nini botosi ezali na ntina mingi lelo oyo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Soki tokɔmeli na elimo, botosi oyo tokokóma na yango ekobikisa biso ntango esakweli ya Yesu ekokokisama na mobimba na yango, na ntango ya ‘bolɔzi monene,’ oyo ekoleka bolɔzi mosusu nyonso oyo esalemá na mokili. (Mat. 24:21) Tokotosa malako nyonso oyo “kapita ya sembo” akopesa? (Luka 12:42) Ezali mpenza na ntina tóyekola ‘kotosa uta na motema’!—Lom. 6:17.
19 Kokɔmela na elimo esɛngi mpe koteya makoki na biso ya kososola. Tokosala yango ntango tozali kosala milende mpo na komesana na Liloba ya Nzambe mpe koyekola botosi. Kokɔmela na elimo ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bilenge. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo bakoki kolonga mikakatano yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
b Talá lisolo “Bazwaki makasi ya koboya misala mabe,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1999.
Oyekoli makambo nini?
• Kokɔmela na elimo elimboli nini, mpe ndenge nini moto akɔmelaka na elimo?
• Ndenge nini komesana na Liloba ya Nzambe esalisaka moto akɔmela na elimo?
• Ndenge nini tokoki koyekola botosi?
• Matomba nini tokozwa soki tokɔmeli na elimo?
[Elilingi na lokasa 10]
Kosalela toli ya Biblia esalisaka biso tósilisa matata lokola bato oyo bakɔmeli na elimo
[Elilingi na lokasa 12, 13]
Kolanda toli ya Yesu ebikisaki bomoi ya baklisto ya liboso