Tóyekola koyeba Jéhovah na nzela ya Liloba na ye
“Oyo ezali bomoi ya seko, ete bayekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”—YOANE 17:3, MN.
1, 2. (a) Na ndimbola nini Makomami mazali kosalela maloba “koyeba” mpe “boyebi”? (b) Bandakisa nini epesi nzela na kolimbola yango polele?
KOYEBA moto na mosika to koyeba eloko moko likolólikoló ekoki te mpo na kolimbola liloba “koyeba” mpe “boyebi” lokola esalelami kati na Makomami. Kati na Biblia, maloba wana malimboli “koyeba na nzela na momeseno,” boyebi oyo bomonisi Uboyokani malamu kati na bato mingi.” (The New International Dictionary of New Testament Theology) Yango esangisi koyeba Jéhovah na nzela ya misala na ye mosusu, lokola mabaku mingi malobelami kati na mokanda ya Ezekiele, oyo Nzambe akokisaki bikateli na ye likoló ya basali na masumu, kosakolaka ete: ˈMpe bokoyeba ete ngai nazali Jéhovah.ˈ—Ezekiele 38:23.
2 Mitindo mingi oyo liloba “koyeba” mpe “boyebi” esalelami, ekoki kolimbolama polele na nzela ya mwa bandakisa. Epai na baoyo bazalaki koloba ete bazali kosala misala na nkombo na ye, Yesu alobaki ete: “Nayebi bino te.” Alingaki koloba wana ete azalaki na boyokani te elongo na bango. (Matai 7:23) Eteni ya 2 Bakolinti 5:21 elobi ete Klisto “ayebaki lisumu te.” Yango elimboli te ete ye ayebaki te ete lisumu lizali, kasi ete ye moko asalaki lisumu te. Bobele bongo, ntango Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi ya seko, ete bayekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto,” yango elimboli te bobele koyeba mwa makambo na ntina na Nzambe mpe Klisto.—Tala Matai 7:21.
3. Nini emonisi ete Jéhovah azali na elembo ya Nzambe ya solo?
3 Tokoki koyeba bizaleli mingi ya Jéhovah na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Moko na yango ezali makoki azali na yango mpo na kosakola na sikisiki makambo mazali koya liboso. Yango ezali elembo mpo na Nzambe ya solo: “Bobimisa mpe bomonisa biso makambo oyo makoya. Bomonisa biso makambo na liboso ete tomibanzabanza mpo na yango mpe ete toyeba maye makoya nsima, mpo toyeba ete bino bozali banzambe.” (Yisaya 41:22, 23) Kati na Liloba na ye, Jéhovah ayebisi makambo na liboso na ntina etali biloko bizalisami na mabelé mpe bomoi oyo bozali kati na yango. Alobaki na ntina na makambo masengelaki kobima na nsima mpe yango ekokanaki solo. Mpe ata lelo, azali ˈkoyebisa biso makambo oyo makoya,ˈ mingi mpenza mpo na makambo oyo masengeli kobima na “mikolo ya nsuka.”—2 Timoté 3:1-5, 13; Genese 1:1-30; Yisaya 53:1-12; Danyele 8:3-12, 20-25; Matai 24:3-21; Emoniseli 6:17; 11:18.
4. Lolenge nini Jéhovah asalelaki nguya na ye mpe lolenge nini akosalela yango mosika te?
4 Ezaleli mosusu ya Jéhovah ezali bongo nguya. Yango emonani kati na makoló epai minzoto mizali kosala lokola bipɛlɛli minene ya mótɔ oyo bizali kopesa pole mpe molunge. Wana bato mpe baanzelu batombokelaki boyangeli ya Jéhovah, asalelaki nguya na ye lokola “mobali na etumba” mpo na kolóngisa nkombo na ye monene mpe mitinda ya sembo. Na mabaku lokola oyo wana, ye akokakatanaka te mpo na kosalela nguya na ye ya koboma, lokola na mpela na mikolo ya Noa, na kobomama ya Sodome mpe Gomore, mpe na ntango na kosikolama ya Yisraele kati na Mai Motane. (Exode 15:3-7; Genese 7:11, 12, 24; 19:24, 25) Mosika te, Nzambe akosalela nguya na ye mpo na “konyata Satana na nse na makolo na bino.”—Baloma 16:20.
5. Longola nguya, Jéhovah azali lisusu na ezaleli nini?
5 Nzokande, komikitisa ebakisami mpe likoló na nguya nyonso wana monene. Nzembo 18: 35, 36 elobi ete: “Komikitisa na yo eyeisi ngai monene. Obongisi esika monene na nse na matambe na ngai, mpe [makolo] na ngai masɛlimwi te.” Komikitisa ya Nzambe epesi ye nzela na “kotala na likoló mpe na mabelé, kotombolaka oyo moke longwa na mputulu, akotɛlɛmisa mobólá longwa na mputulu.”—Nzembo 113:6, 7.
6. Ezaleli nini ya Jéhovah oyo ekopesaka lobiko?
6 Motema mawa ya Jéhovah kati na boyokani na ye elongo na bato ekopesaka lobiko. Oyo nde motema mawa amoniselaki Manasé wana alimbisaki ye atako asalaki makambo minene ya mabe! Jéhovah alobaki ete: “Ekoloba ngai na moto mabe ete: ˈOkokofa solo,ˈ soki ye abongwani na lisumu na ye, mpe asali boyengebene mpe yango na sembo, moko na masumu na ye makokanisama te; ye asali boyengebene mpe yango na sembo. Akobika solo.” (Ezekiele 33:14, 16; 2 Ntango 33:1-6, 10-13) Yesu amonisaki likanisi ya Jéhovah ntango apesaki elendiseli ya kolimbisa moto mbala 77, ata mbala 7 na mokolo moko!—Nzembo 103:8-14; Matai 18:21, 22; Luka 17:4.
Nzambe oyo azali na mayoki
7. Nini ekesenisi Jéhovah na banzambe ya Bagreke, mpe libaku nini kitoko tozali na yango?
7 Bafilozofe ya Greke, lokola mpe ba Epicuriens bandimaki ete banzambe bazali mingi, nde bakokaki te komibanzabanza na bato soko kotya likebi na mayoki na bango, mpo ete bazalaki mpenza mosika na mabelé. Yango ekeseni mpenza na boyokani oyo bozali kati na Jéhovah mpe Batemwe na ye ya sembo. “Jéhovah asepeli na bato na ye.” (Nzembo 149:4) Bato mabe oyo bazalaki na bomoi liboso ya mpela, baokisaki ye mawa mpe bapesaki ye “mpasi na motema.” Mpo na kozanga bosembo, Yisraele baokisaki Jéhovah mawa mpe bapesaki ye mpsai na motema. Baklisto mpe bakoki kookisa elimo ya Jéhovah mawa soki bazangi botosi; nde soki bamimonisi sembo, bakosepelisa ye. Ezali mpenza likambo na kokamwa na kokanisa ete bato mpamba awa na mabelé bakoki kookisa Mozaliai ya molongo mawa to mpe kosepelisa ye! Na kotalela oyo nyonso asaleli biso, tozali na libaku lileki kitoko ya kosepelisa ye.—Genese 6:6; Nzembo 78:40, 41; Masese 27:11; Yisaya 63:10; Baefese 4:30.
8. Lolenge nini Abalayama alobaki epai na Jéhovah na molende?
8 Liloba ya Nzambe limonisi ete bolingo ya Jéhovah epesi biso nzela na koloba “na molende.” (1 Yoane 4:17) Tala lolenge oyo Abalayama alobaki na ntango Jéhovah ayaki koboma Sodome. Abalayama alobaki na Jéhovah ete: “Okoboma mpe bayengebene elongo na bato mabe? Soki bayengebene ntuku mitano bazali kati na mboka, okoboma nde bango, mpe okolimbisa mboka wana te na ntina na bayengebene ntuku mitano bazali kati na yango? ... Yango ebongi na yo te. Mosambisi ya mokili mobimba akosala yango ezali sembo te?” Oyo lolenge nini na koloba na Nzambe! Atako bongo, Jéhovah andimaki kobikisa Sodome soki bayengebene 50 bazwamaki kati na yango. Abalayama alandaki koloba mpe atangaki longwa 50 kino 20. Abangaki koluka kondimisa maloba na ye na makasi. Alobaki ete: “Tika Jéhovah ayokela ngai nkanda te, mpe nakoloba bobele mbala oyo. Soki bayengebene zomi bazwami kuna.” Jéhovah andimaki lisusu mbala wana, ete: “Nakobebisa yango te na ntina na bayengebene zomi.”—Genese 18:23-33.
9. Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela na Abalayama ete aloba na lolenge oyo asalaki yango, mpe biso tozwi liteya nini kati na yango?
9 Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela na Abalayama ete aloba na ye na molende motindo oyo? Libosoliboso, ezali mpo ete ayebaki likambo monene oyo Abalayama azalaki komitungisa na ntina na yango. Ayebaki ete Lota, mwana na ndeko ya Abalayama, azalaki kofanda na Sodome mpe Abalayama azalaki komitungisa mpo na bomoi na ye. Lisusu, Abalayama azalaki moninga ya Nzambe. (Yakobo 2:23) Ntango moto moko alobeli biso na mpiko nyonso, tomekaka koluka koyeba mayoki mabombami na maloba na ye mpe kososola, mingi mpenza soki ezali moninga na biso nde atungisami mingi kati na mayoki? Ezali likambo ya kolendisa na komona ete Jéhovah azali kososola lolenge oyo tozali koloba na ye na molende, lokola asalaki yango na Abalayama, boye te?
10. Lolenge nini koloba na molende ezali kosalisa biso kati na libondeli?
10 Ezali mingimingi na ntango tozali koluka Ye oyo ˈakoyokaka mabondeliˈ nde tozali na mposa makasi ya koloba na molende mpo na kofungola motema na biso liboso na ye, mpe kolobela ye likambo oyo totungisami na yango to mpasi oyo tozali na yango. (Nzembo 51:17; 65:2, 3) Ata soki tozangi maloba, nde “kati na kokimela na biso, elimo yango moko ekosengaka mpo na biso,” mpe Jéhovah azali koyoka. Akoki koyeba makanisi na biso: “Ɛ Jéhovah, oyebi makanisi na ngai longwa na mosika. Naino liloba libimi na lolemo na ngai te, oyebi yango nyonso.” Atako bongo, tosengeli kolanda kosenga, koluka, mpe kobɛta ekuke.—Baloma 8:26, MN; Nzembo 139:2, 4; Matai 7:7, 8.
11. Nini emonisi ete Jéhovah azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
11 Jéhovah azali komibanzabanza mpo na biso. Azali kobatela bomoi oyo ye azalisaki. “Miso na bato nyonso mazali kotala epai na yo na elikya, mpe opesi bango bilei na ntango na yango. Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.” (Nzembo 145:15, 16) Tobyangami mpo na kotala lolenge nini Nzambe azali koleisa bandeke oyo bazali kobika na zámba. Tala lolenge azali kolatisa bafolólo ya esobe na kitoko mingi! Yesu abakisaki ete Nzambe akosalela biso bongo, mpe na koleka. Na yango, mpo na nini komitungisa? (Deteronome 32:10; Matai 6:26-32; 10:29-31) Eteni ya 1 Petelo 5:7 (MN) ebyangi biso ete ˈtokitisa mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpo ete akobatelaka bino.ˈ
“Elilingi na ye mpenza”
12, 13. Longola biloko bizalisami na Jéhovah oyo bizali komonana mpe misala na ye milobelami kati na Biblia, lolenge nini tokoki komona mpe koyoka Jéhovah,
12 Tokoki komona Jéhovah Nzambe na nzela ya biloko bizalisami na ye; tokoki komona ye na kotangaka misala na ye kati na Biblia; tokoki mpe komona ye na nzela ya maloba mpe misala miyebisameli biso na ntina na Yesu Klisto. Na yango, Yesu ye moko alobaki na Yoane 12:45 ete: “Ye oyo amoni ngai, amoni mpe motindi na ngai.” Lisusu, na Yoane 14:9: “Ye oyo amoni ngai, amoni mpe Tata na ngai.” Bakolose 1:15 (MN) elobi ete: “[Yesu] azali elilingi ya Nzambe oyo akomonanaka te.” Baebele 1:3 (MN) eyebisi ete: “[Yesu] azali komonisa nkembo na ye mpe elilingi na ye mpenza.”
13 Jéhovah atindaki Mwana na ye bobele moko mpo na kopesa mbeka te, kasi lisusu mpo na kozala ndakisa oyo bato bakoki kolanda, na maloba mpe na misala. Yesu ayebisaki maloba na Nzambe. Alobaki na Yoane 12:50, ete: “Makambo mazali ngai koloba, nazali koloba yango lokola Tata alakaki ngai.” Asalaki makambo na mokano na ye moko te, kasi asalaki yango lokola Nzambe alakisaki ye. Alobaki na Yoane 5:30, ete: “Nakoki kosala likambo moko te na makanisi na ngai moko.”—Yoane 6:38.
14. (a) Yesu aokaki mawa na makambo nini? (b) Mpo na nini lolenge na koloba na Yesu ezalaki kobenda bato mingi ete bayoka ye?
14 Yesu amonaki bato na mába, bato na bolɛmɛ, bimímí, bakufeli-miso, baoyo batungisamaki na bilimu mabe mpe baoyo bakufelaki bandeko na bango. Na mawa, abikisaki bato na maladi mpe asekwisaki bakufi. Amonaki bibele oyo balɛmbaki mpe bazalaki bakufi na elimo, mpe ateyaki bango makambo mingi. Asalaki yango bobele na maloba na sembo te, kasi na maloba kitoko oyo mazali kosimba mitema ya bayoki na ye, mpo ete yango eutaki na motema na ye. Maloba yango makangisaki bango epai na ye; bongo bayokaki ye na esengo. Bakendaki mingi mpo na koyoka ye, kolobaka ete ˈnaino moto mosusu alobi bongo te,ˈ mpe bakamwaki mpo na lolenge na koteya na ye. (Yoane 7:46; Matai 7:28, 29; Malako 11:18; 12:37; Luka 4:22; 19:48; 21:38) Mpe ntango banguna balukaki kozwa ye na motambo na nzela na mituna, azalaki kobongola makambo mpe bakokaki koloba na ye eloko moko lisusu te.—Matai 22:41-46; Malako 12:34; Luka 20:40.
15. Wapi motó na likambo monene oyo Yesu azalaki kosalela kati na mosala na ye ya kosakola, mpe mosala nini apesaki na bato mosusu ete bakólisa yango?
15 Asakolaki ete ˈbokonzi ya makoló [esilaki] kobɛlɛmaˈ mpe alendisaki bayoki na ye ete balanda ˈkoluka liboso bokonzi.ˈ Bobele bongo, atindaki bato mosusu mpo na kosakola ete ˈbokonzi ya makoló [esilaki kobɛlɛma],ˈ mpo na ˈkozalisa bayekoli na mabota nyonso,ˈ mpo na kozala batemwe ya Klisto “kino na nsuka na mokili.” Lelo oyo, pene na bamilio minei na ndambo ya ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda matambe na ye, na kosalaka makambo oyo.—Matai 4:17; 6:33; 10:7; 28:19; Misala 1:8.
16. Lolenge nini bolingo ya Jéhovah etyamaki kati na komekama monene, kasi ezaleli wana ekokisaki mosala nini epai na bato?
16 Elobami na biso na 1 Yoane 4:8 ete, “Nzambe azali bolingo.” Ezaleli na ye oyo monene etyamaki na komekama monene na ntango ye atindaki Mwana na ye bobele moko awa na mabelé mpo ete akufa. Mpasi monene ya Mwana wana molingami mpe malombo na ye epai na Tata na ye ya makolo, epesaki Jéhovah mpasi mingi, atako Yesu amonisaki ete Satana abukaki lokutá wana abɛtɛlaki Jéhovah ntembe ete, awa na mabelé, moto moko te akoki kotikala sembo epai na Ye kati na mimekamo makasi. Tosengeli mpe koyeba bonene ya mbeka na Yesu, mpamba te Nzambe atindaki ye awa ete akufela biso. (Yoane 3:16) Liwa yango lizalaki pɛtɛɛ te, mpe akufaki noki te. Mpo toyeba lolenge yango esalaki mpasi na Nzambe mpe na Yesu, mpo tososola bonene ya mbeka oyo bapesaki biso, totalela lolenge nini Biblia emonisi makambo yango.
17-19. Lolenge nini Yesu amonisaki momekamo oyo mozalaki kozela ye?
17 Soko mbala minei, Yesu asakwelaki bantoma na ye makambo masengelaki kokómela ye. Mwa mikolo liboso, alobaki ete: “Tala tozali sikawa kobuta na Yelusaleme, mpe Mwana na moto akokabama epai na banganga-kapita mpe bakomeli, mpe bakokweisa ye mpo na kufa mpe bakokaba ye epai na Bapakano, mpe bakosɛka ye, mpe bakobwakela ye nsoi, mpe bakobɛta ye mpimbo, mpe bakoboma ye.”—Malako 10:33, 34.
18 Yesu azalaki kooka mpasi oyo ezalaki kozela ye; ayebaki boni ezalaki mpasi na kobɛtama na Baloma. Mwa bibende mpe biteni ya mikwa na mɛmɛ ekangisamaki na mpimbo na mposo na nyama oyo bazalaki kosalela; na yango, mokɔngɔ mpe makolo ya moto oyo anyokwami ezalaki kopasuka mpe kobima makila na ntango bazalaki kobɛta ye. Mwa basanza liboso, Yesu amonisaki lolenge atungisamaki mpo na momekamo yango, wana alobaki na Luka 12:50 (MN) ete: “Ee, nazali na batisimo oyo nasengeli kobatisama, mpe natungisami na motema kino ekokokana!”
19 Wana ntango ezalaki kobɛlɛma, motungisi na Yesu mozalaki mpe kobakisama. Alobelaki yango epai na Tata na ye ya makoló ete: “Sikawa, molimo na ngai motungisami, mpe nakoloba nini? Tata, bikisa ngai na ntango oyo. Kasi ezali mpo na yango nde nakomi na ntango oyo.” (Yoane 12:27) Jéhovah aokaki mawa mingi ntango ayokaki lilombo ya Mwana na ye bobele moko. Na Getesemane, bobele mwa bangonga liboso ya liwa na ye, Yesu atungisamaki mingi mpe alobaki na Petelo, na Yakobo mpe na Yoane, ete: “Molimo na ngai mozali na mawa mingi kino kufa.” Mwa minutes na nsima, abondelaki Jéhovah mpo na yango ete: “ˈTata, soki olingi, longola kɔpɔ oyo mosika na ngai. Kasi ezala na mokano na ngai te, nde na mokano na yo!ˈ Azalaki na mpasi monene, mpe alandaki kobondela makasi; mpe motoki na ye mokómaki lokola matangá ya makila oyo mazalaki kokwea na mabelé.” (Matai 26:38; Luka 22:42, 44) Ekoki kozala oyo minganga babéngi yango ete hématidrose (kotanga makila na nzela na madusú ya nzoto). Yango esalemaka mingi te, kasi ekoki komonana soki mayoki ya moto matungisami makasi.
20. Nini esalisaki Yesu na kolonga momekamo na ye?
20 Na ntina etali ntango oyo elekaki na Getesemane, Baebele 5:7 (MN) elobi ete: “Na mikolo na bomoi na ye lokola moto, [Klisto] asalaki mabondeli mpe malombo na konganga mpe na mpisoli, epai na Ye oyo akokaki kobikisa ye na liwa, mpe ayokamaki mpenza mpo na kobanga na ye na peto.” Lokola “Ye oyo akokaki kobikisa ye,” abikisaki ye na liwa te, na ndimbola nini libondeli na ye lindimamaki? Luka 22:43 eyanoli ete: “Anzelu moko na likoló abimelaki ye mpe alendisaki ye.” Libondeli lindimamaki mpamba te anzelu oyo atindamaki na Nzambe alendisaki Yesu mpo na kosalisa ye ete ayika mpiko na momekamo.
21. (a) Nini emonisi ete Yesu alongaki momekamo? (b) Tokolinga koloba nini wana mimekamo na biso mikokóma makasi?
21 Nsuka na yango emonisi ete ezalaki bongo. Ntango etumba esilaki kati na motema na ye, Yesu atelemaki, azongaki epai na Petelo, na Yakobo mpe Yoane, mpe alobaki na bango ete: “Botelema! Tokende!” (Malako 14:42) Na lolenge mosusu, maloba na ye malimbolaki ete: ˈTokende! Mpe tika bateka ngai na lipwepwe, tika ebele bakanga ngai, tika basambisa ngai atako nasali likambo te, mpe tika bakweisa ngai na nko! Tika baseka ngai, tika babwakela ngai nsoi, tika babeta ngai mpimbo mpe tika babakisa ngai na nsɛtɛ likoló na nzeté na mpasi!ˈ Akakisamaki na boumeli ya ngonga motoba, mpe ayikaki mpiko kino nsuka ya mpasi na ye monene. Wana alingaki kokufa, angangaki na mongongo makasi ete: “Yango ekokani!” (Yoane 19:30) Alembaki te mpe amonisaki bosembo na ye mpo na kolongisa boyangeli ya Jéhovah. Akokisaki mosala nyonso oyo Jéhovah atindaki ye awa na mabelé. Ntango tokokufa to na ntango na Armaguedon, tokokoka koloba na ntina na mosala oyo tozwi epai na Jéhovah, ete: “Yango ekokani”?
22. Nini emonisi na meko nini boyebi ya Jéhovah ekopalanga awa na mabelé?
22 Ata lolenge nini, tokoki kondimisama ete na ntango oyo etyami na Jéhovah, mpe oyo ebelemi mpenza, “mabelé mobimba makotonda na boyebi ya Jéhovah lokola kotonda na mai monene.”—Yisaya 11:9, MN.
Okoki komikundola?
◻ Koyeba mpe kozala na boyebi elimboli nini?
◻ Lolenge nini motema mawa ya Jéhovah mpe lilimbisi na ye emonisameli biso kati na Liloba na ye?
◻ Lolenge nini Abalayama alobaki na molende kati na boyokani na ye elongo na Jéhovah?
◻ Mpo na nini tokoki kotala Yesu mpe komona bizaleli ya Jéhovah kati na ye?