Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/1 nk. 21-25
  • Teyá oyo biblia eteyaka mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá oyo biblia eteyaka mpenza
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe atyelaka biso likebi?
  • Mpo na nini tozali na bomoi awa na mabelé?
  • Tokendaka wapi soki tokufi?
  • Buku oyo tosengeli kosalela mpo na koyekola na bato
  • Zalá na botɔndi mpo na mabaku malamu oyo Nzambe apesi yo
  • Okosepela koyeba solo?
    Okosepela koyeba solo?
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Salisá bato bátosa oyo Biblia eteyaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/1 nk. 21-25

Teyá oyo biblia eteyaka mpenza

“Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango.”​—MATAI 28:19, 20.

1. Tokoki koloba nini na ndenge oyo Biblia ekabolami?

BIBLIA, Liloba ya Nzambe, ezali moko na babuku oyo eleki koumela mpe kokabolama na mokili. Buku yango mobimba to mikanda na yango mosusu ebongolami na minɔkɔ koleka 2 300. Bato mingi ya mokili (90 %) bazali na Biblia na minɔkɔ ya mboka na bango.

2, 3. (a) Mpo na nini mobulungano ezali na mateya ya Biblia? (b) Mituna nini tokotalela?

2 Bamilio ya bato batángaka Biblia mokolo na mokolo. Bato mosusu batángá yango banda ebandeli tii nsuka mpe bazongelá yango mbala ebele. Mangomba mingi elobaka ete mateya na yango euti na Biblia, kasi mateya ya mangomba yango nyonso ekokani te. Lisusu, bandimi ya lingomba moko bandimaka makambo ndenge moko te bango nyonso. Bato mosusu bandimaka te ete Biblia epemami na Nzambe mpe ezali na ntina. Mpo na bato mosusu, ezali kaka buku mosantu oyo moto asengeli kosimba ntango azali kokata seleka to ntango azali kolapa ndai ya koloba solo na tribinale.

3 Nzokande, Biblia ezali maloba ya Nzambe epai ya bato. (Baebele 4:12) Yango wana, biso Batatoli ya Yehova tolingaka bato báyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Tozalaka na esengo ya kokokisa mokumba oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango.” (Matai 28:19, 20) Na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato ya sembo oyo bamitungisaka ntango bazali komona mobulungano oyo etondi na mokili na makambo ya losambo. Bato yango bazalaka na mposa ya koyeba mateya ya solo mpo na Mozalisi mpe balukaka koyeba oyo Biblia elobi mpo na bomoi. Sikoyo, tótalela mituna misato oyo bato mingi bamitunaka. Na motuna mokomoko, tokolobela lokuta oyo bakonzi ya mangomba bateyaka, mpe na nsima, tokotalela oyo Biblia eteyaka mpenza. Mituna yango ezali oyo: (1) Nzambe atyelaka biso likebi? (2) Mpo na nini tozali na bomoi awa na mabelé? (3) Nini ekómelaka biso soki tokufi?

Nzambe atyelaka biso likebi?

4, 5. Mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete Nzambe atyelaka biso likebi te?

4 Tóbanda na motuya oyo: Nzambe atyelaka biso likebi? Bato mingi bakanisaka ete Nzambe atyelaka biso likebi te. Mpo na nini? Ya liboso mpo bazali komona ndenge mokili etondi na koyinana, bitumba, mpe bampasi. Bato yango balobaka ete, ‘Soki Nzambe azalaki kotyela biso likebi, alingaki kotika te ete makambo ya mabe ndenge wana esalemaka.’

5 Ntina mosusu oyo bato mosusu bakanisaka ete Nzambe atyelaka biso likebi te ezali mpo na makambo oyo bakonzi ya mangomba bateyaka. Mbala mingi, soki likambo ya mabe ekómeli bato, bakonzi ya mangomba balobaka nini? Ntango mwasi moko akufelaki bana mibale ya mike na likama ya motuka, pastɛrɛ ya lingomba na bango alobaki na ye ete: “Ezali mokano ya Nzambe. Nzambe azalaki na mposa ya baanzelu mibale.” Nzokande, ntango bakonzi ya mangomba bazali koloba bongo, na maloba mosusu bazali komonisa ete makambo ya mabe oyo esalemaka ezali foti ya Nzambe. Kasi, moyekoli Yakobo akomaki boye: “Ntango moto azali na kati ya komekama, aloba te ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Yehova Nzambe abimiselaka bato makambo ya mabe te. Kutu, Biblia elobi ete: “Ezali mosika na Nzambe ete asala mabe!”​—Yobo 34:10.

6. Nani azali kobimisa bampasi mpe makambo mabe oyo ezali na mokili?

6 Kasi mpo na nini mokili etondi na bampasi mpe makambo ya mabe? Ya liboso, mpo bato mingi baboyi Nzambe azala Mokonzi na bango, balingi kotosa mibeko na ye te. Bato bazali koyeba te ete bazali kotosa Satana, Monguna ya Nzambe, mpamba te “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:​19) Koyeba likambo yango ezali kosalisa moto akanga mbala moko ntina oyo makambo ya mabe ezali kosalema. Satana azali mabe, azali na likunya, na bokosi mpe na motema mabe. Yango wana tokoki kokamwa te soki mokili ezali na bizaleli ya moyangeli na yango. Ezali mpo na yango nde mabe ezali mingi!

7. Wapi mwa bantina ya bampasi oyo tokutanaka na yango?

7 Ntina mosusu ya bampasi oyo tozali komona ezali mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Bato ya masumu bawelanaka mpo na bokonzi, mpe mbala mingi yango ememaka bitumba, konyokola bato, mpe bampasi. Mosakoli 8:9 elobi likambo ya solo ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Ntina mosusu ya bampasi ezali “ntango mpe makambo oyo ekanami te.” (Mosakoli 9:11, NW) Bato mosusu bazwaka makama kaka mpo bazalaki na esika oyo likama esalemi.

8, 9. Nini ezali komonisa biso ete Yehova atyelaka biso mpenza likebi?

8 Koyeba ete Yehova te moto apesaka biso bampasi oyo tokutanaka na yango ezali mpenza kokitisa motema. Kasi, Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na makambo oyo tokutanaka na yango? Ɛɛ! Toyebi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na biso mpamba te Liloba na ye emonisi biso ntina oyo atiki bato básalaka mabe. Ntina oyo Nzambe atiki mabe etaleli makambo mibale: bokonzi na ye mpe bosembo ya bato. Lokola Yehova azali Mozalisi mpe azali na nguya nyonso, moto moko te akoki kosɛngisa ye ayebisa ntina oyo atiki nzela na bampasi. Kasi, ayebisi biso yango mpo atyelaka biso likebi.

9 Tótalela likambo mosusu oyo ezali komonisa ete Nzambe atyelaka biso likebi. Nzambe ayokaki “mpasi na motema” ntango mabe etondaki na mabelé na mikolo ya Noa. (Genese 6:5, 6, NW) Tokanisi ete lelo oyo Nzambe azali mpe koyoka mpasi na motema? Azali kaka koyoka mpasi na motema mpo abongwanaka te. (Malaki 3:6) Nzambe ayini kozanga boyengebene mpe asepelaka te komona bato bazali konyokwama. Biblia elobi ete etikali moke Nzambe alongola mabe nyonso oyo boyangeli ya bato mpe makanisi ya Zabolo ememi. Nyonso wana ezali kondimisa biso te ete Nzambe atyelaka biso likebi?

10. Ndenge nini Yehova atalelaka bampasi oyo ezali kotungisa bato?

10 Bakonzi ya mangomba bakoselaka Nzambe makambo ntango balobaka ete makama oyo bato bakutanaka na yango ezali mokano na ye. Kutu, Yehova azali na mposa makasi ya kosilisa bampasi oyo ezali kotungisa bato. Mokapo ya 1 Petelo 5:7 elobi ete: “Atyelaka bino likebi.” Ezali yango nde oyo Biblia eteyaka mpenza!

Mpo na nini tozali na bomoi awa na mabelé?

11. Na mangomba bateyaka nini mpo na ntina oyo tozali na bomoi awa na mabelé?

11 Tótalela sikoyo motuna ya mibale oyo bato mingi bamitunaka: Mpo na nini tozali na bomoi awa na mabelé? Mbala mingi, na mangomba bateyaka ete awa na mabelé tozali baleki-nzela. Mabelé ezali kaka esika moko oyo totɛlɛmi na nzela oyo ezali komema biso na esika mosusu. Bakonzi mosusu ya mangomba bateyaka ete mokolo mosusu Nzambe akoboma mabelé oyo; yango mpe ezali lokuta. Mateya yango etindi bato bákóma koloba ete, “Ebongi tóbuka ndika ntango tozali naino na mino” mpo lobi liwa ekoyela biso. Kasi, Biblia eteyaka mpenza nini mpo na ntina oyo tozali na bomoi awa na mabelé?

12-14. Biblia eteyaka nini na ntina na mokano ya Nzambe mpo na mabelé mpe bato?

12 Nzambe azali na mokano moko malamu mingi mpo na mabelé mpe mpo na bato. “Asalaki [mabelé] eloko ya mobulu te” kasi “atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Lisusu, Yehova ‘atɛmisaki mokili likoló ya moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.’ (Nzembo 104:5) Koyeba mokano wana ya Nzambe mpo na mabelé mpe mpo na bato ekoki kosalisa moto ayeba ntina oyo tozali na bomoi awa na mabelé.

13 Genese mokapo 1 mpe 2 emonisi ete Yehova abongisaki mabelé mpo bato báfanda wana. Nsima ya kobongisa mabelé, makambo nyonso ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Nzambe atyaki Adama ná Eva na elanga ya Edene, mpe apesaki bango biloko mingi ya kolya. Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” Adama ná Eva basengelaki kobota bana oyo bazali bato ya kokoka, kokómisa mabelé mobimba kitoko lokola elanga oyo bango bafandaki, mpe kozala bakonzi ya banyama, kasi konyokola bango te.​—Genese 1:26-28.

14 Mokano ya Nzambe ezali ete bato ya kokoka báfanda na mabelé mpo na libela. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Nzambe akelaki bato mpo bázala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé. Yango nde mokano ya Nzambe, mpe oyo Biblia eteyaka mpenza!

Tokendaka wapi soki tokufi?

15. Mangomba mingi eteyaka ete tokendaka wapi soki tokufi?

15 Sikoyo, tólobela motuna ya misato oyo bato mingi bamitunaka: Tokendaka wapi soki tokufi? Na mangomba mingi, bateyaka ete ntango moto akufi, nzoto na ye nde ekufaka, kasi molimo na ye etikalaka na bomoi. Tii lelo oyo mangomba mosusu ezali koteya ete Nzambe anyokolaka bato ya mabe na lifelo ya mɔtɔ ya libela. Kasi, yango ezali solo? Biblia eteyaka mpenza nini mpo na liwa?

16, 17. Biblia eteyaka ete moto akendaka wapi soki akufi?

16 Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te.” Lokola bato oyo bakufá “bayebi likambo te,” bakoki koyoka te, komona te, koloba te, koyoka mpasi te to kokanisa te. Bazali mpe lisusu na lifuti te mpamba te bakoki kosala mosala te! Lisusu, “bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba” mpamba te bakoki kosala eloko moko te.​—Mosakoli 9:5, 6, 10.

17 Mateya ya Biblia na ntina na liwa ezali polele mpe ezali mindɔndɔ te. Bato oyo bakufá bazalaka na bomoi epai mosusu te. Eloko moko te ebimaka na nzoto mpe etikalaka na bomoi mpo ekende kobotama na nzoto mosusu, ndenge bato mosusu bakanisaka. Tópesa ndakisa moko mpo na kolimbola yango: Bomoi na biso ezali lokola mɔtɔ ya buji. Ntango buji ekufi, mɔtɔ yango ezalaka lisusu te.

18. Ntango moyekoli ya Biblia ayebi ete bato oyo bakufá bayebaka lisusu eloko te, yango ekoki kosalisa ye akanga ntina ya makambo nini?

18 Kanisá ndenge oyo liteya kaka moko wana ekoki kobongola bomoi ya moto. Ntango moto oyo azali koyekola Biblia ayebi ete bato oyo bakufá bayebaka eloko moko te, akososola mbala moko ete ata soki bandeko na ye bazalaki bato oyo babombaka nkanda ntango bazalaki na bomoi, lokola bakufá, bakoki kosala ye likambo moko te. Moto ya ndenge wana mpe akokanga mbala moko ntina ete baninga mpe bandeko na ye oyo bakufá bakoki lisusu te koyoka, komona te, koloba te, koyoka mpasi to kokanisa te. Na bongo, bakoki kozala na epongelo to na lifelo ya mɔtɔ te. Biblia ezali koteya ete bato oyo bakufá, baoyo Nzambe abombi na makanisi na ye, bakosekwa. Talá elikya ya solosolo!​—Yoane 5:28, 29.

Buku oyo tosengeli kosalela mpo na koyekola na bato

19, 20. Biso baklisto tozali na mokumba nini, mpe buku nini ebongisami mpo tóyekolaka yango na bato na mosala ya kosakola?

19 Na boyekoli na biso totaleli kaka mituna misato oyo bato bamitunaka. Na motuna mokomoko, liteya ya Biblia ezali polele mpe mindɔndɔ te. Ezali mpenza esengo kolakisa makambo yango epai ya bato oyo bazali na mposa ya koyeba oyo Biblia eteyaka! Kasi, ezali mpe na mituna mosusu ya ntina mingi oyo bato ya mitema sembo bazali koluka biyano na yango. Biso baklisto tozali na mokumba ya kosalisa bango bázwa biyano na mituna wana.

20 Kolakisa mateya ya Biblia na ndenge ya polele, oyo ezali kosimba motema ya moyekoli, ezalaka pɛtɛɛ te. Mpo na kosalisa biso, “moombo ya sembo mpe ya mayele” abongisi buku moko oyo tosengeli kosalelaka mpo na koyekola na bato na mosala ya kosakola. (Matai 24:45-47) Motó ya likambo ya buku yango ya nkasa 224 elobi: Biblia eteyaka mpenza nini?

21, 22. Wapi mwa makambo malamu ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

21 Buku yango oyo ebimisamaki na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe,” oyo esalemaki na 2005, ezali na makambo mingi ya malamu. Na ndakisa, nkasa mitano ya liboso ezali na mwa masolo oyo ezali mpenza kosalisa mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Na ntembe te okomona ete ezali mpasi te kolobela bililingi mpe bavɛrsɛ oyo ezali na ebandeli. Okoki mpe kosalela etanda moko oyo ezali na eteni yango mpo na kolakisa bayekoli ndenge ya koluka vɛrsɛ na kati ya Biblia.

22 Buku yango ekomami na elobeli ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Lisusu, mpo na kosimba motema ya moyekoli, buku yango ekomami na ndenge oyo ezali kosɛnga ye apesaka makanisi. Mokapo mokomoko ezali na mituna na ebandeli; mpe na nsuka, ezali na etanda moko bakomá “Oyo Biblia eteyaka.” Etanda yango ezali na biyano na mituna oyo etunami na ebandeli ya mokapo mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo esimbi biyano yango. Bililingi mpe maloba oyo ezali kolimbola yango, bakisa mpe bandakisa oyo epesami na baparagrafe, ekosalisa moyekoli akanga ntina ya likambo nyonso oyo ayekoli. Buku yango ekomami na elobeli ya pɛtɛɛ; kasi, na bankasa ya nsuka ezali lisusu na apɛndisi moko oyo ezali na mitó ya makambo 14, oyo ekoki kosalisa moyekoli oyo azali na mposa ya koyeba makambo mosusu mpo na liteya moko boye.

23. Makanisi nini bapesi biso mpo na kosalela malamu buku Biblia eteyaka mpo na koyekola na bato?

23 Buku Biblia eteyaka ebongisami mpo na kosalisa biso tóteya bato nyonso, ezala baoyo batángá to te, mpe bato ya mangomba ndenge na ndenge. Soki moyekoli ayebi Biblia ata moke te, ntango mosusu ekosɛnga koyekola na ye mokapo moko ndambondambo. Ntango bozali koyekola, komema boyekoli mbangumbangu te, kasi salá makasi osimbaka motema ya moyekoli. Soki moyekoli akangi ntina te ya ndakisa moko oyo ezali na buku, limbwelá ye yango to mpe salelá ndakisa mosusu. Esengeli omibongisaka malamu, saláká makasi oyeba kolimbola malamu makambo ya buku yango, mpe bondeláká Nzambe asalisa yo oyeba “kosembola liloba ya solo malamumalamu.”​—2 Timote 2:15.

Zalá na botɔndi mpo na mabaku malamu oyo Nzambe apesi yo

24, 25. Mabaku malamu nini Yehova apesi basaleli na ye?

24 Yehova apesi basaleli na ye mabaku mingi ya malamu. Apesi biso libaku ya koyeba solo na ntina na ye. Ebongi te tóbosana motuya ya likambo yango! Kutu, Nzambe abombi mikano na ye na miso ya bato ya lolendo mpe amonisi yango bato ya komikitisa. Yesu alobaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, mpamba te obombi makambo oyo liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele mpe omonisi yango epai ya bana mike.” (Matai 11:25) Kozala na kati ya bato ya komikitisa oyo bazali kosalela Yehova, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali lokumu monene oyo epesami na moto nyonso te.

25 Yehova apesi mpe biso libaku malamu ya koteya bato mosusu makambo na ye. Tóbosana te ete mateya ya lokuta ebebisi lokumu na ye na miso ya bato. Yango wana, bato mingi bakanisaka ete Yehova azalaka motema makasi mpe atyelaka bato likebi te. Ozali mpenza na mposa ya kopesa mabɔkɔ na kosembola likambo yango? Ozali na mposa ete na bisika nyonso, bato ya mitema sembo báyeba solo mpo na Nzambe? Boye, monisá mpenza ete otosaka Nzambe na molende na yo na kosakola mpe koyebisa bato oyo Biblia eteyaka na makambo wana ya ntina mingi. Bato oyo bazali koluka solo bazali na mposa ya koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza.

Okopesa eyano nini?

• Nini ezali komonisa biso ete Nzambe atyelaka biso likebi?

• Mpo na nini tozali na bomoi awa na mabelé?

• Tokendaka wapi soki tokufi?

• Makambo nini ya buku Biblia eteyaka esepelisi yo mingi?

[Bililingi na lokasa 22]

Biblia eteyaka ete bampasi ekosila

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Mwana: © Bruno Morandi/age fotostock; mwasi oyo azali kolela: AP Photo/Gemunu Amarasinghe; bato bakimá mboka: © Sven Torfinn/Panos Pictures

[Elilingi na lokasa 23]

Bato ya boyengebene bakozala na bomoi ya seko na Paladiso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto