Mibange basundolami mpe bazali konyokwama
NTANGO sinzili moko azalaki kobalukabaluka na butu mpo na kokɛngɛla esika asalaka, amonaki likambo moko ya nsɔmɔ mpenza. Na libándá ya ndako moko ya molai, amonaki bibembe mibale elali. Ezalaki mibange mibale, mobali moko ná mwasi na ye, oyo bamibwakaki na lininisa ya ndako uta na etazi ya nsambo. Liwa na bango ezalaki likambo moko ya mawa, kasi soki oyebi ntina oyo bamibomaki, okoyoka lisusu mawa koleka. Mokanda oyo bazwaki na libenga ya elamba ya mobali elobaki ete: “Tomibomi mpo mwana na biso ná mwasi na ye bazali konyokola biso mingi.”
Ekoki kozala ete naino oyoka likambo ya ndenge wana te, kasi likambo oyo etindi bango bámiboma ezali kosalema bipai nyonso. Bazali konyokola mibange pene na bisika nyonso na mokili. Tótala bandakisa oyo:
• Na Canada, batunaki mibange, mpe mibange 4 likoló ya mokama balobaki ete balyelaki bango, mingimingi na bato ya libota na bango. Nzokande, mibange mingi bayokaka nsɔni to babangaka koyebisa bato mosusu mpasi na bango. Bato ya mayele balobi ete motángo ya mibange oyo bazali konyokwama ekoki kozala pene na 10 likoló ya mokama.
• Zulunalo moko (India Today) elobi ete: “Ekólo Inde oyo ekendá nsango ete mabota balinganaka mingi, ebungisi lokumu na yango mpo bana bakómi kosundola baboti na bango oyo bakómi mibange.”
• Ebongiseli moko na États-Unis oyo etalelaka makambo ya mibange elobi boye: “Na Amerika, bato soki milio 1 to 2 oyo bazali na mbula 65 to koleka babɛtamaki, balyelaki bango, to banyokolaki bango na bato oyo basengelaki kutu nde kobatela bango.” Avoka moko na San Diego, na etúká ya Californie, alobaki ete konyokola mibange ezali moko ya makambo oyo tosengeli kozwela meko makasi lelo oyo. Abakisaki: “Namoni ete likambo yango ekokóma makasi na bambula ezali koya.”
• Na etúká ya Canterbury, na Nouvelle-Zélande, bazali kolyela mibange mingi, mingimingi na bato ya mabota na bango oyo bamɛlaka bangi, masanga, to oyo babɛtaka masano ya mbongo. Mibange oyo bazali konyokwama na Canterbury bazalaki 65 na 2002 mpe na 2003 bakómaki 107. Mokonzi ya ebongiseli moko oyo esalemaki mpo na kobatela mibange yango alobaki ete soki totali ebele ya mibange oyo bazali mpenzampenza konyokwama, mitángo wana ezali moke.
• Zulunalo moko (The Japan Times) elobi ete lisangá ya baavoka ya Japon balobaki boye: “Esengeli tófungola miso makasi na likambo ya mibange oyo bazali konyokwama koleka kutu bana oyo bazali konyokwama to mpe makambo mosusu ya mobulu oyo ezali kosalema na mabota.” Mpo na nini? Zulunalo yango elobi ete ezali bongo mpo “konyokwama ya mikóló eyebanaka noki te lokola oyo ya bana to ya basi ya mabala. Ntango mosusu mpo bana na bango moko nde bazali konyokola bango mpe balingi te kolukela bana na bango makambo, to mpe mpo bakonzi bazali kosala eloko ya malonga te mpo na kosilisa likambo yango.”
Mwa bandakisa wana etindi biso tómituna boye: Mpo na nini mibange mingi bazali kosundolama mpe bazali konyokwama? Elikya ezali mpenza ete makambo ekobonga? Nini ekoki kobɔndisa mibange?