Osengeli kopona lingomba biponela?
BATO mingi balingaka soki bakei kosomba eloko bátambola naino liboso ya kopona oyo ya kitoko. Ata soki mbuma mpe ndunda ezali ndenge na ndenge na zando, tokopona kaka oyo tolingaka mingi mpe oyo ebongi mpo na libota na biso. Soki tokuti bilamba ebele mpe ya langi ndenge na ndenge na magazini, tokopona kaka oyo ebongi na biso. Makambo mosusu oyo toponaka na bomoi etalaka kaka motema ya moto na moto. Nzokande, mosusu ekoki komemela biso bolamu; na ndakisa soki tozali kopona bilei oyo ekotonga nzoto to baninga ya malamu. Bongo, ezali boni mpo na lingomba? Tosengeli kopona lingomba kaka mpo tosepeli na yango? To ezali mpenza likambo ya ntina na bomoi na biso?
Mangomba ezali ndenge na ndenge na mokili. Bikólo mingi ekómi kopesa bato bonsomi ya losambo, mpe bato bazali lisusu komona mabe te kolongwa na mangomba ya baboti na bango. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis emonisaki ete bato mingi (80%) ya Amerika “bandimaka ete kaka lingomba moko te nde ekoki komema na lobiko.” Kaka na ankɛtɛ yango, “bato mingi oyo batunaki (20%) balobaki ete batikaki mangomba na bango ya kala ntango bakómaki mikóló.” Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Brésil emonisi ete bato mingi, (soki 25%) batikaki mangomba na bango ya kala.
Kala, bato bazalaki kowelana makasi mpo na mateya ya mangomba na bango. Nzokande, lelo oyo, bato mingi bakómá koloba ete ‘lingomba nyonso oyo moto aponi ezali kaka malamu.’ Kasi, ezali mpenza bongo? Lingomba oyo okopona ekomemela yo bolamu?
Ndenge kaka moto ya mayele oyo alingi kosomba eloko alukaka liboso koyeba epai euti, ekozala malamu yo mpe omituna boye: ‘Mangomba oyo nyonso ebandaki ndenge nini, mpe mpo na nini?’ Biblia epesi biyano.
Ndenge nini mangomba ebandaki?
Na Yisalaele ya kala, mbula soki nkóto liboso Yesu aya awa na mabelé, Mokonzi Yelobama abimisaki lingomba moko ya sika. Yelobama azalaki mokonzi ya liboso ya bokonzi ya Yisalaele ya Nɔrdi, oyo epesaki Nzambe mokɔngɔ. Azalaki na mokakatano ya kozwa mitema ya bato nyonso. “Mokonzi alukaki toli mpe asalaki bana mibale na ngɔmbɛ ya wolo. Alobaki na bango ete, Longwa ntango molai, bosili kokendaka na Yelusaleme. Talá banzambe na bino, ɛ Yisalaele.” (1 Mikonzi 12:28) Emonani polele ete mokonzi alukaki kosalela losambo mpo na kolongola makanisi ya bato na Yelusaleme, epai bamesanaki kosambela. Losambo oyo Yelobama abimisaki eumelaki bankama ya bambula, ebomisaki bamilio ya bato ntango Nzambe apesaki ekólo ya Yisalaele oyo epɛngwaki etumbu. Yelobama abimisaki losambo wana mpo na kokokisa mikano na ye ya politiki. Mangomba mosusu ya Leta oyo ezali kokoba kino lelo ebimaki mpe kaka mpo na kokokisa mikano ya politiki.
Ntoma Paulo amonisaki likambo mosusu oyo etindaka bato bábimisa lingomba. Alobaki ete: “Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe uta na kati na bino mpenza mibali bakobima mpe bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Mbala mingi, bato ya lolendo babimisaka mangomba mpo báyebana. Mangomba oyo ekosaka ete ezali ya boklisto ekabwaná na mwa mangomba mikemike.
Mangomba elukaka kosepelisa nani?
Bamosusu babimisaka mangomba mpo na kokokisa mposa ya bato. Na ndakisa, zulunalo moko (Economist) elobelaki mangomba ya minene oyo ezali na États-Unis. Lisolo yango elobaki ete mangomba yango ezali kokola mpo “ezali kosalela kaka mayele oyo bato ya mimbongo basalelaka mpo na kobenda bakiliya.” Mangomba yango mosusu elakisaka “bafilme, badrame mpe miziki oyo bato bazali kolanda mingi.” Bakonzi mosusu ya mangomba yango balobaka ete bazali kolakisa bato na bango “ndenge ya kokóma na bozwi, kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe kozala na bomoi ezangi mitungisi.” Atako bato bazali koloba ete mangomba yango ezali komipesa na masano to kolakisa bato ndenge ya komisunga bango moko, bango bazali kokokisa kaka bamposa ya bandimi na bango.” Lisolo yango esukisaki boye: “Kosangisa mombongo ná lingomba ezali mpenza kofuta malamu.”
Atako mangomba mosusu esalaka mombongo polele boye te, nzokande oyo ezali koluka “kokokisa bamposa ya bato” ezali kokundwela biso likambo moko oyo Paulo alobaki. Akomaki ete: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango uta na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta.”—2 Timote 4:3, 4.
Lokola mangomba ezali kobima mpo na kokokisa mikano ya politiki, koluka lokumu, mpe mpo na koluka kosepelisa bato na esika ya kosepelisa Nzambe, tokoki kokamwa te ete ezali mpe kosala makambo ya mabe lokola kobebisa bana mike, kanyaka, bitumba mpe terorisme. Mbala mingi, mangomba ezalaka kaka lokola bankɔi oyo balati mposo ya meme. Okosala nini mpo bákosa yo te?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Mangomba mingi ezali kobima mpo na kokokisa mikano ya politiki, koluka lokumu, mpe mpo na koluka kosepelisa bato na esika ya kosepelisa Nzambe