‘Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya Yehova’
“[Yehova] azali epai na ngai, nakobanga te; moto akosalela ngai nini?”—Nzembo 118:6.
1. Etikali moke bato bakokutana na likambo nini?
ETIKALI moke bato bakokutana na likambo moko monene oyo esalemá naino te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te. Kutu, soki mikolo yango eyeisamaki mokuse te, mosuni ata moko te elingaki kobika; kasi mpo na baponami mikolo yango ekoyeisama mokuse.”—Matai 24:21, 22.
2. Mpo na nini bolɔzi monene ebandi naino te?
2 Lelo oyo, baanzelu basimbi mipɛpɛ oyo ekomema bolɔzi monene yango. Na emonaneli oyo Yesu apesaki ye, ntoma Yoane amonaki ntina oyo baanzelu basimbi mipɛpɛ yango. Yoane alobaki boye: “Namonaki baanzelu minei batɛlɛmi na bansuka minei ya mabelé, basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabelé . . . Mpe namonaki anzelu mosusu azali komata uta na epai moi ebimaka, azalaki na elembo moko ya Nzambe ya bomoi; mpe agangaki na mongongo makasi epai ya baanzelu minei . . . ‘Bósala mabe te na mabelé to na mbu to na banzete, tii ntango tokosilisa kotya baombo ya Nzambe na biso bilembo na bilongi na bango.’”—Emoniseli 7:1-3.
3. Ntango bolɔzi monene ekobanda, likambo nini ekosalema liboso?
3 Etikali moke mosala ya kotya bapakolami, “baombo ya Nzambe na biso,” bilembo ya nsuka esila. Mosika te, baanzelu yango minei bakotika mipɛpɛ oyo ekomema bolɔzi monene. Ntango bakotika yango, nini ekosalema liboso? Anzelu moko ayanoli boye: “Babilone engumba monene akobwakama na mbala moko, mpe akomonana lisusu ata mokolo moko te.” (Emoniseli 18:21) Ekozala mpenza esengo na likoló ntango lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekobebisama!—Emoniseli 19:1, 2.
4. Makambo nini ekosalema na mikolo ezali koya?
4 Bikólo nyonso ya mokili ekosangana mpo na kobundisa basaleli ya Yehova. Bikólo yango ekolonga kosilisa baklisto nyonso ya sembo? Ekomonana lokola nde ekolonga. Kasi, mampinga ya likoló oyo ekozala elongo na Yesu Klisto ekoboma bikólo yango nyonso. (Emoniseli 19:19-21) Na nsuka, Zabolo ná baanzelu na ye bakobwakama na lobwaku mozindo epai bakosala lisusu eloko moko te. Bakozala lisusu na makoki te ya kozimbisa bato mpamba te bakokangama na boumeli ya mbula nkóto. Ekozala mpenza libɔndisi mpo na ebele ya bato oyo bakobika!—Emoniseli 7:9, 10, 14; 20:1-3.
5. Esengo nini bato oyo bakotikala sembo epai ya Yehova bakozala na yango?
5 Etikali moke makambo wana ya minene mpe ya kokamwa esalema. Makambo yango nyonso ekozala mpo na kolongisa lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Tókanisa likambo oyo: Soki totikali sembo epai ya Yehova mpe soki tozali kotosa bokonzi na ye, tokozala na libaku ya kosangana na kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kokokisama ya mokano na ye. Yango ekozala mpenza esengo monene!
6. Lokola tozali kozela makambo oyo ezali koya, tokotalela nini?
6 Osili komibongisa mpo na makambo minene yango? Ozali mpenza na kondima ete Yehova akobikisa? Ondimi mpenza ete akosalisa biso na ntango oyo ebongi mpe na ndenge oyo eleki malamu? Wana mokomoko na biso azali koyanola na mituna yango, tóbosana te makambo oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) Na kati ya makambo oyo ekomamaki mpo na kolakisa biso, kobɔndisa biso mpe kopesa biso elikya, ezali na lisolo oyo elobeli ndenge oyo Yehova alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. Soki totaleli na mozindo makambo nyonso oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa Bayisalaele, tokolendisama wana tozali kozela bolɔzi monene.
Yehova abikisi basaleli na ye
7. Na mobu 1513 L.T.B., makambo nini ya mpasi esalemaki na Ezipito?
7 Likambo yango esalemaki na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Yehova asilaki kotindela Baezipito malɔzi libwa. Nsima ya bolɔzi ya libwa, Falao abenganaki Moize na maloba oyo: “Longwá na ngai. Kebá na ntina na yo mpenza. Talá elongi na ngai lisusu soki moke te, mpo ete mokolo ekomona yo elongi na ngai okokufa.” Moize ayanolaki boye: “Lokola elobi yo! Nakotala elongi na yo lisusu te.”—Exode 10:28, 29.
8. Malako nini Bayisalaele bazwaki mpo na kobika, mpe esukaki ndenge nini?
8 Yehova ayebisaki Moize ete akotinda bolɔzi mosusu epai ya Falao mpe bato nyonso ya Ezipito; yango ekozala bolɔzi ya nsuka. Na mokolo ya 14 na sanza ya Abibu (Nisana), mwana ya liboso na libota mokomoko ya Baezipito mpe mwana nyonso ya liboso ya banyama na bango bakokufa. Kasi, mpo likama yango ekómela mabota ya Bayisalaele te, basengelaki kolanda malako oyo Nzambe apesaki na nzela ya Moize. Basengelaki kopakola makila ya mwana-mpate ya mobali na ngámbo mibale mpe na likoló ya baporte ya bandako na bango mpe basengelaki kobima libándá te. Likambo nini esalemaki na butu yango? Moize ayebisi biso boye: “Na katikati ya butu [Yehova] abɛtaki bana [nyonso ya liboso] ya mokili ya Ezipito.” Falao abengisaki nokinoki Moize ná Alona mpe alobaki na bango boye: “Tɛlɛmá mpe bimá na kati na bato na ngai . . . Kendá kosalela [Yehova] lokola elobaki bino.” Bayisalaele bakendaki; ekoki kozala ete bazalaki bato koleka milio misato mpe “ebele ya bato ya ndenge na ndenge” oyo bazalaki Bayisalaele te bakendaki elongo na bango.—Exode 12:1-7, 29, 31, 37, 38.
9. Nzambe amemaki Bayisalaele na nzela nini ntango babimaki na Ezipito, mpe mpo na nini?
9 Nzela ya mokuse oyo Bayisalaele bakokaki kolanda ezalaki ya kokatisa mokili ya Bafilistia, pembenipembeni ya Mbu ya Mediterane. Kasi, Bafilistia bazalaki banguna na bango. Yango wana, Yehova amemaki basaleli na ye na nzela ya esobe ya Mbu Motane, mbala mosusu mpo banguna bábundisa bango te. Atako bazalaki bamilio ya bato, bazalaki kotambola na mobulu te. Biblia elobi boye: “Ezalaki na molɔngɔ lokola na etumba nde bana ya Yisalaele babimaki na mokili ya Ezipito.”—Exode 13:17, 18, NW.
‘Talá kobikisa ya Yehova’
10. Mpo na nini Nzambe ayebisaki Bayisalaele bátɛlɛmisa bahema na bango liboso ya Pi-hahiloto?
10 Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Yehova ayebisaki Moize boye: “Lobelá bato ya Yisalaele ete bábutwa mpe bátɛlɛmisa hema na bango na liboso ya Pi-hahiloto, kati na Migedolo mpe na mai ya monana, na liboso ya Balasefona.” Ntango basalaki ndenge Yehova alobaki, ebele ya bato wana bakómaki na katikati, na ngámbo moko bangomba mpe na ngámbo mosusu Mai Motane. Emonanaki lokola nde bakangami na motambo. Kasi, Yehova ayebaki likambo oyo azalaki kosala. Ayebisaki Moize boye: “Ngai mpe nakoyeisa motema ya Falao makasi mpe ye [akolanda] bango mpe ngai nakozwa nkembo na ntina na Falao mpe na ebele ya basoda na ye. Baezipito mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—Exode 14:1-4.
11. (a) Falao asalaki nini, mpe Bayisalaele bayokaki ndenge nini? (b) Ndenge nini Moize ayanolaki na kolela ya Bayisalaele?
11 Falao amonaki ete asalaki libunga ndenge atikaki Bayisalaele bábima na Ezipito; yango wana, alandaki bango elongo na makalo 600 ya bitumba. Ntango Bayisalaele bamonaki basoda ya Ezipito, bayokaki nsɔmɔ mpe bagangaki epai ya Moize boye: “Ezali ete malita mazangi na Ezipito, yango wana okambi biso awa ete tókufa na lisobe?” Lokola azalaki na elikya ete Yehova akobikisa bango, Moize alobaki na bango boye: “Bangá te, Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya [Yehova] ekosala ye mpo na bino lelo. . . . [Yehova] akobunda mpo na bino, mpe bino bokotikala nyɛɛ.”—Exode 14:5-14.
12. Ndenge nini Yehova abikisaki bato na ye?
12 Ndenge Moize alobaki yango, nguya ya Yehova esalaki mosala mpo na kobundela Bayisalaele. Na ndenge ya likamwisi, anzelu ya Yehova azongisaki nsima lipata oyo ezalaki kokamba Bayisalaele. Lipata yango ememaki molili na ngámbo ya Baezipito, kasi ezalaki kopesa pole na ngámbo ya Bayisalaele. (Exode 13:21, 22; 14:19, 20) Na kolanda malako ya Nzambe, Moize asembolaki lobɔkɔ na ye. Biblia elobi boye: “[Yehova] azongisaki mai ya monana na mopɛpɛ makasi moutaki na kobima ya ntango, na butu mobimba . . . Bato ya Yisalaele bakendaki kati na mai ya monana na likoló ya mokili mokaukaki mpe mai mazalaki etutu mpo na bango na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi.” Baezipito balandaki bango, kasi Yehova azalaki kobundela bato na ye. Akɔtisaki mobulungano na kati ya Baezipito, mpe na nsima ayebisaki Moize boye: “Sembolá lobɔkɔ na yo likoló ya mai ya monana ete mai ezonga likoló ya Baezipito, likoló ya makalo na bango mpe ya bato na bango ya mbalata.” Falao ná basoda na ye nyonso bakufaki, ata moto moko te abikaki!—Exode 14:21-28; Nzembo 136:15.
Tózwa liteya na lobiko ya Yisalaele
13. Likambo nini Bayisalaele basalaki nsima ya kobikisama?
13 Nsima ya kobikisama na ndenge ya likamwisi Bayisalaele basalaki nini? Moize ná bana ya Yisalaele batombolaki mingongo mpo na kokumisa Yehova! Bayembaki boye: “Ngai nakoyembela [Yehova], mpo ete ye alongi na nkembo. . . . [Yehova] akozala mokonzi lobiko na lobiko.” (Exode 15:1, 18) Likanisi ya libosoliboso oyo bazwaki ezalaki ya kokumisa Nzambe. Na libaku wana, Yehova amonisaki bokonzi na ye.
14. (a) Makambo oyo Bayisalaele bakutanaki na yango eteyi biso nini mpo na Yehova? (b) Mokapo ya mobu 2008 ezali nini?
14 Ndenge nini makambo wana ekoki koteya biso, kobɔndisa biso mpe kopesa biso elikya? Tomoni mpenza ete Yehova akoki kolongola mokakatano nyonso oyo basaleli na ye bakutani na yango. Akoki kosilisa likambo nyonso oyo ekoki kotungisa bango. Yehova atindaki mopɛpɛ makasi oyo eutaki na ɛsti mpe efungolaki Mai Motane mpo Bayisalaele báleka. Akómisaki mpe Mai Motane yango lilita mpo na Falao ná basoda na ye. Soki tokanisi nyonso wana, tokoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “[Yehova] azali epai na ngai, nakobanga te; moto akosalela ngai nini?” (Nzembo 118:6) Tokoki mpe kobɔndisama na maloba ya Paulo oyo ezali na Baloma 8:31: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?” Maloba yango ezali mpenza kopesa biso makasi! Ezali kolongola biso kobanga nyonso mpe kokakatana nyonso oyo tokoki kozala na yango mpe ezali kopesa biso elikya. Yango wana mokapo ya mobu 2008 ebongi mpenza; elobi ete: ‘Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya Yehova’!—Exode 14:13.
15. Botosi ezalaki na ntina nini mpo na lobiko ya Bayisalaele na Ezipito, mpe ezali na ntina nini lelo oyo?
15 Liteya nini lisusu tokoki kozwa na kobima ya Bayisalaele na Ezipito? Tosengeli kotosa makambo nyonso oyo Yehova azali kosɛnga biso. Bayisalaele batosaki makambo nyonso oyo Nzambe asɛngaki bango mpo na kobongisa Elekeli. Batikalaki na kati ya bandako na bango na butu ya 14 Nisana. Ntango babimaki na Ezipito, basengelaki kotambola na “molɔngɔ lokola na etumba.” (Exode 13:18, NW) Lelo oyo, ezali na ntina mingi tólandaka malako oyo tozali kozwa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”! (Matai 24:45) Tosengeli koyokaka na likebi mongongo ya Nzambe oyo ezali koloba nsima na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai ya mobali to na epai ya mwasi.” (Yisaya 30:21) Wana tozali kopusana na bolɔzi monene, mbala mosusu tokozwa malako mosusu ya sikisiki. Mpo na kobika na mikolo yango ya yikiyiki, tosengeli kotambola nzela moko na basaleli ya sembo ya Yehova.
16. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Nzambe abongolaki makambo mpo na kobikisa Bayisalaele?
16 Lisusu, tóbosana te ete Yehova amemaki Bayisalaele na esika oyo emonanaki lokola nde bakɔti na motambo, na ngámbo moko bangomba mpe na ngámbo mosusu Mai Motane. Emonanaki lokola nde ezalaki nzela ya malamu te. Kasi, Yehova azalaki kotambwisa makambo, mpe nyonso esalemaki mpo na lokumu na ye mpe lobiko ya basaleli na ye. Lelo oyo, tokoki kokanga ntina te oyo makambo mosusu ezali kosalema boye to boye na lisangá ya Yehova, kasi ebongi mpenza tólanda litambwisi ya Yehova na nzela ya ebongiseli oyo azali kosalela mpo na koteya biso. Na bantango mosusu ekoki komonana lokola nde banguna na biso bazali kolonga. Na ndenge na biso ya bomoto, tokoki komona makambo nyonso te, yango wana tokoki koyeba te ndenge makambo ekosuka. Kasi, Yehova azali na likoki ya kobongola makambo na ntango ebongi, kaka ndenge asalaki mpo na bana ya Yisalaele na Mai Motane.—Masese 3:5.
Tyá motema epai ya Yehova
17. Mpo na nini tokoki kotya motema mobimba na litambwisi ya Nzambe?
17 Okoki kokanisa elikya oyo Bayisalaele bazalaki na yango ntango bazalaki kokanisa lipata oyo ezalaki kotambwisa bango na moi mpe likonzí ya mɔtɔ oyo ezalaki kotambwisa bango na butu? Ezalaki elembo ete “anzelu ya Nzambe” azalaki kotambwisa bango. (Exode 13:21, 22; 14:19) Lelo oyo, tokoki kotya motema ete Yehova azali elongo na basaleli na ye mpo na kotambwisa bango, kobatela bango mpe kobikisa bango. Tokoki mpenza kondima elaka oyo: “[Yehova] akobatela bayengebene na ye. Akobatela bango seko.” (Nzembo 37:28) Tóbosana soki moke te ete ebele ya baanzelu bazali kosunga basaleli ya Nzambe lelo oyo. Na lisalisi na bango tokoki ‘kotɛlɛma ngwi mpe kotala kobikisa ya Yehova.’—Exode 14:13.
18. Mpo na nini tosengeli ‘kolata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe’?
18 Nini ekosalisa biso ‘tótɛlɛma ngwi’ na kati ya solo? Tosengeli kolata molato ya etumba ya elimo oyo Paulo alobelaki na mokanda ya Baefese. Paulo alendisi biso ‘tólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe.’ Olati molato yango na mobimba na yango? Na mobu oyo ya sika ekozala malamu ete mokomoko na biso amitalela mpo na koyeba soki alati molato yango mobimba mpe soki eteni mokomoko ezali na esika na yango. Monguna na biso Satana Zabolo ayebi bolɛmbu na biso mpe azali koluka kozwa biso na mayele to kosalela kaka bolɛmbu yango mpo na kokweisa biso. “Tozali kobunda líbanda” na bilimu mabe. Kasi na makasi ya Yehova, tokoki kolonga!—Baefese 6:11-18; Masese 27:11.
19. Libaku nini tokoki kozwa soki toyiki mpiko?
19 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.” (Luka 21:19) Tiká tózala na kati ya bato ya sembo oyo bazali koyika mpiko na mikakatano ya ndenge na ndenge oyo bazali kokutana na yango mpe na boboto monene ya Nzambe, tózwa libaku ya ‘kotɛlɛma ngwi mpe kotala kobikisa ya Yehova.’
Okopesa eyano nini?
• Makambo nini ya minene ekosalema mosika te?
• Ndenge nini Yehova amonisaki nguya na ye ya kobikisa na mobu 1513 L.T.B.?
• Ozali na ekateli ya kosala nini?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Mokapo ya mobu 2008: ‘Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya Yehova.’—Exode 14:13.
[Elilingi na lokasa 17]
“Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso”
[Elilingi na lokasa 18]
Motó makasi ya Falao ememaki mpasi na Ezipito
[Elilingi na lokasa 19]
Bayisalaele babikaki mpo basalaki makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki bango