Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/12 nk. 29-31
  • Biblia ekómi na Esanga monene ya motane

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ekómi na Esanga monene ya motane
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babandi kobongola Biblia
  • Makambo oyo elingaki kotɛlɛmisa mosala
  • Makambo ebongi, na nsima ebebi
  • Bolingo ya bato ya Madagascar mpo na Biblia
  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Eyokanaki lokola miziki moko ya kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/12 nk. 29-31

Biblia ekómi na Esanga monene ya motane

MADAGASCAR, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 400 na sudi-ɛsti ya bokula ya Afrika, ezali esanga ya minei oyo eleki monene na mabele mobimba. Bato ya Madagascar bamesaná na nkombo Yehova banda kala mpo Babiblia oyo ebongolamá na monɔkɔ ya Malgache, oyo ezali na nkombo ya Nzambe, ezalaka banda bambula koleka 170. Mpo na kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Malgache, esɛngaki kosala milende mpe komipesa mingi.

Milende mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ ya Malgache ebandaki libosoliboso na île Maurice, esanga oyo ezali pembeni ya Madagascar. Na mobu 1813, Robert Farquhar, moto ya Angleterre oyo azalaki guvɛrnɛrɛ na île Maurice, abandisaki mosala ya kobongola Baevanzile na monɔkɔ ya Malgache. Na nsima, alendisaki Radama I, mokonzi ya Madagascar, asɛnga na ebongiseli moko ya Londres (Société missionnaire de Londres) etinda balakisi na Esanga monene ya motane, ndenge bazalaki mbala mingi kobenga Madagascar.

Na mokolo ya 18 Augusto 1818, David Jones ná Thomas Bevan, bamisionɛrɛ mibale ya Pays de Galles balongwaki île Maurice mpe bakómaki na Toamasina, engumba oyo ezali na libongo. Kuna, bamonaki ete bato bamipesá mingi na makambo ya losambo, bazalaki kosambela bankɔkɔ mpe kotambwisama mokolo na mokolo na makambo oyo bayoká epai ya bato ya kala. Bato ya Madagascar bazalaki koloba monɔkɔ moko oyo eutaki mingimingi na minɔkɔ oyo babengaka malayo-polynésien.

Mwa moke nsima ya kofungola mwa eteyelo moko, Jones ná Bevan bazwaki basi mpe bana na bango na île Maurice mpe bayaki na bango na Toamasina. Kasi likambo ya mawa, bango nyonso babɛlaki malaria, mpe mwasi ya Jones ná mwana na ye bakufaki na sanza ya Desɛmbɛ 1818. Sanza mibale na nsima, libota ya Bevan mobimba bakufaki na maladi yango. Kaka David Jones nde abikaki.

Jones atikaki te ete likambo wana ya mawa elɛmbisa ye. Azalaki na ekateli ya kosalisa bato ya Madagascar bázala na Liloba ya Nzambe. Nsima ya kozonga na île Maurice, epai akendaki kozwa lisalisi mpo na maladi na ye, Jones abandaki mosala moko ya mpasi: koyekola monɔkɔ ya Malgache. Mwa moke na nsima, abandaki mosala ya kobongola Evanzile ya Yoane.

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1820, Jones azongaki na Madagascar. Afandaki na Antananarivo, mboka-mokonzi, mpe mwa moke na nsima afungolaki eteyelo oyo bamisionɛrɛ nde bazalaki kokamba. Makambo ezalaki malonga te. Babuku ezalaki te, tablo te, bisika ya kofanda mpe te. Kasi, makambo oyo bazalaki kotángisa ezalaki malamu, mpe bana bazalaki kolinga koyekola.

Nsima ya sanza nsambo ya kosala ye moko, Jones azwaki moto mosusu oyo akosala na ye na esika ya Bevan; misionɛrɛ moko na nkombo David Griffiths. Mibali yango mibale ya makasi na mosala bamipesaki na kobongola Biblia na monɔkɔ ya Malgache.

Babandi kobongola Biblia

Na ebandeli ya bambula ya 1820, makomi oyo ezalaki na monɔkɔ ya Malgache ezalaki kaka oyo bazalaki kobenga sorabe​—maloba ya Malgache bakomá na ekomeli ya Arabe. Kaka mwa bato moke nde bakokaki kotánga yango. Yango wana, ntango bamisionɛrɛ yango basɛngaki Mokonzi Radama I ete bábanda kokoma na alfabɛ ya Baroma, na esika ya kosalela sorabe, mokonzi yango apesaki bango ndingisa.

Mosala ya kobongola ebandaki na mokolo ya 10 Sɛtɛmbɛ 1823. Jones abandaki kobongola mokanda ya Ebandeli mpe ya Matai, mpe Griffiths abandaki kobongola mokanda ya Kobima mpe ya Luka. Bango nyonso mibale bazalaki kolɛmba kosala te. Atako bango moko nde bazalaki kosala mingi na mosala yango ya kobongola, bakobaki kotángisa na eteyelo na ntɔngɔ mpe nsima ya midi. Bazalaki mpe kobongisa mateya oyo basengelaki koteya na lingomba na minɔkɔ misato. Kasi, mosala ya kobongola ezalaki na esika ya liboso.

Na lisalisi ya bana-kelasi 12, bamisionɛrɛ wana mibale babongolaki Makomami ya Grɛki mobimba mpe mikanda mingi ya Makomami ya Ebre na boumeli ya sanza 18 mpamba. Na mbula oyo elandaki, basilisaki kobongola Biblia na mobimba na yango. Ya solo, esengelaki kozongela mpo na kobongisa bisika mosusu. Yango wana, David Johns ná Joseph Freeman, bato ya Angleterre oyo bazalaki bato ya mayele na makambo ya minɔkɔ batindamaki mpo na kosalisa bango.

Makambo oyo elingaki kotɛlɛmisa mosala

Ntango basilisaki kobongola Biblia na monɔkɔ ya Malgache, ebongiseli ya Londres oyo tolobelaki liboso etindaki Charles Hovenden mpo na kotya masini ya liboso ya konyata mikanda na Madagascar. Hovenden akómaki na mokolo ya 21 Novɛmbɛ 1826. Kasi, abɛlaki malaria mpe akufaki sanza moko nsima ya kokóma na Madagascar, mpe atikaki moto mosusu te oyo akokaki kosalela masini yango. Na mbula oyo elandaki, James Cameron, moto ya Écosse oyo ayebaki malamu misala ya bamasini, amekaki kotambwisa masini yango na lisalisi ya buku moko oyo akutaki na kati ya biloko oyo eyaki na masini yango. Nsima ya komekameka mbala ebele, na mokolo ya 4 Desɛmbɛ 1827, Cameron alongaki kobimisa mokapo 1 ya mokanda ya Ebandeli na masini yango.a

Likambo mosusu oyo elingaki kotɛlɛmisa mosala ebimaki na mokolo ya 27 Yuli 1828, ntango Mokonzi Radama I akufaki. Mokonzi Radama azalaki kolinga ete mosala ya kobongola Biblia ekende liboso. Na ntango wana, David Jones alobaki boye: “Mokonzi Radama azali malamu mpe na boboto mingi mpenza. Azali kolendisa mingi makambo etali kelasi, mpe amonaka ete koteya bato ya mboka na ye mpo báyeba makambo mingi ya sika ezali na motuya mingi koleka Palata mpe Wolo.” Nzokande, ntango akufaki, mwasi na ye Ranavalona I nde akitanaki ye na bokonzi, mpe eumelaki te, ekómaki komonana polele ete mwasi yango akolinga te ete mosala yango ekende liboso lokola mobali na ye.

Ntango mwasi yango azwaki bokonzi, mwa moke na nsima misionɛrɛ moko oyo autaki Angleterre asɛngaki akutana na mokonzi-mwasi yango mpo básolola likambo etali mosala ya kobongola. Mokonzi-mwasi aboyaki koyamba ye. Na libaku mosusu, ntango bamisionɛrɛ bayebisaki mokonzi-mwasi ete bazali naino na makambo mingi ya kolakisa bato, kati na yango Ebre ná Grɛki, alobaki boye: “Mpo na ngai, Ebre ná Grɛki ezali na ntina mingi te, nakosepela nde koyeba soki bokoki kolakisa bato ya mboka na ngai likambo moko ya ntina koleka, na ndakisa kosala sabuni.” Lokola bamisionɛrɛ bamonaki ete bakoki kobengana bango na mboka yango liboso básilisa kobongola Biblia na monɔkɔ ya Malgache, Cameron asɛngaki ete bátikela bango pɔsɔ moko mpo bákende kokanisa makambo oyo mokonzi-mwasi alobaki.

Na pɔsɔ oyo elandaki, Cameron apesaki bato oyo mokonzi-mwasi atindaki mwa sabuni mibale oyo esalemi na biloko ya mboka. Likambo wana mpe misala mosusu ya mabɔkɔ oyo bamisionɛrɛ basalaki mpo na bato, ekitisaki mokonzi-mwasi motema tii basilisaki mosala ya konyata mwa mikanda ya Makomami ya Ebre oyo etikalaki.

Makambo ebongi, na nsima ebebi

Atako na ebandeli mokonzi-mwasi aboyaki bamisionɛrɛ, na sanza ya Mai 1831, abimisaki mobeko moko ya kokamwa. Apesaki bana-mboka ndingisa ya kozwa batisimo mpo na kokóma bakristo! Kasi ekateli yango eumelaki te. Buku moko (A History of Madagascar) emonisi ete “lokola bato mingi bazalaki kozwa batisimo, basali ya ndako ya mokonzi oyo baboyaki mbongwana wana babangaki, mpe bandimisaki mokonzi ete soki bato mingi bakómi kozwa batisimo, ekozala lokola nde bazali kokende na ngámbo ya bato ya Angleterre.” Yango wana, na nsuka ya mobu 1831, sanza motoba mpamba nsima ya kobimisa mobeko yango, mokonzi apekisaki bato kozwa batisimo mpo na kokóma bakristo.

Lokola mokonzi-mwasi azalaki bongolabongola, mpe bato oyo bakangamaki na makambo ya bonkɔkɔ bazalaki se kokóma mingi na guvɛrnema na ye, bamisionɛrɛ básala makasi mpo na kosilisa mosala ya kobimisa Biblia. Makomami ya Grɛki ya bokristo esilaki kobima, mpe bankóto ya bato bazalaki kozwa yango. Kasi, mokakatano mosusu ebimaki na mokolo ya 1 Marsi 1835, ntango Mokonzi-mwasi Ranavalona I alobaki ete Lingomba ya bokristo endimami na Leta te mpe apesaki mitindo ete bápesa mikanda nyonso ya bakristo epai ya bakonzi ya Leta.

Mobeko wana ya mokonzi-mwasi elimbolaki mpe ete bana-kelasi ya Madagascar bakokaki lisusu te kopesa mabɔkɔ na mosala ya konyata mikanda. Na yango, lokola mwa ndambo ya bamisionɛrɛ nde basengelaki kosilisa mosala yango, mosala ezalaki kosalema butu moi, tii nsukansuka, na sanza ya Yuni 1835, babimisaki Biblia mobimba. Ya solo, Biblia na monɔkɔ ya Malgache ebimaki!

Wana bazalaki na epekiseli, bakabolaki Babiblia yango nokinoki, mpe bakundaki Babiblia mosusu 70 mpo ebatelama. Yango ezalaki ekateli ya malamu, mpamba te mbula mobimba ekokaki te, bamisionɛrɛ nyonso bakendaki mpe batikalaki kaka mibale. Kasi Liloba ya Nzambe ezalaki kopalangana na Esanga monene ya motane.

Bolingo ya bato ya Madagascar mpo na Biblia

Bato ya Madagascar bazalaki mpenza na esengo ya kotánga Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango! Ezali na bisika oyo esengeli kobongisa na Biblia yango, mpe elobeli na yango ekómá ya kala. Atako bongo, ezali mpasi okuta ndako oyo ezangi Biblia, mpe bato mingi ya Madagascar batángaka yango mingi. Likambo ya ntina mingi na Biblia yango ezali ete basaleli nkombo ya Nzambe, Yehova, na Makomami ya Ebre mobimba. Babiblia ya liboso oyo ebimisamaki ezalaki na nkombo ya Nzambe ata na Makomami ya Grɛki. Yango wana, bato mingi ya Madagascar bamesaná na nkombo ya Nzambe.

Ntango Babiblia ya liboso ya Makomami ya Grɛki ebimisamaki na masini na ye ya konyata mikanda, Baker, mobali oyo azalaki konyata Babiblia yango, amonaki esengo ya bato ya Madagascar mpe alobaki boye: “Nalingi koloba te ete nabimisi esakweli, kasi nandimi te ete mokolo mosusu bakolimwisa Liloba ya Nzambe na ekólo oyo!” Emonani ete alobaki solo. Ezala malaria, ezala mokakatano ya koyekola monɔkɔ moko ya mpasi, ezala mibeko ya mokonzi moko, ekokaki te kopekisa bato ya Madagascar bázwa Liloba ya Nzambe.

Lelo oyo, makambo ebongi mingi koleka. Na ndenge nini? Na 2008, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Malgache. Biblia yango ebongisi lisusu makambo mingi, mpamba te ezali na elobeli ya mikolo oyo mpe ya pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Na yango, Liloba ya Nzambe efandi mpenza na Esanga monene ya motane.​—Yis. 40:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mibeko Zomi mpe Libondeli ya Nkolo, oyo ebimisamaki na île Maurice na sanza ya Aprili to ya Mai 1826, ezalaki biteni ya libosoliboso ya Biblia oyo ebimaki na monɔkɔ ya Malgache. Kasi, bakabolelaki yango kaka bato ya libota ya Mokonzi Radama mpe bato mosusu ya guvɛrnema.

[Elilingi na lokasa 31]

“Libongoli ya Mokili ya Sika” na monɔkɔ Malgache ezali kokumisa nkombo ya Nzambe, Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto