Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/3 nk. 3-4
  • Epai wapi basalelaka mateya ya Klisto lelo oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Epai wapi basalelaka mateya ya Klisto lelo oyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini bato batalelaka boklisto?
  • Klisto azali mpenza na kati ya boklisto?
  • Banani bazali baklisto ya solosolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini mangomba ya bokristo ezali ebele boye?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mangomba ezali kotinda bato na malamu to na mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/3 nk. 3-4

Epai wapi basalelaka mateya ya Klisto lelo oyo?

YESU KLISTO atalelamaka na mokili mobimba lokola moko ya bato oyo baleki minene. Bato mingi batalelaka ye lokola moto oyo aleki bato nyonso. Melvyn Bragg, mokomi moko ya Angleterre akomaki ete na boumeli ya mbula soki nkóto mibale, mateya ya Yesu ezali kosala mosala monene mpenza na bomoi ya bato, “ezala na bomoi ya bato oyo bazali kosala makambo ya malamu mpe ya boboto kozanga ete bato bamona yango to mpe na bomoi ya bato oyo bazali kosala makambo ya mineneminene mpo na bolamu ya basusu.”

Ndenge nini bato batalelaka boklisto?

Ndenge nini bato batalelaka boklisto? Balimbolaka yango lokola “moko ya bibongiseli ya elimo oyo eleki monene na mokili.” David Kelso, profɛsɛrɛ moko ya iniversite ya Glasgow Caledonian, na Écosse, apesaki likanisi moko. Akomaki boye: “Na boumeli ya mbula soki nkóto mibale, boklisto esali makambo minene na misala ya koyema, na filozofi, na miziki mpe na kobongisa bomoi ya bato.”

Nzokande, bato mosusu, bazali na makanisi mosusu. Bandimaka ete boklisto ezali lingomba oyo elandaka mateya ya Yesu Klisto mpe endimaka ete azali Mwana ya Nzambe. Nzokande, basepelaka te na makambo mangomba oyo ezali komibenga ya boklisto esalaka.

Friedrich Nietzsche, moto moko ya filozofi ya ekólo Allemagne ya ekeke ya zomi na libwa, alobaki ete boklisto ezali mpe “eloko moko ya mabe mpenza oyo ezali konyokola bato libela na libela.” Akomaki mpe ete boklisto ezali “esika mpasi nyonso ya bato eutaka, esika oyo etondi na makambo nyonso ya mabe, . . . banzela na yango nyonso ezali ya mabe, basalaka makambo na nkuku mpe makambo ezangi ntina.” Ya solo, Nietzsche alekisaki ndelo, kasi bato mosusu ya mayele balobaki mpe likambo yango. Mpo na nini? Mpamba te na boumeli ya bikeke, etamboli ya bato oyo bamibengaka baklisto emonisi te ete bazali komonisa bizaleli ya Yesu Klisto, kasi ezali nde komonisa bizaleli lokola “mbindo, kosala makambo ya nsɔmɔ mpe bizaleli mosusu oyo ezali kotuka Nzambe” oyo epalangani bisika nyonso.

Klisto azali mpenza na kati ya boklisto?

Tokoki koloba te ete moto alekisi ndelo soki atuni ete, “Klisto azali mpenza na kati ya boklisto?” Bato mosusu bakoki koloba mbala moko ete, “Azali! Alakaki bayekoli na ye te ete akozala na bango ‘tee na nsuka ya mokili’?” (Matai 28:20, Boyokani ya Sika) Ya solo, Yesu alobaki bongo. Kasi, yango elingi koloba akozala elongo na moto nyonso oyo akomibenga moyekoli na ye ata soki moto yango azali na ezaleli ya ndenge nini?

Tóbosana te ete bakonzi mosusu ya mangomba na ntango ya Yesu bazalaki kokanisa ete Nzambe azali na bango ata soki bazali na bizaleli ya ndenge nini. Lokola Nzambe aponaki Yisalaele mpo bázala bato na ye, bakonzi mosusu ya lingomba na bango bazalaki kokanisa ete Nzambe akoki soki moke te kotika bango ata soki basali nini. (Mika 3:11) Mokemoke, batikaki mosika mpenza mibeko ya Nzambe mpe mitinda na ye. Na yango, Yesu ayebisaki bango polele ete: “Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.” (Matai 23:38) Nzambe aboyaki lingomba na bango mobimba. Asundolaki bango mpe atikaki ete mampinga ya basoda ya Loma ebebisa Yelusaleme, mboka mokonzi ya ekólo na bango, mpe tempelo na yango na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.).

Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela mangomba ya boklisto ya lelo? Tiká tótalela makambo oyo Yesu asɛngaki bayekoli na ye bámonisa mpo azala na bango “tee na nsuka ya mokili.”

[Bililingi na lokasa 2, 3]

Mateya ya Yesu Klisto ezali na bopusi makasi mpenza na bomoi ya ebele ya bato na mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto