Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/11 lok. 15
  • “Ezalaki mokolo moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ezalaki mokolo moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Mwana na yo akoloba nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Salelá Yehova kozanga kotya makanisi epai mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Olingi kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/11 lok. 15

“Ezalaki mokolo moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai”

EBONGISELI moko ya Australie oyo etalelaka bato oyo babɛlaka maladi ya motó elobaki boye: “Tozali koyoka ete bato mingi bazali kotambola motó, mpe emonani mpenza ete yango nde maladi oyo eleki kotungisa bilenge.” Baankɛtɛ emonisi ete, mbula na mbula, bilenge soki 100 000 ya Australie batambolaka motó.

Ata bilenge baklisto mpe babɛlaka maladi yango. Nzokande, kondima epai ya Yehova esalisaka mingi kati na bango bálonga makanisi ya mabe mpe bálekisa bolenge na bango malamu. Yango ekamwisaka mpenza bato mosusu. Na ndenge nini?

Tóyoka lisolo ya Claire, elenge moko ya mbula 18. Claire ná mama na ye bazali na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na engumba Melbourne. Ntango tata ya Claire asundolaki bango mpe akendaki, Claire atambolaki motó. Kasi, azalaki kaka na kondima makasi epai ya Yehova, Tata na ye ya likoló. Mokolo moko Lydia, monganga na bango, akendaki kotala mama ya Claire na ndako na bango mpo azalaki kobɛla. Na nsima, na boboto nyonso, amemaki Claire na motuka na ye na vile. Na nzela, atunaki Claire soki azalaka na mwa moto na ye. Claire ayebisaki ye ete lokola azali Motatoli ya Yehova, akoki te kolinga mibali kaka mpo na kosepelisa nzoto. Monganga akamwaki. Na nsima, Claire amonisaki ye ndenge Biblia esalisaki ye na kozwa bikateli ya malamu na bomoi na ye. Nsukansuka, alakaki monganga ete akomemela ye buku moko oyo esalisaki ye mingi. Buku yango ezali Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi.

Mikolo misato nsima ya kozwa buku yango, Lydia abengaki mama ya Claire na telefone mpo na koyebisa ye ete asepelaki na buku yango mingi. Mpe asɛngaki bámemela ye buku yango mosusu motoba mpo apesa baninga na ye. Ntango Claire amemelaki ye babuku yango, monganga ayebisaki ye ndenge azalaki kokamwa na kondima na ye. Claire atunaki ye soki akosepela koyekola Biblia na ye, mpe andimaki.

Na boumeli ya mwa basanza, Claire azalaki koyekola na monganga yango na ntango ya bopemi na midi. Na nsima, Lydia atunaki Claire soki akosepela kozwa maloba na seminɛrɛ moko oyo ezalaki kolobela maladi ya motó epai ya bilenge. Atako Claire azalaki na kobanga na motema, andimaki. Bato koleka 60 bazalaki na seminɛrɛ yango. Minganga minei ya maladi ya motó, oyo bazalaki bango nyonso mikóló, bazwaki maloba liboso ya bayangani. Ntango basilisaki, ekómaki ngala ya Claire. Amonisaki ntina oyo bilenge basengeli kozala na boyokani malamu na Nzambe. Amonisaki ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bilenge mpe asalisaka baoyo nyonso balukaka lisalisi mpe libɔndisi epai na ye. Longola yango, alobelaki elikya makasi oyo azali na yango ete mosika te Yehova akosilisa bamaladi nyonso ya nzoto mpe ya makanisi. (Yisaya 33:24) Litatoli malamu mpenza oyo Claire apesaki ebimisaki matomba nini?

Claire alobi boye: “Nsima ya seminɛrɛ yango, bato mingi balandaki ngai mpo na koyebisa ngai ete bakamwaki koyoka elenge lokola ngai nazali koteya makambo ya Nzambe. Nakabolaki buku Mituna oyo bilenge batunaka 23. Bilenge basi misato oyo bazalaki mpe na seminɛrɛ yango bapesaki ngai banimero na bango ya telefone. Moko na bango azali sikoyo koyekola Biblia. Ezalaki mokolo moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto