Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/8 nk. 13-15
  • Ntango nini moto akoki kosilika?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango nini moto akoki kosilika?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabe oyo bato basalaki Yehova
  • Mabe ya minene oyo basalaki bato
  • Mabe ya mikemike
  • Bolimbisi elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tólimbisanaka na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Limbisá na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/8 nk. 13-15

Ntango nini moto akoki kosilika?

BIBLIA elobi na Mosakoli 7:9 boye: “Nkanda ekoumela na motema ya bazoba.” Vɛrsɛ oyo emonisi ete tosengeli te kolekisa ndelo na kosilika ntango basali biso mabe; kasi tosengeli nde kolimbisa.

Kasi, Mosakoli 7:9 elingi nde koloba ete ntango likambo moko eswi biso to moto moko asali biso mabe, tosengeli kosilika te; tosengeli nde kolimbisaka mabe nyonso oyo basali biso, ezala basali biso yango mbala boni to likambo yango ezali mabe ndenge nini, tosengeli kotala kaka na miso? Lokola toyebi ete moto oyo basali ye mabe asengeli kolimbisa, yango elingi koloba ete tosengeli te kotya likebi na maloba na biso to na makambo oyo ekoki kopesa baninga nkanda? Ezali bongo te.

Yehova Nzambe, azali Nzambe ya bolingo, ya motema mawa, oyo alimbisaka mpe ya motema molai. Nzokande, Biblia elobi mbala na mbala ete ayokaki nkanda. Soki moto asali mabe oyo eleki ndelo, azalaki kopesa etumbu. Tótala mwa bandakisa.

Mabe oyo bato basalaki Yehova

Lisolo oyo ezali na 1 Mikonzi 15:30 elobeli masumu ya Yelobama ‘oyo asalisaki Yisalaele mpe nkanda oyo apelisaki epai ya [Yehova] Nzambe.’ Na 2 Ntango 28:25, Biblia elobi na ntina na mokonzi Ahaza ya Yuda boye: “Atongaki bisika ya likoló mpo na kotumbela banzambe mosusu mpaka ya malasi. Boye ayokisaki [Yehova] Nzambe ya batata na ye nkanda.” Ndakisa mosusu ezwami na Basambisi 2:11-14: “Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] mpe basalelaki Babala . . . , Bayokisaki [Yehova] nkanda. . . . Bongo nkanda ya [Yehova] epelaki epai ya Yisalaele, mpe apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi.”

Makambo mosusu ezali oyo epesaki Yehova nkanda mpe esɛngaki ete apesa bitumbu ya makasi. Na ndakisa, tozali kotánga boye na Exode 22:18-20: “Okotika molɔki mwasi abika te. Oyo akolala na nyama akobomama. Oyo akokaba mbeka epai ya banzambe mosusu, bobele epai ya [Yehova] te, akobebisama mpenza.”

Yehova azalaki ntango nyonso te kolimbisa mabe ya minene oyo Bayisalaele ya kala bazalaki kosala ntango bazalaki kosilikisa ye mpe koboya kobongola motema. Ntango ezalaki komonana ete baboyi mpenza kobongola motema mpe kozongela Yehova, nsukansuka, Nzambe azalaki koboma bango. Yango nde asalaki mpo na ekólo mobimba na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bato ya Babilone babebisaki yango, mpe lisusu na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.), ntango Baloma babebisaki yango.

Ya solo, Yehova asilikaka mpo na makambo mabe oyo bato balobaka mpe basalaka, kutu baoyo basalaka masumu ya minene mpe baboyaka kobongola motema, abomaka bango. Yango elingi nde koloba ete lokola Yehova asilikelaki bato wana, azali na molɔngɔ ya bazoba oyo Mosakoli 7:9 elobeli? Te. Azali mpenza na ntina ya kosilika mpo na masumu ya minene mpe asambisaka ntango nyonso na bosembo. Biblia elobi na ntina na Yehova boye: “Mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebeni mpe mosembwi.”​—Deteronome 32:4.

Mabe ya minene oyo basalaki bato

Na kati ya Mobeko oyo Nzambe apesaki na Yisalaele ya kala, bato oyo bazalaki kosala bato mosusu mabe ya minene basengelaki kozwa bitumbu makasi. Na ndakisa, soki moyibi ayei na butu na ndako moko mpe nkolo-ndako abomi ye, nkolo-ndako yango akokaki kozala na nyongo ya makila te. Basengelaki kopesa ye etumbu te, mpo balingaki kosala ye mabe. Na yango, tozali kotánga boye: “Soki moyibi azwami na ntango ya kobuka mpo na kokɔta mpe soki abɛtami boye akufi, mbɛlɛ likambo ezali na ntina na [nkolo-ndako] te.”​—Exode 22:2.

Mwasi oyo bakangi ye na makasi mpe basangisi na ye nzoto azali na lotomo ya kosilika mpamba te yango ezali mabe monene na miso ya Nzambe. Na Mobeko ya Moize, moto oyo akangi mwasi na makasi mpe asangisi na ye nzoto asengelaki kokufa; yango ezali kaka lokola “moto oyo akangi moninga pe abomi ye.” (Kolimbola mibeko 22:25, 26, Bible na lingala ya lelo oyo) Atako tozali lisusu na nse ya Mobeko te, likambo yango ezali kosalisa biso tómona mabe oyo Yehova ayokaka soki moto akangi mwasi na makasi mpe asangisi na ye nzoto.

Na mikolo na biso, kosangisa na mwasi nzoto na makasi ezali mpe mbeba monene oyo moto akoki kozwela bitumbu ya makasi. Moto oyo basali bongo azali na lotomo ya kofunda likambo yango epai ya bapolisi. Na ndenge yango, bakonzi bakoki kopesa moto oyo asali likambo yango etumbu. Mpe soki moto oyo basangisi na ye nzoto na makasi azali mwana moke, baboti na ye nde bakoki kofunda likambo yango.

Mabe ya mikemike

Makambo nyonso esɛngaka kaka te ofunda yango epai ya bakonzi. Na yango, tosengeli te kosilikaka mpo na mabunga ya mikemike oyo basali biso, kasi tosengeli kolimbisaka. Mbala boni tosengeli kolimbisa? Ntoma Petelo atunaki Yesu boye: “Nkolo, mbala boni ndeko na ngai asengeli kosalela ngai lisumu mpe ngai nasengeli kolimbisa ye? Tii na mbala nsambo?” Yesu ayanolaki ete: “Nalobi na yo te, Tii na mbala nsambo, kasi, Tii na mbala ntuku nsambo na nsambo.”​—Matai 18:21, 22.

Lisusu, ezali na ntina ete biso baklisto tósala makasi mpo tósalaka bato mosusu mabe te. Na ndakisa, ntango osololaka na baninga, ozalaka na bonkonde? Ofingaka mingi? Makambo wana mpe ekoki kosilikisa baninga. Na esika ya kopesa moto oyo asiliki foti mpe kokanisa ete asengeli kolimbisa kaka, moto oyo asali mabe asengeli koyeba ete ye nde moto asilikisi ye. Moto oyo asilikisi moninga asengeli kosala makasi mpo na kokeba na makambo oyo azali kosala mpe koloba mpo apesa moninga nkanda te. Molende wana ekosala ete tóyokisaka basusu nkanda mingimingi te. Biblia epesi biso toli oyo: “Moto apusi koloba mingi, akozokisa lokola mompanga, kasi maloba ma bato ba bwanya makobikisa.” (Masese 12:18, Liloba lya Nzambe) Ntango tosali basusu mabe, ata soki tosali yango na nko te, kosɛnga bolimbisi ekoki kozala na ntina mingi mpo na kosilisa likambo yango.

Liloba ya Nzambe emonisi ete tosengeli ‘kolanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.’ (Baloma 14:19) Soki tozali koloba na mayele mpe na boboto, tokokokisa mpenza lisese oyo: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami na kati ya palata.” (Masese 25:11) Kosalela toli oyo epesaka mpenza esengo! Maloba ya boboto mpe ya mayele ekoki kutu kobongola makanisi ya bato ya makambo makasi: “Maloba ma boboto makoki kobuka minkuwa.”​—Masese 25:15, Liloba lya Nzambe.

Na yango, Liloba ya Nzambe epesi biso toli oyo: “Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto moko na moko eyano.” (Bakolose 4:6) Maloba “eyeisama elɛngi na mungwa” elimboli ete tosengeli kozalaka na maloba oyo ekosepelisa basusu, mpe yango ekoki kosala ete tóyokisaka bato nkanda mingimingi te. Na maloba mpe na misala, baklisto basalaka makasi mpo na kolanda toli ya Biblia oyo: ‘Bóluka kimya mpe bólanda yango.’​—1 Petelo 3:11.

Na yango, Mosakoli 7:9 elimboli ete tosengeli te kosilikaka mpo na masumu ya mikemike oyo bato mosusu basali biso. Masumu yango ekoki kouta na kozanga kokoka to moto akoki kosala yango na nko, kasi ezali masumu ya minene te. Kasi, soki likambo yango ezali lisumu ya monene, moto oyo basali ye mabe akoki kosilika mpe akoki kofunda likambo yango.​—Matai 18:15-17.

[Elilingi na lokasa 14]

Yehova apesaki Baloma nzela bábebisa Yisalaele oyo eboyaki kobongola motema na mobu 70 T.B.

[Elilingi na lokasa 15]

“Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto