Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/4 nk. 25-28
  • Bazali bango moko kasi tobosani bango te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali bango moko kasi tobosani bango te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano oyo bakutanaka na yango
  • Lisungi ya lisangá
  • Tótika te kosolola
  • Kokende kotala bango ezali na ntina
  • Matomba mpo na bango mpe mpo na biso
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tóbosana te baoyo bafandi na bandako ya mibange
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/4 nk. 25-28

Bazali bango moko kasi tobosani bango te

NTOMA Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Gal. 6:10) Tii lelo oyo tolandaka toli yango mpe tolukaka mabaku ya kosalela bandeko na biso oyo ezali malamu. Na kati ya bato oyo lisangá esengeli kotyela likebi, tokoki kotánga bandeko oyo bakómi mibange mpe bafandaka na bandako ya mibange.

Na mikili mosusu, bato bazalaka na momeseno ya kofanda elongo na baboti na bango oyo bakómi mibange. Nzokande, na mikili mosusu, mibange babatelamaka na bandako ya mibange. Ezali boni mpo na baklisto oyo bakómi mibange mpe bafandaka na bandako ya mibange? Mikakatano nini bakutanaka na yango? Ndenge nini bakoki kolonga yango soki bazali na lisungi ya bato ya libota na bango te? Ndenge nini lisangá ekoki kosalisa bango? Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kokende kotala bango mbala na mbala?

Mikakatano oyo bakutanaka na yango

Ntango moklisto moko akei kofanda na ndako ya mibange, ndako yango ekoki kozala na teritware ya lisangá moko oyo ameseni na yango te. Mpo na yango, ekoki kokóma ete bandeko ya lisangá yango bazali kobosana kokende kotala ye mbala na mbala. Lisusu, na ndako ya mibange akoki kozala elongo na bato oyo basambelaka Yehova te. Yango ekoki kozala mokakatano mpo na Motatoli yango.

Na ndakisa, na bandako mosusu ya mibange bakambi ya bandako yango bazwaka bibongiseli mpo bato ya mangomba báyaka kosambela kuna. Mobali moko oyo asalaka na ndako ya mibange alobaki boye: “Basali mosusu bamemaki mibange Batatoli oyo bakokaka lisusu koloba te na esika ya losambo kozanga ete bátuna bango soki balingi kokende.” Lisusu, mbala mingi, bakambi ya bandako ya mibange balukaka kosepelisa mibange na mikolo ya anivɛrsɛrɛ na bango, mokolo ya Noele, to ya Pasika. Ekómaki mpe ete bápesa Batatoli bilei oyo lisosoli ya moklisto ekoki kopesa ye nzela te alya yango. (Mis. 15:29) Soki tozali kokende mbala na mbala kotala bandeko na biso oyo bazali na bandako yango, tokosalisa bango báyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano yango.

Lisungi ya lisangá

Baklisto ya liboso bayebaki ete bazalaki na mokumba ya kosunga mibange oyo bazali na bandeko ya libota te mpo na kosalisa bango. (1 Tim. 5:9) Ndenge moko mpe lelo oyo, bankulutu basɛnzɛlaka ete mibange oyo bazali kofanda na bandako ya mibange oyo ezali na teritware ya masangá na bango básundolama te.a Nkulutu moko nkombo na ye Robert, alobaki boye: “Ezali malamu soki bankulutu bazali kokende kotala mibange yango mpo na koyeba makambo oyo bazali kokutana na yango mpe kobondela elongo na bango. Lisangá ekoki kosalisa bango na makambo mingi.” Soki tozali kozwa ntango ya kokende kotala mibange yango, tokomonisa ete toyebi motuya oyo Yehova apesaka na likambo etali kosalisa baoyo bazali na bosɛnga.​—Yak. 1:27.

Soki esengeli, bankulutu bazwaka bibongiseli mpo na kosalisa bandeko oyo bafandaka na bandako ya mibange na teritware na bango. Ndeko Robert alobeli moko na bamposa yango: “Tosengeli kolendisa bandeko yango báyanganaka na makita soki bakoki kosala yango.” Nzokande, mpo na bandeko oyo bazali lisusu na likoki te ya kokóma na Ndako ya Bokonzi, bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mosusu. Ndeko Jacqueline, oyo azali na mbula soki 85 mpe abelaka maladi ya mikuwa, alandaka makita na nzela ya telefone. Alobi boye: “Nasepelaka mingi kolanda makita na ntango mpenza oyo ezali kosalema. Nalingaka kozangisa libaku yango te!”

Soki likoki ezali te mpo moklisto moko oyo azali mobange alanda makita na nzela ya telefone, bankulutu bakoki kozwa bibongiseli ya kotya yango na kasɛti. Ndeko oyo azwi mokumba ya kokende kotika kasɛti akoki mpe kosolola na mobange yango mpo na kolendisa ye. Nkulutu moko alobi boye: “Koyebisa mibange wana nsango ya bandeko ya lisangá esalisaka bámiyoka ete bazali kaka na kati ya libota ya bandeko.”

Tótika te kosolola

Mibange mingi batungisamaka mpenza mpe babulunganaka ntango bakei kofanda na ndako ya mibange. Yango wana, mingi bakómaka mawamawa mpe balingaka lisusu kosolola te. Kasi, soki tozali kokende kotala bango ntango kaka bakei kofanda kuna mpe tozali komonisa ete tozali kosunga bango, tokosalisa bango bázala motema mpiɔ mpe bázongela esengo na bango.​—Mas. 17:22.

Soki mobange moko azali lisusu koyeba makambo mpenza te to azali lisusu koyoka malamu te to mpe azali na mikakatano mosusu oyo mpo na yango kosolola na ye ekómi mpasi, tokoki kokanisa ete kokende kotala ye ezali na ntina te. Nzokande, soki tozali kotika te kokende kotala ye, ata soki azali kosolola na biso malamu te, tokomonisa ete tozali kokoba ‘kozala bato ya liboso mpo na kopesa lokumu’ epai ya bandeko na biso. (Lom. 12:10) Soki bɔɔngɔ ya mobange moko ekómi kobosana makambo, tokoki kolendisa ye abɛtɛla biso lisolo ya makambo oyo akutaná na yango​—ata lisolo ya bomwana na ye—​to mpe ayebisa biso ndenge oyo ayebaki solo. Tosengeli kosala nini soki azali kobundana mpo na koluka maloba? Tosengeli koyoka ye na motema molai, mpe soki esengeli tokoki koloba maloba mibale to misato oyo tokanisi ete azali koluka, to mpe tokoki kozongela na mokuse makanisi na ye mpe kolendisa ye akoba koloba. Soki azali kobungisa makanisi to azali koloba polele te mpe tozali na mokakatano mpo na koyoka ye, tokoki koyeba makanisi na ye soki tozali kolanda ye na likebi mpenza.

Soki mobange moko azali lisusu na makoki ya koloba mpe koyoka te, tokoki kosalela mayele mosusu mpo na kosolola na ye. Ndeko Laurence, oyo azali mobongisi-nzela, akendaka mbala na mbala kotala Ndeko Madeleine oyo azali na mbula 80 mpe akokaka lisusu koloba te. Laurence ayebisi ndenge oyo asololaka na ye: “Nasimbaka lobɔkɔ ya ndeko Madeleine mpe nabondelaka elongo na ye. Na nsima, ye mpe akangaka lobɔkɔ na ngai makasi mpe afinaka liso mpo na komonisa ete asepeli.” Kosimba bandeko na biso mibange na lobɔkɔ to mpe koyamba bango na boboto ekoki mpenza kobɔndisa bango.

Kokende kotala bango ezali na ntina

Soki tozali kokende kotala mobange moko mbala na mbala yango ekosala ete bato oyo babatelaka bango bákipe ye malamu. Ndeko Danièle, oyo banda mbula soki 20 azali na momeseno ya kokende kotala Batatoli oyo bazali na bandako ya mibange, alobi boye: “Soki bato oyo babatelaka mibange bamoni ete bandeko ya mobange moko bazali koya mbala na mbala kotala ye, babatelaka mobange yango malamu.” Ndeko Robert oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Bato oyo basalaka na bandako ya mibange bazalaka pene ya koyoka moto oyo bayebi ete akendaka kotala mobange moko mbala na mbala. Bamemyaka ye mingi koleka moto oyo ayaka kuna mingi te.” Lokola bato mosusu oyo bakendaka kotala bandeko na bango mibange batungisaka mingi bato oyo basalaka na bandako ya mibange, bato yango basepelaka mingi soki moto apesi bango matɔndi mpo na mosala na bango. Lisusu, soki tomeseni na bato oyo basalaka na bisika yango, bakoyokela biso ntango tolimbweli bango bindimeli ya mobange moko oyo azali Motatoli.

Tokoki mpe kokóma na boyokani malamu na bato oyo basalaka na bandako ya mibange soki tozali kotuna bango mwa misala oyo tokoki kosala mpo na kopesa bango mabɔkɔ. Na bisika mosusu, lokola basali bazalaka mingi te, mibange babatelamaka malamu te. Rébecca, mwasi moko oyo asalaka na ndako ya mibange, alobi boye: “Na ntango ya kolya, mosala ezalaka mingi. Yango ekoki kozala ntango ya malamu mpo na kokende kotala mobange moko mpe kosalisa ye alya.” Tosengeli te kokakatana mpo na kotuna basali ndenge oyo tokoki kopesa bango mabɔkɔ.

Ntango tozali kokende mbala na mbala na ndako moko ya mibange, tokoyeba bamposa ya bandeko na biso mibange mpe soki bato oyo basalaka na ndako ya mibange bapesi biso nzela, tokoki kokanisa ndenge ya kokokisa bamposa yango. Na ndakisa, tokoki kobongisa shambre ya mobange moko, kotya bafɔtɔ ya bandeko mpe baninga na ye to kotya bililingi oyo bana basali. Tokoki mpe komemela mobange moko elamba, mafuta ya kopakola, sabuni, to biloko mosusu oyo akoki kozala na yango mposa. Soki lopango yango ezali na mwa bafololo libándá, tokoki kobima ná mobange yango mpo azwa mwa mopɛpɛ. Laurence, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Madeleine azelaka mpenza mokolo oyo nakendaka kotala ye pɔsɔ nyonso. Soki nakei na bana, elongi na ye emonisaka ete asepeli mingi!” Mwa makambo mosusu ya ndenge wana ekoki kobɔndisa mpenza bandeko oyo bafandaka na ndako ya mibange.​—Mas. 3:27.

Matomba mpo na bango mpe mpo na biso

Kokende mbala na mbala kotala mibange ekoki komeka “bosolo ya bolingo na [biso].” (2 Kol. 8:8) Na ndenge nini? Esalaka mpasi komona ndenge oyo nzoto ya ndeko na biso ezali kolɛmba mokemoke. Ndeko Laurence alobi boye: “Liboso, nazalaki kolela mbala nyonso oyo nauti kotala Madeleine soki nakanisi ndenge oyo nzoto na ye ezalaki kolɛmba mokemoke. Kasi, namonaki ete libondeli ekoki kosalisa biso tólongola kobanga mpe tólendisa ndeko oyo tokei kotala.” Banda bambula mingi, Ndeko Robert akendaka kotala moklisto moko mobange nkombo na ye Larry, oyo abɛlaka maladi ya Parkinson. Ndeko Robert alobi boye: “Maladi yango ekɔtɛli mpenza ndeko Larry na boye ete nayokaka lisusu te makambo oyo alobaka. Kasi, ntango tobondelaka elongo, namonaka ete azali kaka na kondima makasi.”

Ntango tozali kokende kotala bandeko na biso oyo bazali mibange mpo na kolendisa bango, biso moko mpe tozwaka matomba. Ekateli na bango ya kotikala sembo epai ya Yehova atako bazali kofanda elongo na bato oyo bazali Batatoli te, eteyaka biso tózala na mpiko mpe na kondima. Mposa makasi oyo bazalaka na yango ya kolya bilei ya elimo atako bayokaka mpe bamonaka lisusu malamu te, emonisaka ete “moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4) Ntango mibange bazali kosepela na makambo mikemike, na ndakisa, komona mwana azali kosɛka to kolya elongo na baninga, eteyaka biso ete tosengeli kosepela na oyo tozali na yango. Bolingo oyo bamonisaka mpo na makambo ya elimo ekoki kosalisa biso tótya makambo ya elimo na esika ya liboso.

Lisangá mobimba ezwaka matomba na lisungi oyo epesaka epai ya mibange. Na ndenge nini? Lokola mibange, oyo nzoto na bango elɛmbi, bazalaka na mposa ete bandeko bámonisela bango bolingo ya bondeko, yango epesaka lisangá mobimba libaku ya kokolisa motema mawa. Yango wana, biso nyonso tosengeli kotalela likambo ya kosalisa mibange lokola lolenge moko ya kosalelana biso na biso, ata soki ekosɛnga kosala yango na boumeli ya ntango molai. (1 Pet. 4:10, 11) Soki bankulutu bazali kopesa ndakisa na likambo yango, bakosalisa bandeko mosusu bámona ete basengeli te kobosana lolenge yango ya mosala ya boklisto. (Ezek. 34:15, 16) Soki tozali komipesa na bolingo nyonso mpo na kosalisa bandeko na biso oyo bakómi mibange, tokomonisa bango ete tobosani bango te!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ntango sekrɛtɛrɛ ya lisangá moko ayebi ete mobange moko oyo azalaki na lisangá na bango akei kofanda na ndako ya mibange oyo ezali na teritware ya lisangá mosusu, asengeli nokinoki kokomela bankulutu ya lisangá wana.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]

“Soki bato oyo babatelaka mibange bamoni ete bandeko ya mobange moko bazali koya mbala na mbala kotala ye, babatelaka mobange yango malamu”

[Elilingi na lokasa 26]

Mabondeli na biso ekoki kokitisa motema ya ndeko oyo azali mobange

[Elilingi na lokasa 26]

Komonisa bolingo epai ya bandeko na biso oyo bazali mibange ekolendisa bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto