Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/4 nk. 5-7
  • Nini ekosalisa yo oyeba Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekosalisa yo oyeba Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobongisa motema mpe makanisi
  • Makambo oyo ekoki kopekisa biso tózala na makanisi malamu
  • Mokakatano ya kondima koteyama
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bana oyo bazali kosepelisa Nzambe
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/4 nk. 5-7

Nini ekosalisa yo oyeba Biblia?

“OBOMBI makambo oyo malamumalamu liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele, mpe omonisi yango epai ya bana mike.” (Luka 10:21) Maloba wana oyo Yesu alobaki na Tata na ye ya likoló ezali komonisa ete mpo na koyeba Biblia, tosengeli kozala na makanisi oyo ebongi. Bwanya ya Nzambe ezali komonana na ndenge apesi biso buku oyo kaka bato ya komikitisa mpe oyo bandimaka koteyama nde bakoki kokanga ntina na yango.

Mingi kati na biso bazalaka na mokakatano mpenza mpo na komikitisa. Biso nyonso tobotamaka na mwa elimo ya lolendo. Lisusu, tozali na “mikolo ya nsuka” mpe tofandi na kati ya bato oyo “bamilingaka bango moko . . . bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1-4) Bizaleli wana ekoki kopekisa biso koyeba Liloba ya Nzambe. Likambo ya mawa ezali ete, na lolenge boye to boye, biso nyonso tolandaka ezaleli ya lolendo ya bato oyo tozalaka na bango. Na yango, ndenge nini okoki kokóma na ezaleli oyo ekosalisa yo oyeba Biblia?

Kobongisa motema mpe makanisi

Ezela, mokambi moko ya libota ya Nzambe na ntango ya kala, “abongisaki motema na ye mpo na koyekola mobeko ya Yehova.” (Ezela 7:10, NW) Ezali nde na lolenge moko oyo tokoki kobongisa motema na biso? Ɛɛ. Tosengeli liboso kozala na makanisi malamu mpo na Makomami. Ntoma Paulo akomelaki baninga na ye baklisto boye: “Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Atako Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia, makambo oyo bakomaki eutaki epai ya Yehova ye moko. Soki tondimi likambo wana, yango ekosalisa biso tóndima makambo oyo tozali kotánga.​—2 Timote 3:16.

Lolenge mosusu ya kobongisa motema na biso ezali na nzela ya libondeli. Lokola Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, kaka elimo yango nde ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya nsango na yango. Tosengeli kobondelaka mpo na kozwa lisalisi yango. Mokomi ya nzembo amonisaki ete azali na mposa ya lisalisi yango ntango akomaki ete: “Pesa ngai bwanya natosa mibeko mya yo, namemya myango na motema moko.” (Nzembo 119:34, Liloba lya Nzambe) Tosengeli kobondelaka kaka te mpo na kozwa mayele ya kokanga ntina ya makomami, kasi mpe mpo tókóma na motema oyo ekotinda biso tóndima oyo Biblia ezali koloba. Mpo na koyeba Biblia, tosengeli kondima oyo ezali solo.

Ntango ozali komanyola mpo na kokóma na elimo ebongi, kanisá ndenge boyekoli ya Biblia ekoki kosalisa yo. Ezali na bantina mingi oyo tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe, kasi oyo eleki nyonso ezali ete yango esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe. (Yakobo 4:8) Soki totángi makambo oyo elobeli ndenge Yehova asalaka na likambo boye to boye, ndenge atalelaka bato oyo balingaka ye mpe makambo oyo asalaka bato oyo bapesá ye mokɔngɔ, tokoyeba soki azali Nzambe ya ndenge nini. Tosengeli ntango nyonso kotángaka Biblia libosoliboso mpo na koluka koyeba Nzambe malamu mpe, na ndenge yango, kokolisa boyokani na biso na ye.

Makambo oyo ekoki kopekisa biso tózala na makanisi malamu

Nini ekoki kopekisa biso tóyeba Liloba ya Nzambe? Likambo moko ezali, koluka kozala sembo epai ya bato oyo babongi na yango te. Na ndakisa, okoki kobanda kolanda bindimeli mpe makanisi ya bato mosusu oyo omemyaka mingi. Kasi, ekozala ndenge nini soki bato yango bandimaka solo ya Liloba ya Nzambe te? Wana nde ekozala mpasi mpo na yo kokanga ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka mpenza. Yango wana, Biblia ezali kolendisa biso tótalelaka malamumalamu makambo oyo bazali koteya biso.​—1 Batesaloniki 5:21.

Malia, mama ya Yesu, akutanaki na mokakatano yango. Babɔkɔlaki ye na bonkɔkɔ ya Bayuda. Azalaki mpenza kotosa Mibeko ya Moize mpe, na ntembe te, azalaki kokende na sinagoga. Na nsima, amonaki ete lolenge ya kosambela oyo baboti na ye balakisaki ye endimamaki lisusu te na miso ya Nzambe. Yango wana, Malia andimaki mateya ya Yesu mpe azalaki moko ya baklisto ya liboso. (Misala 1:13, 14) Yango elingi koloba te ete azangaki botosi epai ya baboti na ye to na bonkɔkɔ na bango; amonisaki nde bolingo na ye epai ya Nzambe. Lokola Malia, soki tolingi kozwa litomba na mateya ya Biblia, tosengeli kozala sembo libosoliboso epai ya Nzambe, kasi te epai ya bato.

Likambo ya mawa, bato mingi bapesaka motuya te na solo ya Biblia. Bato mosusu basepelaka nde kolanda mimeseno ya mangomba, oyo euti na mateya ya lokuta. Bamosusu, na maloba mpe na etamboli na bango, bamonisaka limemya te mpo na solo. Yango wana, esɛngaka komipimela makambo mingi mpo na kondima solo ya Biblia: yango ekoki kokabola yo na baninga, bato ya kartye, baninga ya mosala, ata mpe na bato ya libota na yo. (Yoane 17:14) Kasi, moto ya bwanya, Salomo, akomaki boye: “Sombá solo mpe kotɛka yango te.” (Masese 23:23, NW) Soki ozali kopesa motuya mingi na solo, Yehova akosalisa yo oyeba Biblia.

Koboya kosalela makambo oyo Biblia ezali koloba ezali likambo mosusu oyo epekisaka bato bákanga ntina ya nsango na yango. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Likoki ya kososola basɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya likoló epesami epai na bino, kasi yango epesami epai ya bato wana te. Mpo motema ya bato ya ekólo oyo ekómi makasi, mpe na matoi na bango bayoki kozanga kosala ata eloko.” (Matai 13:11, 15) Bato mingi oyo Yesu asakwelaki nsango malamu baboyaki koyoka ye, balingaki kobongwana te. Bakesanaki mpenza na komelesa-motamboli oyo Yesu alobelaki na ndakisa moko! Ntango komelesa yango amonaki liyaka moko ya motuya monene, atɛkaki mbala moko biloko nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosomba yango. Kokanga ntina ya solo ya Biblia esengeli mpe kozala na motuya mingi ndenge wana na miso na biso.​—Matai 13:45, 46.

Mokakatano ya kondima koteyama

Mokakatano moko ya monene mpo na koyeba Biblia ezali oyo ya kondima koteyama. Ekoki kozala mpasi moto andima makanisi ya sika oyo euti epai ya moto mosusu, oyo ye amonaka mpamba. Kasi, bantoma ya Yesu Klisto bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13) Mpo na yango, Paulo akomaki boye: “Bozali komona kobengama oyo ye abengi bino, bandeko, ete bato mingi te ya bwanya na ndenge ya mosuni nde babengamaki, bato mingi te ya nguya, bato mingi te ya lokumu; kasi Nzambe aponaki biloko ya mokili oyo bizali zoba, mpo akoka koyokisa bato ya bwanya nsɔni.” (1 Bakolinti 1:26, 27) Soki omonaka ete koteyama na moto mpamba ekosilisa lokumu na yo, kobosana te ete Nzambe nde azali kosalela ye mpo na koteya yo. Ezali nde na lokumu oyo eleki oyo ya koteyama na Yehova, ‘Molakisi na biso Monene’?​—Yisaya 30:20, NW; 54:13.

Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, azalaki na mokakatano ya kolanda malako oyo eutaki epai ya moto oyo ye amonaki mpamba. Lokola azalaki na mposa maba na ye esila, akendaki epai ya Elisa, mosakoli ya Yehova. Kasi, Elisa atindaki nde mosali na ye mpo na koyebisa Namana malako oyo Nzambe apesaki mpo na kobika na ye. Nsango yango mpe lolenge oyo bayebisaki ye yango esalaki ete Namana aboya komikitisa, mpe na ebandeli aboyaki koyokela mosakoli ya Nzambe. Na nsima, Namana ayokelaki ye mpe abikaki. (2 Mikonzi 5:9-14) Biso mpe tozalaka na mokakatano yango ntango tozali kotánga Biblia. Tokoki kotánga ete soki tolingi kobikisama na elimo mpe na makanisi, tosengeli kobongola bomoi na biso. Tokomikitisa nde mpo na kondima ete moto moko ateya biso makambo oyo tosengeli kosala? Kaka bato oyo bandimaka koteyama nde bakoki koyeba Biblia.

Moto moko monene na ntango ya Kandase, mokonzi mwasi ya Baetiopia, amonisaki elimo malamu mpenza. Azalaki kozonga na Afrika na likalo na ye mpe moyekoli Filipo akendaki mbangu pembeni na ye. Filipo atunaki moto yango soki azali kokanga ntina ya makambo oyo azali kotánga. Lokola mokonzi yango azalaki na elimo ya komikitisa, ayanolaki ete: “Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” Ntango kaka moto yango akangaki ntina ya Liloba ya Nzambe, azwaki batisimo. Na nsima, “akobaki nzela na ye na kosepeláká.”​—Misala 8:27-39.

Batatoli ya Yehova mingi bazalaka bato mpamba. Pɔsɔ na pɔsɔ, bayekolaka Biblia na bato koleka milio motoba na bandako na bango. Lokola Biblia eteyaka bato lolenge ya bomoi oyo eleki malamu, elimbolaka elikya ya solosolo kaka moko mpo na bato mpe esalisaka biso tóyeba Nzambe malamumalamu, bato mingi bamoni ete koyekola Biblia mpe kokanga ntina ya makambo oyo ezali koloba ezali esengo monene. Yo mpe okoki kozwa esengo yango.

[Elilingi na lokasa 7]

Namana azalaki na mokakatano ya kolanda malako oyo eutaki epai ya mosali mpamba

[Elilingi na lokasa 7]

Koyeba Biblia etondisaka biso na esengo na motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto