Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/10 nk. 11-15
  • Yehova asalisaki ngai nalonga mikakatano ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalisaki ngai nalonga mikakatano ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikumba minene oyo nazwaki na bomwana
  • Liwa ya mwasi na ngai
  • Nabali lisusu mpe libota ekómi monene
  • Mokakatano ya kobɔkɔla mapasa minei
  • Bayekoli makambo ya elimo banda bomwana
  • Nazali kobunda na bobange
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ayikaki mpiko na mawa makasi oyo ezalaki lokola mopanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/10 nk. 11-15

Lisolo ya bomoi

Yehova asalisaki ngai nalonga mikakatano ya bomoi

YA DALE IRWIN

“BANA MWAMBE BALEKI EBELE. KOBOTA BANA MINEI MBALA MOKO EBAKISI LISUSU MOKUMBA MAKASI.” Na maloba wana nde zulunalo moko ya mboka na biso elobelaki bana minei ya mapasa oyo babakisamaki na libota na biso. Ntango nazalaki naino elenge, nazalaki na likanisi ya kobala mpe kobota te. Kasi, sikoyo nakómi tata ya bana mwambe mobimba.

NABOTAMAKI na 1934, na engumba ya Mareeba, na ekólo Australie. Na kati ya biso bana misato, ngai nde nazalaki leki. Na nsima, libota na biso mobimba tokendaki na engumba Brisbane, epai mama akómaki kolakisa bana mike mateya mokolo ya eyenga na Lingomba ya Metodiste.

Na ebandeli ya 1938, bazulunalo ya mboka eyebisaki ete baboyi Joseph Rutherford akɔta na Australie. Mama atunaki Motatoli moko oyo ayaki epai na biso boye: “Mpo na nini bazali kosala ye bongo?” Ayanolaki ete: “Yesu alobaki te ete bato bakonyokola bayekoli na ye?” Mama andimaki mwa buku Guérison, oyo elobelaki makambo mingi oyo ekesenisaka lingomba ya solo ná oyo ya lokuta.a Lokola asepelaki na mwa buku yango, amemaki biso bana nyonso na makita ya Batatoli ya Yehova na mokolo ya lomingo oyo elandaki. Na ebandeli, tata aboyaki makasi, kasi mikolo mosusu azalaki kokoma mituna ebele mpe kopesa mama mpo apesa Motatoli moko. Ndeko yango azalaki kokomela ye biyano ya Biblia mpe akopesa mama apesa tata.

Mokolo moko ya lomingo, tata ayaki elongo na biso na makita, na likanisi ete amonisa Batatoli ete mateya na bango ezali malamu te. Kasi, nsima ya kosolola na mokɛngɛli ya zongazonga oyo ayaki kotala lisangá yango na ntango wana, abongolaki makanisi mpe andimaki kutu ete bato oyo basepelaki na Biblia na kartye na biso báyekolaka epai na biso.

Na Sɛtɛmbɛ 1938, baboti na ngai bazwaki batisimo. Ngai ná bandeko na ngai tozwaki batisimo na Desɛmbɛ 1941, na liyangani ya ekólo mobimba oyo esalemaki na Parc ya Hargreave, na engumba Sydney, na Nouvelle-Galles du Sud. Nazalaki na mbula nsambo. Nazalaki kobima na mosala ya kosakola mbala na mbala ná baboti na ngai. Na ntango wana, Batatoli bazalaki komema fɔnɔ na bandako ya bato mpe koyokisa bango masolo ya Biblia.

Ndeko oyo nabosanaka te ezali Bert Horton. Azalaki na motuka moko oyo ezalaki na radio na kati mpe na mikro likoló na yango. Ezalaki mpenza esengo kobimaka na ye na mosala ya kosakola, mingimingi mpo na elenge lokola ngai. Na ndakisa, mbala mingi soki tozali koyokisa lisolo moko ya Biblia likoló ya ngomba, tozalaki komona motuka ya bapolisi ezali kolanda biso. Tozalaki mbala moko kokanga radio yango, kokende na ngomba mosusu mpe kofungola lisusu radio. Bert ná bandeko mosusu ya sembo mpe ya mpiko lokola ye basalisaki ngai mingi mpo nayeba kotyela Yehova motema mpe kozala na mpiko.​—Matai 10:16.

Ntango nakómaki na mbula 12, nakómaki kobima ngai moko na mosala ya kosakola soki nauti kelasi. Mokolo moko, nakutanaki na libota ya Adshead. Na nsima, Adshead, mwasi na ye, bana na bango mwambe mpe ebele ya bankɔkɔ na bango bayekolaki solo. Natɔndaka Yehova ndenge asalaki ete mwa mwana lokola ngai nakɔtisa solo ya Biblia na libota wana.​—Matai 21:16.

Mikumba minene oyo nazwaki na bomwana

Ntango nakómaki na mbula 18, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe batindaki ngai na engumba Mitland, na Nouvelle-Galles du Sud. Na 1956, babengaki ngai na biro ya filiale ya Sydney, na Australie. Na kati ya bandeko 20 oyo bazalaki kosala kuna, mwa mingi bazalaki bapakolami, oyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Klisto kuna na likoló. Ezalaki mpenza libaku malamu kosala na bango!​—Luka 12:32; Emoniseli 1:6; 5:10.

Makanisi oyo nazalaki na yango ya kotikala monzemba ebongwaki ntango nakutanaki na Judy Helberg, mobongisi-nzela moko oyo babengaki na Betele aya kosalisa ngai mpo na mwa ntango na mosala moko. Ngai ná Judy tolinganaki mpe tobalanaki nsima ya mbula mibale. Na nsima, tobandaki mosala ya zongazonga, oyo ezalaki kosɛnga kotalaka masangá ya Batatoli ya Yehova pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisa bandeko.

Na 1960, Judy abotaki Kim, mwana na biso ya liboso. Lelo ekómá, soki mokɛngɛli ya zongazonga aboti, atiki mosala yango. Kasi, tókamwaki ntango bayebisaki biso ete tókoba kaka na mosala na biso. Nsima ya kobondela mingi, tondimaki, mpe na boumeli ya sanza nsambo, Kim atambolaki na biso kilomɛtrɛ 13 000 mobimba na bisi, pɛpɔ mpe engbunduka, ntango tozalaki kotala masangá na etúká ya Queensland mpe na teritware ya nɔrdi. Tozalaki na motuka na ntango wana te.

Tozalaki ntango nyonso kofanda epai ya bandeko. Lokola molunge ezalaka mingi kuna, na ntango wana bazalaki kotya barido na esika ya baporte na bashambre, mpe yango ezalaki kobangisa biso makasi ntango Kim azalaki kolela na butu. Kobɔkɔla mwana mpe kosala mosala ya zongazonga ekómaki mokumba makasi. Tokendaki kofanda na Brisbane mpe kuna, nakómaki kosala mayemi mpe koteka yango. Mbula mibale na nsima ya kobotama ya Kim, tobotaki Petina, mwana na biso ya mibale.

Liwa ya mwasi na ngai

Na 1972, ntango Kim akómaki na mbula 12 mpe Petina mbula 10, Judy abelaki kanser mpe akufaki. Liwa na ye epesaki libota mobimba mpasi mingi. Kasi, ezala ntango Judy azalaki kobɛla to nsima ya liwa na ye, Yehova azalaki kobɔndisa biso mingi na nzela ya Liloba na ye, ya elimo santu mpe ya bandeko ya lisangá. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tozwaki nsima ya liwa na ye elendisaki biso mpe mingi. Ezalaki na lisolo moko oyo elobelaki mikakatano oyo moto akoki kokutana na yango, ezala mpe kokufela moto, mpe emonisaki ndenge mikakatano ekoki kosalisa biso tólona bizaleli lokola mpiko, kondima mpe bosembo.b​—Yakobo 1:2-4.

Nsima ya liwa ya Judy, ngai ná bana tokómaki mpenza lokola baninga. Nzokande, mpo na koloba solo, ezalaki pɛtɛɛ te kozala ngai moko tata mpe mama. Kasi, bana na ngai basalisaki ngai mingi.

Nabali lisusu mpe libota ekómi monene

Na nsima, nabalaki lisusu. Ngai ná Mary, mwasi na ngai ya sika, tokokanaki na makambo mingi. Mobali na ye akufaki mpe na maladi oyo Judy akufaki na yango. Azalaki mpe na bana basi mibale: Colleen ná Jennifer. Colleen azalaki leki ya Petina na mbula soki misato. Na yango, libota na biso ezalaki na bana basi minei oyo bazalaki na mbula 14, 12, 9, mpe 7.

Ngai ná Mary toyokanaki ete moto na moto ateyaka bana na ye moko tii ntango bana bakomesana na biso nyonso mpe bakobanda koyokela biso nyonso. Ngai ná Mary tomityelaki mpe mibeko mibale ya ntina mingi. Ya liboso, soki toyokani te na likambo moko, tosengelaki komonisa yango liboso ya bana te. Ya mibale, na boyokani na toli ya Biblia oyo ezwami na Baefese 4:26, tozalaki kosolola tii ntango tokoyokana mpenza na likambo yango; ata soki esɛngi tósolola ebele ya bangonga liboso ya koyokana.

Likambo ya kokamwa, biso nyonso tosalaki makasi tómesana na libota na biso ya sika, kasi tobosanaki mbala moko te balongani na biso ya liboso oyo bakufaki. Na ndakisa, mikolo nyonso ya mosala moko na butu, Mary azalaki kolela. Mbala mingi nsima ya boyekoli ya libota, ntango bana bakei kolala, makanisi eyelaka ye mpe abandaka kolela.

Mary alingaki tóbota mpe mwana ya biso mibale. Likambo ya mawa, zemi ya liboso esopanaki. Ntango Mary azwaki zemi mosusu, oyo nde mama na likambo! Minganga batalaki ye mpe bamonaki ete azalaki na zemi ya mwana moko te, kasi ya bana minei! Natelaki miso. Nalingaki kokóma tata ya bana mwambe na mbula 47! Mary abotaki bana yango na lipaso nsima ya sanza mwambe, mwa 14 Febwali 1982. Babotamaki na molɔngɔ oyo: Clint, 1,6 kg; Cindy, 1,9 kg; Jeremy, 1,4 kg mpe Danette, 1,7 kg. Bango nyonso minei bakesanaki.

Ntango kaka babotamaki, monganga oyo abotisaki Mary ayaki kofanda pembeni na ngai.

Atunaki ngai boye: “Ozali kobanga ete okokoka te kobɔkɔla bana yango?”

Nayanolaki ye boye: “Nakutaná naino na likambo ya boye te.”

Likambo oyo alobaki na nsima ekamwisaki ngai mpe elendisaki ngai mpenza.

Alobaki boye: “Lisangá na bino ekotala yo na miso te. Soki bokeleli ata mwa moke, bakokima mbango mpo na kosunga bino!”

Lokola monganga yango ná ekipi na ye bayebaki mpenza mosala, bana yango babimaki na lopitalo nsima ya sanza mibale mpamba, mpe bazalaki bango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ.

Mokakatano ya kobɔkɔla mapasa minei

Mpo makambo nyonso esalemaka na molɔngɔ, ngai ná Mary tosalaki programɛ ya mokɔlɔ mobimba. Bana na biso ya mikóló basungaki biso mingi na kobɔkɔla babebe yango. Mpe emonanaki mpenza ete monganga alobaki solo: Soki ‘tokeleli ata mwa moke,’ lisangá ezalaki kosunga biso. Ntango kaka bana yango babotamaki, John MacArthur, moninga na biso ya motema, abengaki Batatoli oyo bayebaki kotonga mpe bayeisaki ndako na biso monene. Ntango babebe babimaki na lopitalo, bandeko basi mingi ya lisangá bapesaki biso mabɔkɔ. Boboto nyonso wana emonisaki mpenza bolingo ya boklisto.​—1 Yoane 3:18.

Tokoki mpenza koloba ete bana yango bazalaki “babebe ya lisangá.” Ata tii lelo oyo, bana yango bamonaka ebele ya bandeko ya lisangá oyo basungaki biso lokola bato ya libota na biso. Mary azalaki mwasi malamu mpe mama ya solosolo, oyo azalaki mpenza koboma nzoto mpo na bana na ye. Azalaki mpenza kosalela toli oyo azalaki kozwa na Biblia mpe na ebongiseli ya Nzambe. Okoki kozwa batoli ya ndenge wana epai mosusu te!​—Nzembo 1:2, 3; Matai 24:45.

Atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kobɔkɔla babebe minei wana, makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola ezalaki kaka kozwa esika ya liboso. Lokola mibali mibale ná basi na bango oyo tozalaki koyekola na bango Biblia na ntango wana bandimaki koyaka koyekola na ndako na biso, tomonaki yango mpenza lipamboli. Atako yango esalisaki biso mingi, ntango mosusu soki tozali koyekola na bango, Mary azalaki kolɛmba makasi mpe mpongi ezalaki koyiba ye, ná bebe moko na mabɔkɔ. Nsukansuka, mabota yango nyonso mibale bakómaki bandeko na biso ya elimo.

Bayekoli makambo ya elimo banda bomwana

Liboso kutu babebe yango bábanda kotambola, ngai ná Mary mpe bana na biso ya mikólo tozalaki kobima na bango na mosala ya kosakola. Ntango babandi kotambola, ngai ná Mary tozalaki kobima na mibalemibale, mpe bazalaki kilo te mpo na biso. Kutu, bazalaki nde kopesa biso libaku ya kobanda masolo ya Biblia ná bato ya boboto oyo tokei kotala. Mokolo mosusu, nakutanaki na mobali moko oyo alobaki na ngai ete ezaleli ya moto elandaka mokolo oyo abotami mpe monzoto na ye. Nalukaki kowelana na ye te, kasi natunaki ye soki nakoki kozongela ye nsima. Andimaki, mpe nazongelaki ye na bamapasa na ngai minei. Ntango azalaki kotala ngai na kokamwa nyonso, natandelaki ye bango na molɔngɔ ndenge babimaki. Na nsima, tobandaki kolobela bokeseni monene oyo bazali na yango, ezala na nzoto mpe na bomoto na bango; mpe yango ekangaki ye mpenza monɔkɔ. “Nayoki nsɔni mpenza ndenge nayebisaki yo likambo yango. Nasengeli koyekola likambo yango lisusu malamumalamu.”

Ntango bazalaki naino moke mpenza, bazalaki kolinga te bápesa bango nyonso etumbu mbala moko. Yango wana tozalaki kopesa bango nyonso bitumbu mbala moko te. Atako bongo, basosolaki ete bango nyonso basengeli kotosa mibeko ndenge moko. Soki bakutani na komekama na kelasi, bazalaki kolanda kaka oyo Biblia elobi mpe bazalaki kokɔtelana mpo moko akwea te, mpe Cindy akómaki lokola molobeli na bango. Mosika te, bato bamonaki ete ezali pɛtɛɛ te kozwa likambo na bamapasa minei!

Ngai ná Mary tozalaki na mokakatano lokola baboti nyonso ya kosalisa bana bátikala sembo epai na Yehova na bolenge na bango. Tokoki mpenza koloba ete soki tozalaka te na lisalisi ya bandeko ya lisangá mpe ya ebele ya ebele ya bilei ya elimo oyo tozalaki kozwa na ebongiseli ya Yehova, biso moko tolingaki kokoka te. Atako ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, tozalaki kosala nyonso mpo na koyekolaka Biblia pɔsɔ nyonso na kati ya libota mpe mpo na kosololaka na bana. Tomoni mpenza ete tosalaki mosala ya mpunda te, mpamba te bana na biso nyonso mwambe baponaki kosalela Yehova.

Nazali kobunda na bobange

Na boumeli ya bambula, nazwi mikumba mingi na ebongiseli ya Yehova: Nkulutu ya lisangá, mokɛngɛli ya engumba mpe mokɛngɛli ya zongazonga mosungi. Nasalaki mpe na Komite ya boyokani na minganga ya mboka na biso, oyo ekosalisaka minganga báyokanaka malamu na Batatoli na likambo ya kozongisa makila. Na boumeli ya mbula 34, naponamaki mpe mpo na kobalisaka bandeko. Natambwisaki milulu ya mabala soki 350, ná oyo ya bana na ngai ya basi motoba.

Natɔndaka Yehova ntango nyonso mpo na lisalisi oyo nazwaki, liboso epai ya Judy mpe sikoyo epai ya Mary. (Masese 31:10, 30) Na ntango bazalaki kosunga ngai na mosala na ngai ya nkulutu ya lisangá, bazalaki mpe kopesa ndakisa malamu mpenza na mosala ya kosakola, mpe basalisaki bana bálona bizaleli oyo Nzambe asepelaka na yango.

Na 1996, bazwaki ngai na maladi moko ya bɔɔngo oyo elɛngisaka mabɔkɔ mpe epekisaka moto kotɛlɛma malamu. Na yango, nakokaka lisusu te kosala na mayemi. Kasi, nazali kokoba kozwa esengo mingi na mosala ya Yehova, atako nazali kokoka lisusu kosakola mingi te. Likambo ya malamu na maladi na ngai ezali ete esalisi ngai nayebaka mpenza komitya na esika ya mibange mosusu.

Soki natali bomoi na ngai, natɔndaka Yehova na ndenge azali ntango nyonso kosalisa ngai ná libota na ngai tózanga esengo te atako tozali kokutana na ebele ya mikakatano. (Yisaya 41:10) Ngai ná Mary ná bana na biso mwambe tozali mpe na botɔndi mpo na bandeko ya lisangá, mpo na lisungi monene na bango. Bango nyonso bamonisi biso bolingo na ndenge ebele oyo tokoki kutu kotánga te.​—Yoane 13:34, 35.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, kasi ebimaka lisusu te.

b Talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli 1972, nkasa 398-404 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 12]

Ngai ná mama, na yaya na ngai ya mobali, Garth mpe oyo ya mwasi, Dawn, tolingi kokende na liyangani oyo esalemaki na Sidney na 1941

[Elilingi na lokasa 13]

Ngai ná Judy ná bebe na biso Kim, ntango nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga na etúká ya Queensland

[Elilingi na lokasa 15]

Ntango bamapasa minei babotamaki, bana na biso minei ya mikóló ná bandeko ya lisangá bapesaki biso mabɔkɔ

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto