Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/5 nk. 13-16
  • Ozalaka na “elobeli ya polele”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na “elobeli ya polele”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nini esalisaka biso tósakola na mpiko?
  • Tósakola na mpiko
  • Ntango tozali koteya
  • Ntango tozali kobondela
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Zaláká na maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tóyekola koyeba Jéhovah na nzela ya Liloba na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/5 nk. 13-16

Ozalaka na “elobeli ya polele”?

BATO koleka milio 6 na kati ya mikili 235 bazali na oyo Biblia ebengi “elobeli ya polele.” Maloba “elobeli ya polele” ezali na bisika 16 na Makomami ya Grɛki ya boklisto ya Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami Mosantu. (Bafilipi 1:20; 1 Timote 3:13; Baebele 3:6; 1 Yoane 3:21) “Elobeli ya polele” ezali nini? Nini esalisaka biso tózala na yango? Ntango nini esalisaka biso tókakatana te koloba?

Buku moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “elobeli ya polele” elimboli “koloba na bonsomi, kokakatana te, . . . kobanga te mpe koloba na mpiko; na bongo, ezaleli yango emonisaka molende mpe mpiko ata mpe na makambo mosusu.” Kasi, kozala na elobeli ya polele ekeseni na koloba na kozanga limemya to kokatela bato mangala. Biblia elobi boye: “Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.” (Bakolose 4:6) Kozala na elobeli ya polele elimboli koloba na mayele, kotika te ete mikakatano mosusu to kobanga bato epekisa biso koloba.

Moto abotamaka nde na likoki ya koloba polele? Tótalela makambo oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese. Alobaki boye: “Epai na ngai, moto ya moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso, boboto monene wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo mosusu nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Klisto oyo bozindo na yango ekoki komekama te.” Paulo abakisaki ete ezali na nzela ya Yesu Klisto nde “tozwi elobeli ya polele mpe nzela ya kopusana pene kozanga kokakatana mpo na kondima na biso epai na ye.” (Baefese 3:8-12) Elobeli ya polele ezali likoki oyo tobotamaka na yango te, kasi boyokani na biso na Yehova Nzambe oyo esimbami na kondima na biso epai ya Yesu Klisto nde esalisaka biso tókóma na yango. Tótalela makambo oyo ekoki kosalisa biso tókóma na elobeli ya polele mpe ndenge oyo tokoki komonisa yango ntango tozali kosakola, koteya, to kobondela.

Nini esalisaka biso tósakola na mpiko?

Moto oyo atikaki ndakisa eleki monene ya kozala na elobeli ya polele ezali Yesu Klisto. Molende na ye ezalaki kotinda ye asakola na mabaku nyonso. Azalaki kolobela Bokonzi ya Nzambe ata ntango azali kopema, to azali kolya na ndako ya moto, to azali kotambola. Moto moko te, ezala baoyo bazalaki kotyola ye to baoyo bazalaki kolinga te ete asakola, bakokaki kobangisa Yesu mpe kosala ete afanda nyɛɛ. Kutu, azalaki komonisa polele ete bakonzi ya mangomba ya ntango na ye bazali bato ya lokuta. (Matai 23:13-36) Ata ntango bakangaki ye mpe bazalaki kosambisa ye, Yesu azalaki kobanga koloba te.​—Yoane 18:6, 19, 20, 37.

Bantoma ya Yesu mpe bakómaki na mpiko ya koloba. Mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Petelo alobaki na elobeli ya polele liboso ya bato koleka 3 000. Nzokande, mwa mikolo liboso, abangaki ntango moombo moko ya mwasi amonaki ye mpe alobaki ete azali moyekoli ya Yesu. (Malako 14:66-71; Misala 2:14, 29, 41) Petelo ná Yoane bazalaki na kobanga te ntango bamemaki bango liboso ya bakonzi ya mangomba. Batatolaki na mpiko nyonso ete Yesu Klisto asekwaki. Kutu, ezali mpiko ya Petelo ná Yoane nde etindaki bakonzi ya mangomba báloba ete mibali yango bazalaki elongo na Yesu. (Misala 4:5-13) Nini esalisaki bango báloba na mpiko ndenge wana?

Yesu alakaki bantoma na ye boye: “Ntango bakokaba bino, bómitungisa te na oyo etali ndenge nini to nini bokoloba; mpo oyo bosengeli koloba ekopesamela bino kaka na ngonga wana; mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino te, kasi ezali elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.” (Matai 10:19, 20) Elimo santu esalisaki Petelo ná bantoma mosusu bálongola nsɔni mpe kobanga oyo ekokaki kopekisa bango báloba na ndenge ya polele. Elimo yango ekoki mpe kosalisa biso.

Longola yango, Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kokómisa bato bayekoli. Ebongaki mpenza apesa bango mokumba wana mpamba te Nzambe apesaki ye “bokonzi nyonso . . . na likoló mpe na mabelé.” Alakaki bango mpe ete ‘akozala elongo na bango.’ (Matai 28:18-20) Bayekoli ya liboso bazalaki kobanga te ntango bazali liboso ya bakonzi oyo bazalaki kopekisa bango kosakola mpo bayebaki ete Yesu azali na bango elongo. (Misala 4:18-20; 5:28, 29) Kondima ndenge wana esalisaka mpe biso tózala na mpiko.

Paulo amonisaki ntina mosusu ya koloba na kobanga te ntango alobelaki elikya esika moko na “elobeli ya polele mpenza.” (2 Bakolinti 3:12; Bafilipi 1:20) Lokola baklisto bayebaki ete nsango ya elikya oyo bazali na yango ezali kitoko mingi, bakokaki kobomba yango mpo na bango moko te, bazalaki koyebisa yango bato mosusu. Elikya oyo biso mpe tozali na yango esengeli kotinda biso tózala na elobeli ya polele.​—Baebele 3:6.

Tósakola na mpiko

Ndenge nini tokoki kosakola na mpiko ata soki tokutani na makambo oyo ekoki kobangisa biso? Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma, asɛngaki bandimi mosusu bábondela mpo na ye mpo ‘likoki ya koloba epesama epai na ye ntango azali kofungola monɔkɔ, mpo aloba na mpiko ndenge asengeli koloba.’ (Baefese 6:19, 20) Nzambe ayokaki mabondeli yango! Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ, akobaki ‘kosakola bokonzi ya Nzambe . . . na elobeli mpenza ya polele koleka, kozanga kopekisama.’​—Misala 28:30, 31.

Soki osalelaka libaku nyonso ya kopesa litatoli, ezala na mosala, na kelasi, to ntango ozali kosala mobembo, yango emonisi ete ozali na elobeli ya polele. Nsɔni, kobanga bato, to kokanisa ete mbala mosusu tokokoka te, ekoki kopekisa biso koloba. Na makambo ya ndenge wana mpe, ntoma Paulo apesaki biso ndakisa ya malamu mpenza. Akomaki boye: “Tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.” (1 Batesaloniki 2:2) Lokola Paulo azalaki kotyela Yehova motema, alongaki kosala makambo oyo, na makasi na ye moko, akokaki kosala te.

Mwasi moko nkombo na ye Sherry azalaki kobanga kopesa litatoli soki azwi libaku; kasi, libondeli esalisaki ye atika kobanga. Mokolo moko, ntango azalaki kozela mobali na ye, amonaki ete mwasi moko mpe azalaki kozela moto. Sherry alobi boye: “Lokola nazalaki kobanga, nabondelaki Yehova apesa ngai mpiko.” Ntango Sherry azalaki kopusana penepene na mwasi yango, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Baptiste ayaki. Sherry azalaki ata na likanisi te ete akoki kokutana na pastɛrɛ moko. Kasi, abondelaki lisusu mpe apesaki litatoli. Atikelaki mwasi yango mikanda mpe bayokanaki ete akende kotala ye. Ntango tozwi libaku ya kopesa litatoli, tokoki kolikya ete soki totyeli Yehova motema, akosalisa biso tóbanga te.

Ntango tozali koteya

Koteya malamu esɛngaka mpe kozala na elobeli ya polele. Biblia elobi ete na kati ya lisangá, “mibali oyo bazali kosala mosala ya ministre na ndenge ya malamu mpenza bazali komizwela esika ya lokumu mpe elobeli ya polele mpenza na kati ya kondima oyo etali Klisto Yesu.” (1 Timote 3:13) Mibali yango bakómaka na elobeli ya polele soki bango moko bazali kosalela makambo oyo bazali koteya. Kosala bongo ebatelaka mpe elendisaka lisangá.

Ntango tozali na elobeli ya polele ndenge wana, toli na biso ekozala na kilo mpe bato oyo bazali koyoka yango bakokakatana te mpo na kolanda yango. Soki moteyi azali kosalela makambo oyo ateyaka, yango ekolendisa bandeko oyo bazali koyoka ye. Elobeli ya polele ndenge wana esalisaka bato oyo bazali na makoki ya elimo básembola ndeko nyonso liboso akóma na mokakatano monene. (Bagalatia 6:1) Nzokande, moto oyo azali kopesa ndakisa ya mabe akoki kokakatana mpo na kopesa toli, mpamba te akomiyoka ete abongi te kosala yango. Kolekisa ntango mingi liboso ya kopesa moto toli oyo esengeli, ekoki komema makama.

Koloba na mpiko elimboli te koloba mabe, kotingama na makanisi na biso, to koluka kolongisa yango. Paulo apesaki Filemona toli “na bolingo.” (Filemona 8, 9) Yango wana Filemona andimaki toli na ye. Ndakisa yango emonisi ete toli nyonso oyo nkulutu azali kopesa, asengeli kopesa yango na bolingo!

Elobeli ya polele ezali na ntina mingi, kaka te ntango tozali kopesa toli, kasi mpe na makambo mosusu. Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti boye: “Nazali na elobeli ya polele mpenza epai na bino. Nazali komikumisa mingi na ntina na bino.” (2 Bakolinti 7:4) Paulo azalaki kokakatana te kopesa bandeko na ye longonya na ntango esengeli. Bolingo ezalaki kotinda ye atalelaka mingimingi bizaleli malamu ya bandeko na ye bandimi, atako ayebaki mpe bolɛmbu na bango. Lelo oyo mpe, bandeko na kati ya lisangá basepelaka mingi soki bankulutu bazali kopesa bango longonya mpe bazali kolendisa bango.

Mpo na koteya malamu, moklisto nyonso asengeli kozala na elobeli ya polele. Sherry, oyo tolobelaki liboso, alingaki kolendisa bana na ye bápesaka litatoli na kelasi. Alobaki boye: “Atako nakolaki na lisangá, na kelasi nazalaki mpenza kopesa litatoli te. Ntango mpe nakómaki mokóló, nazalaki mpenza kopesa litatoli ya libaku malamu te. Yango wana namitunaki boye, ‘Ndakisa nini nazali kopesa bana na ngai?’” Likambo yango etindaki Sherry asala molende mpo apesaka litatoli ya libaku malamu.

Ya solo, bato mosusu batalaka misala na biso mpe bamonaka soki tosalelaka mpenza makambo oyo toteyaka. Yango wana, tósala makasi ete misala na biso eyokana na maloba na biso mpe na ndenge yango tókóma na elobeli ya polele.

Ntango tozali kobondela

Elobeli ya polele ezali na ntina mingi mpenza na mabondeli na biso epai ya Yehova. Tokoki kofungolela Yehova mitema na biso na elikya ete akoyoka biso. Na ndenge yango, tokokóma baninga ya solosolo ya Tata na biso ya likoló. Tosengeli kokakatanaka ata moke te kopusana penepene na Yehova to kokanisa ete tozali na ntina moko te. Kasi, tokosala nini soki tosali libunga to lisumu moko oyo ezali kotungisa lisosoli na biso mpe ezali kopekisa biso tózala na elobeli ya polele? Ata na ntango wana tokoki nde kopusana penepene ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba?

Mokumba ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene ezali komonisa biso ntina mosusu oyo tosengeli kozala na elikya ntango tozali kobondela. Na Baebele 4:15, 16, tozali kotánga boye: “Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo azangi likoki ya koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu. Na yango, tiká tópusana na elobeli ya polele penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo tóyokelama mawa mpe tózwa boboto monene mpo na kosalisama na ntango oyo ekoki.” Maloba yango ezali komonisa motuya ya liwa ya Yesu mpe mokumba na ye lokola Nganga-nzambe Monene.

Soki tozali mpenza na mposa ya kotosa Yehova, tokoki kozala na elikya ete akoyoka biso. Ntoma Yoane akomaki boye: “Balingami, soki mitema na biso ezali kokweisa biso te, tozali na elobeli ya polele liboso ya Nzambe; mpe nyonso oyo tozali kosɛnga tozali kozwa yango epai na ye, mpamba te tozali kotosa bakomandema na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye.”​—1 Yoane 3:21, 22.

Kobondela Yehova kozanga kokakatana elimboli koloba na ye makambo nyonso oyo tozali na yango na motema. Tokoki kozala na elikya ete soki toyebisi Yehova ata likambo nini oyo ezali kotungisa to kobangisa biso, akoboya te koyoka biso. Ata soki tosali lisumu ya monene, yango esengeli kopekisa biso te tóbondela Yehova soki tobongoli mpenza motema.

Ya solo, elobeli ya polele ezali mpenza na motuya. Na lisalisi na yango, tokoki kokumisa Nzambe na mosala ya kosakola mpe ya koteya mpe kopusana penepene na ye na libondeli. ‘Tóbwaka elobeli na biso ya polele te, oyo ekofutama na mbano moko monene’; mbano yango ezali bomoi ya seko.​—Baebele 10:35.

[Elilingi na lokasa 13]

Ntoma Paulo azalaki koloba na mpiko

[Bililingi na lokasa 15]

Koteya malamu esɛngaka kozala na elobeli ya polele

[Elilingi na lokasa 16]

Ezali na ntina mingi tózala na elobeli ya polele na mabondeli na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto