Bangá Yehova mpo ozala na esengo!
“Esengo ezali na moto oyo akobangaka [Yehova].”—NZEMBO 112:1.
1, 2. Kobanga Nzambe ekoki komemela biso nini?
KOZALA na esengo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Moto azwaka esengo ya solosolo soki azali kozwa bikateli ya malamu, kosala makambo ya malamu mpe kokima makambo ya mabe. Mozalisi na biso, Yehova, apesá biso Liloba na ye, Biblia, mpo na kolakisa biso ndenge tokoki kozala na bomoi ya malamu koleka. Soki tozali koluka litambwisi ya Yehova mpe kolanda yango, elingi koloba soki tozali kobanga Nzambe, tokoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.—Nzembo 23:1; Masese 14:26.
2 Na lisolo oyo, tokolobela bandakisa ya Biblia mpe ya mikolo na biso, oyo emonisi ete kobanga Nzambe epesaka moto makasi ya koboya kosala mabe mpe mpiko mpo na kosala malamu. Tokomona ete kobanga Nzambe ekoki komemela biso esengo ntango ezali kotinda biso tótika etamboli ya mabe, ndenge Mokonzi Davidi asalaki. Tokomona mpe ete kobanga Nzambe ezali libula moko ya motuya mingi oyo baboti bakoki kotikela bana na bango. Kutu, Liloba ya Nzambe eyebisi biso boye: “Esengo na moto oyo akobangaka [Yehova].”—Nzembo 112:1.
Ndenge ya kozwa lisusu esengo
3. Nini esalisaki Davidi amipɛtola na masumu na ye?
3 Ndenge tomonaki na lisolo oyo eleki, Davidi azangaki kobanga Nzambe mbala misato mobimba mpe asalaki masumu. Kasi, lolenge oyo atalelaki mpamela ya Yehova emonisaki ete azalaki mpenza kobanga Nzambe. Limemya mpe botosi na ye mpo na Nzambe etindaki ye andima mabe na ye, abongola motema mpe azongisa boyokani na ye na Yehova. Atako mabe na ye ememelaki ye ná bato mosusu mpasi, bolimbisi oyo asɛngaki esalaki ete Yehova akoba kosunga mpe kopambola ye. Lelo oyo, ndakisa ya Davidi ekoki mpenza kolendisa baklisto oyo bakwei na masumu ya minene.
4. Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kosalisa moto azwa lisusu esengo?
4 Tózwa ndakisa ya Sonja.a Atako azalaki mobongisi-nzela, Sonja akómaki kotambola na baninga ya mabe, akómaki na etamboli ya mabe, mpe nsukansuka babimisaki ye na lisangá. Ntango makanisi ya malamu ezongaki, Sonja asalaki nyonso mpo na kobongisa boyokani na ye na Yehova. Na nsima, azongaki na lisangá. Atako Sonja akweaki ndenge wana, abungisaki mposa na ye ya kosalela Yehova te. Na nsima, akómaki lisusu mobongisi-nzela. Nsukansuka, abalaki nkulutu moko ya malamu, mpe azali sikoyo kosala elongo na ye na esengo nyonso na kati ya lisangá. Atako Sonja ayokaka mawa ndenge abungaki nzela ya boklisto mpo na mwa ntango, azali na esengo ete kobanga Nzambe esalisaki ye azonga na lisangá.
Tóndima konyokwama na esika ya kosala masumu
5, 6. Yebisá ndenge nini mpe mpo na nini Davidi abikisaki Saulo mbala mibale mobimba.
5 Kutu, ezalaka lisusu malamu koleka soki kobanga Nzambe esalisi moto akwea te na lisumu. Yango nde ekómelaki Davidi. Mokolo moko, ntango Saulo azalaki kolandalanda Davidi elongo na basoda 3000, akɔtaki na lidusu moko; nzokande Davidi ná bato na ye babombanaki kaka na lidusu yango. Bato ya Davidi balobaki na ye ete lokola Yehova ayei kotika monguna na ye monene Saulo na mabɔkɔ na ye, asengeli koboma ye. Davidi akendaki na mayele tii esika Saulo azalaki mpe akataki nsɔngɛ ya elamba na ye. Lokola Davidi azalaki kobanga Nzambe, ata mwa likambo ya moke wana etungisaki ye. Davidi azongisaki bato na ye nsima na maloba oyo: “[Yehova] apekisá ngai ete nasalela nkolo na ngai, mopakolami ya [Yehova], likambo oyo te.”b—1 Samwele 24:1-7.
6 Mokolo mosusu na butu, Saulo ná basoda na ye batɛlɛmaki na esika moko mpe balalaki “mpɔngi makasi uta na [Yehova].” Davidi ná Abisai, mwana ya ndeko na ye, moto ya mpiko, bakendaki na mayele tii na esika Saulo alalaki, na katikati mpenza ya basoda nyonso, mpe batɛlɛmaki pembeni na ye. Abisai alingaki koboma Saulo mbala moko, kasi Davidi apekisaki ye mpe atunaki ye boye: “Nani abongi kosembola lobɔkɔ na ye epai ya mopakolami ya [Yehova] mpe kozala na likambo te?”—1 Samwele 26:9, 12.
7. Nini epekisaki Davidi kosala lisumu?
7 Mpo na nini Davidi abomaki Saulo te na mbala mibale oyo azwaki mpenza libaku ya koboma ye? Mpo azalaki kobanga Yehova koleka Saulo. Lokola Davidi azalaki kobanga Nzambe, andimaki ata konyokwama, soki esengeli, na esika asala lisumu. (Baebele 11:25) Azalaki na elikya makasi ete Yehova akobatela basaleli na Ye, ná ye moko Davidi. Davidi ayebaki ete soki azali kotosa Nzambe mpe kotyela ye motema, akozwa esengo mpe ebele ya mapamboli, kasi soki apesi Nzambe mokɔngɔ, Nzambe akoboya ye. (Nzembo 65:4) Ayebaki mpe ete na ntango oyo Nzambe aponi mpe na lolenge oyo akosepela, akokokisa elaka oyo apesaki ete akolongola Saulo mpe akotya ye Mokonzi na esika na ye.—1 Samwele 26:10.
Kobanga Nzambe ememaka esengo
8. Na ndenge nini etamboli ya Davidi ntango akutanaki na mikakatano ezali ndakisa mpo na biso?
8 Biso baklisto tosengeli koyeba ete tokoki kotyolama, konyokwama to kokutana na komekama ya ndenge mosusu. (Matai 24:9; 2 Petelo 3:3) Ntango mosusu, ata bandeko na biso baklisto bakoki kotya biso na mpasi. Kasi, toyebi ete Yehova amonaka makambo nyonso, ayokaka mabondeli na biso, mpe na ntango oyo ebongi, akokata makambo na boyokani na mokano na ye. (Baloma 12:17-21; Baebele 4:16) Yango wana, na esika ya kobanga banguna na biso, tobangaka Nzambe mpe totalelaka ye mpo abikisa biso. Lokola Davidi, tozongisaka mabe mpo na mabe te, tobukaka mpe mitinda ya Nzambe te mpo na kokima mpasi. Nsukansuka, yango ememelaka biso esengo. Na ndenge nini?
9. Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge kobanga Nzambe ekoki komemela biso esengo ata soki tonyokwami.
9 Misionɛrɛ moko oyo aumeli mingi na Afrika alobi boye: “Nakanisi lisusu ndeko mwasi moko ná mwana na ye ya mwasi, oyo baboyaki kosomba Karte ya parti politiki mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Ebele ya mibali babɛtaki bango mpe na nsima balobaki na bango bázonga na ndako na bango. Ntango bazalaki kozonga na ndako, ndeko mwasi yango azalaki kobɔndisa mwana na ye oyo azalaki kolela mpe komituna ntina oyo likambo wana ekómelaki bango. Bazalaki na esengo te, kasi mitema na bango ezalaki kotungisama te. Na nsima, bayokaki esengo ndenge batosaki Nzambe mpamba te soki básombaka bakarte yango, bato wana balingaki kosepela makasi. Mibali yango balingaki kopesa bango masanga ya sukali mpe kobinela bango nzelanzela tii na ndako. Kasi, mama wana ná mwana na ye balingaki kozala na mawa makasi mpo babuki mobeko ya Yehova.” Kobanga Nzambe ebatelaki bango na likambo wana mabe.
10, 11. Kobanga Nzambe ememelaki mwasi moko litomba nini?
10 Kobanga Nzambe ememaka mpe esengo ntango tomekami mpo tozali kotalela bomoi lokola eloko ya bulɛɛ. Ntango Mary azalaki na zemi ya mwana na ye ya misato, monganga asɛngaki ye alongola yango. Alobaki boye: “Bomoi na yo ezali na likama. Maladi moko ekoki kobwaka yo sikoyo mpe okosala mokolo mobimba te okufi, elongo na mwana yango. Ezala ata ndenge nini, eloko moko te ekoki kondimisa biso ete mwana yango akobotama malamu.” Mary azalaki naino koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Mary alobi boye: “Nzokande, ngai nazalaki na mokano ya kosalela Yehova, mpe nazwaki ekateli ete ata ndenge nini, nakotika kotosa ye te.”—Exode 21:22, 23.
11 Ná zemi na ye, Mary akobaki koyekola Biblia mpe kobɔkɔla bana na ye. Nsukansuka, abotaki mwana yango. Mary alobi boye: “Nabotaki mwana yango na mwa mokakatano koleka baoyo ya liboso, kasi mokakatano yango elekaki ndelo te.” Kobanga Nzambe esalisaki Mary abebisa lisosoli na ye te, mpe mwa moke na nsima azwaki batisimo. Ntango mwana yango abandaki kokola, ye mpe ayekolaki kobanga Nzambe, mpe lelo oyo azali kosala na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova.
Zwá makasi epai ya Yehova
12. Ndenge nini kobanga Nzambe elendisaki Davidi?
12 Kobanga Nzambe esukaki kaka te na kopekisa Davidi asala mabe. Epesaki ye mpe mpiko mpe bwanya na ntango ya mikakatano. Na boumeli ya mbula mobimba ná sanza minei, Davidi ná bato na ye bakimaki Saulo na Sikelage, engumba moko ya Bafilistia. (1 Samwele 27:5-7) Mokolo moko, ntango mibali babimaki, bapunzi oyo bautaki na Amaleki batumbaki engumba yango mpe bazwaki basi, bana mpe bibwele na bango bakendaki na bango. Ntango Davidi ná bato na ye bazongaki mpe bamonaki likambo oyo basalaki bango, balelaki. Mosika te, kolela yango ebongwanaki nkanda, mpe bato ya Davidi bakómaki koloba ete bakoboma ye na mabanga. Atako likambo yango elɛmbisaki ye, Davidi abungisaki elikya te. (Masese 24:10) Kobanga Nzambe etindaki ye abondela Yehova, mpe “amiyikisaki mpiko kati na [Yehova].” Na lisalisi ya Nzambe, Davidi ná bato na ye balandaki Baamaleki, balongaki bango mpe bazwaki lisusu basi, bana mpe biloko na bango nyonso.—1 Samwele 30:1-20.
13, 14. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaki moklisto moko azwa bikateli ya malamu?
13 Basaleli ya Nzambe lelo oyo bakutanaka mpe na mikakatano oyo esɛngaka bátyela Yehova motema mpe bázala na mpiko. Tózwa ndakisa ya Kristina. Elenge yango ayekolaki Biblia ná Batatoli ya Yehova. Kasi, azalaki na mposa ya kokóma mobɛti monene ya piano, mpe akómaki mosika mpenza na mosala yango. Lisusu, azalaki koyoka mosala ya kosakola nsɔni mpe azalaki kobanga mikumba oyo batisimo ememaka. Ntango Kristina akobaki koyekola Liloba ya Nzambe, nguya na yango ebandaki kosala. Akómaki kobanga Yehova mpe asosolaki ete Yehova asɛngaka basaleli na ye bálinga ye na motema na bango mobimba, na makanisi na bango nyonso, na molimo na bango mobimba mpe na makasi na bango nyonso. (Malako 12:30) Yango etindaki ye amipesa epai ya Yehova mpe azwa batisimo.
14 Kristina abondelaki Yehova asalisa ye akola na elimo. Alobi boye: “Nayebaki ete kozala mobɛti ya piano esɛngaka kosala mibembo ntango nyonso mpe kobɛta liboso ya bato mbala soki 400 na mbula. Yango wana, namonaki malamu nazala nde molakisi mpo nazwaka mwa mbongo ya kobikela, mpo nasala mosala ya mobongisi-nzela. Na ntango wana, basilaki kozwa bibongiseli mpo Kristina abɛta mpo na mbala ya liboso, na ndako ya miziki oyo eleki kitoko na ekólo na bango.” Kristina alobi boye: “Ezalaki mbala na ngai ya liboso mpe ya nsuka ya kobɛta miziki.” Lelo oyo, Kristina abalá nkulutu moko ya lisangá mpe bazali kosala elongo na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Asepelaka mpenza ndenge Yehova apesaki ye mpiko ya kozwa ekateli ya malamu mpe ndenge azali sikoyo kosalela ntango mpe makasi na ye na mosala ya Yehova.
Libula ya motuya
15. Davidi azalaki na mposa ya kotikela bana na ye nini, mpe ndenge nini asalaki yango?
15 Davidi akomaki boye: “Yaká bino bana, yokamelá ngai, nakoteya bino nsɔmɔ ya [Yehova].” (Nzembo 34:11) Davidi azalaki na mposa ya kotikela bana na ye libula moko ya motuya koleka: kobanga Yehova. Na maloba mpe na misala, Davidi azalaki kosalisa bana na ye bátalelaka Yehova te lokola Nzambe moko ya makambo makasimakasi mpe ya nsɔmɔ, oyo alukaka kaka mabunga ya bato, kasi lokola Tata ya bolingo, ya boboto mpe oyo alimbisaka. Mpo na komonisa kondima na ye makasi ete Yehova alukaka kaka mabunga ya bato te, Davidi alobaki ete: “Nani akoki kolandela mabunga?” Davidi ayebaki ete soki asali nyonso oyo akoki, Yehova akondima maloba mpe makanisi na ye.—Nzembo 19:12, 14, Byington.
16, 17. Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango kobanga Nzambe?
16 Davidi azali mpenza ndakisa mpo na baboti lelo oyo. Ralph, oyo asalaka elongo na ndeko na ye na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Baboti na biso babɔkɔlaki biso na lolenge moko oyo epesá biso esengo ya kozala na kati ya solo. Ntango tozalaki bana mike, bazalaki kolinga tófandaka esika moko na bango ntango bazali kolobela makambo ya lisangá; yango wana biso mpe tokómaki kolinga solo makasi lokola bango. Basalisaki biso tókóma komona ete biso mpe tokoki kosala makambo ya ntina na mosala ya Yehova. Na boumeli ya ebele ya bambula, libota mobimba tozalaki kofanda na ekólo moko oyo ezalaki na mposa makasi ya basakoli ya Bokonzi, epai topesaki mabɔkɔ mpo na kobimisa masangá ya sika.
17 “Eloko esalisaki biso tótikala na nzela ya sembo ezali te mibeko ebeleebele. Ezali nde mpo baboti na biso bazalaki kondima mpenza ete Yehova azali mpe atondá boboto mpe bolamu. Bazalaki na mposa ya koyeba Yehova malamumalamu mpe kosepelisa ye, mpe biso tolandaki ndakisa na bango ya kobanga Nzambe mpe kolinga ye. Ata soki tosali mabe, baboti na biso bazalaki kosala te ete tókanisa ete Yehova alingi biso lisusu te; bazalaki mpe kopesa biso bitumbu ya makasimakasi te. Mbala mingi, bazalaki nde kofandisa biso mpe kosolola na biso, mpo na koluka kosimba mitema na biso; mpe mama azalaki kosala yango ntango mosusu na mai na miso. Mpe balongaki mpenza. Baboti na biso bateyaki biso, na maloba mpe na misala, ete kobanga Nzambe ezali likambo moko ya kitoko mpenza mpe ete kozala Motatoli na ye ezali esengo mpe lipamboli, kasi te mokumba ya kilo.”—1 Yoane 5:3.
18. Tokozwa nini soki tozali kobanga Nzambe?
18 Oyo ezali moko ya maloba oyo Davidi akomaki “na nsuka ya bomoi na ye”: “Mokonzi oyo atambwisaka bato na bosembo, pe atosaka Nzambe na makambo nyonso, azali lokola moi oyo engali na tongo.” (2 Samwele 23:1, 3, 4, Bible na lingala ya lelo oyo) Emonani ete Salomo, mwana ya Davidi oyo akitanaki na ebonga na ye, asosolaki bwanya ya maloba wana, mpamba te asɛngaki Yehova apesa ye “motema ya botosi” mpe likoki ya ‘kokesenisa malamu ná mabe.’ (1 Mikonzi 3:9, NW) Salomo ayebaki ete kobanga Yehova epesaka bwanya mpe esengo. Na nsima, asukisaki mokanda ya Mosakoli na maloba oyo: “Sima ya makambo nyonso wana, maloba ya suka yango oyo: Bangaka Nzambe pe tosaka mibeko na ye. Yango nde ezali na tina po na moto nyonso. Pamba té Nzambe akosambisa misala nyonso, ata oyo ya kobombama, ézala ya malamu to ya mabe.” (Mosakoli 12:13, 14, Bible na lingala ya lelo oyo) Soki totosi toli wana, tokozanga te komona ete “kozala na komikitisa mpe kobanga Yehova” ememaka kaka bwanya mpe esengo te kasi mpe “bomɛngo, lokumu mpe bomoi.”—Masese 22:4, NW.
19. Nini ekosalisa biso tóyeba soki ‘kobanga Yehova’ elimboli nini?
19 Bandakisa ya Biblia mpe ya mikolo na biso emonisi ete kobanga Nzambe ezali na ntina mingi na bomoi ya basaleli ya solo ya Yehova. Kobanga yango ekoki kopekisa biso kosala makambo oyo Tata na biso ya likoló aboyaka, kopesa biso mpiko liboso ya banguna na biso mpe makasi liboso ya mikakatano oyo tokoki kokutana na yango. Na yango, tiká ete biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tózala na molende mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, komanyola makambo oyo tozali koyekola mpe kopusana ntango nyonso penepene na Yehova na nzela ya mabondeli oyo euti mpenza na motema. Soki tozali kosala bongo, ‘tokozwa kaka boyebi ya Nzambe’ te, kasi tokoyeba mpe soki ‘kobanga Yehova’ elimboli nini.—Masese 2:1-5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Yango ekoki kozala moko ya makambo oyo etindaki Davidi akoma Nzembo 57 mpe 142.
Okoki kolimbola?
Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki
• kosalisa moto oyo akweaki na lisumu ya monene?
• komemela moto esengo ata ntango akutani na mikakatano to na minyoko?
• kopesa biso makasi ya kosala mokano ya Nzambe?
• kozala libula ya solosolo mpo na bana na biso?
[Elilingi na lokasa 26]
Kobanga Yehova epekisaki Davidi koboma Mokonzi Saulo
[Bililingi na lokasa 29]
Kobanga Yehova ezali libula ya motuya mpenza oyo baboti bakoki kotikela bana na bango