Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/1 nk. 8-9
  • ‘Yah azali lobiko na ngai’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Yah azali lobiko na ngai’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali Mobikisi tii lelo oyo
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • ‘Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya Yehova’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Biblia nimero 2​—Exode
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Malɔzi motoba oyo elandaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/1 nk. 8-9

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

‘Yah azali lobiko na ngai’

BASALELI ya Yehova basengelaki kopona: Bakotosa mokonzi mabe ya Ezipito to bakotosa Yehova Nzambe oyo asɛngaki bango bálongwa na boombo mpe bákende na Mokili ya Ndaka?

Lokola Falao, mokonzi ya Ezipito aboyaki kotika libota ya Nzambe, Yehova atindaki Malɔzi Zomi na mboka yango. Malɔzi yango emonisaki mpenza nguya na ye! Banzambe ya Baezipito bakokaki kosala ata eloko moko te mpo na kopekisa Malɔzi yango.

Ntango Moize asɛngaki Falao atika libota ya Nzambe ekende, ye alobaki boye: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisalaele kokenda? Ngai nayebi [Yehova] te, mpe nakotika Yisalaele kokenda te.” (Exode 5:2) Yango wana, Malɔzi oyo eyaki na Ezipito: (1) mai ebongwanaki makila, (2) mimbemba (grenouilles) (3) bangungi, (4) mapokopoko (taons), (5) bibwɛlɛ ekufaki na maladi, (6) babibɔ ebimaki na nzoto ya bato mpe ya banyama, (7) mbula ya mabanga, (8) mayoyo, (9) molili, mpe (10) bana ya liboso ya Baezipito bakufaki, ata mpe mwana ya Falao. Nsukansuka, mokonzi atikaki Baebele bákende. Kutu, abenganaki bango!​—Exode 12:31, 32.

Bato milio soki misato​—Bayisalaele nyonso: mibali, basi, ná bana, bakisa mpe ebele ya bato ndenge na ndenge​—babimaki nokinoki na Ezipito. (Exode 12:37, 38) Kasi, eumelaki te, Falao ná basoda na ye ya mpiko balandaki bango. Bayisalaele bamonaki lokola nde bakangami na motambo: liboso na bango Mai Motane, esobe monene epai na epai, mpe na nsima na bango, basoda ya Falao. Kasi, Moize ayebisaki bango ete: ‘Bóbanga te, bótɛlɛma ngwi mpe bótala kobikisa ya Yehova.’​—Exode 14:8-14.

Yehova asalaki likamwisi, akabolaki Mai Motane mpo na kobikisa Bayisalaele. Kasi, ntango Baezipito balandaki Bayisalaele, Nzambe asalaki ete mai yango ezongela bango. “[Yehova] abwaki makalo ya Falao mpe ebele na ye kati na mai na monana.” (Exode 14:26-28; 15:4) Lokola Falao, moto ya lofundo, aboyaki kotosa Yehova, asukaki mabe.

Na Mai Motane, Yehova amonisaki ete azali “mobali ya etumba.” (Exode 15:3) Biblia elobi boye: “Yisalaele mpe bamonaki mosala monene mosalaki [Yehova] epai ya Baezipito, mpe bato yango babangaki [Yehova]. Bandimaki mpe [Yehova].” (Exode 14:31; Nzembo 136:10-15) Mpo na kozongisa matɔndi epai ya Yehova, mibali ya Yisalaele bayembaki nzembo ya bolongi elongo na Moize mpe basi babinaki elongo na Milyami, ndeko na ye ya mwasi.a

Yehova azali Mobikisi tii lelo oyo

Likambo wana ya kokamwa oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa Bayisalaele ekoki kopesa basaleli na ye lelo mateya mingi oyo ekolendisa kondima na bango. Liteya ya liboso ezali ete Yehova azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe akoki kosunga bato na ye na makambo nyonso. Na nzembo ya bolongi, Moize ná Bayisalaele bayembaki boye: “Ee [Yehova], lobɔkɔ na yo ya mobali ezali na nkembo, na nguya. Ee [Yehova], lobɔkɔ na yo ya mobali ebuki bayini.”​—Exode 15:6.

Liteya mosusu ezali ete Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali mpenza na mposa ya kobatela bato na ye. Bayisalaele bayembaki boye: “Makasi mpe nguya na ngai ezali Yah, mpo azali lobiko na ngai. Oyo nde Nzambe na ngai, mpe nakokumisa ye.” Liteya mosusu ezali ete moto moko te akoki kolonga kotɛmɛla mokano ya Yehova Nzambe. Na nzembo ya bolongi, bato oyo Nzambe autaki kobikisa bayembaki boye: “Nani kati na banzambe azali lokola yo, ee Yehova? Nani azali lokola yo, yo oyo ozali komimonisa na nguya kati na basantu? Ye oyo basengeli kobanga na nzembo ya lisanzoli, Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.”​—Exode 15:2, 11, NW.

Lokola Falao, mokonzi ya Ezipito ya kala, bakonzi ya mokili oyo bazali konyokola basaleli ya Yehova. Bakonzi mosusu ya lofundo ‘bazali koloba maloba mabe mpo na Oyo-Aleki-Likoló, mpe bazali kolanda konyokola basantu ya Oyo-Aleki-Nyonso.’ (Danyele 7:25, NW; 11:36) Kasi, Yehova ayebisi basaleli na ye boye: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula ya baombo ya [Yehova].”​—Yisaya 54:17.

Banguna ya Nzambe bakolonga te, ndenge kaka Falao mpe basoda na ye balongaki te. Misala ya kobikisa ya Yehova, lokola oyo asalaki ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, emonisi ete tosengeli kolanda etinda oyo bantoma ya Yesu balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 15:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2006, Yanuali/Febwali.

[Etanda/Elilingi na lokasa 9]

OYEBAKI YANGO?

• Yehova atindaki mopɛpɛ makasi butu mobimba mpo Bayisalaele bákatisa Mai Motane na makolo.​—Exode 14:21, 22.

• Esɛngaki nzela oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ moko na ndambo mpo bamilio ya Bayisalaele bákatisa Mai Motane na ntango mokuse ndenge wana.

[Bililingi na lokasa 9]

Banzambe ya bikeko ya Ezipito bakokaki te kosukisa Malɔzi Zomi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bikeko nyonso misato: Tokangi fɔtɔ na yango na ndingisa ya British Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto