Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/1 nk. 20-25
  • ‘Bózala na esengo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bózala na esengo’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Momboto amonani
  • ‘Mbuma ya liboso na kati ya bakufi’
  • Bato mosusu ya momboto ya Abalayama
  • Mokolo oyo ezalaki komonisa kosikolama
  • Bósepela liboso ya Yehova
  • Bilambo minene oyo etiká nsango na lisolo ya Yisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bolóngi ya losambo ya solo ebɛlɛmi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/1 nk. 20-25

‘Bózala na esengo’

‘Bokosala elambo mpo na Yehova . . ., mpe bózala na esengo solo.’​—DETERONOME 16:15.

1. (a) Bantembe nini Satana abimisaki? (b) Yehova asakolaki nini nsima ya botomboki ya Adama ná Eva?

NTANGO Satana atindaki Adama ná Eva bátombokela Mozalisi na bango, abimisaki ntembe mibale ya ntina monene. Ya liboso, atyaki ntembe na lotomo oyo Yehova azali na yango ya koyangela. Ya mibale, Satana alobaki ete bato basalelaka Yehova kaka mpo na matomba na bango moko. Ntembe oyo ya mibale emonisamaki na ntango ya Yobo. (Genese 3:1-6; Yobo 1:9, 10; 2:4, 5) Atako bongo, Yehova asalaki na lombangu mpo na kosilisa ntembe yango. Ata ntango Adama ná Eva bazalaki naino na elanga ya Edene, Yehova asakolaki lolenge oyo akosilisa bantembe wana. Asakolaki koya ya “momboto” oyo Satana asengelaki koswa na litindi mpe momboto wana na nsima asengelaki kopanza motó ya Satana.​—Genese 3:15.

2. Makambo nini mosusu Yehova apesaki mpo tóyeba ndenge esakweli ya Genese 3:15 ekokokisama?

2 Ntango bambula ezalaki koleka, Yehova azalaki koyebisa makambo mosusu oyo etali esakweli yango, mpo na komonisa ete esakweli yango ekokokisama. Na ndakisa, Nzambe alobaki na Abalayama ete “momboto” akobima na kati ya bakitani na ye. (Genese 22:15-18) Yakobo, nkɔkɔ ya Abalayama akómaki tata ya mabota 12 ya Yisalaele. Ntango mabota wana ekómaki ekólo na 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova apesaki bango mibeko, oyo elobelaki mpe bafɛti ndenge na ndenge oyo basengelaki kosalaka mbula nyonso. Ntoma Paulo alobaki ete bafɛti wana ezalaki “elili ya makambo oyo ekoya.” (Bakolose 2:16, 17; Baebele 10:1) Ezalaki komonisa ndenge mokano ya Yehova oyo etali momboto ekokokisama. Kosala bafɛti yango ezalaki kopesa Bayisalaele esengo. Kotalela bafɛti yango ekosalisa biso tókóma na kondima makasi ete bilaka ya Yehova ekokokisama.

Momboto amonani

3. Nani azali momboto oyo alakamaki, mpe ndenge nini Satana aswaki ye na litindi?

3 Mbula koleka 4 000 nsima ya esakweli oyo Yehova apesaki na Edene, momboto oyo alakamaki amonanaki. Momboto yango ezalaki Yesu. (Bagalatia 3:16) Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu atikalaki sembo kino liwa mpe amonisaki ete bifundeli ya Satana ezali lokuta. Lisusu, lokola Yesu asalaki masumu te, liwa na ye ezalaki mbeka ya motuya monene. Liwa na ye esikoli bana ya Adama ná Eva ya sembo na lisumu mpe liwa. Liwa ya Yesu likoló ya nzete ya mpasi emonisaki ete Satana ‘aswi na litindi’ momboto oyo alakamaki.​—Baebele 9:11-14.

4. Mbeka ya Yesu emonisamaki na nini?

4 Yesu akufaki mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.)a Mokolo yango na Yisalaele ezalaki mokolo ya esengo,mokolo ya fɛti ya Elekeli. Mbula na mbula na mokolo yango, bato bazalaki kolya mwana-mpate oyo azangi litɔnɔ. Na ndenge yango, bazalaki komikundola ndenge makila ya mwana-mpate esikolaki bana ya liboso ya Yisalaele ntango anzelu abomaki bana ya liboso ya Ezipito na mwa 14 Nisana 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) (Exode 12:1-14) Mwana-mpate ya Elekeli ezalaki elilingi ya Yesu, oyo ntoma Paulo alobaki mpo na ye ete: “Klisto elekeli na biso apesami mbeka.” (1 Bakolinti 5:7) Lokola makila ya mwana-mpate ya elekeli, makila oyo Yesu asopaki ebikisaki bato mingi.​—Yoane 3:16, 36.

‘Mbuma ya liboso na kati ya bakufi’

5, 6. (a) Ntango nini Yesu asekwaki, mpe ndenge nini likambo yango emonisamaki na kati ya Mibeko? (b) Ndenge nini lisekwa ya Yesu ekokisaki esakweli ya Genese 3:15?

5 Na mokolo ya misato, Yesu asekwaki mpo na kolakisa motuya ya mbeka na ye epai ya Tata na ye. (Baebele 9:24) Lisekwa na ye emonisamaki na fɛti mosusu. Nsima ya mokolo ya 14 Nisana, fɛti ya mampa ezangi levire ezalaki kobanda. Na mokolo elandi, 16 Nisana, Bayisalaele bazalaki komema liboke ya mbuma ya liboso ya bilanga na bango, mpo nganga-nzambe aningisa yango liboso ya Yehova. (Levitike 23:6-14) Na mokolo wana kaka, 16 Nisana ya mobu 33 T.B., Yehova asukisaki milende nyonso oyo Satana azalaki kosala mpo na koboma libela ‘motatoli na ye ya sembo mpe ya solo.’ Mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B., Yehova asekwisaki Yesu mpe apesaki ye nzoto ya elimo, oyo ekokufa te.​—Emoniseli 3:14; 1 Petelo 3:18.

6 Yesu akómaki “mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” (1 Bakolinti 15:20) Na bokeseni na bato oyo basekwaki liboso mpe bakufaki lisusu, Yesu akufaki lisusu te. Nzokande, amataki na likoló, mpe azalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova, epai azelaki kino atyama mokonzi ya Bokonzi ya Yehova. (Nzembo 110:1; Misala 2:32, 33; Baebele 10:12, 13) Banda atyamá Mokonzi, Yesu azali sikoyo na likoki ya kopanza Satana, monguna monene na motó mpe koboma ye mpo na libela.​—Emoniseli 11:15, 18; 20:1-3, 10.

Bato mosusu ya momboto ya Abalayama

7. Fɛti ya Bapɔsɔ ezalaki nini?

7 Yesu azali momboto oyo alakamaki na Edene, oyo Yehova asengelaki kosalela mpo na “kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Nzokande, ntango Yehova alobaki na Abalayama, amonisaki ete “momboto” ya Abalayama ekozala moto moko mpamba te. Basengelaki kozala “lokola minzoto na likoló mpe lokola zɛlo na libongo ya mai.” (Genese 22:17) Komonana ya bato mosusu ya “momboto” yango emonisamaki na fɛti mosusu ya esengo mpenza. Mikolo ntuku mitano banda na mokolo ya 16 Nisana, Bayisalaele bazalaki kosala Fɛti ya Bapɔsɔ. Mobeko mpo na fɛti yango elobaki boye: “Bokotánga mikolo ntuku mitano kino mokolo ya nsima ya sabata ya nsambo, na nsima bokopesa mbeka ya bilei ya mbuma ya sika epai ya [Yehova]. Bokobimisa na ndako na bino [mampa] mibale ya koninganisama, esalami na ndambo mibale ya zomi ya efa moko. Yango ekosalema na [levire] lokola mbuma ya liboso epai na [Yehova].”b​—Levitike 23:16, 17, 20.

8. Likambo nini ya monene esalemaki na pantekote ya mobu 33 T.B.?

8 Ntango Yesu azalaki na mabelé, bazalaki kobenga Fɛti ya Bapɔsɔ Pantekote (eutaki na liloba ya Grɛki oyo elimboli “ya ntuku mitano”). Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Yesu Klsito, Nganga oyo aleki Monene, oyo asekwaki asopaki elimo santu likoló ya na mwa etuluku ya bayekoli 120 oyo bayanganaki na Yelusaleme. Na ndenge yango, bayekoli wana bakómaki bana ya Nzambe oyo bapakolami na elimo santu mpe bakómaki bandeko ya Yesu Klisto. (Baloma 8:15-17) Bakómaki ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Ekólo yango oyo ebandaki na bato moke, ekómaki na nsima na bato 144 000.​—Emoniseli 7:1-4.

9, 10. Ndenge nini lisangá ya baklisto bapakolami emonisamaki na pantekote?

9 Lisangá ya baklisto bapakolami emonisamaki na mampa mibale esalemi na levire oyo bazalaki koningisa liboso ya Yehova mokolo nyonso ya pantekote. Mampa batyá levire ezalaki komonisa ete baklisto bapakolami basengelaki kozala naino lisumu oyo Adama ná Eva batikelá biso. Atako bongo, bakoki kopusana penepene na Yehova na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. (Baloma 5:1, 2) Mpo na nini bazalaki kosalela mampa mibale? Ekoki kozala ete bazalaki kosalela mampa mibale mpo bapakolami, bana ya Nzambe basengelaki kouta na bituluku mibale​—libosoliboso epai ya Bayuda mpe na nsima epai ya bapakano.​—Bagalatia 3:26-29; Baefese 2:13-18.

10 Mampa mibale oyo bazalaki kopesa na pantekote ezalaki kouta na mbuma ya liboso ya ble. Yango wana, baklisto wana oyo babotami na elimo babengami “motindo moko boye ya mbuma ya liboso ya bikelamu na ye.” (Yakobo 1:18) Bazali bato ya liboso oyo masumu na bango elimbisamaki na nzela ya makila oyo Yesu asopaki, mpe yango epesi bango likoki ya kozwa bomoi ezangi kufa na likoló, mpo na koyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye. (1 Bakolinti 15:53; Bafilipi 3:20, 21; Emoniseli 20:6) Lokola bakómi bana ya Nzambe, mosika te ‘bakokamba [bikólo] na lingenda ya ebende’ mpe ‘bakopanzapanza Satana na nse ya makolo na bango.’ (Emoniseli 2:26, 27; Baloma 16:20) Ntoma Yoane alobaki ete: “Bango bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende. Bango basombamaki na kati ya bato lokola mbuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana-Mpate.”​—Emoniseli 14:4.

Mokolo oyo ezalaki komonisa kosikolama

11, 12. (a) Nini ezalaki kosalema na mokolo ya mbɔndi? (b) Matomba nini Bayisalaele bazalaki kozwa na bambeka ya bangombɛ mpe ya bantaba?

11 Na mokolo ya zomi ya sanza ya Etanimi (oyo bakómaki kobenga na nsima Tisri),c Bayisalaele bazalaki kosala fɛti moko oyo ezalaki komonisa ndenge mbeka ya lisiko ya Yesu ekomemela bato matomba. Na mokolo yango, ekólo mobimba bazalaki koyangana esika moko na mokolo ya mbɔndi mpo na kopesa bambeka mpo na bolimbisi ya masumu na bango.​—Levitike 16:29, 30.

12 Na mokolo ya mbɔndi, nganga-nzambe monene azalaki koboma mwana ya ngombɛ, mpe azalaki kosopa makila na yango mbala nsambo liboso ya ezipeli ya Sanduku na Esika oyo eleki Mosantu, mpe yango ezalaki komonisa kopesa makila liboso ya Yehova. Mbeka wana ezalaki mpo na masumu ya nganga-nzambe monene mpe bato ya “ndako na ye,” banganga-basungi mpe Balevi. Na nsima, nganga-nzambe monene azalaki kozwa ntaba mibale. Azalaki koboma moko mpo na kopesa mbeka ya masumu “mpo na bato.” Azalaki kosopa ndambo ya makila na yango liboso ya ezipeli ya Sanduku na kati ya Esika eleki Mosantu. Na nsima, nganga-nzambe monene azalaki kotya mabɔkɔ na ye likoló ya motó ya ntaba ya mibale mpe koyambola mabunga ya bana ya Yisalaele, mpe azalaki kotika ntaba yango ekenda na esobe. na ndenge ya elilingi, yango ezalaki lokola ememi masumu ya ekólo mobimba.​—Levitike 16:3-16, 21, 22.

13 .Na ndenge nini makambo oyo ezalaki kosalema na mokolo ya mbondi ezalaki komonisa mokumba oyo Yesu azali kokokisa?

13 Lokola makambo wana nyonso ezalaki komonisa, Nganga Monene, Yesu asalelaka motuya ya makila na ye moko mpo na kolimbisa masumu. Ya liboso, motuya ya makila na ye esalelamaki mpo na “ndako ya elimo” ya baklisto bapakolami 144 000 mpe epesi bango likoki ya kotángama basembwi mpe kozala pɛto na miso ya Yehova. (1 Petelo 2:5; 1 Bakolinti 6:11) Yango emonisamaki na mbeka ya mwana ya ngombɛ. Yango epesi bango libaku ya kozwa libula na bango na likoló. Ya mibale, motuya ya mbeka ya makila ya Yesu esalelami mpe mpo na bamilio mosusu ya bato oyo bazali kondima Klisto, ndenge emonisami na mbeka ya ntaba. Bato yango bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé, libula oyo Adama ná Eva babungisaki. (Nzembo 37:10, 11) Na nzela ya makila na ye oyo esopamaki, Yesu azali komema masumu ya bato, ndenge kaka ntaba na ndenge ya elilingi ezalaki komema masumu ya Yisalaele mobimba na esobe.​—Yisaya 53:4, 5.

Bósepela liboso ya Yehova

14, 15. Makambo nini ezalaki kosalema na fɛti ya mingombo, mpe yango ezalaki kokundwela Bayisalaele likambo nini?

14 Nsima ya mokolo ya mbɔndi, Bayisalaele bazalaki kosala fɛti ya mingombo, yango ezalaki fɛti ya esengo koleka bafɛti nyonso oyo Bayuda bazalaki kosala na mbula mobimba. (Levitike 23:34-43) Fɛti yango ezalaki kobanda mwa 15 tii mwa 21 ya sanza ya Etanimi, mpe ezalaki kosuka na liyangani moko ya monene na mokolo ya 22. Yango ezalaki kosukisa eleko ya koyanganisa mbuma mpe ezalaki ntango ya kotɔnda Nzambe mpo na ebele ya bolamu oyo asaleli bango. Mpo na ntina yango, Yehova alobaki na Bayuda boye: “[Yehova] Nzambe na yo akopambola yo na bilanga na yo nyonso mpe na misala ya mabɔkɔ na yo nyonso, ete ozala na esengo solo.” (Deteronome 16:15) Ezalaki mpenza ntango ya esengo!

15 Na ntango ya fɛti yango, Bayisalaele bazalaki kofanda na mingombo mikolo nsambo. Yango ezalaki kokundwela bango ete na eleko moko bango mpe bafandaki na mingombo na esobe. Fɛti yango epesaki bango libaku oyo ebongi ya kokanisa na lolenge oyo Yehova azalaki kobatela bango lokola tata. (Deteronome 8:15, 16) Lokola bango nyonso, bazwi ná babola, bazalaki kofanda na mingombo ya ndenge moko, ntango fɛti ezalaki kosalema, yango esalisaki Bayisalaele báyeba ete bango nyonso bazalaki ndenge moko.​—Nehemia 8:14-16.

16. Fɛti ya mingombo ezalaki komonisa likambo nini?

16 Fɛti ya mingombo ezalaki fɛti ya kobuka mbuma, fɛti ya esengo mpenza ya koyanganisa mbuma, mpe yango ezalaki komonisa koyanganisama ya esengo ya baoyo bazali kondima Yesu Klisto. Koyanganisama yango ebandaki na pantekote ya mobu 33 T.B., ntango bayekoli ya Yesu 120 bapakolamaki na elimo santu mpe bakómaki “libota moko ya banganga.” Lokola Bayisalaele bazalaki kofanda na mingombo kaka mwa mikolo, bapakolami bayebi ete bazali “bapaya” na mokili oyo mabe. Bazali na elikya ya likoló. (1 Petelo 2:5, 11) Koyanganisama yango ya baklisto bapakolami ezali kokóma na nsuka na “mikolo ya nsuka” oyo, ntango bato ya nsuka ya 144 000 bazali koyanganisama.​—2 Timote 3:1.

17, 18. (a) Nini emonisi ete longola baklisto bapakolami, bato mosusu mpe bazali kozwa litomba na mbeka ya Yesu? (b) Banani lelo oyo bazali kozwa matomba na fɛti ya mingombo, mpe ntango nini fɛti wana ya esengo ekokoka?

17 Likambo ya ntina mingi ezali ete na fɛti wana ya mingombo, bazalaki kopesa ngombɛ 70. (Mituya 29:12-​34) Motángo 70 ezali 7 mbala 10. Na Biblia, motángo 7 elimboli eloko ya kokoka na likoló mpe motángo 10 na mabelé. Na yango, mbeka ya Yesu ekomema matomba mpo na mabota nyonso 70 oyo euti na Noa. (Genese 10:1-29) Na boyokani na likambo yango, na ntango na biso koyanganisama yango ezali kosalema na bikólo nyonso, epai bato oyo bazali kondimela Yesu mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi na paladiso awa na mabelé.

18 Ntoma Yoane amonaki na emonaneli koyanganisama yango oyo ezali kosalema sikoyo. Ya liboso, ayokaki anzelu moko azalaki kosakola mpo na kotyama elembo ya bato ya nsuka na kati ya bato 144 000. Na nsima, amonaki “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga,” batɛlɛmi liboso ya Yehova mpe Yesu, basimbi ‘mandalala na mabɔkɔ.’ Bato yango “bauti bolɔzi monene” mpo na kokɔta na mokili ya sika. Bango mpe bazali sikoyo bapaya na ebongiseli ya makambo oyo, mpe bazali kozela na elikya mpenza ntango oyo “Mwana-Mpate akokamba bango, mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.” Na ntango wana, “Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 7:1-10, 14-17) Kokokisama monene ya fɛti ya mingombo ekokoka nsima ya Mbula Nkóto ya boyangeli ya Klisto ntango ebele ya bato, ná bato ya sembo oyo bakosekwa, bakozwa bomoi ya seko.​—Emoniseli 20:5.

19. Matomba nini tokozwa soki tótaleli bafɛti oyo Bayisalaele bazalaki kosala?

19 Biso mpe tokoki ‘kozala na esengo’ soki tosali makasi mpo na koyeba ntina ya bafɛti ya Bayuda. Ezali mpenza esengo koyeba ete Yehova ayebisaki makambo mosusu mpo na komonisa ndenge esakweli oyo apesaki na Edene ekokokisama. Ezali mpe esengo komona ndenge esakweli yango ezali kokokisama mokemoke. Lelo oyo, toyebi ete momboto yango amonaná mpe Satana aswaki ye na litindi. Sikoyo azali Mokonzi kuna na likoló. Lisusu, bato mingi na kati ya bapakolami 144 000 basili komonisa bosembo na bango kino liwa. Likambo nini etikali? Mosika te esakweli yango ekokokisama, kasi ndenge nini? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Sanza ya Nisana ekokani na sanza ya Marsi to ya Aprili na calendrier na biso.

b Ntango bazalaki kopesa mampa mibale ya koningisama, mbala mingi nganga-nzambe azalaki kosimba mampa na mabɔkɔ na ye, azalaki kotombola mabɔkɔ na ye likoló mpe koningisa mampa yango epai na epai. Koningisama wana ezalaki elilingi ya kopesa Yehova mbeka.​—Talá Étude perspicace des Écritures, Volume 2, lokasa 850, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Etanimi to Tisri ekokani na sanza ya Sɛtɛmbɛ to ya Ɔkɔtɔbɛ na calendrier na biso.

Okoki kolimbola?

• Mwana-mpate ya elekeli ezalaki komonisa nini?

• Koyanganisama nini emonisamaki na fɛti ya pantekote?

• Makambo nini oyo ezalaki kosalema na mokolo ya mbɔndi oyo emonisaki makambo oyo mbeka ya lisiko ya Yesu ezali kokokisa?

• Na ndenge nini koyanganisama ya baklisto emonisamaki na fɛti ya mingombo?

[Etanda na lokasa 22, 23]

(Mpo na komona ndenge ezali, talá na kati ya zulunalo)

Elekeli

Nisana 14

Likambo:

Bazalaki koboma mwana-mpate ya elekeli

Ezalaki komonisa:

Mbeka ya Yesu

Fɛti ya mampa ezangi levires (Nisana 15-21)

Nisana 15

Likambo:

Sabata

Nisan 16

Likambo:

Mbeka ya orje

Ezalaki komonisa:

Yesu asekwi

Mikolo 50

Fɛti ya bapɔsɔ (Pantekote)

Siwana 6

Likambo:

Mbeka ya mampa mibale

Ezalaki komonisa:

Yesu alakisi Yehova bandeko na ye bapakolami

Mokolo ya mbɔndi

Tisri 10

Likambo:

Mbeka ya ngɔmbɛ moko mpe ntaba mibale

Ezalaki komonisa:

Yesu apesi motuya ya makila na ye mpo na bato

Fɛti ya mingombo (koyanganisama Tabenakle)

Tisri 15-21

Likambo:

Bayisalaele bazalaki kofanda na mingombo na esengo, kosepela na kobuka mbuma, na mbeka ya ngɔmbɛ 70

Ezalaki komonisa:

Koyanganisama ya bapakolami mpe “ebele ya bato”

[Bililingi na lokasa 21]

Na ndakisa ya makila ya mwana-mpate ya Elekeli, makila ya Yesu oyo esopanaki epesi bato mingi lobiko

[Bililingi na lokasa 22]

Mbuma ya liboso ya orje oyo bazalaki kopesa na mokolo ya 16 Nisana ezalaki komonisa lisekwa ya Yesu

[Bililingi na lokasa 23]

Mampa mibale oyo bazalaki kopesa na mokolo ya pantekote ezalaki komonisa lisangá ya baklisto bapakolami

[Bililingi na lokasa 24]

Fɛti ya mingombo ezalaki komonisa koyanganisama ya esengo ya bapakolami mpe ya “ebele ya bato” oyo bauti na bikólo nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto