Baluku—Mokomeli mpe moninga ya Yilimia
OYEBI “Baluku, mwana ya Neliya”? (Yilimia 36:4) Nkombo ya Baluku ezali kaka na mikapo minei ya Biblia; kasi, bato oyo batángaka Biblia bayebi malamu ete azalaki mokomeli ya mosakoli Yilimia mpe moninga na ye ya motema. Bazalaki elongo na boumeli ya mbula 18 ya nsuka mpe ya yikiyiki ya ekólo Yuda, tii ntango basoda ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mpe ntango bakimaki na Ezipito.
Eleki mwa bambula, bato ya arkeoloji bakundolaki bilembo mibalea oyo esalelamaki na bato oyo bazalaki na bomoi na ekeke ya nsambo L.T.B.; likoló ya bilembo yango bakomaki: “Ya Berekhyahu [nkombo ya Baluku na Liebele], mwana ya Neriyahu [nkombo ya Neliya na Liebele], Mokomeli.” Likambo yango etindi bato ya mayele báluka koyeba malamu moto yango oyo, Biblia mpe etángi nkombo na ye. Baluku azalaki nani? Autaki na libota ya ndenge nini, atángaki bakelasi nini, mpe azalaki kosala mosala nini? Ndenge atikalaki na Yilimia tii na nsuka ezali komonisa biso nini? Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye? Tótalela makambo oyo Biblia mpe masolo ya kala elobi mpo na kozwa biyano na mituna yango.
Libota oyo autaki mpe mosala na ye
Bato mingi ya mayele bakanisaka ete Baluku azalaki moto ya libota moko ya lokumu, oyo bazalaki bakomeli na Yuda. Batángaka bantina mwa mingi oyo etindaka bango bakanisa bongo. Na ndakisa, na Biblia babengi Baluku na titre ya “sekrɛtɛrɛ,” to “mokomeli” na mabongoli mosusu. Biblia elobi mpe ete Selaya, ndeko na ye, azalaki kosala mosala ya lokumu epai ya Mokonzi Sidikiya.—Yilimia 36:32; 51:59.
Philip King, moto moko ya arkeoloji, akomaki mpo na bakomeli na ntango ya Yilimia boye: “Bakomeli oyo bayekolaki mpenza mosala yango na kelasi bazalaki bato minene na Yuda na nsuka ya siɛklɛ ya nsambo mpe na ebandeli ya siɛklɛ ya motoba L.T.B. . . . Bato ya mosala wana bazalaki bato ya lokumu oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi.”
Longola yango, lisolo ya Yilimia mokapo 36, oyo tokolobela na molai, ezali komonisa ete Baluku azalaki kokutana na bapesi-toli ya mokonzi mpe azalaki na ndingisa ya kokɔta na ndako ya kolya (to ndako ya makita) ya nkumu moko nkombo na ye Gemalia. James Muilenberg, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi boye: “Baluku akokaki kokɔta na ndako ya makita ya mokomeli yango mpamba te azalaki na lotomo ya kosala yango mpe ye moko azalaki mosali ya mokonzi mpe, na likita oyo batángaki rulo, ye mpe azalaki. Na bongo, ntango azali na bango, azalaki na kati ya baninga na ye ya mosala.”
Buku moko (Corpus of West Semitic Stamp Seals) eyebisi likambo mosusu oyo emonisi ete Baluku azalaki moto monene: “Lokola bamonaki elembo ya Berekhyahu esika moko na bilembo ya basali mosusu ya lokumu, tokoki mpenza kokanisa ete Baluku (to Berekhyahu) azalaki kosala mosala moko na bato mosusu wana ya lokumu.” Makambo oyo toyebi lelo ezali komonisa ete Baluku ná ndeko na ye Selaya bazalaki basali minene oyo bapesaki mosakoli Yilimia mabɔkɔ na bambula ya yikiyiki liboso Yelusaleme ebomama.
Asungaki Yilimia
Balobeli Baluku mpo na mbala ya liboso na Yilimia mokapo 36, na “[mbula] ya minei ya Yoyakimi,” to mobu soki 625 L.T.B. Na ntango wana, Yilimia akokisaki mbula 23 na mosala ya mosakoli.—Yilimia 25:1-3; 36:1, 4.
Na eleko yango, Yehova alobaki na Yilimia boye: “Kamatá mpo na yo moko mokanda mpe komá wana maloba nyonso malobi ngai na yo mpo na Yisalaele mpe mpo na Yuda mpe mpo na mabota nyonso, longwa . . . na mikolo ya Yosiya kino mokolo oyo.” Biblia ebakisi boye: “Yilimia abyangaki Baluku, mwana ya Neliya, mpe Baluku akomaki longwa na monɔkɔ ya Yilimia maloba nyonso ya [Yehova].”—Yilimia 36:2-4.
Mpo na nini Yilimia abengaki Baluku? Yilimia alobaki na ye ete: “Nakangami, nayebi kokɔta na ndako ya [Yehova] te.” (Yilimia 36:5) Emonani ete bapekisaki Yilimia kokɔta na tempelo epai nsango ya Yehova esengelaki kotángama, mbala mosusu mpo bakonzi basepelaki te na bansango oyo asakolaki liboso. (Yilimia 26:1-9) Na ntembe te, Baluku azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova, mpe “asalaki nyonso elakaki mosakoli Yilimia ye.”—Yilimia 36:8.
Kokoma makebisi oyo Yilimia asakolaki na boumeli ya mbula 23 ezwaki ntango mingi, mpe ekoki kozala ete Yilimia azalaki kozela ntango oyo ebongi mpo na kobimisa yango. Na sanza ya Novɛmbɛ to Desɛmbɛ ya mobu 624 L.T.B., Baluku “atángaki na kati ya mokanda maloba ya Yilimia na ndako ya [Yehova] na eteni ya Gemalia, . . . na matoi ya bato nyonso.”—Yilimia 36:8-10.
Mikaya, mwana ya Gemalia akendaki koyebisa tata na ye ná bankumu mosusu likambo yango, mpe babengaki Baluku mpo atángela bango makambo oyo ezalaki na rulo yango. Biblia elobi boye: “Wana esili bango koyoka yango, babongwanaki moto na moto na moninga na ye na nsɔmɔ, balobaki mpe na Baluku ete, Solo, tokoyebisa mokonzi mpo na maloba oyo nyonso. . . . Kendá komibomba, bino mpe Yilimia; tiká te ete moto ayeba esika ezali bino.”—Yilimia 36:11-19.
Ntango Mokonzi Yoyakimi ayokaki makambo oyo Yilimia atindaki Baluku akoma, asilikaki mpe apasolaki rulo yango, abwakaki yango na mɔtɔ, mpe atindaki bato na ye bákende kokanga Yilimia ná Baluku. Na esika oyo babombamaki, Yehova asɛngaki Yilimia azongela lisusu makambo yango mpe Baluku akoma yango na rulo mosusu.—Yilimia 36:21-32.
Ntembe ezali te ete Baluku ayebaki ete mosala oyo andimaki ezalaki na makama mingi. Tokanisi ete ayebaki makambo oyo bakonzi balobaki na Yilimia mwa bambula liboso. Ekoki mpe kozala ete ayokaki likambo oyo ekómelaki Uliya, oyo asakolaki “lokola na maloba ya Yilimia,” kasi Mokonzi Yoyakimi abomaki ye. Atako bongo, Baluku andimaki kosalela mayele na ye mpe boninga na ye ná basali minene ya mokonzi mpo na kosunga Yilimia na mokumba na ye.—Yilimia 26:1-9, 20-24.
Koluka “makambo minene” te
Na eleko moko, ntango azalaki kokoma rulo ya liboso, Baluku atungisamaki mingi. Alobaki boye: “Mawa epai na ngai sasaipi! Mpo ete [Yehova] abakisi mawa na mpasi na ngai; nalɛmbi na konguluma na ngai mpe nayebi kopema te.” Mpo na nini azalaki kolelalela bongo?—Yilimia 45:1-3.
Lisolo yango eyebisi biso ntina te. Kasi, tómeka naino komitya na esika ya Baluku. Kokoma makambo oyo Yilimia alobaki na boumeli ya mbula 23 mpo na kokebisa bato ya Yisalaele mpe ya Yuda emonisaki ye malamumalamu ndenge oyo bapɛngwaki mpe baboyaki Yehova. Ekoki mpenza kozala ete Baluku atungisamaki mingi ntango ayokaki ete Yehova akani koboma Yelusaleme ná Yuda mpe kotinda bato na yango na boombo na Babilone mpo na mbula 70—likambo oyo Yehova alobaki kaka na mbula wana mpe oyo, na ntembe te, ezalaki mpe na mokanda oyo akomaki. (Yilimia 25:1-11) Longola yango, lokola azalaki kosunga Yilimia na ntango wana, bakokaki kolongola ye na mosala.
Ata soki Baluku atungisamaki mpo na ntina nini, Yehova ye moko asalisaki ye abosana te etumbu oyo ezalaki koya. Yehova alobaki boye: “Yango esili ngai kotonga, nakobuka yango; yango esili ngai kokona, nakobikola yango; ezali mpe boye na mokili mobimba.” Na nsima, apesaki Baluku toli oyo: “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te.”—Yilimia 45:4, 5.
Yehova alobaki te soki “makambo minene” yango ezalaki mpenza nini, kasi tokanisi ete Baluku ayebaki soki ezalaki lokumu to biloko ya mokili. Yehova apesaki ye toli atika kolɔta mpe akanisa makambo oyo ezalaki koya: “Nakoyeisa mabe likoló ya nzoto nyonso. . . . Kasi nakopesa bomoi na yo epai na yo lokola libonza na bisika nyonso bikokenda yo.” Yehova alakaki Baluki ete akobatela eloko eleki motuya oyo azalaki na yango, elingi koloba bomoi na ye, ata na esika nini akokende.—Yilimia 45:5.
Nsima ya makambo yango, oyo elekaki kati na mobu 625 mpe 624 L.T.B., mpe ekomami na Yilimia mokapo 36 mpe 45, Biblia elobeli lisusu Baluku te tii ntango etikalaki kaka mwa basanza liboso bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme ná Yuda na mobu 607 L.T.B. Likambo nini esalemaki na ntango wana?
Baluku asungi lisusu Yilimia
Balobeli lisusu Baluku na eleko oyo basoda ya Babilone bazingaki Yelusaleme. Yilimia “akangamaki kati na lopango ya bakɛngɛli” ntango Yehova ayebisaki ye asomba eteni ya mabelé epai ya ndeko na ye moko na Anatota; likambo oyo ezalaki elembo ete bakozonga na mboka na bango, ata soki bakei na boombo. Babengaki Baluku asalela bango makambo oyo mibeko esɛngaki.—Yilimia 32:1, 2, 6, 7.
Yilimia alobaki boye: “Nakomaki mpe mokanda mpe nakangaki yango, nabyangaki batatoli mpe napimelaki ye mosolo kati na epimelo ya bozito. Bongo nakamataki mokanda ya lisombi oyo ekangami . . . mpe oyo ezalaki polele lokola. Mpe napesaki mokanda ya lisombi epai ya Baluku.” Na nsima, ayebisaki Baluku abomba mikanda yango na mbɛki mpo na kobatela yango. Mpo na bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia, ntango Yilimia alobi ete ‘akomaki’ mokanda, elingi koloba ete ye alobaki mpe Baluku akomaki, mpamba te ye nde azalaki mokomeli.—Yilimia 32:10-14; 36:4, 17, 18; 45:1.
Baluku ná Yilimia basalaki ndenge oyo mibeko esɛngaki na ntango wana. Moko ya makambo oyo esɛngamaki ezali kosala kopi mibale. Buku oyo tolobelaki liboso (Corpus of West Semitic Stamp Seals) elobi boye: “Bazalaki kobenga kopi ya liboso ‘mokanda oyo ekangami’ mpo bazalaki kolínga yango mpe kotya yango elembo moko to bilembo mingi mpo na kokanga yango; yango nde kopi ya liboso. . . . Oyo ya mibale, to ‘mokanda oyo ya polele’ ezalaki mpo na bato mosusu oyo bakoki kotánga makambo oyo motɛki ná mosombi bayokani. Na bongo, ezalaki na mikanda mibale, oyo ya liboso mpe kopi na yango, mpe ekomamaki na nkasa mibale ekabwani.” Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli emonisi ete bazalaki kobomba mikanda na mbɛki.
Nsukansuka, basoda ya Babilone bakɔtaki na Yelusaleme, batumbaki engumba yango mpe bamemaki bato nyonso na boombo, longola kaka ndambo ya bato oyo bazalaki bato mpamba. Nebukadanesala atyaki Gedalia guvɛrnɛrɛ; kasi, sanza mibale na nsima, babomaki ye. Bayuda oyo batikalaki bazwaki likanisi ya kokende na Ezipito, atako Nzambe, na nzela ya Yilimia ayebisaki bango ete bákende te; mpe Biblia etángi lisusu nkombo ya Baluku na ntango oyo likambo wana esalemaki.—Yilimia 39:2, 8; 40:5; 41:1, 2; 42:13-17.
Mikóló ya Bayuda bayebisaki Yilimia boye: “Maloba na yo bobele lokuta! [Yehova] Nzambe na biso atindi yo te mpo na koloba ete, Bokokenda na Ezipito te mpo na kofanda wana. Kasi Baluku mwana na Neliya azali kotɛlɛmisa yo liboso na biso mpe na kokaba biso na mabɔkɔ ya Bakaladi ete báboma biso mpe ete bábɔtɔla biso lokola bakangami kino Babele.” (Yilimia 43:2, 3) Maloba wana emonisi ete mikóló ya Bayuda bazalaki kokanisa ete Baluku nde azalaki kotinda Yilimia aloba na bango makambo. Mbala mosusu bazalaki kokanisa bongo mpo lokola Baluku azalaki moto monene mpe moninga ya Yilimia banda kala, azalaki kaka te mokomeli na ye. Ata soki bazalaki kokanisa nini, nsango oyo azalaki kosakola ezalaki ya Yehova.
Atako Nzambe akebisaki Bayuda yango, bakendaki na motó makasi mpe bamemaki “mosakoli Yilimia mpe Baluku mwana ya Neliya.” Yilimia akomaki boye: “Bayaki na mokili ya Ezipito, zambi bayokaki mongongo ya [Yehova] te. Bakómaki kino epai na Tahapanehese,” engumba moko na ɛsti ya Ebale Nil, na ndelo ya Sinai. Wana nde mbala ya nsuka oyo Biblia elobeli Baluku.—Yilimia 43:5-7.
Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Baluku?
Tokoki kozwa mateya mingi ya motuya monene na ndakisa ya Baluku. Liteya moko ya ntina mingi ezali ndenge andimaki kosalela mayele na ye mpo na mosala ya Yehova, ata soki ekokaki kobendela ye mindɔndɔ. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mingi, basi mpe mibali, bazali na elimo yango; bazali kosalela mayele na bango na misala ya Betele, na misala ya kotonga, mpe bongo na bongo. Ndenge nini tokoki komonisa elimo lokola ya Baluku?
Ntango Yehova ayebisaki Baluku ete lokola etikali moke ekólo Yuda ebomama, ezalaki te ntango ya koluka “makambo minene,” emonani ete ayokaki toli yango, mpamba te abomamaki te. Lokola tozali na mikolo ya nsuka, ebongi mokomoko na biso alanda toli yango. Yehova apesi biso elaka lokola oyo apesaki Baluku ete akobikisa bomoi na biso. Tokolanda toli na ye na ndakisa ya Baluku?
Lisolo yango ezali mpe na liteya mosusu ya ntina mingi. Baluku asalisaki Yilimia ná ndeko na ye moko básala makambo oyo mibeko esɛngaki mpo na kotɛka mpe kosomba. Likambo yango ezali ndakisa mpo na moklisto nyonso oyo azali kosala makambo ya mbongo na ndeko mosusu. Soki tokomi na mokanda makambo nyonso toyokani na ndeko, tokosala likambo oyo eyokani na Biblia, oyo ebongi mpe ezali komonisa bolingo.
Atako Biblia elobi makambo mingi te mpo na Baluku, ebongi mpenza moklisto nyonso ayekola ndakisa na ye mpe alanda yango. Okolanda ndakisa malamu ya mokomeli mpe moninga ya Yilimia?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Elembo yango ezali mwa libungutulu ya mabelé oyo ezalaki kosimba nsinga oyo bazalaki kokanga na yango mokanda oyo ezali na makambo ya ntina mingi. Bazalaki kobɛta yango kashɛ oyo ezalaki koyebisa nkombo ya nkolo-mokanda to moto oyo atindaki yango.
[Elilingi na lokasa 16]
Elembo ya Baluku
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Elembo: Courtesy of Israel Museum, Jerusalem