Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mpo na nini tokoki koloba ete lisumu ya liboso, elingi koloba kozanga botosi ya Adama, ezali lokola maladi oyo ezalaka na makila?
Lisumu ya Adama ezali lokola maladi mpamba te atikelá yango bana na ye nyonso. Yango wana, biso nyonso tozwá lisumu, kaka ndenge bana mosusu bazwaka maladi oyo ezali na makila ya baboti na bango.—15/8, lokasa 5.
• Mpo na nini mokili etondi mpenza na mobulu lelo oyo?
Satana azali koluka kokabola bato na Yehova na ndenge azali kolona na mitema na bango elimo ya mobulu na nzela ya bafilme, miziki, mpe masano mosusu ya ordinatɛrɛ oyo elendisaka mobulu mpe koboma. Mobulu oyo bazali kolakisa na televizyo ezali kosala ete makambo ya mobulu ekóma mingi.—1/9, lokasa 29.
• Ponsi Pilato azalaki nani?
Azalaki Moloma, azalaki mokonzi oyo azalaki na molɔngɔ ya nse; mpe ekoki kozala ete azalaká liboso soda. Na mobu 26 T.B., Tibɛli, amperɛrɛ ya Loma, atyaki ye guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Yudea. Ntango azalaki kosambisa Yesu, Pilato ayokaki bifundeli ya bakonzi ya Bayuda. Mpo na kosepelisa bato, andimaki ete Yesu abomama.—15/9, nkasa 10-12.
• “Elembo” oyo Matai 24:3 elobeli ezali nini?
Elembo yango esangisi makambo ndenge na ndenge oyo ekomonana na eleko moko. Makambo lokola bitumba, nzala, maladi mabe, mpe koningana ya mabelé, mpe nyonso wana ekosalisa bayekoli ya Yesu báyeba “kozala” na ye mpe “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—1/10, nkasa 4-5.
• Bayuda oyo bazalaki kofanda libándá ya Palestine bazalaki na bikólo nini?
Na ekeke ya liboso, Bayuda mingi bazalaki kofanda na Sulia, Asie Mineure, Babilone, mpe na Ezipito, mpe na mwa bituluku mikemike na mikili ya Mpoto oyo Loma ezalaki koyangela.—15/10, lokasa 12.
• Moklisto akoki nde kozala na lisosoli ya malamu soki andimi mosala oyo esɛngaka kosimba mondoki?
Kosala mosala oyo esɛngaka kosimba mondoki to ebundeli mosusu ezali ekateli ya moto ye moko. Kasi, mosala ya ndenge wana ekoki komema ye na kosopa makila soki esɛngi asalela mondoki na ye, ekoki mpe komema moto na likama ya kozoka to kokufa soki bato mabe babundisi ye. Moklisto oyo asimbaka mondoki akoki te kozwa mikumba na lisangá. (1 Timote 3:3, 10)—1/11, lokasa 31.
• Lokola liloba “Armagedona” euti na nkombo “Ngomba ya Megido,” elingi nde koloba ete etumba ya Armagedona ekozala na ngomba moko ya Moyen-Orient?
Te. Ngomba ya Megido ezalaka te, ezali kaka mwa libondo na lobwaku moko na Yisalaele. Esika yango ezali monene te mpo “bakonzi ya mabelé mobimba mpe mampinga na bango” báyangana wana. Etumba monene ya Nzambe ekozala na mabelé mobimba, mpe ekosilisa bitumba nyonso. (Emoniseli 16:14, 16; 19:19; Nzembo 46:8, 9)—1/12, nkasa 4-7.