Ata na monɔkɔ oyo ekufá Biblia ezali kaka na bomoi
NA BOUMELI ya bikeke, minɔkɔ mingi oyo ezalaki kolobama na mokili ebungaki. Monɔkɔ ekufaka ntango bato oyo balobaka yango bazali lisusu te. Na ndenge yango nde balobaka ete Latin ezali “monɔkɔ ekufá,” atako bato mingi bayekolaka monɔkɔ yango mpe ezali monɔkɔ oyo elobamaka na Vatican.
Mabongoli mosusu ya kala mpe ya malamu ya Biblia ezali na Latin. Mabongoli yango oyo ezali na monɔkɔ oyo elobamaka lisusu te ekoki mpenza kozala na nguya na bomoi ya bato lelo oyo? Masolo ya mabongoli yango ekosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.
Mabongoli ya libosoliboso na Latin
Latin ezalaki monɔkɔ ya liboso ya Loma. Kasi, ntango ntoma Paulo akomelaki baklisto ya engumba yango, akomaki na Grɛki.a Yango ezalaki likambo te mpo bato ya engumba yango bazalaki koloba minɔkɔ yango mibale. Lokola bato mingi ya Loma bautaki na mikili ya Azia epai bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, bazalaki koloba ete engumba yango ekokóma ya Bagrɛki. Na Loma, etúká na etúká ezalaki na monɔkɔ na yango, kasi ntango bokonzi ya Loma ekómaki monene, bato mingi bakómaki koloba Latin. Mpo na yango, Makomami Mosantu ebongolamaki na Latin. Ekoki kozala ete likambo yango ebandaki na ekeke ya mibale ya ntango na biso na nɔrdi ya Afrika.
Mabongoli ndenge na ndenge oyo babimisaki eyebanaki na nkombo Vetus Latina to libongoli ya kala ya Latin. Ata maniskri moko te ya kala ya Latin oyo ezali na mikanda nyonso ya Biblia ezali lelo oyo. Mwa biteni oyo ezali, ata mpe biteni oyo bakomi mosusu batángá na mikanda na bango, ezali komonisa ete Vetus Latina esangisamaki na mokanda moko te. Emonani ete bato mingi nde babongolaki yango, moto na moto na ndenge na ye. Na yango, na esika ezala mokanda moko, ezalaki nde mikanda mingi oyo ebongolamaki uta na Grɛki.
Lokola moto na moto abongolaki mikanda ya Makomami na Latin na ndenge na ye, yango etyaki mobulu. Na nsuka ya ekeke ya minei ya ntango na biso (T.B.), Augustin alobaki ete “moto nyonso oyo azalaki na maniskri ya Grɛki mpe ayebaki monɔkɔ ya Latin ná ya Grɛki ata mwa moke alukaki kobongola yango” na Latin. Augustin mpe bato mosusu bamonaki ete mabongoli elekaki mingi, yango wana bazalaki kondima te ete yango nyonso ebongolami malamu.
Libongoli ya Jérôme
Moto oyo amekaki kosilisa mobulu yango ezali Jérôme, oyo na ntango wana azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya Pápa Damase, episkɔpɔ ya Loma, na mobu 382 ya ntango na biso (T.B.). Episkɔpɔ yango asɛngaki Jérôme atalela lisusu mabongoli ya Baevanzile na Latin, mpe Jérôme asilisaki mosala yango nsima ya mwa bambula. Na nsima, abandaki kotalela lisusu mabongoli ya mikanda mosusu ya Biblia na Latin.
Jérôme asalelaki mabongoli ndenge na ndenge mpo na kobimisa libongoli na ye oyo na nsima ekómaki kobengama Vulgate. Mpo na kobongola mokanda ya Nzembo, Jérôme asalelaki Septante, libongoli ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki, oyo basilisaki kobongola na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso (T.B.). Atalelaki lisusu Baevanzile, mpe abongolaki mikanda mingi ya Makomami ya Liebele uta na Liebele. Ekoki kozala ete bato mosusu nde batalelaki mikanda mosusu ya Makomami yango. Nsukansuka, mikanda mosusu ya Vetus Latina ekɔtisamaki na libongoli ya Jérôme, Vulgate.
Na ebandeli, bato mingi basepelaki na libongoli ya Jérôme te. Ata Augustin andimaki yango te. Kasi, na nsima bato bakómaki kotalela yango lokola libongoli ya malamu koleka ya Biblia oyo esangisi mikanda nyonso ya Makomami na buku moko. Na ekeke ya mwambe mpe ya libwa, bato ya mayele na maloba ya Biblia lokola Alcuin mpe Théodulf, babongisaki mabunga oyo ekɔtaki na libongoli ya Jérôme ntango bato bazalaki kosala bakopi na yango. Bato mosusu bakabolaki libongoli yango na mikapo, mpo ezala mpasi te kotánga yango. Ntango masini ya kobimisa mikanda esalemaki, libongoli ya Jérôme ezalaki Biblia ya liboso oyo babimisaki na masini.
Ezalaki na likita moko monene (concile de trente) oyo esalemaki na 1546 nde Lingomba ya Katolike epesaki libongoli ya Jérôme nkombo Vulgate. Na likita yango, balobaki ete Biblia yango ezali libongoli ya “solosolo,” mpe baponaki yango lokola Biblia ya Lingomba ya Katolike. Baí-likita, basɛngaki mpe ete bátalela yango lisusu. Baponaki bakomite ya babongoli mpo na kotalela yango, kasi lokola Pápa Sixte V alingaki ete mosala yango esalema nokinoki, mpe ntango mosusu azalaki komityela motema mingi, amonaki malamu asilisa mosala yango ye moko. Babandaki kobimisa yango ntango akufaki na 1590. Baepiskɔpɔ baboyaki yango mpo bamonaki ete ezali na mabunga, mpe baboyaki ekabolama epai ya bato.
Na 1592, Pápa Clément VIII asɛngaki bátalela lisusu libongoli yango mpe nsukansuka bakómaki kobenga yango libongoli ya sixto-clémentine. Yango ezalaki libongoli oyo lingomba ya Katolike ezalaki kosalela. Libongoli Vulgate ya sixto-clémentine ekómaki libongoli oyo bazalaki kosalela mpo na kobongola Biblia na minɔkɔ mosusu, na ndakisa, basalelaki yango mpo na kobongola libongoli ya Antonio Martini oyo esilaki na mobu 1781.
Libongoli ya sika na Latin
Bato ya mayele oyo batalelaki libongoli ya Vulgate na ekeke ya 20, bamonaki ete esengeli lisusu kotalela yango. Mpo na yango, na 1965 Lingomba ya Katolike eponaki bato mpo na kosala mosala yango mpe bapesaki bango mokumba ya kotalela lisusu libongoli yango ya Latin na kolanda boyebi oyo bato bazali na yango lelo oyo. Basengelaki kosalelaka yango na mísa ya Latin na lingomba ya Katolike.
Eteni ya liboso ya libongoli yango ebimaki na 1969, mpe na 1979 Pápa Jean-Paul II andimaki libongoli ya Nova Vulgata. Ebimeli ya liboso ezalaki na nkombo ya Nzambe, Iahveh na bavɛrsɛ mingi na ndakisa na Exode 3:15 mpe 6:3. Na nsima, ndenge moto moko oyo azalaki na komite ya bato oyo batalelaki yango amonisaki yango, emonanaki ete ndenge batyaki nkombo ya Nzambe na ebimeli ya liboso ezalaki libunga; yango wana, na ebimeli ya mibale oyo ebimisamaki na 1986 “balongolaki yango . . . mpe batyaki Dominus [to ‘Nkolo’] na esika ya Iahveh.”
Kaka ndenge bato mosusu baboyaki Vulgate bikeke mingi liboso, bato mingi mpe baboyaki Nova Vulgata ata mpe bato ya mayele na Lingomba ya Katolike. Atako liboso balobaki ete ezali libongoli oyo bato ya mangomba ndenge na ndenge bakoki kosalela, bato mingi bamonaki ete ezalaki nde kokabola mangomba, mingimingi mpo Pápa alobaki ete babongoli nyonso ya Biblia basengeli kolanda libongoli yango. Na Allemagne, libongoli ya Nova Vulgata ebimisaki mobulu kati na Baprotesta mpe Bakatolike ntango bazalaki koluka libongoli oyo ekosalelama na Bakatolike mpe Baprotesta. Baprotesta balobaki ete Bakatolike balingi kaka ete bálanda libongoli ya Nova Vulgata.
Atako Latin elobamaka mingi lisusu te, Biblia na monɔkɔ ya Latin ezali na nguya na bomoi ya bamilio ya bato. Maloba oyo esalelamaka na mangomba mingi eutá na Latin. Ata soki ebimisami na monɔkɔ nini, Liloba ya Nzambe ezalaka kaka na nguya, ebongolaka bomoi ya bamilio ya bato oyo basalaka makasi mpo na koyokanisa bomoi na bango na mateya na yango ya ntina mingi.—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ndenge Makomami ya Boklisto ekomamaki na Grɛki, talá lisolo “Oyebaki yango?” na lokasa 13.
[Maloba mpo na kolimbola elilingi na lokasa 23]
Pápa Jean-Paul II andimaki Biblia ya Nova Vulgata. Ebimeli ya liboso ezalaki na nkombo ya Nzambe, Iahveh
[Etanda na lokasa 21]
MALOBA OYO ETIKÁ NSANGO
Biblia Vetus Latina oyo ebongolamaki uta na Grɛki, ezalaki na maloba mingi oyo ekendá nsango. Moko ya maloba yango ezali liloba ya Grɛki di·a·theʹke oyo ebongolami na “kondimana,” testamentum, to “testama.” (2 Bakolinti 3:14) Mpo na yango, bato mingi lelo oyo babengaka Makomami ya Liebele mpe ya Grɛki, Testama ya kala mpe Testama ya sika.
[Etanda na lokasa 23]
MOBEKO OYO BATO BASEPELAKI NA YANGO TE
Nsima ya kotalela likambo yango na boumeli ya mbula minei, na 2001 ebongiseli moko ya lingomba ya Katolike (Congrégation pour le culte divin et la discipline des sacrements), ebimisaki mobeko moko (Liturgiam authenticam). Bato mingi ya mayele na Lingomba ya Katolike basepelaki na mobeko yango te.
Mobeko yango emonisaki ete lokola Biblia Nova Vulgata ezali libongoli ya Lingomba ya Katolike, mabongoli nyonso mosusu esengeli kolanda yango, ata soki Nova Vulgata ebimisi malamu te likanisi oyo ezalaki na bamaniskri ya ebandeli. Lingomba ya Katolike ekondima Biblia kaka soki elandi malako wana. Mobeko yango elobaki ete na mabongoli ya Katolike, “nkombo ya Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo ekomamaki na balɛtrɛ minei ya Liebele (YHWH)” esengeli kobongolama “na minɔkɔ mosusu na liloba oyo elimboli” Dominus, to “Nkolo,” ndenge ebimeli ya mibale ya Nova Vulgata esalaki yango—atako ebimeli ya liboso esalelaki nkombo “Iahveh.”b
[Maloba na nse ya lokasa]
b Talá lisolo “Vatican elingi kolimwisa nkombo ya Nzambe,” na lokasa 30.
[Elilingi na lokasa 22]
Biblia ya Alcuin na Latin, mobu 800 ya ntango na biso
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na Paléographìe latine, by F. Steffens (www.archivi.beniculturali.it)
[Bililingi na lokasa 22]
Vulgate Sixto-Clémentine, mobu 1592
[Bililingi na lokasa 23]
Exode 3:15, Nova Vulgata, 1979
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2008 Libreria Editrice Vaticana