Zalá na bwanya mpe bangá Nzambe!
“Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.”—MASESE 9:10, NW.
1. Mpo na nini bato mingi bamonaka te ntina ya kobanga Nzambe?
KALA, bato bazalaki kosepela báloba na bango ete babangaka Nzambe. Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete likambo ya kobanga Nzambe esilá ngala mpe bamonaka ntina na yango te. Bakoki kotuna boye: ‘Soki Nzambe azali bolingo, mpo na nini nasengeli kobanga ye?’ Mpo na bango, kobanga Nzambe ezali malamu te. Nzokande, kobanga ya solosolo ya Nzambe ezali na ndimbola monene, mpe ndenge tokomona yango, ezali te kaka kolɛnga na nsɔmɔ liboso na ye.
2, 3. Kobanga mpenza Nzambe elimboli nini?
2 Kobanga Nzambe oyo Biblia elobeli ezali ya malamu mpenza. (Yisaya 11:3) Ezali komonisa limemya mozindo epai ya Nzambe, mpe koboya mpenza kosala makambo oyo alingaka te. (Nzembo 115:11) Ezali kondima mitinda ya Nzambe na motema moko, koboya makambo oyo aboyaka mpe kolinga oyo alingaka. Buku moko elobi ete kobanga wana ya malamu ezali “ezaleli oyo moto asengeli kozala na yango liboso ya Nzambe, oyo etindaka moto amitambwisa na bwanya mpe aboya misala nyonso ya mabe.” Yango wana, Liloba ya Nzambe elobi na biso ete “kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.”—Masese 9:10, NW.
3 Kobanga Nzambe ezali na matomba mingi na bomoi ya moto. Longolá bwanya, epesaka mpe esengo, kimya, bomɛngo, bomoi molai, elikya, mpe etindaka moto akóma kotyela Nzambe motema. (Nzembo 2:11; Masese 1:7; 10:27; 14:26; 22:4; 23:17, 18; Misala 9:31) Ezali na boyokani mpenza na kondima mpe bolingo. Ɛɛ, kobanga Nzambe etaleli boyokani na biso mobimba na Nzambe mpe na bazalani na biso. (Deteronome 10:12; Yobo 6:14; Baebele 11:7) Kobanga Nzambe elimboli kondima mpenza ete Tata na biso ya likoló amibanzabanzaka mpo na biso mpe aboyaka te kolimbisa mabunga na biso. (Nzembo 130:4) Kaka basumuki oyo baboyi kobongola motema nde basengeli kolɛngaka na nsɔmɔ liboso ya Nzambe.a—Baebele 10:26-31.
Koyekola kobanga Nzambe
4. Nini ekoki kosalisa biso ‘tóyekola kobanga Nzambe?’
4 Lokola kobanga Nzambe esalisaka moto akóma kozwa bikateli ya malamu mpe ememaka mapamboli ya Nzambe, ndenge nini tokoki “koyekola kobanga Yehova”? (Deteronome 17:19, NW) Biblia elobeli mibali mpe basi mingi oyo bazalaki kobanga Nzambe, “mpo na kolakisa biso.” (Baloma 15:4) Mpo tóyeba mpenza soki kobanga Nzambe elimboli nini, tiká tótalela bomoi ya moko ya bato yango, Davidi, mokonzi ya Yisalaele.
5. Ndenge nini mosala ya kobatela bampate esalisaki Davidi ayekola kobanga Yehova?
5 Yehova aboyaki Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisalaele, mpamba te na esika ya kobanga Nzambe, ye azalaki kobanga nde bato. (1 Samwele 15:24-26) Epai mosusu, bomoi ya Davidi mpe boyokani makasi oyo azalaki na yango na Yehova emonisi ete azalaki mpenza kobanga Nzambe. Banda bomwana na ye, Davidi azalaki kolekisa ntango na ye mingi na bisobe mpo na koleisa bampate ya tata na ye. (1 Samwele 16:11) Na ntembe te, minzoto oyo azalaki komona ntango azalaki kobatela bampate na butu esalisaki ye ayekola kobanga Yehova. Minzoto oyo Davidi amonaki ezalaki moke soki tokokanisi yango na molɔ́ngɔ́ mobimba, kasi asosolaki ete Nzambe abongi mpenza tómemyaka ye mpe tósambelaka ye. Alobaki na nsima boye: “Ekomona ngai likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto ya likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana ya moto nini ete otalela ye?”—Nzembo 8:3, 4.
6. Davidi amimonaki ndenge nini ntango amonaki bonene ya Yehova?
6 Yango wana, tokokamwa te ete Davidi amimonaki eloko mpamba ntango amitalaki mpe atalaki bonene ya etando ya likoló. Boyebi wana ebangisaki ye te, etindaki ye nde asanzola Yehova na maloba oyo: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.” (Nzembo 19:1) Limemya mozindo oyo Davidi akómaki na yango mpo na Nzambe etindaki ye apusana penepene na Yehova mpe epesaki ye mposa ya koyekola mpe kolanda banzela na ye ya sembo. Kanisá naino ndenge Davidi ayokaki ntango ayembelaki Yehova ete: “Ozali monene mpe okosalaka makambo ya kokamwa; yo moko ozali Nzambe. [E Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”—Nzembo 86:10, 11.
7. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaki Davidi mpo abunda na Goliata?
7 Ntango Bafilistia bayaki kokɔtela Bayisalaele, Goliata, elombe na bango oyo azalaki na bolai ya mɛtrɛ misato, alobaki na Bayisalaele boye: ‘Bópona mobali moko aya kobunda na ngai! Soki alongi ngai, tokokóma baombo na bino.’ (1 Samwele 17:4-10, NW) Saulo ná basoda na ye batondaki na nsɔmɔ, kasi Davidi te. Ayebaki ete asengeli kobanga kaka Yehova, kasi moto te, ata soki moto yango azali na nguya ndenge nini. Davidi alobaki na Goliata ete: “Nayeli yo na nkombo ya [Yehova] ya bibele . . . Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete [Yehova] akobikisa na mopanga mpe na likɔnga te. Mpo ete etumba ezali ya [Yehova].” Na lisalisi ya ebwakeli ya mabanga mpe na libanga kaka moko, mpe na lisalisi ya Yehova, Davidi abomaki elombe yango.—1 Samwele 17:45-47.
8. Liteya nini tozwi na bandakisa oyo Biblia elobeli ya bato oyo bazalaki kobanga Nzambe?
8 Lokola Davidi, biso mpe tokoki kokutana na mikakatano to banguna ya makasi. Tokoki kosala nini? Kobanga Nzambe ekoki kosalisa biso tólonga ndenge Davidi ná bato mosusu ya sembo ya kala balongaki. Kobanga Nzambe ekoki kosalisa biso tótika kobanga bato. Nehemia, mosaleli ya sembo ya Nzambe, alobaki na bandeko na ye Bayisalaele ntango banguna balingaki koya kobundisa bango ete: “Bóbanga bango te! Kanisá Nkolo oyo azali monene mpe ya nsɔmɔ.” (Nehemia 4:14) Na lisalisi ya Yehova, Davidi, Nehemia mpe basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe bakokisaki mikumba oyo Nzambe apesaki bango. Biso mpe tokolonga soki tozali kobanga Nzambe.
Kobanga Nzambe ntango tokutani na mikakatano
9. Na kati ya mikakatano nini Davidi amonisaki ete abangaka Nzambe?
9 Nsima wana Davidi abomaki Goliata, Yehova asalisaki ye alonga bitumba mingi lisusu. Kasi, Saulo akómaki koyokela ye zuwa mpe koluka koboma ye. Abandaki naino kolanda ye na nkanda nyonso, na nsima akómaki koluka ye na mayele, mpe nsukansuka akómaki kolandalanda ye na limpinga ya basoda. Atako Yehova alakaki Davidi ete akokóma mokonzi, na boumeli ya bambula ebele Davidi azalaki kokimakima, kobunda mpe kozela ntango oyo Yehova aponaki mpo na kokómisa ye mokonzi. Na nyonso wana, Davidi amonisaki ete azalaki kobanga Nzambe ya solo.—1 Samwele 18:9, 11, 17; 24:2.
10. Ndenge nini Davidi amonisaki kobanga Nzambe ntango bomoi na ye ekómaki na likama?
10 Mokolo moko, Davidi alukaki kobombama epai ya Akisi, mokonzi ya engumba Gata ya Bafilistia, mboka ya Goliata. (1 Samwele 21:10-15) Basali ya Akisi bayebisaki ye ete Davidi azali monguna ya ekólo na bango. Davidi asalaki nini? Abondelaki Yehova. (Nzembo 56:1-4, 11-13) Atako bakangaki Davidi te mpo akosaki ligboma, ayebaki ete Yehova nde asalisaki ye. Lokola Davidi atyelaki Yehova motema mobimba, yango emonisi ete azalaki mpenza kobanga Nzambe.—Nzembo 34:4-6, 9-11.
11. Na ndakisa ya Davidi, ndenge nini tokoki komonisa ete tobangaka Nzambe ntango tokutani na mikakatano?
11 Lokola Davidi, biso mpe tokoki komonisa ete tobangaka Nzambe soki tozali kotya motema ete akosalisa biso tólonga mikakatano na biso ndenge alaká biso. Davidi alobaki boye: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5) Yango elimboli te ete tosengeli kaka koyebisa Yehova mikakatano na biso mpe kokanga mabɔkɔ mpo ye asilisa yango. Davidi asukaki kaka te na kobondela Nzambe asalisa ye. Asalelaki makasi mpe mayele oyo Yehova apesaki ye mpe asilisaki mokakatano na ye. Kasi, Davidi ayebaki ete moto asengeli te kotalela kaka makoki na ye moko. Biso mpe tosengeli koyeba bongo. Soki tosali nyonso oyo tokoki, tosengeli kotika oyo etikali na mabɔkɔ ya Yehova. Kutu, mbala mingi esɛngaka kaka tótika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Wana nde esika mokomoko na biso asengeli komonisa ete abangaka Nzambe. Tokoki kobɔndisama na maloba oyo Davidi alobaki na elikya mpenza ete: “Toli ya [Yehova] ezali mpo na baoyo [babangaka, NW] ye.”—Nzembo 25:14.
12. Mpo na nini tosengeli kozwaka na lisɛki te mabondeli na biso, mpe ezaleli nini tosengeli te komonisa?
12 Na yango, tosengeli kozwaka na lisɛki te mabondeli mpe boyokani na biso na Yehova. Ntango tozali kobondela Yehova, tosengeli “kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6; Yakobo 1:5-8) Soki asalisi biso, tosengeli mpe ‘komonisa botɔndi,’ ndenge ntoma Paulo alobaki. (Bakolose 3:15, 17) Tosengeli te kozala lokola bato oyo moklisto mopakolami moko alobelaki. Alobaki boye: “Bamonaka Nzambe lokola mwa mwana ya mosala moko boye oyo afandaka na likoló. Soki bazali na mposa ya eloko, babengi ye apesa bango yango. Mpe soki bazwi eloko yango, bazalaka lisusu na mposa na ye te.” Moto ya ndenge wana abangaka Nzambe te.
Ntango kobanga na ye ya Nzambe ekitaki
13. Ntango nini Davidi atosaki Mobeko ya Nzambe te?
13 Lokola Yehova azalaki kosalisa Davidi na ntango ya mpasi, Davidi akómaki kobanga Nzambe makasi mpe kotyela ye mpenza motema. (Nzembo 31:22-24) Kasi, mbala misato mobimba, Davidi azangaki kobanga Nzambe, mpe yango esukelaki ye mabe mpenza. Mbala ya liboso ezali ntango abongisaki ete bámema sanduku ya kondimana ya Yehova na Yelusaleme likoló ya likalo, na esika Balevi bámema yango na mapeka, ndenge Mobeko ya Nzambe esɛngaki. Ntango sanduku yango elingaki kokwea mpe Uza, moto oyo azalaki kotambwisa likalo, asimbaki sanduku mpo ekwea te, akufaki mbala moko “mpo na libunga na ye.” Toboyi te, Uza asalaki mbeba moko monene, kasi likambo wana ya mawa esalemaki mpo Davidi atosaki Mobeko ya Nzambe te. Kobanga Nzambe elimboli kosala makambo ndenge ye azali kosɛnga.—2 Samwele 6:2-9; Mituya 4:15; 7:9.
14. Likambo nini esalemaki ntango Davidi atángaki Bayisalaele?
14 Na nsima, Satana akosaki Davidi mpe Davidi atángaki mibali ya Yisalaele oyo bakokaki kokende etumba. (1 Ntango 21:1) Lokola Davidi asalaki bongo, emonanaki ete abangaki Nzambe te, mpe Bayisalaele 70 000 bakufaki. Atako Davidi asɛngaki Yehova bolimbisi, ye ná bato oyo azalaki na bango banyokwamaki mpenza.—2 Samwele 24:1-16.
15. Nini etindaki Davidi asala ekobo?
15 Mbala mosusu oyo Davidi abangaki Nzambe te ezali ntango asalaki ekobo na Bata-seba, mwasi ya Uliya. Davidi ayebaki ete kosala ekobo, ata mpe kolula mwasi ya moto mosusu ezali mabe. (Exode 20:14, 17) Likambo yango ebandaki ntango Davidi amonaki Bata-seba azali kosukola. Kobanga Nzambe esengelaki kotinda Davidi alongola miso mpe makanisi na ye mbala moko epai ya Bata-seba. Nzokande, Davidi ‘akobaki kotala’ ye tii ntango mposa mabe elongolaki ye bobangi nyonso ya Nzambe. (Matai 5:28; 2 Samwele 11:1-4) Davidi abosanaki ete Yehova ayebi bomoi na ye mobimba.—Nzembo 139:1-7.
16. Lisumu ya Davidi ememelaki ye mikakatano nini?
16 Nsima ya kosala ekobo, Davidi ná Bata-seba babotaki mwana. Mwa moke na nsima, Yehova atindaki mosakoli na ye Natana akende komonisa lisumu ya Davidi. Ntango makanisi ya malamu ezongaki, Davidi akómaki lisusu kobanga Nzambe mpe asɛngaki bolimbisi. Abondelaki Yehova aboya ye te, alongola mpe elimo santu na ye epai na ye te. (Nzembo 51:7, 11) Yehova alimbisaki Davidi mpe akitisaki etumbu na ye, kasi abatelaki ye te na mikakatano oyo lisumu yango ememelaki ye. Mwana oyo Davidi ná Bata-seba babotaki akufaki, mpe kobanda wana, mikakatano mpe makambo mabemabe ekómelaki Davidi ná libota na ye. Oyo nde etumbu monene Davidi azwaki mpo azangaki kobanga Nzambe!—2 Samwele 12:10-14; 13:10-14; 15:14.
17. Pesá ndakisa moko oyo emonisi mpasi oyo masumu ememaka.
17 Lelo oyo, kozanga kobanga Nzambe ekoki mpe komemela biso mikakatano oyo ekoumela ntango molai. Kanisá naino mpasi oyo mwasi moko ayokaki ntango ayebaki ete mobali na ye, oyo azalaki moklisto, azalaki kotambola na mwasi mosusu ntango azalaki kosala na mboka mopaya. Na mpasi wana, akitisaki motó na nse, atyaki mabɔkɔ na elongi mpe abandaki kolela. Ekosɛnga mbula boni mpo abanda lisusu kotyela mobali na ye motema mpe komemya ye? Soki tozali kobanga Nzambe, tokomitya na mpasi ya ndenge wana te.—1 Bakolinti 6:18.
Kobanga Nzambe epekisaka biso kosala masumu
18. Mokano ya Satana ezali nini, mpe asalelaka mayele nini mpo na kokokisa yango?
18 Satana azali kobebisa bizaleli ya bato na lombangu mpenza, mpe azali mingimingi na mposa ya kobebisa baklisto ya solo. Mpo na kozwa biso, asalelaka miso mpe matoi mpo na kokóma na motema mpe na makanisi na biso. (Baefese 4:17-19) Okosala nini soki okutani na bililingi to maloba ya nsɔni, to mpe bato ya pite na mbalakaka?
19. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaki moklisto moko alonga komekama?
19 Tózwa ndakisa ya Andréb, nkulutu moko na Mpoto, oyo azali tata ya libota mpe monganga. Ntango André azalaki kosala na butu na lopitalo, minganga mosusu ya basi bazalaki mbala na mbala kotyela ye mwa mikanda na kusɛ na ye, oyo bayemi mitema mpe bakomi mwa maloba mpo na kosɛnga ye asangisa na bango nzoto. André aboyaki na motema moko kokokisa mposa na bango. Lisusu, mpo na komilongola na esika mabe wana, alukaki mosala epai mosusu. Kobanga Nzambe epesaki ye bwanya mpe ememelá ye mapamboli, mpamba te lelo oyo André asalaka mikolo mosusu na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya ekólo na bango.
20, 21. (a) Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kopekisa biso kosala masumu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Kokangama na makanisi ya mabe ekoki kotinda moto andima ata kobebisa boyokani na ye na Yehova, mpo na kozwa eloko oyo bapesi ye nzela ya kozwa te. (Yakobo 1:14, 15) Epai mosusu, soki tozali kobanga Nzambe, tokopusana ata moke te penepene na bato, bisika, misala mpe lolenge ya kominanola oyo ekoki kobebisa biso. (Masese 22:3) Nsɔni oyo tokoyoka to makambo oyo tokomipimela ezali moke soki tokokanisi yango na kobungisa boyokani na biso na Nzambe. (Matai 5:29, 30) Na ntembe te, kobanga Nzambe esɛngaka mpe ete tómitya te liboso ya makambo nyonso ya mbindo oyo ekoki kobebisa biso, na ndakisa kotala bafilme to kotánga mikanda, bazulunalo nyonso oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto. Tosengeli kolongola miso na biso mpo etala “biloko mpamba te.” Soki tosali bongo, tokoki kotyela Yehova motema ete ‘akopesa biso bomoi’ mpe eloko nyonso oyo tozali mpenza na mposa na yango.—Nzembo 84:11; 119:37.
21 Ya solo, kosala makambo na kobanga Nzambe ezalaka ntango nyonso etamboli ya bwanya. Ememelaka mpe moto esengo. (Nzembo 34:9) Lisolo oyo elandi ekomonisa yango polele.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “D’après la Bible... Craindre un Dieu d’amour : en quel sens?” na Lamuká! ya 8 Yanuali 1998, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Topesi ye nkombo mosusu.
Okoki kolimbola?
• Kobanga Nzambe emonanaka na bizaleli nini ya boklisto?
• Ndenge nini kobanga Nzambe elongolaka biso nsɔmɔ ya bato?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totalelaka libondeli na ndenge ebongi?
• Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kopekisa biso kosala masumu?
[Elilingi na lokasa 23]
Davidi ayekolaki kobanga Nzambe ntango amonaki misala ya Yehova
[Bililingi na lokasa 24]
Okosala nini soki okutani na makambo oyo ekoki kobebisa yo na mbalakaka?