Yehova atalaka biso mpo na bolamu na biso
“Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 NTA. 16:9.
1. Mpo na nini Yehova atalatalaka biso?
YEHOVA azali Tata oyo aleki tata nyonso. Ayebi biso malamu mpenza; asosolaka ata “makanisi mpe mikano” na biso. (1 Nta. 28:9) Kasi, atalatalaka biso mpo na koluka mabunga na biso te. (Nz. 11:4; 130:3) Alukaka nde kobatela biso na makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na ye to kobebisa elikya na biso ya bomoi ya seko.—Nz. 25:8-10, 12, 13.
2. Yehova amonisaka nguya na ye mpo na banani?
2 Yehova azali na nguya nyonso mpe amonaka nyonso. Yango wana, akoki kosalisa basaleli na ye ya sembo mbala nyonso oyo babeleli ye, mpe akoki kosunga bango ntango bakutani na mikakatano. Na 2 Ntango 16:9 totángaka boye: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” Tomoni ete Yehova asalelaka nguya na ye mpo na kosalisa bato oyo basalelaka ye na motema mobimba, elingi koloba motema oyo ezali pɛto mpe sembo. Asalaka yango te epai ya bato ya bokosi.—Yos. 7:1, 20, 21, 25; Mas. 1:23-33.
Tambolá elongo na Nzambe
3, 4. ‘Kotambola na Nzambe elongo’ elimboli nini, mpe Biblia elobeli ndakisa ya banani oyo ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango?
3 Bato mingi bakanisaka ete ekoki kosalema te ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba andima kotambola na moto, na ndenge ya elilingi. Nzokande, ezali yango nde oyo Yehova alingi. Enoka mpe Noa ‘batambolaki na Nzambe elongo.’ (Gen. 5:24; 6:9) Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Ebe. 11:27) Mokonzi Davidi azalaki kotambola pembeni ya Tata na ye ya likoló na komikitisa nyonso. Alobaki boye: “[Yehova] azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.”—Nz. 16:8.
4 Ezali solo ete tokoki te kosimba Yehova na lobɔkɔ mpe kotambola na ye mpenza. Kasi, tokoki kosala yango na ndenge ya elilingi. Na ndenge nini? Asafa, mokomi moko ya nzembo, alobaki boye: “Nazali na yo esika moko mikolo nyonso; yo okangi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okotambolisaka ngai na toli na yo.” (Nz. 73:23, 24) Na maloba ya polele, kotambola elongo na Yehova elimboli kolanda batoli na ye, oyo apesaka biso libosoliboso na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45; 2 Tim. 3:16.
5. Na ndenge nini Yehova atalaka basaleli na ye ya sembo lokola tata ya bolingo, mpe yango esengeli kotinda biso tótalela ye ndenge nini?
5 Lokola Yehova alingaka bato oyo batambolaka elongo na ye, atalaka bango lokola tata ya bolingo; amibanzabanzaka mpo na bango, abatelaka bango, mpe ateyaka bango. Nzambe alobi boye: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nz. 32:8) Na yango, osengeli komituna boye: ‘Namimonaka mpenza ete nazali kotambola elongo na Yehova, elingi koloba nayokaka batoli na ye mpe nabosanaka te ete miso na ye ezali kotala ngai? Koyeba ete azali elongo na ngai, etindaka ngai nakanisaka makambo ya malamu, nabimisaka maloba ya malamu mpe nasalaka makambo ya malamu? Soki nasali libunga, natalelaka Yehova lokola Tata ya motema mawa, oyo alukaka kosalisa moto oyo abongoli motema azonga epai na ye, kasi te lokola Nzambe oyo azali motema makasi?’—Nz. 51:17.
6. Yehova azali na likoki nini oyo baboti na biso bazali na yango te?
6 Na bantango mosusu, Yehova akoki kosalisa biso ntango amoni ete tolingi kolanda nzela ya mabe. Na ndakisa, akoki komona ete motema na biso oyo ezali na bokosi ebandi kosepela na makambo ya mabe. (Yil. 17:9) Na ntango yango, akoki kosalisa biso liboso kutu baboti na biso básala yango mpamba te “miso na ye oyo ezali kongɛnga” ezali na likoki ya kotánga mitema na biso, elingi koloba koyeba makanisi na biso. (Nz. 11:4, NW; 139:4; Yil. 17:10) Tótalela ndenge Nzambe asalisaki Baluku, oyo azalaki sekrɛtɛrɛ mpe moninga ya motema ya mosakoli Yilimia.
Tata ya solosolo mpo na Baluku
7, 8. (a) Baluku azalaki nani, mpe makanisi nini ya mabe mbala mosusu ekómaki kokola na motema na ye? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na Baluku?
7 Baluku azalaki mokomeli mpe asalaki na bosembo elongo na Yilimia, moto oyo azwaki mokumba monene ya kosakola bitumbu ya Yehova na ekólo Yuda. (Yil. 1:18, 19) Na eleko moko, Baluku, oyo mbala mosusu azalaki na libota ya lokumu, akómaki koluka “makambo minene.” Mbala mosusu akómaki na mposa ya kokóma moto ya lokumu to ya kozala na biloko mingi ya mokili. Ata soki ezalaki nini, Yehova amonaki makanisi mabe oyo ekómaki kokola na motema ya Baluku. Na nzela ya Yilimia, Yehova asalisaki Baluku nokinoki; alobaki na ye boye: “[O]lobaki ete, Mawa epai na ngai sasaipi! Mpo ete [Yehova] abakisi mawa na mpasi na ngai; nalɛmbi na konguluma na ngai mpe nayebi kopema te.” Na nsima, Nzambe alobaki boye: “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te.”—Yil. 45:1-5.
8 Atako Yehova asembolaki Baluku, asalaki yango na nkanda te; alobaki na ye lokola tata oyo alingi bolamu ya mwana na ye. Na ntembe te, Nzambe amonaki ete atako Baluku akómaki na mposa ya mabe, azalaki na motema mabe te. Yehova ayebaki mpe ete etikali moke Yelusaleme mpe Yuda ebomama; yango wana alingaki te ete Baluku azonga nsima na ntango wana. Mpo na kosalisa mosaleli na ye, Nzambe alobaki na ye ete alingi ‘koyeisa mabe likoló ya nzoto nyonso’; abakisaki ete soki Baluku asali makambo na bwanya, akobika. (Yil. 45:5) Ezali lokola nde Nzambe alobaki na ye boye: ‘Baluku, tiká komitungisa. Kobosana te likambo oyo elingi kokómela Yuda mpe Yelusaleme mpo na masumu na yango. Zalá sembo mpe okotikala na bomoi! Nakobatela yo.’ Na ntembe te, maloba ya Yehova esimbaki motema ya Baluku, mpamba te alandaki toli na ye mpe abikaki ntango Yelusaleme ebomamaki, mbula 17 na nsima.
9. Biyano nini okoki kopesa na mituna oyo etunami na paragrafe oyo?
9 Wana ozali kokanisa lisolo ya Baluku, talelá mituna mpe bavɛrsɛ oyo: Ndenge oyo Yehova asalisaki Baluku ezali komonisa nini mpo na Ye mpe emonisi ete atalelaka basaleli na ye ndenge nini? (Tángá Baebele 12:9.) Lokola tozali na mikolo ya nsuka, liteya nini tokoki kozwa na toli oyo Nzambe apesaki Baluku mpe ndenge Baluku alandaki toli yango? (Tángá Luka 21:34-36.) Na kolanda ndakisa ya Yilimia, ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye?—Tángá Bagalatia 6:1.
Yesu amonisaki bolingo ya Tata na ye
10. Nini esalisaka Yesu akokisa mokumba na ye ya Mokonzi ya lisangá?
10 Liboso Klisto aya, Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na basaleli na ye na nzela ya basakoli mpe basaleli mosusu ya sembo. Lelo oyo, amonisaka yango libosoliboso na nzela ya Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá. (Ef. 1:22, 23) Yango wana, na mokanda ya Emoniseli, Yesu amonisami lokola mwana-mpate oyo azali na “miso nsambo, miso yango elakisi bilimo nsambo ya Nzambe oyo etindami na kati ya mabelé mobimba.” (Emon. 5:6) Yango elingi koloba ete lokola Yesu atondi mpenza na elimo santu ya Nzambe, azali na bososoli ya kokoka. Ye mpe atalaka na kati ya mitema na biso mpe ayebaka makambo nyonso.
11. Mokumba nini Klisto azali kokokisa, mpe ndenge nini amonisaka ezaleli ya Tata na ye na lolenge na ye ya kotalela biso?
11 Kasi, ndenge moko na Yehova, Yesu azali te lokola polisi oyo azali konɔnga biso longwa na likoló. Atalatalaka biso mpo alingaka biso mpenza. Moko na batitre ya Yesu, “Tata ya seko,” ezali komonisa biso mokumba ya kopesa bomoi ya seko oyo akokokisa mpo na baoyo bazali komonisa kondima epai na ye. (Yis. 9:6) Longola yango, lokola azali Mokonzi ya lisangá, Klisto akoki kosalela bandeko oyo bakɔmeli na elimo, mingimingi bankulutu, mpo na kobɔndisa to kopesa toli na baoyo basengeli na yango.—1 Tes. 5:14; 2 Tim. 4:1, 2.
12. (a) Mikanda epai ya masangá nsambo ya Asie Mineure ezali komonisa nini mpo na Yesu? (b) Ndenge nini bankulutu bamonisaka komibanzabanza oyo Klisto azali na yango mpo na etonga ya Nzambe?
12 Komibanzabanza ya Klisto mpo na etonga emonisami na mikanda oyo atindelaki bankulutu ya masangá nsambo ya Asie Mineure. (Emon. 2:1–3:22) Na mikanda yango, Yesu amonisaki ete ayebaki makambo oyo ezalaki koleka na lisangá mokomoko mpe ete azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bayekoli na ye. Ezali mpe bongo lelo oyo; mbala mosusu kutu azali kosala yango mingi koleka, mpamba te bimonaneli ya Emoniseli ezali kokokisama na “Mokolo ya Nkolo.”a (Emon. 1:10) Mbala mingi, Klisto amonisaka bolingo na ye na nzela ya bankulutu to bakɛngɛli na lisangá. Akoki kosalela bandeko yango oyo babengami “makabo oyo ezali bato” mpo na kobɔndisa, kolendisa, to kopesa toli soki esengeli. (Ef. 4:8; Mis. 20:28; tángá Yisaya 32:1, 2.) Milende ya bandeko yango emonisaka yo ete Klisto amibanzabanzaka mpo na yo?
Lisalisi na ntango ebongi
13-15. Ndenge nini Nzambe akoki koyanola na mabondeli na biso? Pesá bandakisa.
13 Esilá kokóma ete obondela na etingya mpo na kosɛnga lisalisi, mpe na nsima, ozwi eyano na nzela ya ndeko moko oyo ateli na elimo, oyo ayaki kotala yo mpe alendisaki yo? (Yak. 5:14-16) Mbala mosusu mpe ozwaki lisalisi na nzela ya lisukulu moko na makita to likanisi moko oyo otángaki na mokanda moko ya moombo ya sembo. Mbala mingi, Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na balolenge wana. Na ndakisa, nkulutu moko asalaki lisukulu; na nsima, ndeko mwasi moko oyo, mwa bapɔsɔ liboso, basalelaki ye makambo na kozanga bosembo, ayaki kosolola na ye. Na esika amilelalela mpo na likambo yango, apesaki nkulutu matɔndi mpo na makanisi ya Biblia oyo alobelaki na lisukulu na ye. Makanisi yango ebongaki mpenza na likambo oyo akutanaki na yango mpe ebɔndisaki ye mingi. Ndeko mwasi yango asepelaki mpenza lokola azalaki na makita mokolo yango!
14 Na oyo etali lisalisi oyo tozwaka na nzela ya libondeli, tótalela ndakisa ya bato misato oyo bayekolaki Biblia na bolɔkɔ mpe bakómaki basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Mokolo moko, lokola mobulu ebimaki na bolɔkɔ, batyelaki bakangami nyonso mibeko ya makasi. Bakangami basepelaki te. Bazwaki mokano ete na mokolo oyo ekolanda, soki basilisi komɛla tii, bakozongisa basaani te. Likambo yango ezalaki mokakatano mpo na basakoli yango misato. Soki bango mpe basali likambo oyo bakangami mosusu bakanaki kosala, ekomonisa ete balandi te toli ya Yehova oyo ezali na Baloma 13:1. Epai mosusu, soki basali yango te, baninga na bango ya bolɔkɔ bakosilikela bango.
15 Lokola bazalaki na likoki te ya kokutana mpo na kopesana makanisi, moto na moto abondelaki mpo na koyeba ndenge oyo asengeli kosala. Mokolo yango na ntɔngɔ, bango misato bamonaki ete bazwaki ekateli ndenge moko: baboyaki komɛla tii. Na nsima, ntango bakɛngɛli balekaki mpo na kozwa basaani, bango misato bazalaki na eloko ya kozongisa te. Bango misato basepelaki mpenza ete ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’ asungaki bango!—Nz. 65:2.
Tózala na elikya mpo na mikolo ezali koya
16. Ndenge nini mosala ya kosakola emonisaka ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali bampate?
16 Mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali elembeteli mosusu ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato ya mitema sembo, ata soki bafandi na mboka nini. (Gen. 18:25) Na lisalisi ya baanzelu, Yehova akoki kotambwisa basaleli na ye mpo bákutana na bato oyo bazali bampate—ata soki bato yango bafandi na bisika oyo nsango malamu esakolami naino te. (Emon. 14:6, 7) Na ndakisa, na ekeke ya liboso, na lisalisi ya anzelu moko, Nzambe atambwisaki Filipo, mopalanganisi moko ya nsango malamu, mpo akutana na Moetiopia moko mpe alimbwela ye Makomami. Yango ebotaki mbuma nini? Moetiopia yango andimaki nsango malamu, akómaki moyekoli ya Yesu mpe azwaki batisimo.b—Yoa. 10:14; Mis. 8:26-39.
17. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te mpo na mikolo ezali koya?
17 Lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali se kokóma pene, “bampasi” oyo Biblia esakolaki ekokoba. (Mat. 24:8) Na ndakisa, biloko ya kolya ekoki komata ntalo makasi mpo bato bazali se kobakisama, mpo mbula ezali kobɛta te to mpe ezali kobɛta mingi koleka, to mpo nkita ebebi mingi. Kozwa mosala ekoki kokóma mpasi koleka, mpe bapatrɔ bakoki kosɛnga na bato ya misala básalaka bangonga mingi koleka. Ata soki makambo ekómi mpasi ndenge nini, bato oyo batyaka makambo ya elimo na esika ya liboso mpe babatelaka ‘liso alima’ bakomitungisa mingi te. Bayebi ete Nzambe alingaka bango mpe akobatela bango. (Mat. 6:22-34) Na ndakisa, tótalela ndenge oyo Yehova abatelaki Yilimia liboso Yelusaleme ebomama na mobu 607 L.T.B.
18. Ndenge nini Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na Yilimia ntango banguna bazingaki Yelusaleme?
18 Na mikolo ya nsuka oyo basoda ya Babilone bazingaki Yelusaleme, Yilimia atyamaki na bolɔkɔ na kati ya lopango ya bakɛngɛli. Ndenge nini akokaki kozwa bilei? Soki azalaki na bonsomi, alingaki koluka bilei ye moko. Nzokande, akokaki kozwa bilei kaka na nzela ya bato oyo bazalaki pembeni na ye; kasi, mingi kati na bango bazalaki koyina ye! Atako bongo, Yilimia atyaki elikya epai ya bato te, kasi epai ya Nzambe oyo alakaki ete akobatela ye. Yehova akokisaki maloba na ye? Ɛɛ! Asalaki ete mokolo na mokolo Yilimia azwaka “mokate ya mampa . . . kino mampa nyonso na mboka esilaki.” (Yil. 37:21) Yilimia, Baluku, Ebede-meleke, mpe bato mosusu babikaki na eleko wana ya nzala, maladi, mpe liwa.—Yil. 38:2; 39:15-18.
19. Ntango tozali kokanisa mikolo ezali koya, ekateli na biso esengeli kozala nini?
19 Ya solo, “miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango.” (1 Pet. 3:12) Osepelaka lokola Tata na yo ya likoló atalaka yo? Ozalaka motema mpiɔ na ndenge oyebi ete miso na ye ezali kotala yo mpo na bolamu na yo? Boye, zalá na ekateli ya kokoba kotambola elongo na Nzambe, ata soki makambo ekómi ndenge nini na mikolo ezali koya. Tokoki kozala na elikya ete miso ya Yehova ekozala ntango nyonso likoló ya basaleli na ye ya sembo.—Nz. 32:8; tángá Yisaya 41:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako mikanda yango etaleli libosoliboso bayekoli ya Klisto oyo bazali bapakolami na elimo, makanisi na yango etaleli mpe basaleli nyonso ya Nzambe.
b Ndakisa mosusu oyo ezali komonisa ete Nzambe atambwisaka biso ezali na Misala 16:6-10. Bavɛrsɛ yango elobi ete “elimo santu epekisaki” Paulo ná baninga na ye básakola na etúká ya Azia mpe ya Bitinia. Nzokande, batindamaki na Masedonia, epai bato mingi ya komikitisa bandimaki nsango oyo bazalaki kosakola.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘kotambola na Nzambe elongo’?
• Ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaki Baluku?
• Ndenge nini Yesu, Mokonzi ya lisangá, amonisaki bizaleli ya Tata na ye?
• Na mikolo oyo ya nsuka, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotyela Nzambe elikya?
[Bililingi na lokasa 9]
Ndenge Yilimia asalaki epai ya Baluku, bankulutu bamonisaka ete Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye
[Elilingi na lokasa 10]
Ndenge nini Yehova akoki kosalisa na ntango oyo ebongi?