Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/4 nk. 3-4
  • Yo mpe okoki kozwa esengo ya koyeba Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yo mpe okoki kozwa esengo ya koyeba Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esengo oyo bato nyonso bakoki kozwa
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Biblia: Búku oyo ekomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • 1. Sengá Nzambe asalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tóluka “makambo mozindo ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/4 nk. 3-4

Yo mpe okoki kozwa esengo ya koyeba Biblia

BIBLIA ezali na mateya ya ntina mingi oyo euti epai ya Nzambe. Eyebisaka biso ntina ya bomoi, ntina oyo bato bazali komona mpasi mpe ndenge bomoi ekozala na mikolo ekoya. Elakisaka biso ndenge tokoki kosala mpo na kozala na esengo, kozwa baninga mpe kolonga mikakatano. Likambo ya ntina koleka, Biblia esalisaka biso tóyeba Yehova, Mozalisi mpe Tata na biso ya likoló. Boyebi ya ndenge wana ememelaka biso esengo mpe esalaka ete bomoi na biso ekóma na ntina.

Biblia ekokanisaka koyekola koyeba Nzambe na kolya. Yesu alobaki ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4; Baebele 5:12-14) Ndenge kaka kolya mokolo na mokolo bilei ya malamu ezali na ntina mpo na kozala na bomoi, kotángaka mpe Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ezali na ntina mpo na kozwa bomoi ya seko oyo Nzambe alaki.

Tosepelaka kolya mpo Yehova akelá biso bongo mpe kolya ekokisaka mposa moko ya ntina mingi. Kasi, tozali na mposa mosusu ya ntina mingi oyo tosengeli kokokisaka soki tolingi kozala na esengo. Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Tokoki mpenza kozala na esengo, mpamba te koyeba Liloba ya Nzambe nde ekoki kosala ete tózala na esengo.

Ya solo, bato mosusu bamonaka ete koyeba Biblia ezali mpasi. Na ndakisa, okoki kozala na mokakatano ya kokanga ntina ya mikapo oyo ezali kolobela mimeseno oyo oyebi te to ezali na elobeli ya elilingi. Ezali mpe na bisakweli oyo ekomamá na maloba ya elilingi, oyo tokoki kokanga ntina na yango kaka soki totaleli mikapo mosusu oyo elobeli mpe makambo yango. (Danyele 7:1-7; Emoniseli 13:1, 2) Atako bongo, okoki mpenza koyeba Biblia. Ndenge nini tokoki koyeba ete tozali na likoki ya koyeba Biblia?

Esengo oyo bato nyonso bakoki kozwa

Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Na kati na yango, Nzambe azali koyebisa biso mokano na ye. Nzambe akoki nde kopesa biso buku oyo tokoki kokanga ntina na yango te, to oyo kaka bato oyo batángi mingi nde bakoki kokanga ntina? Te, Yehova akoki kozala motema mabe bongo te. Yesu Klisto alobaki boye: “Tata nani na kati na bino oyo, soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi? To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó? Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:11-13) Na yango, yebá ete okoki mpenza koyeba Biblia mpe ete soki obondeli Nzambe na bosembo mpenza, akopesa yo lisalisi oyo esengeli mpo okanga ntina ya Liloba na ye. Kutu, ata bana mike bakoki kokanga ntina ya mateya ya ebandeli ya Biblia mpe kosepela na yango!​—2 Timote 3:15.

Esɛngaka milende mingi mpo na koyeba Biblia, kasi boyebi yango ekoki kosalisa mpe kolendisa biso mpenza. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye mibale mpe alimbwelaki bango bisakweli ya Biblia. Mokanda ya Luka elobi boye: “Banda na Moize mpe na Basakoli nyonso alimbwelaki bango makambo oyo etalaki ye na kati ya Makomami nyonso.” Yango ebimisaki litomba nini? Na mpokwa wana, ntango bazalaki kokanisa makambo oyo alobaki na bango, bayekoli yango balobanaki bango na bango ete: “Mitema na biso ezalaki te kozika ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kofungolela biso Makomami polelepolele?” (Luka 24:13-32) Lokola bakangaki ntina ya Liloba ya Nzambe, batondaki na esengo mpamba te yango elendisaki kondima na bango na ntina na bilaka ya Nzambe mpe bakómaki na elikya makasi mpo na mikolo ekoya.

Kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe ezali kilo te, ezalaka nde esengo mpe epesaka litomba, lokola nde ozali kolya bilei ya kitoko mpe elɛngi. Osengeli kosala nini mpo na kozwa boyebi yango? Lisolo oyo elandi ezali koyebisa ndenge “boyebi ya Nzambe” ekoki kosalisa yo ozwa esengo.​—Masese 2:1-5, NW.

[Elilingi na lokasa 4]

Lokola tata ya bolingo, Yehova apesaka biso elimo santu mpo esalisa biso tóyeba Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto