Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 39
  • Lingenda ya Arona

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingenda ya Arona
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Batombokelaki Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Moize abɛti libanga
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 39

Lisolo 39

Lingenda ya Arona

TALÁ lingenda oyo ebimisi fololo mpe mbuma ya amande oyo eteli. Ezali lingenda ya Arona. Fololo ná mbuma yango ebimi na butu moko mpamba. Yango ebandaki boni?

Bayisraele bazalaki kotambolatambola na kati ya esobe. Bato mosusu basepelaki te ete Moize azala mokambi mpe Arona nganga-nzambe monene. Kora azalaki moko ya bato yango, bakisa Datane ná Abirame ná bankumu nkama mibale na ntuku mitano (250). Mokolo moko, bango nyonso balobi na Moize ete: ‘Mpo na nini bozali komitombola likoló na biso?’

Moize alobi na Kora mpe na bato na ye ete: ‘Lobi na ntɔngɔ, bózwa biloko ya kotya mɔtɔ, bótya mɔtɔ mpe mpaka ya malasi likoló na yango. Na nsima bóya na hema ya Yehova. Bongo tokomona moto oyo Yehova akopona.’

Na mokolo oyo elandi, Kora ná bato na ye nkama mibale na ntuku mitano bakei na hema. Ebele ya bato mosusu mpe bayei kolendisa bango. Yehova ayoki nkanda makasi. Bongo Moize alobi ete: ‘Bólongwa liboso ya bahema ya mibali mabe oyo. Bósimba eloko na bango ata moko te.’ Bato balongwe penepene na bahema ya Kora, Datane ná Abirame.

Na nsima Moize alobi ete: ‘Na likambo oyo bokoyeba moto oyo Yehova aponi. Mabele ekofungola monɔkɔ na yango mpe ekomɛla bato mabe oyo.’

Ntango Moize asilisi koloba, mabele efungoli monɔkɔ na yango, emɛli ndako ná biloko nyonso ya Kora, Datane, ná Abirame mpe bato oyo bayaki elongo na bango. Ntango bato bayoki kolela na bango, bagangi ete: ‘Tókima, noki mabele emɛla biso!’

Kora ná bato na ye nkama mibale na ntuku mitano batɛlɛmaki kaka pene na hema. Na ntango yango Yehova atindi mɔtɔ, ezikisi bango nyonso. Na nsima, Yehova alobi na Eleazare, mwana ya Arona, ete alongola biloko ya kotya mɔtɔ ya bato oyo bakufi mpe asala na yango ezipeli ya etumbelo. Ezipeli yango ekómaki elembo ya kokebisa Bayisraele, bábosana te ete kaka Arona ná bana na ye nde bazwi mosala ya bonganga-nzambe, kasi bato mosusu te.

Na yango, Yehova amonisi polele mpenza ete aponi bobele Arona ná bana na ye bázala banganga-nzambe. Alobi na Moize boye: ‘Nkumu mokomoko na kati ya mabota nyonso ya Yisraele aya na lingenda na ye. Na libota ya Levi, Arona aya na yango. Na nsima, tyá mangenda nyonso na kati ya hema, liboso ya sanduku ya kondimana. Lingenda ya moto oyo ngai naponi ekobimisa nkasa ná fololo.’

Na ntɔngɔ Moize akei kotala, bongo lingenda ya Arona ebimisaki nkasa ná fololo, mpe mbuma ya amande esilaki kotela. Sikoyo boyebi ntina oyo Yehova asalaki likamwisi yango?

Mitángo 16:1-49; 17:1-11; 26:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto