Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/12 nk. 13-16
  • Kobimisa Biblia na Italien ezalaki pɛtɛɛ te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobimisa Biblia na Italien ezalaki pɛtɛɛ te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biteni ya Biblia oyo ebongolamaki liboso
  • Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Italien
  • Biblia​—“buku oyo eyebani te”
  • Balɛmbisi epekiseli
  • Ata na monoko oyo ekufá Biblia ezali kaka na bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini mabongoli ebele ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge bato ya Espagne bayebaki Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/12 nk. 13-16

Kobimisa Biblia na Italien ezalaki pɛtɛɛ te

“BIBLIA ezali moko na mikanda oyo bato mingi na ekólo na biso [Italie] bazali na yango, kasi mbala mosusu ezali mpe na kati ya mikanda oyo batángaka mpenza te. Tolendisaka mpenza bandimi te na koyeba Biblia mpe tosalisaka bango mpenza te bátángaka yango lokola Liloba ya Nzambe. Bato mingi balingaka koyeba Biblia, kasi mbala mingi moto azalaka te mpo na koteya bango yango.”

Maloba yango, oyo baepiskɔpɔ ya Italie balobaki na 1995, ememi biso tómituna mwa mituna. Na bikeke oyo eleki, bato ya Italie bazalaki nde kotánga Biblia? Mpo na nini na Italie, Biblia ekabolamaka mingi te lokola na bikólo mosusu? Mpo na nini Biblia ezali na kati ya babuku oyo bato ya Italie batángaka mpenza te? Ndenge oyo makambo elekaki ntango bazalaki kobongola Babiblia ndenge na ndenge na monɔkɔ ya Italien ekopesa biso biyano na mituna yango.

Minɔkɔ mingi ya Mpoto, na ndakisa Lifalanse, Italien, Portugais, Espagnol, mpe bongo na bongo, eutá na Latin; kasi elekaki bikeke mingi mpo monɔkɔ na monɔkɔ ebotama. Na mikili ndenge na ndenge ya Mpoto oyo monɔkɔ na bango eutá na Latin, monɔkɔ oyo bato nyonso bazalaki koloba ekómaki mokemoke kokola, kutu bakómaki mpe kosalela yango mpo na kokoma mikanda. Kokola ya minɔkɔ ndenge na ndenge etalelaki mpe likambo ya kobongola Biblia. Na ndenge nini? Na ntango moko boye, monɔkɔ oyo bato nyonso bazalaki koloba mpe mitindo ndenge na ndenge ya koloba yango ekesanaki makasi na Latin, monɔkɔ ya Lingomba ya Katolike, na boye ete bato mingi oyo batángaki kelasi te bakokaki lisusu koyoka Latin te.

Na mobu 1000, ezalaki mpasi mpo na bato mingi ya Italie bátánga Vulgate, libongoli ya Biblia na Latin, ata soki bazalaki na yango. Na boumeli ya bankama ya bambula, bakonzi ya Lingomba bango moko nde basimbaki biteyelo ata mpe bainiversite oyo ezalaki na ntango wana. Kaka bato moke nde bazwaki libaku ya kotánga na biteyelo yango. Yango wana, nsukansuka, Biblia ekómaki “buku oyo eyebani te.” Kasi, bato mingi bazalaki na mposa ya kozala na Liloba ya Nzambe mpe kotánga yango na monɔkɔ ya mboka na bango.

Bakonzi mingi ya Lingomba bazalaki koboya bato bábongola Biblia, bazalaki kobanga noki te emema bato mingi na lipɛngwi. Massimo Firpo, moto ya mayele na masolo ya kala alobi ete, “kosalela monɔkɔ oyo bato nyonso bazalaki koloba [elingaki kosɛnga] kotika kosalela monɔkɔ [ya Latin] oyo ezalaki kobatela bokonzi ya basango na makambo ya lingomba.” Yango wana, soki tii lelo oyo bato mingi na Italie bayebi mateya ya Biblia te, ezali mpo ete na ntango ya kala, makambo lokola monɔkɔ, mibeko ya lingomba mpe kozanga kotánga bakelasi epesaki bango nzela ya koyeba yango te.

Biteni ya Biblia oyo ebongolamaki liboso

Na ekeke ya 13, babongolaki mpo na mbala ya liboso mwa mikanda ya Biblia na monɔkɔ ya Italien uta na Latin. Mabongoli yango ezalaki kosalema na mabɔkɔ mpe ezalaki ntalo mingi. Na ekeke ya 14, lokola mabongoli ekómaki mingi, pene na Biblia mobimba ebongolamaki na monɔkɔ ya Italien, atako mikanda na yango ebongolamaki na bato ndenge na ndenge, na bambula mpe bisika ekeseni. Kaka bato ya bozwi to bato oyo batángá bakelasi nde bazalaki na makoki ya kozwa mabongoli yango oyo ezalaki mosala ya babongoli oyo bankombo na bango eyebani te. Gigliola Fragnito, moto ya mayele na masolo ya kala, alobi ete ata na ntango mikanda ezalaki lisusu ntalo mingi te mpo ekómaki kosalema na bamasini, kaka “bato moke nde bazalaki” na Babiblia.

Na boumeli ya bankama ya bambula, bato mingi ya Italie bayebaki kotánga te. Ata na mobu 1861, ntango Italie mobimba ekómaki ekólo moko, bato ebele (74,7%) ya ekólo yango bayebaki kotánga te. Nzokande, ntango guvɛrnɛma ya Italie elukaki kokómisa kelasi ofɛlɛ mpe kosala biteyelo ya Leta mpo na bato nyonso, Pápa Pie IX akomelaki mokonzi na mobu 1870, ayebisaki ye apekisa mobeko yango, oyo Pápa alobaki ete ezali “motambo” oyo basali na mokano ya “kobebisa mpenza biteyelo ya Katolike.”

Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Italien

Biblia mobimba ya liboso oyo ebimaki na monɔkɔ ya Italien enyatamaki na engumba Venise na mobu 1471, nsima ya bambula soki 16 banda ntango basalelaki masini ya liboso ya konyata mikanda na Mpoto. Nicolo Malermi, sango moko ya lisangá ya Ba-Camaldule, abimisaki libongoli na ye nsima ya sanza mwambe. Asalelaki mabongoli oyo esilaki kobimisama, abongisaki yango na kolanda Biblia ya Vulgate, mpe alongolaki maloba mosusu mpo na kotya maloba oyo ezalaki kosalelama na etúká na ye, Vénétie. Libongoli na ye ezalaki Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Italien oyo ekabolamaki mingi.

Moto mosusu oyo abimisaki libongoli ya Biblia na engumba Venise ezalaki Antonio Brucioli. Azalaki filozofe, azalaki kolanda makanisi mosusu ya Baprotesta, kasi akataki mpenza boyokani te na Lingomba ya Katolike. Na mobu 1532, Brucioli abongolaki Biblia uta na Liebele mpe Grɛki. Yango ezalaki Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Italien oyo ebongolamaki mbala moko uta na minɔkɔ oyo bakomelaki Biblia. Atako Biblia yango ebongolamaki te na monɔkɔ ya Italien oyo bazalaki kokoma na mikanda, ezali mpenza sembo na makomi ya Liebele mpe ya Grɛki, soki totaleli boyebi ya Liebele mpe ya Grɛki oyo bato bazalaki na yango na ntango wana. Na bisika mosusu mpe na bibimeli mosusu, Brucioli azongisaki nkombo ya Nzambe, akomaki yango “Ieova.” Na boumeli ya bambula soki nkama, bato ya Lingomba ya Protesta na Italie mpe bato mosusu oyo batikaki Lingomba ya Katolike bazalaki kosalela mingi Biblia na ye.

Bato mosusu, ata mpe Bakatolike, babimisaki mpe mabongoli mosusu na monɔkɔ ya Italien; kasi, mingimingi bazalaki kaka kobongisa bisika mosusu ya Biblia ya Brucioli. Ata moko te ekabolamaki mingi. Na mobu 1607, Giovanni Diodati, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Protesta, oyo baboti na ye bakendaki na Suisse mpo na kokima minyoko, abimisaki libongoli mosusu na monɔkɔ ya Italien, uta na Liebele mpe na Grɛki na engumba Genève. Libongoli na ye ekómaki Biblia ya Baprotesta ya Italie na boumeli ya bankama ya bambula. Biblia yango ezalaki libongoli ya malamu mpenza ya monɔkɔ ya Italien na kotalela ndenge oyo monɔkɔ yango ezalaki kolobama na ntango wana. Biblia ya Diodati esalisaki bato ya Italie bákanga ntina ya mateya ya Biblia. Kasi, bakonzi ya Lingomba batɛmɛlaki libongoli yango mpe mabongoli mosusu.

Biblia​—“buku oyo eyebani te”

Buku moko (Enciclopedia Cattolica) elobi ete: “Lingomba ezalaki kokokisa malamu mokumba na yango ya kolandela babuku, kasi ntango babimisaki masini ya konyata mikanda, emonaki lisusu ntina te ya kozala na liste ya babuku oyo epekisamaki mpamba te mikanda oyo emonanaki ete ezali likama ezalaki kotumbama.” Ata nsima ya kobima ya Lingomba ya Protesta, bakonzi ya Lingomba ya bikólo mingi ya Mpoto basalaki makasi mpo na kopekisa babuku oyo bazalaki kobenga babuku ya bapɛngwi. Makambo ebongwanaki nsima ya likita monene oyo esalemaki na mobu 1546 (concile de Trente), ntango batalelaki likambo ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya bato nyonso. Bato na likita yango bakabwanaki na ngámbo mibale. Baoyo baboyaki balobaki ete kobongola Biblia na monɔkɔ oyo bato nyonso bazali koloba ezali “ebandeli ya lipɛngwi ya ndenge nyonso.” Baoyo bandimaki balobaki ete “banguna” na bango, elingi koloba Baprotesta, bakoloba ete Lingomba eboyi kobongola Biblia na monɔkɔ ya bato nyonso mpo na kobomba “bokosi.”

Lokola baí-likita bayokanaki te, bazwaki ekateli te na likambo yango, kasi basukaki kaka na kondima libongoli ya Vulgate, balobaki ete yango nde Biblia oyo Lingomba ya Katolike ekobanda kosalela. Carlo Buzzetti, profɛsɛrɛ na iniversite moko (Université pontificale salésienne de Rome), amonisi ete ndenge baí-likita babengaki Vulgate ete Biblia ya “solosolo” “elendisaki likanisi oyo ete kaka Biblia wana nde esengelaki kosalelama.” Makambo oyo esalemaki na nsima emonisaki yango polele.

Na mobu 1559, Pápa Paul IV abimisaki Index, to liste ya liboso ya babuku oyo epekisamaki, babuku oyo bato ya Katolike basengelaki te kotánga, kotɛkisa, kobongola, to kozala na yango. Babuku yango ezalaki kotalelama ete ezali mabe mpe likama mpo na kondima mpe bizaleli malamu. Index epekisaki kotánga Babiblia oyo ebongolamaki na monɔkɔ ya bato nyonso, kati na yango Biblia ya Brucioli. Bato oyo bazalaki kobuka mobeko yango bazalaki kobengana bango na Lingomba. Index oyo ebimaki na mobu 1596 ebakisaki mikanda mosusu oyo epekisamaki. Bato bazalaki lisusu na ndingisa te ya kobongola to konyata Babiblia na monɔkɔ ya bato nyonso. Esengelaki kotumba Babiblia yango.

Mpo na yango, na nsuka ya ekeke ya 16, likambo ya kotumba Babiblia ekómaki kosalema mingi na mabándá ya bandako-nzambe. Na makanisi ya bato mingi, Biblia ekómaki buku moko ya bapɛngwi, mpe ata lelo oyo bato mingi bakanisaka bongo. Babiblia nyonso mpe mikanda mosusu nyonso oyo elimbolaka Biblia oyo ezalaki na babibliotɛkɛ mpe na bandako ya bato etumbamaki, mpe na boumeli ya mbula 200 oyo elandaki, moto moko te ya Katolike azalaki na ndingisa ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Italien. Babiblia oyo bazalaki kosalela na Italie​—na kobombana mpo na kobanga bábɔtɔla yango​—ezalaki Babiblia oyo ebongolamaki na bato ya mayele ya Lingomba ya Protesta. Yango wana, Mario Cignoci, moto ya mayele na masolo ya kala, alobi ete: “Na boumeli ya bankama ya bambula, bato batikaki mpenza kotánga Biblia. Biblia ekómaki buku oyo eyebani te, mpe bato mingi ya Italie batikalá kotánga ata lokasa moko te ya Biblia na bomoi na bango mobimba.”

Balɛmbisi epekiseli

Na nsima, na mobeko oyo Pápa Benoît XIV abimisaki na Index ya 13 Yuni 1757, abongolaki mobeko ya liboso, “apesaki bato nzela bátánga mabongoli oyo ezalaki na monɔkɔ ya bato nyonso oyo endimamaki na Pápa mpe oyo ebimisamaki na baepiskɔpɔ.” Mpo na yango, Antonio Martini, oyo na nsima akómaki episkɔpɔ-mokonzi ya engumba Florence, azwaki bibongiseli mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ ya bato nyonso uta na Vulgate. Eteni ya liboso ebimisamaki na mobu 1769, mpe mosala nyonso esilaki na mobu 1781. Buku moko ya Bakatolike elobi ete libongoli ya Martini ezalaki “libongoli ya liboso oyo ebongi mpenza.” Tii na ntango wana bandimi ya Lingomba ya Katolike oyo bayebaki Latin te bazalaki na likoki te ya kotánga Biblia oyo endimamaki na Lingomba. Na boumeli ya bambula 150 oyo elandaki, libongoli ya Martini ezalaki libongoli kaka moko oyo endimamaki na Lingomba ya Katolike na Italie.

Makambo ebongwanaki na likita monene ya mangomba (Vatican II). Na mobu 1965, mokanda moko (Dei Verbum), mpo na mbala ya liboso, epesaki nzela na “mabongoli ya malamu mpe ya sikisiki . . . na minɔkɔ ndenge na ndenge, mingimingi oyo ebongolamaki uta na makomi ya ebandeli ya mikanda mosantu.” Mwa bambula liboso, na 1958, ebongiseli moko ya Lingomba ya Katolike (Pontificio istituto biblico) ebimisaki “libongoli ya liboso ya Biblia mobimba ya Bakatolike oyo ebongolamaki uta na Liebele mpe Grɛki.” Libongoli yango ezongisaki nkombo ya Nzambe mwa bisika mosusu, ekomaki yango “Jahve.”

Kopekisa Babiblia oyo ebongolamaki na monɔkɔ ya bato nyonso esalaki mabe mingi, mpe mbuma mabe na yango ezali komonana tii lelo oyo. Ndenge Gigliola Fragnito amonisi yango, likambo yango “ekɔtisaki na mitó ya bandimi likanisi ya kotika kotyela makoki na bango ya kokanisa mpe lisosoli na bango motema.” Lisusu, ezali na mimeseno ndenge na ndenge oyo Lingomba etyelá bato, mpe mpo na bandimi mingi, mimeseno yango ezali na ntina koleka Biblia. Nyonso wana esali ete bato báyeba Biblia te, atako bayebi kotánga.

Nzokande, mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova elamusi mposa ya kotánga Biblia epai ya bato mingi na Italie. Na 1963 Batatoli ya Yehova babimisaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na monɔkɔ ya Italien. Na 1967 basilisaki kobongola Biblia mobimba na monɔkɔ ya Italien. Kaka na Italie, basili kokabola bakopi koleka 4 000 000 ya Biblia yango. Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ezali na nkombo ya Nzambe, Yehova, ekeseni mpenza na Babiblia mosusu mpamba te elandeli mpenza na bosikisiki bandimbola ya maloba ya Liebele mpe ya Grɛki.

Batatoli ya Yehova bakendaka ndako na ndako mpo na kotángela bato nyonso oyo balingi koyoka mpe kolimbwela bango nsango ya elikya oyo ezali na kati ya Biblia. (Misala 20:20) Soki okutani na Batatoli ya Yehova, tolendisi yo osɛnga bango bálakisa yo na kati ya Biblia na yo moko elaka kitoko ya Nzambe, oyo mosika te akosala “mabelé moko ya sika” epai “boyengebene ekofanda.”​—2 Petelo 3:13.

[Karte na lokasa 13]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Venise

ROME

[Elilingi na lokasa 15]

Libongoli ya Brucioli esalelaki nkombo ya Nzambe, Ieova

[Elilingi na lokasa 15]

Index ya mikanda oyo epekisamaki etángaki mpe mabongoli ya Biblia na monɔkɔ ya bato nyonso mpe elobaki ete ezali likama

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Lokasa ya liboso ya Biblia: Biblioteca Nazionale Centrale di Roma

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Libongoli ya Brucioli: Biblioteca Nazionale Centrale di Roma; Index: Su concessione del Ministero per i Beni e le Attività Culturali

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto