Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/4 nk. 12-16
  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ekateli yango ebandaki
  • Nabandi formasyo mpo na kosalela Nzambe
  • Ekateli na ngai ekómi makasi
  • Mpokwa oyo ebongolaki bomoi na biso
  • Makambo ya esengo mpe ya mawa
  • Tokei na teritware ya sika
  • Bitumba na babalabala
  • Mbula moko ekómi mbula zomi
  • Nzela na Jéhovah ezali lolenge na bomoi loleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Eyokanaki lokola miziki moko ya kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bolɛmbu na ngai emonisi ete Nzambe azali makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Biblia ekómi na Esanga monene ya motane
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/4 nk. 12-16

Lisolo ya bomoi

Tozali na ekateli ya kosalela Yehova

YA RAIMO KUOKKANEN

Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpoto, mpe Union soviétique eyaki kobundisa Finlande, ekólo na biso. Tata na ngai mpe azalaki moko ya basoda ya Finlande oyo babundaki etumba yango. Mosika te, bampɛpɔ ya bitumba ya ekólo Russie ebandaki kobwaka babɔmbi na engumba na biso, mpe mama atindaki ngai nakende kofanda epai ya nkɔkɔ na ngai ya mwasi, epai bitumba ezalaki te.

NA MOBU 1971, nazalaki misionɛrɛ na Ouganda, na Ɛsti ya Afrika. Mokolo moko ntango nazalaki kosakola ndako na ndako, ebele ya bato oyo batondaki na nsɔmɔ bazalaki kolekaleka mbangu liboso na ngai. Nayokaki lokito ya mindoki mpe nabandaki kozonga mbangu na ndako. Lokola lokito ya masasi ekómaki pene, nakɔtaki na terase moko na pembeni ya balabala. Nangulumaki tii na ndako na ngai, wana masasi ezalaki kolekaleka ngai likoló ya motó.

Nakokaki te kokima bampasi ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, kasi mpo na nini ngai ná mwasi na ngai toyaki kotya bomoi na biso na likama na kati ya yikiyiki oyo ezalaki na Ɛsti ya Afrika? Ezali kaka mpo tozalaki na ekateli ya kosalela Yehova.

Ndenge ekateli yango ebandaki

Nabotami na 1934, na engumba Helsinki, na ekólo Finlande. Tata azalaki mopakoli langi, mpe mokolo moko akendaki kopakola langi na biro ya Batatoli ya Yehova na Finlande. Batatoli basololaki na ye na ntina na makita na bango. Ntango azongaki na ndako, asololaki na mama na ntina na makita yango. Mama abandaki koyangana na makita na ntango wana te, kasi na nsima abandaki kosolola masolo ya Biblia na moninga na ye moko ya mosala oyo azalaki Motatoli. Mosika te, mama abandaki kosalela makambo oyo ayekolaki, mpe na 1940, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

Mwa liboso, nkɔkɔ na ngai ya mwasi amemaki ngai na mboka na ye ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki konginda. Uta Helsinki, mama azalaki kokomela nkɔkɔ ná mama leki mikanda mpo na koyebisa bango bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Bango nyonso mibale basepelaki na makambo yango mpe bazalaki koyebisa ngai yango. Bakɛngɛli-batamboli bazalaki koya na ndako ya nkɔkɔ mpe bazalaki kolendisa biso, kasi nazwaki naino te ekateli ya kosalela Nzambe.

Nabandi formasyo mpo na kosalela Nzambe

Ntango etumba esilaki na 1945, nazongaki na Helsinki, mpe mama abandaki komema ngai na makita ya Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango mosusu nazalaki kokende kotala bafilme na sinema. Kasi, mama azalaki koyebisa ngai makambo oyo ayokaki na masolo na makita, mpe azalaki mbala na mbala kozongela likambo oyo: Armagedona ekómi pene. Nandimaki likambo yango mpe natikaki kokima makita. Lokola boyebi na ngai ya Biblia ekolaki, nakómaki mpe na mposa ya kosangana na makambo nyonso ya lisangá.

Nazalaki kosepela mingimingi na mayangani. Na 1948, nayanganaki na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki pene na mboka ya nkɔkɔ na ngai ya mwasi, epai nakendaki kolekisa konje na eleko ya molunge. Moninga na ngai moko asengelaki kozwa batisimo na liyangani yango, mpe ayebisaki ngai ete nazwa mpe batisimo. Nalobaki na ye ete namemi te elamba ya kozinda na yango na mai, kasi ye ayebisaki ngai ete soki ye abimi na mai, ngai nakoki kosalela elamba na ye. Nandimaki mpe nabatisamaki mwa 27 Yuni 1948, ntango nazalaki na mbula 13.

Nsima ya liyangani yango, baninga mosusu ya mama bayebisaki ye ete ngai nazwi batisimo. Ntango tokutanaki, atunaki ngai nayebisa ye mpo na nini nazwaki ekateli wana ya ntina mingi kozanga koyebisa ye. Nayebisaki ye ete nakangaki ntina ya mateya ya moboko ya Biblia mpe nayebi ete ngai moko nde nakozongisa monɔkɔ liboso ya Yehova mpo na etamboli na ngai.

Ekateli na ngai ekómi makasi

Bandeko na kati ya lisangá basalisaki ngai mpo ekateli na ngai ya kosalela Yehova ekóma makasi. Bazalaki kobima na ngai na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe bazalaki kopesa ngai masolo pene na pɔsɔ nyonso na makita. (Misala 20:20) Ntango nakómaki na mbula 16, nasalaki lisukulu na ngai ya liboso. Mwa moke na nsima, baponaki ngai motambwisi ya boyekoli ya Biblia na lisangá na biso. Mikumba nyonso wana esalisaki ngai nakola na elimo, kasi nazalaki naino kobanga bato.

Na ntango wana, mpo na kobenga bato na lisukulu ya bato nyonso ya liyangangi ya etúká, tozalaki kotambola na bilembo mineneminene na babalabala. Bilembo yango ezalaki mabaya mibale oyo bazalaki kokangisa na biteni ya bilamba, oyo moto akokaki kolata na mapeka. Na biteni ya bilamba yango, bazalaki kokoma motó ya likambo ya lisukulu yango.

Mokolo moko, natɛlɛmaki na libaya na ngai na mwa esika moko boye, mpe namonaki baninga na ngai ya kelasi bazalaki koya epai ngai nazalaki. Ntango bakómaki pene na ngai, miso na ngai ná ya bango ekutanaki mpe nabangaki. Nabondelaki Yehova apesa ngai makasi mpe natɛlɛmaki kaka wana na libaya na ngai. Lokola nalongolaki ezaleli ya kobanga bato ntango wana, yango esalisaki ngai nalonga komekama ya monene koleka; nakɔta te na makambo ya mokili.

Na nsima, guvɛrnema esɛngaki ngai na bilenge Batatoli mosusu tókɔta mosala ya soda. Tokendaki na kaa ya basoda ndenge basɛngaki biso, kasi na limemya nyonso tóboyaki kolata bilamba ya basoda. Bakonzi ya basoda batyaki biso na bolɔkɔ, mpe mosika te, tribinale moko ekatelaki biso etumbu ya bolɔkɔ sanza motoba. Babakiselaki biso mpe sanza mwambe ya bolɔkɔ, ntango oyo tosengelaki kolekisa na mosala ya soda. Na yango, tolekisaki sanza 14 na bolɔkɔ mpo toboyaki kokɔta na mosala ya soda.

Na kati ya bolɔkɔ, tozalaki kosangana mokolo na mokolo mpo na koyekola Biblia. Na boumeli ya basanza wana, mingi kati na biso batángaki Biblia mobimba mbala mibale. Ntango mikolo na biso ya bolɔkɔ esilaki, mingi kati na biso bazalaki lisusu na ekateli makasi ya kosalela Yehova. Tii lelo, mingi kati na bilenge Batatoli wana bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso.

Nsima ya kobima na bolɔkɔ, nazongaki epai ya baboti na ngai. Mwa moke na nsima, nayebanaki na Veera, Motatoli moko ya molende, oyo autaki kozwa batisimo. Tobalanaki na 1957.

Mpokwa oyo ebongolaki bomoi na biso

Mokolo moko na mpokwa ntango bandeko mosusu ya biro ya filiale bayaki kotala biso, moko na bango atunaki biso soki tokolinga kosala mosala ya zongazonga. Nsima ya kobondela butu mobimba, nabengaki na Betele mpe nalobaki ete tondimi. Kondima mosala yango esɛngaki natika mosala oyo bazalaki kofuta ngai malamu, kasi tozalaki na ekateli ya kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso. Nazalaki na mbula 23 mpe Veera azalaki na mbula 19 ntango tobandaki mosala ya zongazonga na Desɛmbɛ 1957. Tozalaki na esengo ya kotala mpe kolendisa masangá ya basaleli ya Yehova na Finlande na boumeli ya mbula misato.

Na nsuka ya 1960, babengaki ngai na kelasi na Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia na Brooklyn, na etúká ya New York. Biso misato kati na baoyo bautaki na Finlande tosengelaki kolanda mateya sanza zomi mpo na koyeba ndenge ya kotambwisa filiale. Basi na biso bakendeki na biso te, kasi batikalaki kosala na Betele ya Finlande.

Liboso tósilisa kelasi, bayebisaki ngai nakende na biro ya ndeko Nathan H. Knorr, oyo azalaki kotambwisa mosala ya Batatoli ya Yehova na ntango wana. Ndeko Knorr asɛngaki ngai ná mwasi na ngai tókende kosala mosala ya misionɛrɛ na République Malagasy, lelo oyo Madagascar. Nakomelaki Veera mpo apesa makanisi na ye, mpe ayanolaki kozanga koumela ete andimi. Ntango nazongaki na Finlande, tomibongisaki kozanga koumela mpo na kokende na Madagascar.

Makambo ya esengo mpe ya mawa

Na Yanuali 1962, tokendaki na Antananarivo, mboka-mokonzi ya Madagascar, tolataki bikɔti mpe bilamba ya malili, mpamba te tolongwaki na Finlande na eleko ya malili. Lokola molunge ezalaki makasi na Madagascar, tolataki bilamba mosusu. Ndako ya liboso ya bamisionɛrɛ ezalaki moke mpenza mpe ezalaki na eteni ya kolala kaka moko. Bamisionɛrɛ mosusu bazalaki wana, mobali moko ná mwasi na ye, yango wana ngai ná Veera tozalaki kolala na mbalasani.

Tobandaki koyekola Lifalanse, moko ya minɔkɔ ya Leta na Madagascar. Ezalaki mpasi mpo ngai ná Veera tóyeba koloba Lifalanse, mpo tozalaki koloba monɔkɔ moko te ná Ndeko Carbonneau, oyo azalaki kolakisa biso Lifalanse. Azalaki kosalela Lingelesi mpo na kolakisa biso Lifalanse, kasi Veera ayebaki koloba Lingelesi te. Nazalaki kobongola makambo oyo Ndeko Carbonneau azalaki koteya na monɔkɔ ya Finnois mpo na Veera. Kasi, tomonaki ete Veera azali kosimba maloba mosusu malamu nde na monɔkɔ ya Swedois, na yango, nakómaki kolimbwela ye mibeko ya lokota ya Lifalanse na monɔkɔ ya Swedois. Mosika te, tokómaki koloba Lifalanse malamu mpe tobandaki koyekola Malagasy, monɔkɔ ya mboka yango.

Moto ya liboso oyo nayekolaki na ye Biblia na Madagascar azalaki koloba kaka Malagasy. Nazalaki koluka bavɛrsɛ na Biblia na ngai ya Finnois, mpe na nsima tozalaki koluka yango na Biblia na ye ya Malagasy. Nazalaki kokoka mpenza te kolimbwela ye bavɛrsɛ yango, kasi mosika te solo ya Biblia esimbaki motema ya mobali yango, mpe azwaki batisimo.

Na 1963, Milton Henschel oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, ayaki na Madagascar. Mwa moke na nsima, biro ya filiale efungwamaki na Madagascar, mpe longola mosala na ngai ya Mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká, baponaki ngai mpe mokambi ya filiale yango. Yehova apambolaki biso mingi na ntango wana. Kobanda na 1962 tii na 1970, basakoli ya Bokonzi oyo bazalaki kaka 85 na Madagascar, bakómaki 469.

Mokolo moko na 1970, ntango toutaki na mosala ya kosakola, tokutaki mokanda moko liboso ya porte na biso, oyo elobaki ete bamisionɛrɛ nyonso ya Batatoli ya Yehova basengeli kokende na biro ya ministre ya interieur. Kuna, mokonzi moko ya biro yango alobaki na biso ete guvɛrnema ezwi meko ete tólongwa nokinoki na Madagascar. Ntango natunaki mokonzi yango soki nasali mabe nini mpo bábengana ngai, ayanolaki boye: “Papa Kuokkanen, osali mabe te.”

Nalobaki ete: “Tosali awa mbula mwambe. Oyo ezali mboka na biso. Tokoki kokende kaka boye te.” Atako tosalaki ndenge nyonso, bamisionɛrɛ nyonso bakendeki nsima ya pɔsɔ moko. Biro ya filiale ekangamaki, mpe ndeko moko ya Madagascar akómaki kokamba misala. Liboso ya kotika bandeko na biso ya Madagascar, tozwaki mokanda ete batindi biso na Ouganda.

Tokei na teritware ya sika

Mwa mikolo nsima ya kotika Madagascar, tokómaki na Kampala, mboka-mokonzi ya Ouganda. Tobandaki mbala moko koyekola Luganda, monɔkɔ oyo eyokanaka kitoko na matoi lokola nzembo, kasi ezali mpasi mpo na koyekola. Bamisionɛrɛ mosusu basalisaki Veera ayekola liboso Lingelesi, mpe yango epesaki biso likoki ya kosakola malamu mpenza.

Veera azalaki kokoka te molunge ya Kampala. Yango wana, batindaki biso na engumba Mbarara, epai malili ezali mwa mingi. Tozalaki Batatoli ya liboso kuna, mpe mokolo ya liboso oyo tobimaki na mosala ya kosakola, tokutanaki na likambo moko ya esengo. Nazalaki kosolola na mobali moko na ndako mpe mwasi na ye abimaki na kúku. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Margaret, mpe ayokaki lisolo na ngai. Veera abandaki koyekola Biblia na Margaret, mpe Margaret akolaki na elimo. Azwaki batisimo mpe akómaki mosakoli ya Bokonzi ya molende mpenza.

Bitumba na babalabala

Na 1971, etumba elongolaki kimya oyo tozalaki na yango na Ouganda. Mokolo moko, masasi etokaki na pembeni ya ndako na biso ya bamisionɛrɛ na Mbarara. Ezali na ntango wana nde nakutanaki na likambo oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo.

Nsima ya konguluma na terase tii na ndako mpo na kokima basoda, nakutaki Veera asili kokóma. Tosangisaki bamatela, bakiti mpe bamesa na litumu moko ya ndako mpo na komibomba na nsima na yango. Tofandaki na ndako pɔsɔ mobimba; tozalaki kolanda kaka bansango na radio. Ntango mosusu masasi ezalaki kotuta na bifelo, wana biso tozalaki kobatama na nsima ya biloko oyo tosangisaki. Na butu tozalaki kopelisa miinda te mpo bato báyeba te ete tozali wana. Mokolo moko, basoda bayaki liboso ya porte mpe bagangaki. Tozalaki koningana te, mpe tozalaki kobondela Yehova na nse ya motema. Ntango etumba esilaki, bato ya pembeni na biso bayaki kotɔnda biso na ndenge babikaki. Balobaki ete Yehova nde abatelaki biso nyonso, mpe biso tondimaki.

Kimya ekɔtaki tii mokolo oyo toyokaki na ntɔngɔ na radio ete guvɛrnema ya Ouganda epekisi mosala ya Batatoli ya Yehova. Mopanzi-nsango oyo ayebisaki likambo yango alobaki ete Batatoli ya Yehova nyonso basengeli kozonga na mangomba oyo bazalaki liboso. Namekaki komilela epai ya bakonzi ya mboka mpo na likambo yango, kasi baboyaki na motema moko. Na nsima, nakendaki na biro ya prezida Idi Amin mpe nasɛngaki ete nakutana na ye. Moto oyo ayambaka bato na biro yango ayebisaki ngai ete prezida azali na makambo mosusu ya kosala. Nazongaki mbala na mbala, kasi namonaki ye ata na liso te. Nsukansuka, na Yuli 1973 tolongwaki na Ouganda.

Mbula moko ekómi mbula zomi

Ntango totikaki bandeko na biso ya Ouganda, totondaki lisusu na mawa ndenge toyokaki ntango babenganaki biso na Madagascar. Liboso ya kokende esika batindaki biso na Senegal, tokendaki na Finlande. Kuna, bayebisaki biso ete tokokende lisusu na Senegal te, kasi tokotikala na Finlande. Emonanaki lokola mosala na biso ya misionɛrɛ esili. Na Finlande, tosalaki lokola babongisi-nzela minene, mpe na nsima tosalaki lisusu na zongazonga.

Na 1990, botɛmɛli na mosala ya Batatoli na Madagascar ekitaki, mpe ntango kutu tozalaki kokanisa te, biro monene ya Batatoli na Brooklyn etunaki biso soki tokolinga kokende kosala kuna mpo na mbula moko. Tozalaki na mposa ya kokende, kasi makambo mibale ezalaki kotungisa biso. Tata na ngai akómaki mobange mpe azalaki na mposa ya moto abatelaka ye, mpe Veera azalaki kaka na mitungisi ya nzoto. Nayokaki mawa mingi ntango tata akufaki na Novɛmbɛ 1990, kasi lokola Veera akómaki koyoka mwa malamu, yango epesaki biso elikya ya kozongela mosala ya misionɛrɛ. Tozongaki na Madagascar na Sɛtɛmbɛ 1991.

Batindaki biso na Madagascar mpo na mbula moko, kasi tosalaki tii mbula zomi. Na ntango wana, basakoli bakómaki 11 600, nzokande liboso bazalaki kaka 4 000. Nasepelaka mingi na mosala ya misionɛrɛ. Kasi, ntango mosusu nazalaki komona lokola nde nazali kokipe te bamposa ya mwasi na ngai, ezala nzoto na ye to makambo mosusu. Yehova apesaki biso nyonso mibale makasi ya kokoba. Nsukansuka, tozongaki na Finlande na 2001, epai tozali kosala na Betele. Molende na biso mpo na Bokonzi ezali kopela kaka, mpe tobosanaka Afrika te. Tozali na ekateli ya kosala mokano ya Yehova epai nyonso akotinda biso.​—Yisaya 6:8.

[Karte na lokasa 12]

(Talá na zulunalo mpo na komona ndenge ezali)

FINLANDE

MPOTO

[Karte na lokasa 14]

(Talá na zulunalo mpo na komona ndenge ezali)

AFRIKA

MADAGASCAR

[Karte na lokasa 15]

(Talá na zulunalo mpo na komona ndenge ezali)

AFRIKA

OUGANDA

[Elilingi na lokasa 14]

Mokolo ya libala na biso

[Bililingi na lokasa 14, 15]

Kobanda na mosala ya zongazonga na Finlande, na 1960 . . .

. . . tii na mosala ya misionɛrɛ na Madagascar, na 1962

[Elilingi na lokasa 16]

Ngai ná Veera lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto