Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/3 nk. 4-7
  • Banani bazali baklisto ya solosolo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali baklisto ya solosolo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Soki bozali na bolingo na kati na bino”
  • “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai”
  • Bateyi ya lokuta bazali kowangana Yesu
  • Bantoma bakufi mpe lipɛngwi ebandi
  • Boklisto ya solosolo ezongisami
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mpo na nini mangomba ya bokristo ezali ebele boye?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/3 nk. 4-7

Banani bazali baklisto ya solosolo?

BUKU moko (Être chrétien) elobi ete: “Boklisto emonanaka kaka esika oyo bato bazali koteya makanisi ya Yesu Klisto mpe bazali kosalela yango.” Na boyakani na maloba wana, Hans Küng, moto moko ya mayele ya teoloji na Swisse amonisi bosolo ya likambo yango na maloba oyo: Boklisto ya solosolo emonanaka kaka esika bato ya sembo basalelaka mateya ya Yesu.

Kasi, nini ekokómela bato ya mangomba oyo bamibengaka bayekoli ya Klisto, nzokande basalelaka te makambo oyo Yesu ateyaki? Yesu alobaki ete mingi bakomibenga baklisto. Bakotánga misala ndenge na ndenge oyo basalaki mpo na komonisa ete basalelaki ye, mpe bakoloba ete: “Tosakolaki na nkombo na yo te, mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te, mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?” Kasi, Yesu akosala nini? Maloba ya Yesu emonisi polele ndenge akokata likambo na bango: “Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.”​—Matai 7:22, 23.

Oyo nde likebisi makasi mpo na “bato ya misala ya botyoli-mibeko” oyo balobaka ete bazali kolanda Yesu! Tótalela makambo mibale ya ntina oyo bato basengeli kokokisa mpo Yesu andima bango na esika ya koboya bango lokola bato ya misala ya botyoli-mibeko.

“Soki bozali na bolingo na kati na bino”

Likambo moko oyo Yesu asɛngaki ezali: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázala na bolingo kati na bango mpe mpo na bato mosusu. Baklisto mingi bazali kokokisa lisɛngami yango banda ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Kasi, tokoloba boni mpo na mangomba oyo ezalaki koloba ete elandaka Klisto? Bamonisaki mpenza bolingo? Te. Kutu, bazalaki komitya na esika ya liboso na ebele ya bitumba mpe kowelana oyo esopaki makila ya bato oyo basali eloko te.​—Emoniseli 18:24.

Likambo yango ezali komonana mpe na mikolo na biso. Bikólo oyo balobaka ete bazali baklisto bazwaki esika ya liboso na kobomama ya bato ebele na bitumba mibale ya mokili mobimba oyo esalemaki na ekeke ya 20. Eumeli mingi te, baklisto ya mangomba ya boklisto bazwaki esika ya liboso na kobomama ya bato na mokano ya kosilisa bato ya etuluku moko oyo esalemaki na Rwanda na 1994. Desmond Tutu, oyo azalaki Episkɔpɔ ya Lingomba ya Anglican akomaki boye: “Bato oyo bazalaki kobomana, bazalaki bato ya lingomba moko. Mingi bazalaki baklisto.”

“Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai”

Lisɛngami ya mibale mpo na kozala moklisto ya solosolo emonani na maloba ya Yesu oyo: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:31, 32.

Yesu azalaki komizela ete bayekoli na ye batikala na kati ya liloba na ye, elingi koloba bakangama na mateya na ye. Nzokande, Küng, moto moko ya mayele ya teoloji alobaki ete, bateyi ya mangomba oyo bazalaki koloba ete balandaka Klisto, “bazalaki kosalela mingi filozofi ya Bagrɛki.” Na esika ya koteya mateya ya Yesu, bazalaki nde koteya makambo lokola molimo ekufaka te, epongelo, losambo ya Malia, mpe kopesa bakonzi ya mangomba lokumu oyo eleki, nyonso wana ezali makanisi oyo bazwá na mangomba ya bapagano mpe epai ya bato ya filozofi.​—1 Bakolinti 1:19-21; 3:18-20.

Bateyi ya mangomba bakɔtisá mpe liteya ya Bosato oyo ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina, bapesá Yesu lokumu oyo ye moko asɛngaki yango ata moke te. Na nzela ya liteya wana, bakangi bato miso mpo basambela te moto oyo Yesu azalaki kolobela ntango nyonso, elingi koloba Tata na ye, Yehova. (Matai 5:16; 6:9; Yoane 14:28; 20:17) Hans Küng, akomaki ete, “Ntango Yesu azalaki koloba na ntina na Nzambe, azalaki nde kolobela Yahweh, Nzambe ya kala, Nzambe ya bankɔkɔ na biso Abalayama, Yisaka mpe Yakobo. . . Mpo na ye, Yahweh nde Nzambe kaka moko.” Bato boni lelo oyo bayebi ete Nzambe mpe Tata ya Yesu ezali Yawe to Yehova?

Bakonzi ya mangomba babosani mpenza etinda oyo Yesu apesaki ya kokɔta te na makambo ya politiki. Trevor Morrow, akomaki ete na mikolo ya Yesu, Galilai “ezalaki mboka oyo bato na yango bazalaki na bolingo makasi ya ekólo na bango.” Bayuda mingi basimbaki mindoki mpo na kozwa bonsomi na makambo ya politiki mpe mpe ya losambo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bakɔta na bitumba ya ndenge wana? Te. Alobaki na bango nde boye: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19; 17:14) Nzokande, na esika ya koboya kokɔta na makambo ya politiki, bakonzi ya mangomba bakómaki nde na momeseno ya koteya mateya oyo etindaka bato na bitumba mpe mateya ya politiki. Mateya ya ndenge wana elendisaka ntango nyonso bitumba. Mpe soki bakonzi ya politiki ná bakonzi ya mangomba bayokani, mbala mingi, mpo na kozwa matomba moko boye epai ya bakonzi ya Leta, lingomba ekómaka kopambola basoda.

Bateyi ya lokuta bazali kowangana Yesu

Ntoma Paulo alobaki ete bato bakotika boklisto ya solosolo. Alobaki ete nsima ya liwa na ye, “bambwa mabe ya zamba” bakobima na kati ya baklisto mpe “bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) ‘Bakoloba polele ete bayebi Nzambe,’ kasi ‘bakowangana ye na misala na bango.’ (Tito 1:16) Ntoma Petelo mpe alobaki ete bateyi ya lokuta “bakokɔtisa na ndenge ya mayele mwa mangomba ya libebi mpe [bakowangana] ata nkolo oyo asombaki bango.” Alobaki ete etamboli na bango mabe ekotinda bato ‘báfinga nzela ya solo.’ (2 Petelo 2:1, 2) William Vine, moto moko ya mayele na Grèce, alobaki ete kowangana Klisto na lolenge wana elimboli “kowangana Tata mpe Mwana, na nzela ya lipɛngwi mpe na nzela ya kopanza mateya ya mabe bisika nyonso.”

Yesu akosala nini mpo na bato oyo bamibengaka bayekoli, kasi baboi na nko nyonso “koumela na kati ya liloba na [ye]” mpe bazali kolanda te masɛngami mosusu oyo apesaki? Alobaki boye: “Moto nyonso oyo awangani ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 10:33) Kasi, Yesu awanganaka te moto oyo asali libunga, soki moto yango azali na mposa makasi ya kozala sembo. Na ndakisa, atako ntoma Petelo awanganaki Yesu mbala misato, Petelo abongolaki motema mpe alimbisamaki. (Matai 26:69-75) Nzokande, Yesu azali kowangana bato to bibongiseli oyo bakokani na bambwa ya zamba oyo balati bilamba ya mpate, oyo bazali koloba ete bazali kolanda Klisto, kasi na nko nyonso bazali koboya mateya na ye. Yesu alobaki na ntina na bateyi wana ya lokuta boye: “Na bambuma na bango bokoyeba bango.”​—Matai 7:15-20.

Bantoma bakufi mpe lipɛngwi ebandi

Ntango nini baklisto ya lokuta babandaki kowangana Klisto? Kaka mwa moke nsima ya liwa ya Yesu. Ye moko alobaki ete mosika te Satana Zabolo akolona “matiti mabe,” to baklisto ya lokuta, na kati ya “milona ya malamu,” to baklisto ya solo, oyo Yesu alonaki na boumeli ya mosala na ye. (Matai 13:24, 25, 37-39) Ntoma Paulo amonisaki ete bateyi ya lokuta bazalaki na mikolo na ye. Alobaki ete ntina mpenzampenza oyo batikaki mateya ya Yesu Klisto ezali ete bazalaki te na “bolingo ya solo.”​—2 Batesaloniki 2:10.

Lipɛngwi ekokaki kokola te ntango bantoma ya Yesu Klisto bazalaki naino na bomoi. Nzokande, nsima ya liwa na bango, bakonzi ya mangomba basalelaki “misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya . . . mpe na bokosi nyonso ezangi boyengebene” mpo na kolongola ebele ya bato na mateya oyo Yesu ná bantoma na ye bateyaki. (2 Batesaloniki 2:3, 6-12) Mosika te, Bertrand Russell, moto moko ya filozofi na Angleterre, akomaki ete lisangá ya boklisto oyo Yesu atikaki ekómaki ebongiseli ya lingomba oyo “ekokaki kokamwisa Yesu, mpe ata Paulo.”

Boklisto ya solosolo ezongisami

Lisolo yango ezali polele. Kobanda bantoma bakufá, mateya ya Klisto ezali mpenza koteyama te na mangomba ya boklisto. Kasi, Yesu azali kokoba kokokisa elaka oyo apesaki bayekoli na ye ete akozala na bango “mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:20) Tokoki mpenza kondima ete banda Yesu alobá maloba wana, ezali na bato ya sembo oyo “bateyaka makanisi ya Yesu Klisto mpe basalelaka yango.” Yesu Klisto akokisaka elaka na ye ya kosunga bato wana oyo basalaka makasi mpo na komonisa bolingo, oyo ezali elembo ya baklisto ya solo, mpe bakangamaka na mateya ya solo oyo ateyaki.

Lisusu, Yesu alakaki ete na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo, akoyanganisa bayekoli na ye ya sembo na kati ya lisangá ya boklisto oyo bato nyonso bakomona polele mpe akosalela yango mpo na kokokisa mokano na ye. (Matai 24:14, 45-47) Azali sikoyo kosalela lisangá yango mpo na koyanganisa “ebele ya bato,” mibali, basi, mpe bana oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” mpe azali koyanganisa bango na kati ya “etonga moko” oyo ezali na “mobateli moko” mpe azali kotambwisa bango.​—Emoniseli 7:9, 14-17; Yoane 10:16; Baefese 4:11-16.

Na yango, bimá na kati ya bibongiseli nyonso oyo ebebisi nkombo ya Klisto mpe eyokisi boklisto nsɔni na boumeli ya mbula nkóto mibale oyo euti koleka. Soki te, ndenge Yesu Klisto ayebisaki ntoma Yoane, ‘okozwa ndambo ya malɔzi na bango’ ntango Nzambe akopesa bango bitumbu mosika te. (Emoniseli 1:1; 18:4, 5) Zwá ekateli ya kozala kati na baoyo mosakoli Mika alobaki na ntina na bango ete “na mikolo ya nsuka,” basambeli ya solo, elingi koloba bato oyo bakangami na boklisto ya solo, bakolanda mateya ya Nzambe mpe “bakotambola na banzela” ya losambo ya pɛto oyo ezongisami. (Mika 4:1-4) Babimisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bakosepela kosalisa yo oyeba basambeli yango ya solo.

[Bililingi na lokasa 5]

Mpo na nini baklisto ya solo bakɔtaka na bitumba te?

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Basoda, na lobɔkɔ ya mwasi: Fɔtɔ ya U.S. National Archives; mondoki oyo ebwakaka mɔtɔ, na lobɔkɔ ya mobali: Fɔtɔ ya U.S. Army

[Bililingi na lokasa 7]

“Bózala na bolingo kati na bino” mpe “bóumela kati na liloba na ngai”: Wana ezali makambo ya ntina mingi oyo Yesu asɛngaki na baklisto ya solo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto