Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/7 lok. 26
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Bilambo minene oyo etiká nsango na lisolo ya Yisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • ‘Bózala na esengo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bilambo ya kobuka mbuma bisepelisaka Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/7 lok. 26

Mituna ya batángi

Lokola mosala ya kobuka mbuma ezalaki kobanda wana mibali nyonso ya Yisalaele bazali na Fɛti ya Mampa ezangá levire, nani azalaki kobuka bambuma ya liboso ya ɔrje oyo bazalaki komema na tempelo?

Mibeko ya Moize elobaki na Bayisalaele boye: “Mbala misato na kati ya mbula mibali na yo nyonso bakobima liboso ya [Yehova] Nzambe na yo na esika ekopona ye: na elambo ya [mampa ezangá levire, NW] mpe na elambo ya bapɔsɔ mpe na elambo ya mingombo.” (Deteronome 16:16) Banda na ntango ya Mokonzi Salomo, esika oyo Nzambe aponaki ezalaki tempelo ya Yelusaleme.

Fɛti ya liboso kati na bafɛti yango misato ezalaki kosalema na ebandeli ya prɛnta. Bazalaki kobenga yango Fɛti ya Mampa ezangá levire mpe ezalaki koumela mikolo nsambo, banda mokolo oyo elandi Elekeli, elingi koloba na mokolo ya 15 Nisana tii mokolo ya 21 Nisana. Mokolo ya mibale ya fɛti yango, elingi koloba 16 Nisana, ezalaki ebandeli ya eleko ya liboso ya kobuka mbuma na kolanda manaka ya Bayuda. Mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kozwa “liboke ya mbuma ya liboso” ya ɔrje mpe azalaki ‘koningisa yango liboso ya Yehova’ na tempelo. (Levitike 23:5-12) Lokola mibali nyonso basengelaki kozala na Fɛti ya Mampa ezangá levire, nani azalaki kobuka liboke ya mbuma yango?

Mobeko ya kopesa mbuma ya liboso epai ya Yehova na Fɛti ya Mampa ezangá levire epesamaki na ekólo mobimba. Esengelaki te ete moto na moto abuka liboke na ye ya mbuma ya liboso mpe amema yango na tempelo. Bazalaki kopona bato oyo bazalaki kosala yango mpo na ekólo mobimba. Na nsima, bazalaki kotinda bango bábuka liboke ya mbuma ya liboso na elanga moko ya ɔrje na zingazinga ya Yelusaleme, mpe báya na yango mpo na Fɛti ya Mampa ezangá levire. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Soki bamoni ɔrje oyo eteli na elanga moko zingazinga ya Yelusaleme, bazalaki kozwa yango; soki te, bazalaki kozwa yango ata na esika nini na Yisalaele. Mibali misato bazalaki kobuka yango, mokomoko azalaki na likwangola mpe kitunga na ye.” Na nsima, bazalaki komema liboke moko ya ɔrje epai ya nganga-nzambe monene, mpe ye azalaki kopesa yango epai ya Yehova.

Mobeko ya kopesa Yehova mbuma ya liboso ezalaki kopesa Bayisalaele libaku ya komonisa ete bazali na botɔndi na ndenge Nzambe apambolaki mabelé mpe milona na bango. (Deteronome 8:6-10) Kasi, likambo eleki ntina ezali ete molulu yango ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Baebele 10:1) Kutu, Yesu Klisto asekwisamaki na mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso, na mokolo oyo Bayisalaele bazalaki kopesa mbuma ya liboso epai ya Yehova. Ntoma Paulo akomaki boye: “Klisto asili kolamuka na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa. . . . Kasi moto na moto na molɔngɔ na ye: Klisto mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Klisto na ntango ya kozala na ye.” (1 Bakolinti 15:20-23) Liboke ya mbuma ya liboso oyo nganga-nzambe monene azalaki koningisa liboso ya Yehova ezalaki elilingi ya Yesu Klisto​—moto ya liboso oyo asekwisamaki mpe akoki kokufa lisusu te. Na ndenge yango, Yesu apesaki bato nzela ya kosikolama na masumu mpe liwa.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

© 2003 BiblePlaces.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto