Bótikela Zabolo esika te
“Bópesa zabolo nzela té.”—BAEFESE 4:27, Bible na Lingala ya lelo oyo.
1. Mpo na nini bato mingi bazali komituna soki Zabolo azalaka mpenza?
NA BOUMELI ya bankama ya bambula, bato mingi bazalaki kokanisa ete Zabolo azali na maseke, misapi ya makolo na ye ekabwaná ngámbo mibale, alatá elamba ya motane mpe azalaka na kanya na mabɔkɔ mpo na kobwaka bato mabe na mɔtɔ ya lifelo. Kasi Biblia eteyi makambo nyonso wana te. Nzokande, mateya wana ya lokuta esali ete bamilio ya bato lelo oyo bákóma komituna soki Zabolo azalaka mpenza to bákanisa ete Zabolo ezali kaka makanisi ya mabe.
2. Wapi mwa makambo oyo Biblia elobi mpo na Zabolo?
2 Biblia epesi bilembeteli oyo emonisi polele ete Zabolo azalaka mpenza. Ntango Yesu Klisto azalaki na likoló amonaki ye mpe ntango azalaki awa na mabelé, asololaki na ye. (Yobo 1:6; Matai 4:4-11) Biblia eyebisi te nkombo oyo ekelamu wana ya elimo azalaki na yango na ebandeli, kasi ebengi ye Zabolo (nkombo oyo elimboli “mokoseli-bato-makambo”), mpamba te akoselaki Nzambe makambo. Biblia ebengi ye mpe Satana (oyo elimboli “Motɛmɛli”), mpamba te atɛmɛlaka Yehova. Satana Zabolo abengami mpe “nyoka ya ebandeli,” na ntembe te mpo asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva. (Emoniseli 12:9; 1 Timote 2:14) Abengami mpe lisusu “moto mabe.”—Matai 6:13.a
3. Motuna nini tokotalela na lisolo oyo?
3 Biso basaleli ya Yehova tokoki kolinga ata moke te kokokana na Satana, monguna monene ya Nzambe ya solo. Yango wana, tosengeli kotya likebi na toli ya ntoma Paulo oyo: “Bópesa zabolo nzela te.” (Baefese 4:27, Bible na Lingala ya lelo oyo) Na yango, wapi mwa makambo ya Satana oyo tosengeli te komekola?
Tómekola te Mokoseli-bato-makambo
4. Ndenge nini “moto mabe” akoselaki Nzambe makambo?
4 “Moto mabe” yango abongi mpenza kobengama Zabolo, mpamba te azali mokoseli-bato-makambo. Kokosela moto makambo elakisi koloba lokuta to mpe koloba mabe mpo na moto yango mpo na kobebisa lokumu na ye. Nzambe alobaki na Adama boye: “Nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16-17) Eva mpe ayebaki mobeko yango, kasi na nzela ya nyoka, Zabolo alobaki na ye boye: “Bino bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:4, 5) Talá lokuta monene oyo alobaki mpo na Yehova Nzambe!
5. Mpo na nini ebongaki bátuna Diotelefe mpo na ezaleli na ye ya kokosela bato makambo?
5 Nzambe apesaki Bayisalaele mobeko oyo: “Okotambolatambola lokola moto ya sɔngisɔngi kati na bato na yo te.” (Levitike 19:16) Mpo na moto moko oyo azalaki mokoseli-bato-makambo na ekeke ya liboso, ntoma Yoane alobaki boye: “Nakomelaki lisangá mwa likambo moko, kasi Diotelefe, oyo alingaka kozwa esika ya liboso na kati na bango, azali koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai na biso. Yango wana, soki nayei, nakokanisa lisusu misala na ye oyo azali kokoba kosala, kolobaloba maloba ya mabe mpo na biso.” (3 Yoane 9, 10) Diotelefe azalaki koloba lokuta mpo na Yoane mpe ebongaki bátuna ye mpo na ezaleli mabe wana. Moklisto ya sembo nani akolinga kozala lokola Diotelefe mpe komekola Satana, Mokoseli-bato-makambo?
6, 7. Mpo na nini tosengeli koboya kokosela moto makambo?
6 Banda kala, bato mingi bakoselaka basaleli ya Yehova makambo. “Banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli bazalaki mbala na mbala kotɛmɛla mpe kofunda [Yesu] makasi.” (Luka 23:10) Nganga-nzambe monene Ananiasi mpe bato mosusu bakoselaki Paulo makambo. (Misala 24:1-8) Biblia elobi mpe ete Satana azali “mofundi ya bandeko na biso . . . , oyo afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso.” (Emoniseli 12:10) Bandeko oyo azali kokosela makambo ezali nde baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé na mikolo oyo ya nsuka.
7 Moklisto moko te asengeli kokosela moto makambo. Nzokande, ekozala bongo soki toweli kofunda moto na likambo oyo toyebi malamu te. Na Mibeko ya Moize, bakokaki kokatela moto oyo akoseli mozalani na ye makambo etumbu ya liwa. (Exode 20:16; Deteronome 19:15-19) Longola yango, moko na makambo oyo Yehova ayini ezali “motatoli ya lokuta oyo akolobaka makambo ya sembo te.” (Masese 6:16-19) Yango wana, tosengeli mpenza koboya kolanda ndakisa ya mokoseli-bato-makambo.
Tóboya misala ya mobomi-bato ya libosoliboso
8. Na ndenge nini Zabolo azalaki “mobomi-bato ntango abandaki”?
8 Zabolo azali mobomi-bato. Yesu alobaki boye: “Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki.” (Yoane 8:44) Satana akómaki mobomi-bato banda na likambo ya liboso oyo asalaki ya kopusa Adama ná Eva ete bápesa Nzambe mokɔngɔ. Alukelaki mobali ya liboso, mwasi na ye mpe bana na bango liwa. (Baloma 5:12) Tósimba mpe ete kaka moto nde akoki kosala likambo ya ndenge wana, kasi te makanisi ya mabe.
9. Na kolanda makanisi ya 1 Yoane 3:15, ndenge nini tokoki kokóma babomi-bato?
9 Na Mibeko Zomi oyo Nzambe apesaki Yisalaele, mobeko moko elobaki ete: “Okoboma te.” (Deteronome 5:17) Ntoma Petelo akomelaki baklisto ete: “Moko te na kati na bino anyokwama mpo azali mobomi-bato.” (1 Petelo 4:15) Yango wana, lokola tozali basaleli ya Yehova, tokoki koboma moto te. Nzokande, tokozala na ngambo na miso ya Nzambe soki tozali koyina moninga na biso moklisto mpe tozali kolinga ete akufa ata kokufa. Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko efandi na kati na ye.” (1 Yoane 3:15) Mobeko moko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele elobaki boye: “Okoyina ndeko na yo na motema na yo te.” (Levitike 19:17) Yango wana, tósalaka makasi tósilisa nokinoki matata nyonso oyo ebimi kati na biso ná ndeko na biso moklisto mpo Satana, mobomi-bato, abebisa bomoko na biso te.—Luka 17:3, 4.
Tótɛmɛla mobuki-lokuta monene
10, 11. Tosengeli kosala nini mpo tókoka kotɛmɛla Satana, mobuki-lokuta monene?
10 Zabolo azali mobuki-lokuta. Yesu alobaki ete: “Ntango alobaka lokuta, alobaka engebene makanisi na ye moko, mpamba te azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Satana akosaki Eva, nzokande Yesu ayaki na mokili mpo na kopesa litatoli na ntina etali solo. (Yoane 18:37) Mpo biso bayekoli ya Klisto tólonga kotɛmɛla Zabolo, tosengeli kobukaka lokuta te mpe koboya bokosi. Tosengeli ‘kolobaka solo.’ (Zekalia 8:16; Baefese 4:25) “Yehova Nzambe ya sembo” apambolaka kaka Batatoli na ye oyo balobaka solo. Nzambe apesi bato mabe lotomo te ya komema nkombo na ye.—Nzembo 31:5; 50:16; Yisaya 43:10.
11 Soki tozali kopesa motuya na bonsomi ya elimo oyo elongoli biso na boombo ya mateya ya lokuta ya Satana, tokokangama na boklisto, oyo ezali “nzela ya solo.” (2 Petelo 2:2; Yoane 8:32) “Solo ya nsango malamu” esangisi mateya nyonso ya boklisto. (Bagalatia 2:5, 14) Mpo na kobika, tosengeli “kotambola na kati ya solo,” elingi koloba kokangama na solo mpe kotɛmɛla “tata ya lokuta.”—3 Yoane 3, 4, 8.
Tótɛmɛla mopɛngwi ya libosoliboso
12, 13. Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi?
12 Ekelamu ya elimo oyo akómaki Zabolo azalaki liboso na kati ya solo. Kasi, ndenge Yesu alobaki yango: “Atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo, mpo solo ezali na kati na ye te.” (Yoane 8:44) Mopɛngwi yango ya libosoliboso akobaki na nzela na ye ya kotɛmɛla “Nzambe ya solo.” Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bakweaki na “motambo ya Zabolo”; ekoki mpenza kozala ete bakosamaki mpe batikaki nzela ya solo. Yango wana, Paulo ayebisaki Timote, moninga na ye ya mosala, ete alakisa bato wana na boboto mpo bázongela bokolɔngɔnɔ ya elimo mpe bálongwa na motambo ya Satana. (2 Timote 2:23-26) Kasi, eleki malamu kokangama na solo na esika ya kozwama naino na motambo ya bapɛngwi.
13 Mobali ná mwasi ya liboso bapɛngwaki mpo bayokaki maloba ya Zabolo mpe bandimaki lokuta na ye. Na bongo, okanisi ete ebongi mpenza biso tóyokaka maloba ya bapɛngwi, tótángaka mikanda na bango, to tótángaka makambo na bango na Internet? Soki tolingaka Nzambe mpe mateya ya solo, tokosala yango te. Tosengeli te koyamba bapɛngwi na bandako na biso to kopesa bango mbote, mpamba te kosala bongo ekomonisa ete ‘tozali kosangana na misala na bango ya mabe.’ (2 Yoane 9-11) Tótika te “nzela ya solo” ya boklisto mpo na kolanda balakisi ya lokuta oyo bazali koluka ‘kokotisa mateya oyo ememaka liwa’ mpe ‘kokosa biso po bázwa biloko na biso’ mpe na bongo, tózwama na lokuta ya Zabolo.—2 Petro 2:1-3, Bible na Lingala ya lelo oyo.
14, 15. Likebisi nini Paulo apesaki bankulutu ya Efese mpe Timote, moninga na ye ya mosala?
14 Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese boye: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo na kati na yango elimo santu etye bino bakɛngɛli, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko. Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe uta na kati na bino mpenza mibali bakobima mpe bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:28-30) Na nsima, bapɛngwi yango bamonanaki mpe bazalaki ‘koloba makambo etɛngamá.’
15 Na mobu soki 65 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo alendisaki Timote ‘asembolaka liloba ya solo malamumalamu.’ Akomelaki ye boye: “Kasi boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo ya bosantu; mpo bakokende ntango nyonso liboso na kati ya ezaleli ya kotyola Nzambe, mpe liloba na bango ekopalangana lokola mpota oyo elyaka nzoto. Himene mpe Filete bazali na kati na bango. Bato wana batangwi mosika na solo, kolobáká ete lisekwa esilá kosalema; mpe bazali kokɔtisa mobulu na kondima ya bamosusu.” Lipɛngwi ebandaki mpenza! Paulo abakisaki ete: “Nzokande, moboko makasi ya Nzambe etɛlɛmi kaka.”—2 Timote 2:15-19.
16. Atako mopɛngwi ya libosoliboso azali kotya ebele ya mitambo, nini ezali kosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova mpe Liloba na ye?
16 Satana asaleli bapɛngwi mingi mpo na kobebisa losambo ya solo, kasi alongi te. Na mobu soki 1868, Charles Russell abandaki kotalela mateya oyo mangomba ya boklisto eteyaka banda kala mpe amonaki ete balimbolaki mabe makambo mosusu ya Biblia. Ndeko Russell ná bato mosusu oyo bazalaki koluka solo basalaki etuluku ya boyekoli ya Biblia na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Nsima ya mbula pene na 140 kobanda na ntango wana, boyebi mpe bolingo ya basaleli ya Yehova mpo na Nzambe mpe Liloba na ye ebakisami mingi. Atako Zabolo, mopɛngwi ya libosoliboso azali kotya ebele ya mitambo, bokɛngi ya elimo ya moombo ya sembo mpe ya mayele esalisi baklisto yango ya solo na kotikala sembo epai ya Yehova mpe na Liloba na ye.—Matai 24:45.
Kotika te ete moyangeli ya mokili atambwisa yo
17-19. Mokili oyo ezali kolala na kati ya nguya ya Zabolo ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kolinga yango te?
17 Lolenge mosusu oyo Satana azali koluka kozwa biso na motambo ezali na kopusa biso tólinga mokili, elingi koloba makambo ya bato oyo bazangi sembo mpe bapesi Nzambe mokɔngɔ. Yesu abengaki Zabolo “moyangeli ya mokili oyo” mpe alobaki ete: “Azali na bokonzi likoló na ngai te.” (Yoane 14:30) Biso mpe, tótika ata moke te ete Satana atambwisa biso! Toyebi malamu ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto [wana] mabe.” (1 Yoane 5:19) Yango wana, Zabolo alobaki na Yesu ete akopesa ye “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango” soki asali kaka likambo moko oyo ekomonisa ete asambeli ye—likambo oyo Mwana ya Nzambe aboyaki na motema moko. (Matai 4:8-10) Mokili oyo Satana azali koyangela ezali mpenza koyina bayekoli ya Klisto. (Yoane 15:18-21) Yango wana ntoma Yoane alobaki na biso ete tólingaka mokili te!
18 Yoane akomaki boye: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili. Lisusu, mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:15-17) Tosengeli kolinga mokili te, mpamba te nzoto na biso ya masumu ebendamaka na makambo na yango mpe makambo yango eyokani ata moke te na mitinda ya Yehova Nzambe.
19 Tosengeli kosala nini soki bolingo ya mokili ezali na mitema na biso? Boye, tóbondela Nzambe asalisa biso tópikola bolingo yango mpe bamposa ya mosuni oyo eyokani na yango. (Bagalatia 5:16-21) Soki tozali kobosana te ete ezali “bilimo mabe” nde bazali ‘koyangela mokili,’ atako bamonanaka te mpe bazali kotambwisa bato nyonso oyo bazangi bosembo, na ntembe te tokosala makasi tómibatela “kozanga litɔnɔ ya mokili.”—Yakobo 1:27; Baefese 6:11, 12; 2 Bakolinti 4:4.
20. Mpo na nini tokoki koloba ete tozali “bato ya mokili te”?
20 Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Baklisto bapakolami na elimo ná baninga na bango oyo bamipesi na Nzambe basalaka makasi bábatela bizaleli mpe elimo na bango pɛto mpe bákabwana na mokili. (Yoane 15:19; 17:14; Yakobo 4:4) Mokili oyo mabe ezali koyina biso mpo tokɔtaka na makambo na yango te mpe tozali ‘basakoli ya boyengebene.’ (2 Petelo 2:5) Ya solo, tofandi elongo na bato mosusu oyo bazali bato ya pite, bato ya ekobo, babɔtɔli, basambeli ya bikeko, miyibi, babuki-lokuta, mpe balangwi-masanga. (1 Bakolinti 5:9-11; 6:9-11; Emoniseli 21:8) Kasi, topemaka “elimo ya mokili” te mpamba te totambwisami na bamposa ya masumu te.—1 Bakolinti 2:12.
Bótikela Zabolo esika te
21, 22. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo oyo ezali na Baefese 4:26, 27?
21 Na esika tótika ete “elimo ya mokili” etambwisa biso, tozali kotambwisama na elimo ya Nzambe, oyo ezali kosala ete tómonisa bizaleli lokola bolingo mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Bizaleli yango esalisaka biso mpo na kotɛmɛla Zabolo oyo azali koluka kobebisa kondima na biso. Ye alingi ete biso tókóma ‘kotomboka mpo na kosala mabe,’ kasi elimo ya Nzambe esalisaka biso ‘tótika nkanda mpe tóboya kongala.’ (Nzembo 37:8, NW) Toboyi te, ntango mosusu tokoki kosilika na ntina, kasi Paulo apesi biso toli oyo: “Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.”—Baefese 4:26, 27.
22 Soki toumeli na nkanda, ekoki komema biso na kosala lisumu. Elimo ya ndenge wana ekopesa Zabolo nzela ya kokɔtisa bokabwani na lisangá to kopusa biso na misala ya mabe. Yango wana, soki tozwani matata na ndeko moko, tóluka kosilisa yango nokinoki mpe tósala yango na ndenge oyo Nzambe asɛngi. (Levitike 19:17, 18; Matai 5:23, 24; 18:15, 16) Na bongo, tiká ete elimo ya Nzambe etambwisa biso, tózala na komipekisa mpe tótika te ete nkanda emema biso na makambo ya mabe, ya bololo, to mpe na koyina.
23. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
23 Tolobeli mwa makambo ya Zabolo oyo tosengeli te komekola. Kasi, bamosusu bakoki komituna boye: Tosengeli nde kobangaka Satana? Mpo na nini abimiselaka baklisto minyoko? Tokoki kosala nini mpo Zabolo akosa biso te?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2005, oyo ezali na motó ya likambo “Zabolo azalaka mpenza?”
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kokosela moto makambo te?
• Na kolanda 1 Yoane 3:15, tosengeli kosala nini mpo tózala babomi-bato te?
• Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi, mpe mpo na nini?
• Mpo na nini tosengeli kolinga mokili te?
[Elilingi na lokasa 23]
Tótika te ete Zabolo abebisa bomoko na biso ya boklisto
[Bililingi na lokasa 24]
Mpo na nini Yoane apesaki biso toli ete tólinga mokili te?