Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/2 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Yehova abosanaki Yozefe te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yozefe ameki bandeko na ye
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/2 lok. 31

Mituna ya batángi

Yozefe, mosaleli ya sembo ya Yehova, asalelaki nde kɔpɔ ya palata mpo na koyeba makambo oyo ekoya ndenge Genese 44:5 ezali komonisa?

Likambo ata moko te ezali komonisa ete Yozefe azalaki kosalela nguya ya bilimo mabe mpo na koyebisa makambo oyo ekoya.

Biblia ezali komonisa oyo Yozefe ayebaki mpo na oyo etali kosalela maji mpo na koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Bambula liboso, ntango Falao asɛngaki ye alimbola bandɔtɔ oyo alɔtaki, Yozefe alobaki ete kaka Nzambe nde akoki “kosakola” makambo oyo ekoya. Nsukansuka, Falao ye moko andimaki ete Nzambe ya solo oyo Yozefe azalaki kosambela nde asalisaki ye ayeba makambo ezali koya, kasi nguya ya bilimo mabe te. (Genese 41:16, 25, 28, 32, 39) Na kati ya mibeko oyo Yehova apesaki Moize na nsima, apekisaki kosalela maji to kosalela nguya ya bilimo mabe mpo na koyebisa makambo oyo ekoya, yango emonisaki ete kaka Ye nde ayebisaka makambo oyo ekoya.​—Deteronome 18:10-12.

Kasi, mpo na nini Yozefe ayebisaki na nzela ya mosaleli na ye ete asalelaka kɔpɔ ya palata mpo na ‘koyeba makambo makoya’?a (Genese 44:5) Tosengeli kotalela makambo oyo etindaki Yozefe aloba maloba wana.

Lokola nzala ezalaki makasi, bandeko ya Yozefe bakendeki na Ezipito mpo na koluka bilei. Bambula liboso, Kaka bandeko na ye wana nde batɛkaki ye na boombo. Kozanga koyeba, bakendeki kosɛnga lisalisi epai ya ndeko na bango moko, oyo akómaki mokɛngɛli ya biloko ya kolya na Ezipito. Yozefe amiyebisaki epai na bango te. Kasi, amekaki nde bango. Yozefe alingaki koyeba soki babongolaki mpenza motema. Alingaki koyeba soki bazalaki mpenza kolinga ndeko na bango Benyamina mpe tata na bango Yakobo, oyo azalaki kolinga Benyamina mingi. Yango wana Yozefe asalelaki mayele wana.​—Genese 41:55–44:3.

Yozefe ayebisaki moko ya basaleli na ye atondisa basaki ya bandeko na ye na biloko ya kolya, azongisa mbongo ya mokomoko na kati ya saki na ye mpe atya kɔpɔ ya Yozefe ya palata na kati ya saki ya Benyamina. Na ntango nyonso wana, Yozefe azalaki komimonisa epai ya bandeko na ye lokola mokonzi ya mokili ya bapakano, ezala na bomoto na ye, na makambo oyo azalaki kosala mpe na elobeli na ye.

Ntango Yozefe akutanaki na bandeko na ye, akobaki na mayele na ye wana. Atunaki bango boye: “Boyebaki te ete moto lokola ngai akoyeba makambo mabombami?” (Genese 44:15) Na yango, kɔpɔ wana ezalaki kaka mayele oyo asalelaki. Yozefe asalelaki kɔpɔ wana te mpo na koyeba makambo oyo ekoya, Benyamina mpe ayibaki kɔpɔ yango te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kolimbola ndenge likambo yango ezalaki kosalema, The Holy Bible, With an Explanatory and Critical Commentary oyo ekomamaki na F. C. Cook elobi boye: “Bazalaki kobwaka ntango mosusu wolo, palata to libanga mosusu ya ntalo na kati ya mai mpe na nsima bazalaki kotala yango to mpe bazalaki kotala na kati ya mai ndenge batalaka na talatala.” Christopher Wordsworth, molimboli moko ya Biblia alobi boye: “Ntango mosusu, bazalaki kotondisa kɔpɔ na mai, mpe bililingi oyo moi ezalaki kobimisa na kati ya kɔpɔ yango ezalaki kosalisa bango bálimbola makambo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto