Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/9 nk. 26-28
  • Boyá makanisi ya lokuta!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyá makanisi ya lokuta!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Andimaka ata baombo na ye te”
  • “Moto akoki nde koyeisela Nzambe libonza?”
  • Ndenge ya koboya makanisi ya lokuta
  • Ye oyo azali kokosela Nzambe makambo nde azali na ekweli
  • Ntango makanisi ya lokuta ekozala lisusu te
  • Tómekola Elifaze te ntango tozali kobɔndisa basusu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Bosembo ya Yobo ezwi mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Yobo ayikaki mpiko​—⁠Biso mpe toyika mpiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Nakotika bosembo na ngai te!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/9 nk. 26-28

Boyá makanisi ya lokuta!

NTANGO Yobo azalaki na mpasi makasi, baninga na ye misato: Elifaza, Biledada, ná Sofala, bakendaki kotala ye mpo na kobɔndisa ye. (Yobo 2:11) Moto oyo alekaki bango misato mpe oyo mbala mosusu azalaki mokóló na bango ezalaki Elifaza. Ye mpe moto ya liboso azwaki maloba mpe ye nde alobaki mingi. Makanisi nini Elifaza abimisaki mbala nyonso misato oyo azwaki maloba?

Elifaza alobelaki likambo moko ya kokamwa akutanaki na yango; alobaki boye: “[Elimo moko, NW] elekaki liboso ya elongi na ngai, [nsuki] ya nzoto na ngai etɛlɛmaki. Etɛlɛmaki nyɛɛ nde nasosolaki lolenge na yango te. Elilingi ezalaki liboso ya miso na ngai, kati na kimya, nayokaki mongongo moke.” (Yobo 4:15, 16) Elimo nini epesaki Elifaza makanisi oyo abimisaki? Maloba ya kokweisa oyo alobaki na nsima emonisi ete elimo wana ekoki kozala anzelu ya sembo ya Nzambe te. (Yobo 4:17, 18) Ezalaki elimo mabe. Soki boye te, mpo na nini Yehova apamelaki Elifaza ná baninga na ye mibale ete balobaki lokuta? (Yobo 42:7) Na ntembe te, demo moko nde apesaki Elifaza makanisi oyo akómaki na yango. Maloba na ye emonisaki makanisi ya Nzambe te.

Maloba ya Elifaza ezali komonisa makanisi nini? Mpo na nini tosengeli koboya makanisi ya lokuta? Tosengeli kosala nini mpo tóboya makanisi yango?

“Andimaka ata baombo na ye te”

Na mbala nyonso misato oyo azwaki maloba, Elifaza amonisaki ete Nzambe azali makambo makasi; kutu na miso na ye, basaleli na ye basalaka ata eloko moko ya malamu te. Elifaza alobaki na Yobo boye: “Talá, andimaka ata baombo na ye te, ata baanzelu na ye, afundaki bango ete babungani.” (Yobo 4:18) Elifaza alobaki lisusu boye: “Talá ye akondimela bayengebene na ye te, ata lola ezali pɛto na miso na ye te!” (Yobo 15:15) Na nsima, atunaki boye: “Soki yo ozali moyengebene, ekopesa nde Oyo-na-Nguya-Nyonso esengo?” ( Yobo 22:3) Biledada mpe andimaki makanisi wana, mpamba te alobaki boye: “Talá, ata sanza ekongɛnga te mpe minzoto ezali pɛto na miso ya [Nzambe] te!”​—Yobo 25:5.

Tosengeli kokeba na makanisi ya ndenge wana. Ekoki komema biso tókanisa ete Nzambe asɛngaka biso makambo oyo eleki makasi. Makanisi ya ndenge wana ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Lisusu, soki tokómi na makanisi ya ndenge wana, tokosala nini soki bapesi biso disipilini? Na esika tózala na komikitisa mpe tóndima básembola biso, motema na biso ekoki ‘kotombokela Yehova,’ mpe tokoki koyokela ye nkanda. (Masese 19:3) Yango ekozala likama mpenza mpo na elimo na biso!

“Moto akoki nde koyeisela Nzambe libonza?”

Likanisi mosusu oyo eyokani na likanisi ya koloba ete Nzambe asɛngaka biso makambo oyo eleki makasi ezali ete bato bazali biloko mpamba na miso na ye. Ntango Elifaza azwaki maloba mpo na mbala ya misato, atunaki motuna oyo: “Moto akoki nde koyeisela Nzambe libonza? Solo moto ya mayele akomiyeisela ye moko libonza.” (Yobo 22:2) Makanisi ya Elifaza ezalaki ete moto azali ata na ntina moko te na miso ya Nzambe. Biledada mpe akanisaki ndenge yango mpo alobaki boye: “Boye moto akoki kozala moyengebene liboso ya Nzambe boni? Akoki kozala pɛto boni, ye oyo abotami na mwasi?” (Yobo 25:4) Na kolanda makanisi wana, ndenge nini Yobo, moto mpamba oyo asalemi na putulu, akokaki ata kokanisa kozala sembo na miso ya Nzambe?

Lelo oyo, bato mosusu bamimonaka ete bazali ata na ntina moko te. Ndenge oyo moto abɔkwami, mikakatano ya bomoi, to mpe soki bazali koyina ye na bato ya mposo mosusu to ya ekólo mosusu; ekoki kotinda ye akanisa bongo. Kasi, mposa ya Satana ná bademo na ye ezalaka mpe ete bato bámiyoka ete bazali na ntina moko te. Soki balongi kokɔtisa na bɔɔngɔ ya moto likanisi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amonaka eloko ya malonga te na nyonso moto yango asalaka, moto wana akomiyoka ete azali na ntina moko te. Nsukansuka akoki kopɛngwa, ata mpe kotika Nzambe ya bomoi.​—Baebele 2:1; 3:12.

Bobange mpe maladi epekisaka biso makambo mingi. Tokoki komona ete oyo tozali kosala na mosala ya Bokonzi ezali moke soki tokokanisi yango na oyo tozalaki kosala ntango tozalaki bilenge, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi. Yango wana ezali na ntina tóbosana te ete Satana ná bademo na ye balingi tókanisa ete nyonso oyo tozali kosala ezali eloko te na miso ya Nzambe! Tosengeli koboya makanisi ya ndenge wana.

Ndenge ya koboya makanisi ya lokuta

Atako Satana Zabolo anyokolaki ye mingi, Yobo alobaki boye: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te.” (Yobo 27:5) Lokola Yobo alingaki Nzambe mingi, azalaki na ekateli ya kotikala sembo ata ndenge nini, mpe eloko moko te ekokaki kobongola makanisi na ye. Yango nde sɛkɛlɛ mpo na koboya makanisi ya lokuta. Tosengeli koyeba malamu bolingo ya Nzambe mpe kozala na botɔndi mpo na yango. Tosengeli mpe kolinga ye mingi. Mpo na kosala yango, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe komanyola makambo oyo tozali koyekola.

Na ndakisa, Yoane 3:16 elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko.” Yehova alingaka bato mingi, mpe bolingo yango emonanaka na makambo oyo asalelaka bango. Soki tozali komanyola bandakisa ya makambo oyo asalá, botɔndi na biso epai ya Yehova mpe bolingo na biso mpo na ye ekobakisama, mpe yango ekosalisa biso tóboya makanisi ya mabe to ya lokuta.

Tótalela ndenge oyo Yehova asololaki na Abalayama ntango etikalaki moke aboma Sodomo ná Gomola. Abalayama atunaki Yehova mbala mwambe mituna na ntina na etumbu oyo akanaki kopesa bingumba yango. Ata mbala moko te Yehova amonisaki ete alɛmbi to asiliki. Kutu, biyano na ye ekitisaki Abalayama motema mpe ebɔndisaki ye. (Genese 18:22-33) Na nsima, ntango Nzambe abikisaki Lota ná libota na ye na Sodomo, Lota asɛngaki akende kofanda na mboka moko oyo ezalaki pembeni, na esika akende na bangomba. Yehova alobaki na ye boye: “Talá, nakopesa yo mpe oyo elɔmbi yo lokola, mpe nakobebisa mboka yango te.” (Genese 19:18-22) Masolo wana ezali nde komonisa ete Yehova asɛngaka makambo oyo eleki ndelo, azali na bolingo te mpe azali makambo makasi? Te. Ezali komonisa ndenge mpenza azali, elingi koloba Mokonzi oyo atondi na bolingo, na boboto, na motema-mawa mpe ayebaka komitya na esika ya bato.

Makambo oyo Nzambe asalaki epai ya Alona, Davidi, mpe Manase ezali mpe komonisa ete alandelaka mabunga ya bato te mpe ete na miso na ye, moto moko te azangi ntina. Alona asalaki mabunga misato ya minene. Asalaki mwana ya ngɔmbɛ ya wolo, ye ná ndeko na ye ya mwasi Milyami batɔngaki Moize, mpe azangaki kosantisa Nzambe mpe kopesa ye lokumu na Meliba. Atako bongo, Yehova amonaki makambo ya malamu epai na ye mpe atikaki ye azala nganga-nzambe monene tii liwa na ye.​—Exode 32:3, 4; Mituya 12:1, 2; 20:9-13.

Davidi asalaki masumu ya minene ntango azalaki mokonzi. Asalaki ekobo, abomisaki moto oyo asalaki likambo te, mpe atángaki motuya ya bato, likambo oyo Nzambe atindaki ye te. Kasi, lokola Yehova amonaki ete Davidi abongolaki motema, abatelaki kondimana mpo na Bokonzi na ndenge atikaki ye na bokonzi tii liwa na ye.​—2 Samwele 12:9; 1 Ntango 21:1-7.

Manase, mokonzi moko ya Yuda, atongaki bitumbelo mpo na Baala, alekisaki bana na ye na mɔtɔ, alendisaki misala ya bilimo mabe, mpe atongaki bitumbelo mpo na losambo ya lokuta na kati ya lopango ya tempelo. Kasi, ntango abongolaki solo motema, Yehova alimbisaki ye, alongolaki ye na boombo, mpe azongisaki ye na bokonzi. (2 Ntango 33:1-13) Nzambe oyo amonaka ete ata moto moko te azali malamu akoki kosala makambo ya ndenge wana? Ata moke te!

Ye oyo azali kokosela Nzambe makambo nde azali na ekweli

Tosengeli kokamwa te ete Satana ye moko nde asalaka makambo oyo akoselaka Yehova. Satana azali makambo makasi mpe asɛngaka bato makambo oyo eleki ndelo. Tokoki komona yango polele na likambo ya kokaba bana mike lokola mbeka na losambo ya lokuta na ntango ya kala. Bayisalaele oyo bapɛngwaki bakómaki kotumba bana na bango na mɔtɔ, likambo oyo eyelaki Yehova ata na makanisi te.​—Yilimia 7:31.

Ezali nde Satana, kasi Yehova te nde alandelaka mabunga ya bato. Emoniseli 12:10 elobi ete Satana azali “mofundi ya bandeko na biso . . . , oyo afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!” Nzokande, mpo na Yehova, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Ee [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ee Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali.”​—Nzembo 130:3, 4.

Ntango makanisi ya lokuta ekozala lisusu te

Baanzelu kuna na likoló basepelaki mpenza ntango babenganaki Satana Zabolo ná bademo na ye! (Emoniseli 12:7-9) Na nsima, bilimo yango ya mabe bakokaki lisusu kosala eloko te epai ya baanzelu ya Yehova na likoló.​—Danyele 10:13.

Awa na mabelé, bato bakosepela na mikolo ezali koya. Etikali moke, anzelu moko akita ná fungola ya libulu mozindo mpe monyɔlɔlɔ ya monene na mabɔkɔ; akokanga Satana ná bademo na ye mpe akobwaka bango na libulu mozindo mpe kuna bakokoka lisusu kosala eloko moko te. (Emoniseli 20:1-3) Tokosikolama mpenza ntango likambo wana ekosalema!

Liboso na yango, tosengeli kokeba na makanisi ya lokuta. Mbala nyonso oyo tomoni ete makanisi ya lokuta to ya mabe ebandi kokɔta na bɔɔngɔ na biso, tókanisa bolingo ya Yehova mpo na kobengana makanisi yango. Na ndenge yango, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela makoki na biso ya kokanisa.’​—Bafilipi 4:6, 7.

[Elilingi na lokasa 26]

Yobo aboyaki makanisi ya lokuta

[Elilingi na lokasa 28]

Lota amonaki ete Yehova azali Mokonzi oyo ayebi komitya na esika ya basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto