Bolingo epesaka mpiko
“Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.”—2 TIMOTE 1:7.
1, 2. (a) Bolingo ekoki kotinda moto asala nini? (b) Mpo na nini mpiko ya Yesu ekoki kokamwisa biso?
MOBALI moko ná mwasi na ye, oyo bautaki kobalana, bazalaki kosakana na nse ya mai, pene na engumba moko oyo ezali na pembeni ya mbu na ɛsti ya ekólo Australie. Ntango balingaki kobima, mbisi moko ya monene (requin blanc) ebandaki koya mbangu epai ya mwasi. Na mpiko nyonso, mobali yango atindikaki mwasi pembeni mpe atikaki mbisi yango ekanga ye. Ntango bazalaki kolela ye, mwasi na ye alobaki boye: “Amikabi mpo na ngai.”
2 Ya solo, bolingo ekoki kopesa bato mpiko ya kosakana te. Yesu Klisto alobaki ete: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Ata mokolo moko ekokaki te nsima ya koloba maloba wana, Yesu amikabaki, kaka mpo na moto moko te, kasi mpo na bato nyonso. (Matai 20:28) Kasi, Yesu apesaki bomoi na ye na mbalakaka te. Ayebaki liboso ete bakotyola ye mpe konyokola ye, bakokatela ye etumbu atako asali mabe moko te mpe bakoboma ye likoló ya nzete ya mpasi. Kutu, ayebisaki bayekoli na ye liboso likambo yango esalema ete: “Talá, tozali komata na Yelusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli, mpe bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye epai ya bato ya bikólo mosusu, mpe bakosɛka ye mpe bakobwakela ye nsoi mpe bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye.”—Malako 10:33, 34.
3. Nini epesaki Yesu mpiko nyonso wana?
3 Nini epesaki Yesu mpiko wana ya kokamwa? Kondima mpe kobanga Nzambe esalaki ye mingi. (Baebele 5:7; 12:2) Kasi, oyo eleki ntina, mpiko ya Yesu eutaki na bolingo oyo azalaki na yango mpo na Nzambe mpe mpo na bato. (1 Yoane 3:16) Longola kondima mpe kobanga Nzambe, soki biso mpe tomonisi bolingo motindo wana, tokoki komonisa mpiko lokola Klisto. (Baefese 5:2) Ndenge nini tokoki kokóma na bolingo ya motindo wana? Tosengeli koyeba epai bolingo eutá.
“Bolingo euti na Nzambe”
4. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali liziba ya bolingo?
4 Yehova azali bolingo mpe Liziba ya bolingo. Ntoma Yoane akomaki ete: “Balingami, tiká tókoba kolingana, mpamba te bolingo euti na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka abotami na Nzambe mpe azwi boyebi ya Nzambe. Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpamba te Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:7, 8) Moto akoki kokóma na bolingo ya Nzambe kaka soki apusani penepene na Yehova na nzela ya boyebi ya solosolo mpe azali kosalela boyebi yango na motema mobimba.—Bafilipi 1:9; Yakobo 4:8; 1 Yoane 5:3.
5, 6. Nini esalisaki bayekoli ya Yesu ya liboso bákóma na bolingo lokola oyo ya Klisto?
5 Na libondeli ya nsuka oyo asalaki elongo na bayekoli na ye 11 ya sembo, Yesu amonisaki boyokani oyo ezali na kati ya koyeba Nzambe mpe kokola na bolingo na maloba oyo: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.” (Yoane 17:26) Mpo na kosalisa bayekoli na ye bákóma na bolingo oyo ye ná tata na ye bazalaki na yango, Yesu amonisaki bango na maloba mpe na misala ndimbola ya nkombo ya Nzambe, elingi koloba bizaleli kitoko ya Nzambe. Yango wana, Yesu akokaki koloba ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”—Yoane 14:9, 10; 17:8.
6 Elimo santu ya Nzambe nde epesaka moto bolingo lokola oyo ya Klisto. (Bagalatia 5:22) Na pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ntango baklisto ya liboso bazwaki elimo santu oyo Yesu alakaki bango, bamikundwelaki kaka te makambo mingi oyo Yesu ateyaki bango, kasi bakangaki mpe ntina ya Makomami lisusu malamumalamu. Na ntembe te, boyebi wana ya mozindo esalisaki bango bálinga Nzambe lisusu makasi koleka. (Yoane 14:26; 15:26) Ebimisaki matomba nini? Na mpiko mpe na molende, bazalaki kosakola nsango malamu, atako bomoi na bango ezalaki na likama.—Misala 5:28, 29.
Bamonisaki mpiko mpe bolingo
7. Mikakatano nini Paulo ná Balanabasi bakutanaki na yango na mobembo oyo basalaki lokola misionɛrɛ?
7 Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.” (2 Timote 1:7) Paulo azalaki kolobela makambo oyo amonaki na miso. Kanisá naino makambo oyo ye ná Balanabasi bakutanaki na yango na mobembo oyo basalaki lokola bamisionɛrɛ. Basakolaki na bingumba mingi, na ndakisa Antiokia, Ikoniumu mpe Lisitala. Na engumba mokomoko, bato mosusu bakómaki bandimi, kasi basusu bazalaki kotɛmɛla bango makasi mpenza. (Misala 13:2, 14, 45, 50; 14:1, 5) Kutu na Lisitala, ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda makasi babambaki Paulo mabanga, mpe lokola bakanisaki ete akufi, batikaki ye mpe bakendaki. “Nzokande, ntango bayekoli bazingaki ye, atɛlɛmaki mpe akɔtaki na engumba. Mpe na mokolo oyo elandaki alongwaki elongo na Balanabasi mpo na kokende na Delebe.”—Misala 14:6, 19, 20.
8. Ndenge nini mpiko oyo Paulo ná Balanabasi bazalaki na yango emonisi ete bazalaki mpenza kolinga bato?
8 Atako balingaki koboma Paulo, ye ná Balanabasi babangaki mpe batikaki kosakola? Soki moke te! Nsima ya “kokómisa bato mingi bayekoli” na Delebe, “bazongaki na Lisitala mpe na Ikoniumu mpe na Antiokia.” Mpo na nini? Mpo na kolendisa bayekoli ya sika mpo kondima na bango ekita te. Paulo ná Balanabasi balobaki boye: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” Emonani polele ete bolingo makasi oyo bazalaki na yango mpo na “bampate [ya Klisto] ya mike” nde epesaki bango mpiko wana. (Misala 14:21-23; Yoane 21:15-17) Nsima ya kotya bankulutu na masangá oyo eutaki kosalema, Paulo ná Balanabasi babondelaki mpe “bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova oyo bango bakómaki bandimi na ye.”
9. Bolingo oyo Paulo amoniselaki bankulutu ya Efese etindaki bango básala nini?
9 Bolingo mpe mpiko ya Paulo etindaki baklisto mingi ya ntango wana bálinga ye mingi. Kanisá naino likambo oyo esalemaki na likita moko oyo Paulo asalaki na bankulutu ya Efese, epai asalaki mbula misato mpe akutanaki na botɛmɛli makasi. (Misala 20:17-31) Nsima ya kolendisa bango ete bábatela etonga oyo Nzambe apesaki bango, Paulo afukamaki elongo na bango mpe abondelaki. Mpe “mpisoli mingi esopamaki na kati na bango nyonso, mpe bakwelaki Paulo na nkingo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza, mpamba te bayokaki mpasi mingimingi mpenza na liloba oyo alobaki ete bakomona elongi na ye lisusu te.” Bandeko yango balingaki Paulo makasi mpenza! Mpo na kokende, Paulo ná baninga na ye ya mobembo ‘bakabwanaki na bango na mpasi,’ mpo bankulutu yango balingaki kotika bango te.—Misala 20:36–21:1.
10. Ndenge nini Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso bamonisaki mpiko mpo na bolamu ya bandeko na bango?
10 Lelo oyo, mpiko oyo bakɛngɛli-batamboli, bankulutu ya masangá mpe bandeko mosusu bamonisaka mpo na bolamu ya bampate ya Yehova etindaka bampate bálinga bango mingi. Na ndakisa, na bikólo oyo bana-mboka bazalaki kobunda bango na bango to epai mosala ya kosakola epekisamaki, bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango bazalaki kotala masangá, atako bayebaki ete bakoki koboma bango to kokanga bango. Ndenge moko, bakonzi ná bato na bango oyo balingaki Batatoli te bamonisaki mingi kati na bango bwale mpo baboyaki kopesa bankombo ya bandeko na bango to koyebisa epai bazalaki kozwa bilei ya elimo. Banyokolaki, banyongaki mpe babomaki ebele ya bandeko mosusu mpo baboyaki kotika kosakola nsango malamu to koyanganaka na bandeko na bango na makita ya boklisto. (Misala 5:28, 29; Baebele 10:24, 25) Tosengeli mpenza komekola kondima mpe bolingo ya bandeko wana ya mpiko!—1 Batesaloniki 1:6.
Kotika te bolingo na yo ekóma mpiɔ
11. Na lolenge nini Satana azali kobundisa basaleli ya Yehova na elimo, mpe bango basengeli kosala nini?
11 Ntango Satana abwakamaki awa na mabelé, azalaki na mokano ya kosilisa nkanda na ye nyonso likoló ya basaleli ya Yehova mpamba te “bazali kotosa mibeko ya Nzambe mpe . . . kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:9, 17) Moko ya myango ya Zabolo ezali minyoko. Nzokande, mbala mingi, mwango yango ebimisaka nde matomba ya malamu mpamba te etindaka basaleli ya Nzambe bálingana lisusu makasi mpe ebakiselaka mingi kati na bango molende. Mwango mosusu ya Satana ezali ya kolamusa bamposa na biso ya mabe. Kotɛmɛla mwango yango esɛngaka mpiko ya lolenge mosusu, mpamba te tosengeli kobunda nde na bamposa mabe oyo ezali na kati ya motema na biso moko ya ‘bokosi mpe ya mabe mingi.’—Yilimia 17:9; Yakobo 1:14, 15.
12. Ndenge nini Satana asalelaka “elimo ya mokili” mpo na kolɛmbisa bolingo na biso mpo na Nzambe?
12 Ebundeli mosusu ya makasi mpenza oyo Satana azali kosalela ezali “elimo ya mokili,” elingi koloba makanisi mpe bamposa ya mokili, oyo ezali na boyokani ata moke te na elimo santu ya Nzambe. (1 Bakolinti 2:12) Elimo ya mokili etindaka na lokoso mpe na koluka konduka biloko mingi, elingi koloba elamwisaka “mposa ya miso.” (1 Yoane 2:16; 1 Timote 6:9, 10) Atako biloko ya mokili mpe mbongo ezali mabe te, soki tozali kolinga yango mingi koleka Nzambe, wana Satana akolonga. “Nguya” ya elimo ya mokili eutaka na ndenge elamwisaka bamposa mabe ya nzoto, esalelaka mayele mabe, elɛmbaka te mpe epanzanaka bisika nyonso lokola mopɛpɛ. Kotika te ete elimo ya mokili ebebisa motema na yo!—Baefese 2:2, 3; Masese 4:23.
13. Ndenge nini mpiko na biso ekoki komekama?
13 Nzokande, mpo na kolonga mpe kobwaka elimo mabe ya mokili, esɛngaka kozala na mpiko. Na ndakisa, esɛngaka mpiko mpo na kotɛlɛma mpe kolongwa na ndako ya masano, kokanga ordinatɛrɛ to televizyo ntango omoni bililingi ya mabe. Esɛngaka mpiko mpo na koboya baninga mabe mpe makambo na bango. Ndenge moko, esɛngaka mpiko mpo na kokoba kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe ntango baninga ya kelasi, ya mosala, bato ya kartye to bandeko bazali kosɛka biso.—1 Bakolinti 15:33; 1 Yoane 5:19.
14. Tosengeli kosala nini soki elimo ya mokili ekɔteli biso?
14 Na yango, ezali mpenza na ntina ete tósala makasi mpo tókóma kolinga Nzambe mpe na bandeko na biso baklisto lisusu koleka! Zwá ntango mpo na kotalela mikano mpe bomoi na yo mpo na koyeba soki elimo ya mokili ebebisi yo. Soki omoni ete ekɔteli yo ata moke, bondelá Yehova apesa yo mpiko ya kolongola mpe kobwaka yango. Yehova akoboya mabondeli ya sembo motindo wana te. (Nzembo 51:17) Lisusu, elimo na ye ezali na nguya mpenza koleka oyo ya mokili.—1 Yoane 4:4.
Tózalaka na mpiko liboso ya mikakatano
15, 16. Ndenge nini bolingo lokola oyo ya Klisto ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano? Pesá ndakisa.
15 Mikakatano mosusu oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango ezali ezaleli ya kozanga kokoka mpe bobange, oyo mbala mingi esalaka ete tóbɛla, tókóma bibɔsɔnɔ, tóbungisa mayele, mpe tókutana na mikakatano mosusu. (Baloma 8:22) Bolingo lokola oyo ya Klisto ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano yango. Tózwa ndakisa ya Namangolwa, oyo abɔkɔlami na kati ya libota moko ya baklisto na Zambie. Ntango Namangolwa azalaki na mbula mibale, akómaki ebɔsɔnɔ. Alobaki ete: “Nakómaki koyoka nsɔni mpe nazalaki kokanisa ete bato bakoki kosepela na ngai te. Kasi, bandeko ya lisangá basalisaki ngai namona ete namikosaki. Nsɔni na ngai esilaki mpe na nsima nazwaki batisimo.”
16 Atako Namangolwa azali na velo, atambolaka mbala mingi na makolo mpe mabɔkɔ soki akómi esika nzela ezali mabe. Atako bongo, asalaka lokola mobongisi-nzela mosungi ata mbala mibale na mbula. Moto moko oyo Namangolwa apesaki litatoli alelaki. Mpo na nini? Mpamba te akamwaki mpenza na kondima mpe na mpiko ya ndeko na biso oyo. Yehova apambolá Namangolwa mpamba te bato mitano oyo ayekolá na bango bazwá batisimo mpe moko azali nkulutu. Alobi boye: “Makolo na ngai eswaka makasi ntango nyonso. Kasi, natikaka yango te epekisa ngai kosakola.” Ndeko mwasi oyo azali kaka moko kati na ebele ya Batatoli na mokili mobimba oyo bazali na bolɛmbu na nzoto, kasi bazali makasi na elimo mpo balingaka Nzambe mpe bazalani na bango. Bandeko yango nyonso bazali mpenza na motuya na miso ya Yehova!—Hagai 2:7.
17, 18. Nini esalisaka bato mingi báyikela maladi mpe mikakatano mosusu mpiko? Pesá bandakisa ya lisangá na bino.
17 Maladi oyo esilaka te ekoki mpe kolɛmbisa, ata mpe kosilisa moto mayele. Nkulutu moko ya lisangá alobi boye: “Na etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda, ndeko moko ya mwasi abɛlaka diabɛtɛ mpe maladi ya ngei, mosusu abɛlaka kanser, mibale babɛlaka mingai makasi, mpe moko abɛlaka maladi babengi lupus mpe fibromyalgie. Ntango mosusu balɛmbaka. Atako bongo, bazangisaka makita kaka soki maladi na bango etomboki to soki bakɔti lopitalo. Bango nyonso babimaka mingi na mosala ya kosakola. Bakundwelaka Paulo, oyo alobaki ete: ‘Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.’ Nasepelaka na bolingo mpe mpiko na bango. Mbala mosusu maladi na bango esalisaka bango báyeba makambo oyo ezali mpenza na ntina na bomoi.”—2 Bakolinti 12:10.
18 Soki ozali kobunda na maladi to mokakatano moko, ‘bondeláká ntango nyonso’ mpo na kosɛnga lisalisi mpo okwea na bolɛmbu te. (1 Batesaloniki 5:14, 17) Ekoki kozala ete ntango mosusu ozalaka na esengo mpe ntango mosusu na mpasi, kasi tyáká makanisi na yo na makambo oyo ekoki kotonga, mingimingi elikya na biso kitoko ya Bokonzi. Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Mosala ya kosakola ezalaka nkisi mpo na ngai.” Kosakwela basusu nsango malamu esalisaka ye abungisa esengo na ye te.
Bolingo esalisaka bato mabe bázongela Yehova
19, 20. (a) Nini ekoki kosalisa baoyo basali lisumu bázwa mpiko ya kozongela Yehova? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
19 Bato mingi oyo balɛmbá na elimo to basalá masumu bakakatanaka mpo na kozongela Yehova. Kasi, bato yango bakoki kozwa mpiko oyo esengeli soki babongoli mpenza motema mpe bazongeli bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na Nzambe. Tózwa ndakisa ya Mario,a oyo afandaka na États-Unis. Mario atikaki lisangá ya boklisto, akómaki komɛla masanga mpe bangi mingi, mpe nsima ya mbula 20, akɔtaki bolɔkɔ. Alobi boye: “Nabandaki kokanisa mingi mpo na bomoi na ngai mpe nabandaki lisusu kotánga Biblia. Na nsima, nasosolaki bizaleli ya Yehova, mingimingi motema mawa na ye, mpe nabandaki kobondela ntango nyonso mpo na yango. Nsima ya kobima na bolɔkɔ, natikaki baninga na ngai ya mabe, nazongelaki makita mpe nsukansuka bazongisaki ngai na lisangá. Na mosuni, nazali kobuka oyo nalonaki, kasi nazali sikoyo na elikya kitoko mpenza. Nazali mpenza na botɔndi epai na Yehova mpo na motema mawa na ye.”—Nzembo 103:9-13; 130:3, 4; Bagalatia 6:7, 8.
20 Ya solo, bato oyo babungi nzela ndenge Mario abungaki basengeli kosala makasi mpenza mpo na kozongela Yehova. Kasi, soki bazongeli bolingo oyo bazalaki na yango liboso; babandi koyekola Biblia, kobondela mpe komanyola bakozwa mpiko mpe makasi oyo basengeli na yango. Elikya ya Bokonzi mpe epesaki Mario makasi. Ɛɛ, elongo na bolingo, kondima mpe kobanga Nzambe, elikya ekoki mpe kosalisa biso mingi na bomoi. Na lisolo oyo elandi, tokotalela likabo wana ya motuya oyo Nzambe apesá biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
Okoki kopesa eyano?
• Ndenge nini bolingo esalisaki Yesu amonisa mpiko mingi?
• Ndenge nini bolingo mpo na bandeko epesaki Paulo ná Balanabasi mpiko mpenza?
• Na ndenge nini Satana azali koluka kokitisa bolingo ya baklisto?
• Bolingo mpo na Yehova ekoki kopesa biso makasi ya koyikela mikakatano nini mpiko?
[Elilingi na lokasa 23]
Bolingo oyo Paulo azalaki na yango mpo na bato epesaki ye mpiko mpo alɛmba te
[Elilingi na lokasa 24]
Esɛngaka mpiko mpo na kokangama na mitinda ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 24]
Namangolwa Sututu